Malako mpo na likita Bomoi mpe mosala ya bakristo
Etanda ya makambo ezali na kati
Makambo ya motuya na Liloba ya Nzambe 3-5
1. Malako oyo ekosalisa moto nyonso oyo azali na mokumba na likita Bomoi mpe mosala ya bakristo. Bandeko yango basengeli kotánga malako oyo etali mokumba oyo bazwi ndenge emonisami na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo mpe na mwa mokanda oyo liboso bábongisa mokumba na bango. Esengeli kolendisa basakoli nyonso básalaka masolo ya bana-kelasi na likita yango. Bato mosusu oyo bayanganaka na makita ya lisangá bakoki mpe kosala masolo ya bana-kelasi soki bandimaka mateya ya Biblia mpe batosaka mibeko na yango na bomoi na bango. Mokɛngɛli ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo asengeli kosolola na moto nyonso oyo azali mosakoli te, oyo amonisi mposa ya kokómisa nkombo mpo na kosala badevuare mpe koyebisa ye soki akokisi masɛngami. Asengeli kosolola na moto na miso ya ndeko oyo ayekolaka na ye Biblia (to ya moboti na ye oyo azali Motatoli). Masɛngami ezali ndenge moko na oyo ya moto oyo alingi kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te.—od mok. 8 par. 8.
MALOBA YA EBANDELI
2. Miniti 1. Pɔsɔ na pɔsɔ, nsima ya loyembo mpe libondeli ya ebandeli, prezida ya likita Bomoi mpe mosala akolobela na mokuse masolo oyo ekosalema na ndenge oyo ekopesa bayangani mposa ya kolanda likita. Asengeli kolobela makambo oyo bandeko ya lisangá bakozwela yango matomba mpenza.
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
3. Diskur: Miniti 10. Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ekopesa motó ya likambo mpe plan oyo elobeli makanisi mibale to misato ya ntina mpo na lisolo yango. Lisolo yango esengeli kosalema na nkulutu to mosaleli na misala oyo ateyaka malamu. Soki tokɔti na mokanda ya sika na programɛ ya botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ, esengeli kolakisa video ya maloba ya ebandeli ya mokanda yango. Molobi akoki komonisa boyokani oyo ezali kati na video mpe motó ya likambo ya lisolo na ye. Kasi, asengeli kolobela makanisi ya ntina oyo emonisami na kati ya mokanda ya likita. Na ndenge oyo ntango ekopesa ye nzela, asengeli mpe kolobela bililingi mpe bavɛrsɛ oyo ezali na mokanda ya likita, oyo ebongisami mpo na kobakisa makanisi na lisolo yango. Akoki kolobela makambo oyo azwi na mikanda mosusu soki ekosalisa ye alobela makanisi ya ntina.
4. Tóluka biloko ya motuya ya elimo: Miniti 10. Ezali lisolo ya mituna mpe biyano, kozanga maloba ya ebandeli mpe maloba ya nsuka. Esengeli kosalema na nkulutu moko to mosaleli na misala oyo ateyaka malamu. Molobi asengeli kotuna bayangani mituna nyonso mibale. Ye moko akopona soki bavɛrsɛ oyo epesami ekotángama to te. Moto oyo azwi maloba mpo na kopesa eyano asengeli kosala yango na segɔnde 30 to na nse.
5. Botángi ya Biblia: Miniti 4. Esengeli kosalema na mwana mobali. Mwana-kelasi asengeli kotánga eteni oyo basɛngi ye atánga; akoloba eloko te na ebandeli mpe na nsuka. Prezida ya likita asengeli mingimingi kosalisa bana-kelasi báyeba kotánga malamu, kokanga ntina ya makambo oyo bazali kotánga, kokakatana na maloba te, konyata maloba ya ntina, kobongola mongongo, kopema na esika oyo ebongi, mpe koloba ndenge bameseni koloba. Lokola biteni mosusu ya botángi ya Biblia ezalaka mokuse mpe mosusu molai, mokɛngɛli ya Likita Bomoi mpe mosala asengeli kotalela makoki ya mwana-kelasi mokomoko ntango azali kopesa mokumba yango.
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
6. Miniti 15. Eteni oyo ya likita ebongisami mpo na kopesa basakoli nyonso libaku ya komibongisa mpo na mosala ya kosakola mpe kokolisa makoki na bango ya kosolola mpe makoki ya kosakola mpe koteya. Soki esengeli, bankulutu mpe bakoki kozwa badevuare ya bana-kelasi. Mwana-kelasi mokomoko asengeli kobongisa pwɛ oyo basɛngi ye na mwa buku Koteya to Lingá bato, oyo ezali na kati ya paranteze na nsuka pembeni ya motó ya likambo ya devuare na ye na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala. Ntango mosusu, devuare oyo ekosalema lokola lisolo ya mituna mpe biyano ekotyama. Devuare ya ndenge wana ekosalema na nkulutu to mosaleli na misala oyo ateyaka malamu.—Talá paragrafe 15 oyo elobeli ndenge ya kosala masolo ya lisolo na bayangani.
7. Ndenge ya kobanda lisolo: Lisolo yango ekosalema na mwana mobali to mwana mwasi. Soki esalemi na mobali, moto oyo akosolola na ye asengeli mpe kozala mobali; soki mwasi, akosolola mpe na mwasi. Ekozala bongo te soki moto oyo akosolola na ye azali ndeko na ye ya libota. Bango mibale bakoki kofanda to kotɛlɛma.—Mpo na koyeba makambo mosusu etali makambo ezali na kati mpe kadre mpo na devuare oyo, talá baparagrafe 12 mpe 13.
8. Kolandela bokoli: Lisolo yango ekosalema na mwana mobali to mwana mwasi. Soki ekosalema na mobali, moto oyo akosolola na ye asengeli kozala mobali; soki azali mwasi, akosolola mpe na mwasi. (km 6/97 lok. 2) Bango mibale bakoki kofanda to kotɛlɛma. Elakiseli ya mwana-kelasi ekomonisa makambo oyo akoloba ntango azongeli moto oyo asepelaki na lisolo oyo basololaki mbala elekaki.—Mpo na koyeba makambo mosusu etali makambo ezali na kati mpe kadre mpo na devuare oyo, talá paragrafe 12 mpe 13.
9. Kokómisa bato Bayekoli: Lisolo yango ekosalema na mwana mobali to mwana mwasi. Soki ekosalema na mobali, moto oyo akosolola na ye asengeli kozala mobali; soki azali mwasi, akosolola mpe na mwasi. (km 6/97 lok. 2) Bango mibale bakoki kofanda to kotɛlɛma. Bakosala elakiseli ya boyekoli ya Biblia oyo esilaki kobanda. Ezali na ntina te koloba maloba ya ebandeli to maloba ya nsuka, longola kaka soki basɛngi mwana-kelasi asalela toli oyo ezali kosɛnga bongo. Ezali na ntina te kotánga mpenza na mongongo makasi baparagrafe oyo bakotalela; kasi ntango mosusu bakoki kopona kotánga yango.
10. Kolimbola bindimeli na yo: Soki malako emonisi ete ekozala diskur, ekosalema na mwana mobali. Soki malako elobi ete ekozala elakiseli, ekosalema na mwana mobali to mwana mwasi. Soki ekosalema na mobali, moto oyo akosolola na ye asengeli kozala mobali; soki azali mwasi, akosolola mpe na mwasi. Ekozala bongo te soki moto oyo akosolola na ye azali ndeko na ye ya libota. Mwana-kelasi asengeli kopesa eyano ya polele mpe na mayele na motuna oyo ezali motó ya likambo mpe na kosalela makanisi na mokanda oyo epesami. Mwana-kelasi akopona ye moko soki akolobela to te esika oyo azwi makanisi oyo amonisi.
11. Diskur: Lisolo yango esengeli kosalema na ndeko mobali mpe ekosalema lokola diskur na lisangá. Soki diskur ekouta na Apɛndisi A ya mwa buku Lingá bato, mwana-kelasi asengeli komonisa ndenge oyo vɛrsɛ to bavɛrsɛ ekoki kosalelama na mosala ya kosakola. Na ndakisa, akoki kolimbola ntango nini tokoki kosalela vɛrsɛ yango, ndimbola ya vɛrsɛ, mpe ndenge nini kolimbola yango epai ya moto. Soki diskur ekouta na likanisi moko na mateya ya mwa buku Lingá bato, mwana-kelasi asengeli kolimbola ndenge nini kosalela likanisi yango na mosala ya kosakola. Akoki kolobela ndakisa oyo emonisami na likanisi 1 ya liteya to kolimbola ata vɛrsɛ nini kati na bavɛrsɛ oyo epesami, soki ekoki kosalisa.
12. Makanisi: Makambo oyo ezali na paragrafe oyo mpe paragrafe oyo elandi etaleli badevuare oyo elobeli “Kosolola na moto mbala ya liboso” mpe “Kozongela moto.” Soki liyebisi ezali te, mokano ya mwana-kelasi ezali ya koteya moto liteya moko ya Biblia oyo ebongi na moto oyo azali kosolola na ye mpe kofungola nzela mpo na kosolola lisusu mbala ya nsima. Mwana-kelasi asengeli kopona motó ya likambo oyo ebongi na ntango wana mpe ekosimba na mboka na bino. Akoki kopona soki akolakisa mokanda to video ya Bisaleli mpo na koteya. Na esika ya kosala elakiseli oyo bakangi na motó, bana-kelasi basengeli kobimisa makoki ya kosolola, na ndakisa kotyela moto likebi mpe kosolola ndenge bato basololaka.
13. Bakadre: Mwana-kelasi asengeli koyokanisa kadre oyo epesami na makambo ya mboka na bino. Na ndakisa:
(1) Ndako na ndako: Kadre oyo esangisi kosakola na baporte—ezala tokutani na moto, na telefone, to na kokoma mokanda—mpe kokoba lisolo na moto oyo tosololaki na ye na mosala ya ndako na ndako.
(2) Litatoli ya libaku malamu: Kadre oyo esɛngi kosalela mabaku nyonso ya kobongola lisolo moko na moto ekóma libaku ya kopesa litatoli. Ekoki kosɛnga komonisa ye likanisi moko euti na Biblia na bato oyo okutanaka na bango na mosala, na kartye, na motuka, to esika moko oyo osalaka makambo na yo ya mokolo na mokolo.
(3) Litatoli na bisika bato balekaka: Kadre oyo ekoki kosangisa kopesa litatoli na presentoire, kokutana na bato na esika na bango ya mosala, kopesa litatoli na balabala, to kopesa litatoli na baparkɛ, na baparkingi, to bisika mosusu oyo tokoki komona bato.
14. Kosalela bavideo mpe mikanda: Ntango mosusu, mwana-kelasi akoki kosepela kolakisa video to mokanda. Soki devuare ya moto ezali na video to ye moko asepeli kolakisa video, akoyebisa moto ete alingi kolakisa ye video mpe akosolola na ye makambo na yango, kasi akotya yango mpenza te.
BOMOI YA BAKRISTO
15. Nsima ya loyembo, eteni oyo ekozala na lisolo moko to masolo mibale na boumeli ya miniti 15, oyo ekosalisa bayangani báyeba ndenge ya kosalela Liloba ya Nzambe na bomoi na bango. Soki malako mosusu epesami te, masolo yango ekosalema na bankulutu to basaleli na misala oyo bateyaka malamu. Kasi, bamposa ya lisangá esengeli kosalema kaka na bankulutu. Soki malako emonisi ete eteni moko ekosalema lokola lisolo elongo na bayangani, ndeko oyo akosala yango akoki kotuna mituna mosusu na boumeli ya lisolo, longolá mituna oyo etunami na mokanda. Asengeli koloba maloba moke na ebandeli mpo na kotika ntango oyo ekoki mpo na kobimisa makanisi ya ntina mpe kopesa bayangani likoki ya kopesa biyano. Soki esɛngi kotuna moto mituna, soki ekoki kosalema, eleki malamu moto yango azala na estrade na esika afanda na esika na ye.
16. Boyekoli ya Biblia na lisangá: Eleka miniti 30 te. Esengeli kosalema na nkulutu moko oyo ateyaka malamu. (Na masangá oyo bankulutu bazali mingi te, basaleli na misala oyo bateyaka malamu bakoki mpe kotambwisa boyekoli yango, soki esengeli.) Lisangani ya bankulutu esengeli kopona bandeko oyo bakokisi masɛngami mpo na kotambwisa Boyekoli ya Biblia na lisangá. Bandeko oyo baponami basengeli kozala na makoki ya kotambwisa boyekoli yango malamu mpo na kotosa ngonga, kobimisa makanisi ya bavɛrsɛ oyo ezali na makanisi ya ntina, mpe kosalisa bayangani bámona ndenge ya kosalela mateya oyo bayekoli. Bandeko yango bakozwa makanisi oyo ekosalisa bango soki batángi lisusu malako oyo elobeli ndenge ya kotambwisa masolo ya mituna mpe biyano. (w23.04 lok. 24, etanda) Soki mateya nyonso oyo ezali na boyekoli mpo na pɔsɔ wana elobelami, ezali na ntina te motambwisi aluka kokɔtisa makambo mosusu kaka mpo na kokokisa ngonga. Soki likoki ezali, esengeli kopona motambwisi mosusu mpe motángi mosusu pɔsɔ na pɔsɔ. Soki prezida ya likita Bomoi mpe mosala ayebisi ndeko oyo akotambwisa boyekoli akitisa miniti, motambwisi akopona ndenge oyo akosala mpo na kokitisa miniti. Mbala mosusu akoki komona malamu ete baparagrafe mosusu etángama te.
MALOBA YA NSUKA
17. Eleka miniti 3 te. Prezida ya likita Bomoi mpe mosala akozongela na mokuse makanisi ya ntina ya likita. Asengeli mpe kolobela na mokuse makambo mpe motuna moko oyo tokotalela na pɔsɔ elandi. Soki ngonga ezali, akoki mpe kotánga bankombo ya bana-kelasi oyo bakosala masolo na pɔsɔ elandi mpo bábosana te. Soki malako mosusu epesami te, prezida akopesa mayebisi ya ntina to akotánga mikanda oyo batindeli lisangá, soki ezali. Mayebisi oyo ezongelamaka mbala na mbala, na ndakisa bibongiseli mpo na mosala ya kosakola mpe programɛ ya kotya bopɛto, esengeli kopesama na estrade te, kasi esengeli nde kotyama na etanda ya mayebisi. Soki likoki ya kopesa mayebisi ya ntina to kotánga mikanda oyo batindeli lisangá ezali te na miniti oyo epesami mpo na maloba ya nsuka, prezida akosɛnga bandeko oyo bakosala masolo na eteni Bomoi ya bakristo bákómisa masolo na bango mikuse soki esengeli. (Talá paragrafe 16 mpe 19.) Likita esengeli kosuka na loyembo mpe libondeli.
KOPESA LONGONYA MPE BATOLI
18. Nsima ya lisolo mokomoko ya bana-kelasi, prezida ya likita Bomoi mpe mosala asengeli kozwa miniti moko mpo na kopesa longonya mpe toli na liteya oyo asengeli koyekola. Ntango prezida abengi mwana-kelasi mpo na lisolo na ye, asengeli te koyebisa toli oyo basɛngi mwana-kelasi liboso mwana-kelasi abanda lisolo na ye. Nzokande, ntango mwana-kelasi akosilisa lisolo na ye, nsima ya kopesa ye longonya oyo ebongi, prezida akoki sikoyo koyebisa toli oyo basɛngaki mwana-kelasi yango mpe ntina oyo mwana-kelasi yango asaleli toli yango malamu, to koyebisa mwana-kelasi yango na boboto ntina mpe ndenge oyo asengeli kotyela lisusu toli yango likebi mbala ya nsima. Prezida ya likita akoki mpe kolobela makambo mosusu ya elakiseli yango soki amoni ete ekosalisa mwana-kelasi to bayangani. Na kotalela bamposa ya mwana-kelasi mokomoko, ekoki kosɛnga ete prezida apesa mwana-kelasi toli mosusu na nkuku, na lisalisi ya mwa buku Lingá bato, mwa buku Koteya to buku Eteyelo ya mosala, akoki kosala yango nsima ya makita to na ngonga mosusu, ezala mpo na liteya oyo bapesaki ye to liteya mosusu.—Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali mokumba ya prezida ya likita Bomoi mpe mosala mpe mokumba ya mopesi-toli mosungi, talá paragrafe 19, 24 mpe 25.
KOTOSA NGONGA
19. Esengeli te kolekisa miniti oyo epesami mpo na lisolo mokomoko, ata mpe toli ya prezida ya likita Bomoi mpe mosala. Atako Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala eyebisi ntango boni eteni mokomoko esengeli koumela, soki moto abimisi makanisi nyonso malamu, ezali na ntina te kobakisa makambo mosusu kaka mpo na kosilisa ntango oyo bakatelaki ye. Soki moto alei ngonga, prezida ya likita Bomoi mpe mosala to mopesi-toli mosungi akopesa ye toli na nkuku. (Talá baparagrafe 24 mpe 25.) Likita mobimba, ezala nzembo nyonso misato, libondeli ya ebandeli mpe ya nsuka, esengeli kosalema na boumeli ya ngonga 1 ná miniti 45.
VIZITI YA MOKƐNGƐLI YA ZONGAZONGA
20. Soki lisangá ezali na viziti ya mokɛngɛli ya zongazonga, likita ekosalema kaka ndenge Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala emonisi yango, kasi na eteni Bomoi ya bakristo, na esika ya kosala Boyekoli ya Biblia na lisangá, mokɛngɛli ya zongazonga akosala diskur ya mosala na boumeli ya miniti 30. Liboso ete diskur yango esalema, prezida ya likita Bomoi mpe mosala akosala bozongeli ya makambo oyo elobelami na likita, akoyebisa makambo oyo tokotalela na pɔsɔ elandi, akopesa mayebisi ya ntina mpe akotánga mikanda oyo batindeli lisangá, soki ezali; na nsima, akobenga mokɛngɛli ya zongazonga mpo asala diskur ya mosala. Nsima ya diskur na ye, mokɛngɛli ya zongazonga akosukisa likita na loyembo oyo aponaki. Akoki kosɛnga ndeko mosusu aya kosala libondeli ya nsuka. Na pɔsɔ ya vizite ya mokɛngɛli ya zongazonga, bakelasi mosusu esengeli kosalema te na monɔkɔ oyo lisangá esalaka makita. Kasi soki bozali na etuluku moko oyo esalaka makita na monɔkɔ mosusu, etuluku yango ekoki kosala makita na yango, ata na pɔsɔ oyo mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá mobimba. Kasi, bandeko ya etuluku yango bakozonga esika moko na lisangá mobimba mpo na kolanda diskur ya mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga.
PƆSƆ YA LIYANGANI YA ZONGAZONGA TO YA ETÚKÁ
21. Na pɔsɔ ya liyangani ya zongazonga to ya etúká, makita ekosalema te. Esengeli koyebisa bandeko ete moto na moto to libota na libota esengeli koyekola makambo oyo esengelaki kotalelama na makita ya pɔsɔ wana.
PƆSƆ YA EKANISELI
22. Soki mokolo ya Ekaniseli ekwei na mikolo ya kati ya pɔsɔ, likita Bomoi mpe mosala ekosalema te.
MOKƐNGƐLI YA LIKITA BOMOI MPE MOSALA
23. Lisangani ya bankulutu ekopona nkulutu moko oyo akozala mokɛngɛli ya likita Bomoi mpe mosala. Azali na mokumba ya kolandela soki likita yango ebongisami malamu mpe ezali kosalema na kolanda malako oyo emonisami awa. Asengeli kosololaka malamu na mopesi-toli mosungi. Soki kaka Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya sanza moko ebimi, mokɛngɛli ya likita Bomoi mpe mosala asengeli kokabola masolo ya bana-kelasi ya sanza mibale yango. Akokabola mpe masolo oyo ezali ya bana-kelasi te mpe akopona prezida ya likita ya pɔsɔ mokomoko na kati ya bandeko oyo lisangani ya bankulutu endimá mpe akokabola masolo ya bana-kelasi. (Talá baparagrafe 3 tii 16 mpe 24.) Ntango azali kokabola badevuare ya bana-kelasi, asengeli kotalela mbula ya mwana-kelasi, makambo oyo ayebi, likoki na ye ya koloba polele makambo oyo lisolo wana elobeli. Asengeli mpe kosalela bososoli ndenge wana ntango azali kokabola masolo mosusu. Esengeli kopesa bana-kelasi masolo pɔsɔ misato liboso ya mokolo oyo lisolo yango ekosalema. Esengeli kosalela Lokasa ya lisolo na likita Bomoi mpe mosala ya bakristo (S-89) mpo na kopesa bana-kelasi masolo. Mokɛngɛli ya likita Bomoi mpe mosala asengeli kolandela ete lokasa ya programɛ ya masolo nyonso etyama na etanda ya mayebisi. Lisangani ya bankulutu ekoki kopona nkulutu moko to mosaleli na misala moko mpo na kosalisaka ye. Kasi, kaka bankulutu nde basengeli kosalelama mpo na kokabola masolo oyo ezali ya bana-kelasi te.
PREZIDA YA LIKITA BOMOI MPE MOSALA
24. Pɔsɔ mokomoko, nkulutu moko akozala prezida na likita Bomoi mpe mosala. (Na masangá oyo bankulutu bazali mingi te, basaleli na misala ya makoki bakoki mpe koponama mpo na kozala baprezida, soki esengeli.) Prezida azali na mokumba ya kobongisa maloba ya ebandeli mpe ya nsuka. Akoloba mwa maloba liboso ya kobenga moto mokomoko oyo azali na lisolo. Na kotalela motángo ya bankulutu na lisangá na bino, prezida akoki mpe kosala masolo mosusu ya likita Bomoi mpe mosala. Maloba na ye liboso mpe nsima ya lisolo mokomoko esengeli kozala mpenza mokuse. Lisangani ya bankulutu nde ekopona bankulutu oyo bakokisi masɛngami mpo na mokumba yango. Bankulutu oyo baponami mpo na kozala baprezida bakobanda kosala mokumba yango moto na moto na ngala na ye. Na kotalela makambo ya lisangá na lisangá, mokɛngɛli ya likita Bomoi mpe mosala akoki kozala prezida mbala mingi koleka bankulutu mosusu oyo bakokisaka mpe mokumba yango malamu. Soki nkulutu moko akokisi masɛngami mpo na kotambwisa Boyekoli ya Biblia na lisangá, mbala mingi, akoki mpe kokokisa masɛngami mpo na kozala prezida ya likita. Kasi, tóbosana te ete nkulutu oyo azali prezida asengeli, na bolingo mpenza, kopesaka longonya mpe, soki esengeli, toli oyo ekoki kosalisa baoyo bazali kosala masolo ya bana-kelasi. Prezida azali mpe na mokumba ya kosala nyonso mpo ete likita esila na ngonga. (Talá baparagrafe 17 mpe 19.) Soki prezida alingi, mpe soki esika ezali na estrade, bakoki kotɛlɛmisa mikro mosusu na estrade mpo prezida abengaka ndeko mokomoko oyo akosala lisolo, ntango ndeko yango azali komata mpo na kotɛlɛma liboso ya pipitre. To soki mpe prezida alingi, akoki kofanda kuna na estrade ntango lisolo ya Botángi ya Biblia ezali kosalema mpe na boumeli ya eteni Omipesa na mosala ya kosakola. Yango ekoki kosala ete alekisa ntango te.
MOPESI-TOLI MOSUNGI
25. Soki likoki ezali, ezali malamu ete nkulutu oyo azali molobi malamu mpenza akokisa mokumba oyo. Mokumba ya mopesi-toli mosungi ezali ya kopesa toli na nkuku, soki esengeli, na bankulutu to basaleli na misala mpo na masolo oyo basalaka na likita Bomoi mpe mosala, badiskur ya bato nyonso, mpe kotambwisa to kotánga baparagrafe na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na Boyekoli ya Biblia na lisangá. (Talá paragrafe 19.) Soki bankulutu oyo bazali balobi mpe bateyi ya makoki bazali mingi na lisangá, mbula na mbula, mokomoko akoki kozala mopesi-toli mosungi na boumeli ya mbula mobimba. Ezali na ntina te ete mopesi-toli mosungi apesaka toli nsima ya lisolo nyonso oyo ndeko asali.
BAKELASI MOSUSU
26. Soki bana-kelasi bazali mingi, masangá ekoki kobongisa bakelasi mosusu oyo bana-kelasi bakosala masolo. Bakelasi yango esengeli kozala na mopesi-toli moko ya makoki, mpe mingimingi ekozala malamu ete azala nkulutu. Kasi, soki esengeli, mosaleli na misala ya makoki mpenza akoki kokokisa mokumba yango. Lisangani ya bankulutu nde ekopona ndeko oyo abongi mpo na kokokisa mokumba yango mpe kotalela soki esɛngi kopona bandeko oyo bakotambwisa yango moto na moto na ngala na ye. Mopesi-toli asengeli kolanda malako oyo ezali na paragrafe 18. Soki bozali na bakelasi mosusu, bakosɛnga bana-kelasi bákende na esika oyo bakelasi na bango ezali kosalema, nsima ya lisolo Tóluka biloko ya motuya ya elimo, oyo esalemaka na eteni Makambo ya motuya na Liloba ya Nzambe. Basengeli kozonga na esika na bango nsima ya lisolo ya mwana-kelasi ya nsuka.
BAVIDEO
27. Na likita oyo, tokosalela bavideo oyo etyami na mokanda ya likita. Bavideo mpo na likita ya kati ya pɔsɔ ekobanda kotyama na programɛ JW Library® mpe bandeko bakoki kozwa yango na baaparɛyi na bango.
© 2023 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
S-38-LI 11/23