Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini toswanaka ntango nyonso?

Mpo na nini toswanaka ntango nyonso?

Mokapo 2

Mpo na nini toswanaka ntango nyonso?

Na lisolo oyo ezali na ebandeli ya mokapo oyo, Rachel asali makambo misato oyo ebimisaki koswana. Omoni makambo yango? Komá biyano na yo awa na nse mpe na nsima, talá soki ekokani na oyo ezali na etanda  “Biyano” oyo ezali na lokasa 20.

․․․․․

Mokolo ya misato na mpokwa, Rachel, oyo azali na mbula 17, asilisi misala ya ndako mpe alingi kopema mwa moke. Afungoli televizyo mpe afandi na kiti.

Kaka na ngonga wana, mama na ye ayei mpe akangi elongi. “Rachel! Mpo na nini oz’olekisa ntango na kotala televizyo, na esika osalisa ndeko na yo na devuare na ye? Osalaka ata moke te makambo oyo bayebisaka yo!”

Rachel azongisi na mongongo makasi: “Abandi lisusu!”

Mama na ye apusani mpe atuni: “Olobi nini?”

Rachel abendi mpema, adongoli ye mpe alobi: “Eloko te, mama.”

Sikoyo mama na ye atomboki mpe alobi: “Kolobaka na ngai ndenge wana te!”

Rachel mpe azongisi boye: “Bongo yo oz’oloba na ngai ndenge nini?”

Kopema esili . . . koswana mosusu ebandi.

LIKAMBO ya ndenge wana ekómelaka mpe yo? Yo ná baboti na yo boswanaka ntango nyonso? Soki ezali bongo, zwá mwa ntango mpo na kotalela likambo yango. Makambo nini ebimisaka mingi matata? Tyá elembo ✔ na makambo oyo ezali awa na nse to komá makanisi na yo pembeni ya eteni oyo elobi “Makambo mosusu.”

□ Bizaleli

□ Misala ya ndako

□ Molato

□ Ngonga ya kozonga na ndako

□ Masano

□ Baninga

□ Boyokani na yo ná bana basi to ná bana mibali

□ Makambo mosusu ․․․․․

Ata soki likambo nini ebimisaka matata kati na bino, koswana esalaka ete yo baboti na yo bómiyoka mabe. Ya solo, ntango mosusu okoki kaka kokanga monɔkɔ mpe komonisa ete ozali kondima makambo nyonso oyo baboti na yo bazali koloba. Kasi, Nzambe azali kosɛnga osala bongo? Te. Biblia esɛngi yo ‘okumisa tata na yo mpe mama na yo.’ (Baefese 6:2, 3) Kasi, Biblia esɛngi yo mpe okolisa mpe osalela “makoki na [yo] ya kokanisa.” (Masese 1:1-4; Baroma 12:1) Soki osali bongo, na ntembe te okobanda koyeba makambo oyo olingaka mpe mbala mosusu yango ekokesana ná oyo baboti na yo balingaka. Nzokande, na mabota oyo basalelaka toli ya Biblia, baboti ná bana bakokaka kosolola na kimya ata ntango bayokanaka te na makambo mosusu.​—Bakolose 3:13.

Ndenge nini okoki kosolola malamu kozanga kobimisa koswana? Ezali pɛtɛɛ koloba ete: “Wana ezali likambo ya baboti na ngai. Bango nde balingaka kolandela ngai!” Kasi, kanisá naino: Okoki mpenza kobongola bato mosusu, ezala mpe baboti na yo? Mpo na koloba solo, kaka yo moko nde okoki komibongola. Mpe likambo ya malamu ezali ete soki osali oyo okoki mpo nkanda ekita, baboti na yo bakokitisa motema mpe bakoyoka yo ntango okolinga kosolola ná bango.

Sikoyo tótalela nini okoki kosala mpo otika momeseno ya koswana. Soki osaleli makanisi oyo elandi, mbala mosusu baboti na yo bakokamwa, ata mpe yo moko, mpo oyebi malamu ndenge ya kosolola.

Kanisá liboso ya koyanola. Kobimisa te likambo nyonso oyo eyeli yo na makanisi ntango batumoli yo. Na ndakisa, soki mama atuni yo ete: “Mpo na nini osukolaki basaani te? Osalaka ata moke te makambo oyo bayebisaka yo!” Okoki mbala mosusu koyanola na nkanda boye: “Mpo na nini oz’olandela ngai boye?” Kasi, salelá makoki na yo ya kokanisa. Luká koyeba soki makanisi ya mama na yo ezali mpenza nini. Mbala mingi, esengeli te kozwa maloba lokola “ntango nyonso” mpe “soki moke te” lokola likambo ya solo. Kasi, emonisi ete ezali na makambo mosusu oyo etindi ye aloba bongo. Ekoki kozala nini?

Ekoki kozala ete mama na yo azali na esengo te mpo misala ya ndako elekeli ye. Ekoki kozala ete azali na mposa ete osalisa ye. Soki ezali bongo, koloba ete “Mpo na nini oz’olandela ngai boye?” ekobota mbuma malamu te​—kutu ekobimisa nde koswana! Na yango, mpo na nini te kokitisa mama na yo motema? Na ndakisa, okoki koloba: “Mama, namoni neti osiliki. Naz’osukola basaani’ango kaka sikoyo.” Kasi, kebá: Koloba yango na ndenge ya kotyola te. Soki oyanoli na boboto, mama na yo akokitisa motema mpe akoyebisa yo likambo mpenza oyo ezali kosepelisa ye te. *

Komá awa na nse likambo moko oyo soki papa to mama na yo alobi, ekopesa yo nkanda, soki omipekisi te.

․․․․․

Sikoyo kanisá eyano moko ya boboto oyo okoki kopesa, oyo ekomonisa ete oyebi nini etindi ye aloba bongo.

․․․․․

Lobá na limemya. Makambo oyo Michelle akutanaki na yango esalisaki ye akeba na lolenge oyo alobaka na mama na ye. Alobi boye: “Ezala ata mpo na likambo nini, mama azalaki kosepela te na lolenge oyo nazalaki komatisa mongongo.” Soki ozalaka mpe na mokakatano wana, yekolá koloba malɛmbɛ mpe na mongongo ya nse mpe kodongolaka te to kosalaka te bajɛstɛ oyo ekomonisa ete ozali kosepela te. (Masese 30:17) Soki omoni ete nkanda elingi emema yo, salá libondeli ya mokuse na nse ya motema. (Nehemia 2:4) Ntina ya libondeli yango ezali te mpo na kosɛnga Nzambe apekisa baboti na yo bápesa yo nkanda, kasi nde asalisa yo mpo otya te petrole na mɔtɔ.​—Yakobo 1:26.

Komá awa na nse, maloba oyo ozalaka na mposa ya kobimisa mpe bajɛstɛ mosusu oyo olingaka kosala, kasi oyo osengeli kosala te.

Maloba oyo obimisaka:

․․․․․

Bajɛstɛ oyo osalaka (elongi na yo mpe biteni mosusu ya nzoto):

․․․․․

Yokáká. Biblia elobi boye: “Moto oyo alobaka mingi, azangaka komema ngambo té.” (Batoli [Masese] 10:19, Bible na lingala ya lelo oyo) Yango wana, salá nyonso mpo otikelaka papa to mama na yo ntango ya koloba mpe yokáká bango na likebi. Kokataka bango maloba te mpo omilongisa. Yoká kaka. Na nsima, soki basilisi koloba, okozala na likoki ya kotuna bango mituna to komonisa bango makanisi na yo. Kasi, soki ozali kaka kotingama mpo na komonisa makanisi na yo na ntango wana, okoki kobebisa makambo. Ata soki ezali na makambo mingi oyo olingi koloba, mbala mosusu wana ekoki kozala “ntango ya kofanda nyɛɛ.”​—Mosakoli 3:7.

Sɛngáká bolimbisi. Mbala mingi, ezalaka malamu kosɛnga bolimbisi mpo na likambo nyonso osalaki, oyo ebimisaki matata. (Baroma 14:19) Okoki mpe kosɛnga bolimbisi ndenge matata ebimi. Soki omoni ete ezali mpasi kokutana na moto yango mpo bósolola, meká kokoma makanisi na yo na mokanda. Na nsima, kende lisusu mosika, elingi koloba tiká ezaleli oyo ebimisaki matata. (Matai 5:41) Na ndakisa, soki koswana ebimaki mpo na likambo etali misala ya ndako, mpo na nini te kosala mosala yango kozanga ete bátinda yo? Ata soki osepelaka na mosala yango te, ekozala malamu te osala yango, na esika baboti na yo básilikela yo mpo osali mosala yango te? (Matai 21:28-31) Kanisá matomba oyo okozwa soki osali nyonso oyo okoki mpo na kokitisa matata kati na yo ná baboti na yo.

Mabota ya malamu ezalaka na matata, kasi eyebaka ndenge ya kosilisa yango na kimya. Soki osaleli batoli oyo ezali na mokapo oyo, okomona ete okoki kosolola ná baboti na yo ata makambo oyo ekoki kobimisa matata​—kozanga ete bóswana!

NA MOKAPO OYO ELANDI

Omonaka ete esengeli baboti na yo bápesa yo liberte mingi? Soki ezali bongo, okoki kosala nini?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 26 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 21 ya Volimi 2.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Moto ya bosembo akanisaka liboso ya kopesa eyano.”​—Batoli [Masese] 15:28, Bible na lingala ya lelo oyo.

TOLI

Ntango baboti na yo bazali kosolola ná yo, katá miziki, tyá buku to zulunalo oyo ozali kotánga pembeni mpe landá bango na likebi.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Kosala makasi mpo na kosilisa matata to kopekisa yango ebima ekosala ete ozala na kimya. Kutu, Biblia elobi ete “moto ya motema boboto asalelaka molimo na ye moko makambo oyo epesaka mbano.”​Masese 11:17.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Na mokapo oyo, nakosalela mingi toli oyo: ․․․․․

Namityeli mokano ya kosalela toli yango kobanda na (komá dati) ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini bilenge mosusu bamonaka ete koswana ekosala ete bábima bayuma te?

● Mpo na nini Yehova Nzambe amonaka ete moto oyo aswanaka azali zoba?​—Masese 20:3.

● Matomba nini okozwa soki ozali kokitisa matata kati na yo ná baboti na yo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]

“Na ntango mosusu, mama asɛngaka ngai bolimbisi mpe ayambaka ngai; yango ezalaka malamu mpenza. Na nsima, tobosanaka likambo oyo esalemaki. Ngai mpe namekaka kosala bongo. Kotya lolendo pembeni mpe kosɛnga bolimbisi na motema mobimba, esalisaka mpenza, atako ezalaka pɛtɛɛ te.”​—Lauren

 [Etanda na lokasa 20]

Biyano

1. Kosalela maloba ya kotyola (“Abandi lisusu!”) ezalaki nde lokola kobwaka petrole na mɔtɔ.

2. Na elongi na ye (azalaki kodongola), Rachel azalaki nde kotumola mama na ye.

3. Kopesa eyano kozanga limemya (“Bongo yo oz’oloba na ngai ndenge nini?”) ebebisaki nde makambo.

[Elilingi na lokasa 19]

Koswana na moboti ezali lokola oz’opota mbangu likoló ya tapi ya “jogging”; okobimisa mpema nyonso, kasi okokende esika moko te