Mpo na nini nabangaka kopesa litatoli na kelasi?
Mokapo 17
Mpo na nini nabangaka kopesa litatoli na kelasi?
“Nazalaki na mabaku mingi ya kolobela mateya ya lingomba na biso na kelasi. Kasi, nalekisaki yango kaka boye.”—Kaleb.
“Molakisi atunaki biso soki tokanisaka nini mpo na liteya ya evolisyo. Nayebaki ete wana ezalaki libaku moko malamu mpenza ya kolobela mateya ya lingomba na biso. Kasi, na mbala moko nabangaki makasi mpe nalobaki eloko te. Na nsima, nayokaki mabe mpenza.”—Jasmine.
SOKI ozali elenge mokristo, ntango mosusu yo mpe okoki koyoka ndenge moko na Kaleb mpe Jasmine. Ndenge moko na bango, mbala mosusu olingaka mateya ya Biblia oyo oyekolá. Okoki ata kozala na mposa ya kolobela yango epai ya basusu. Kasi, mbala mosusu likanisi ya kolobela yango ebangisaka yo mpenza. Kasi, okoki kokóma na mpiko mingi. Ndenge nini? Talelá makambo oyo elandi:
1. Luká koyeba nini ebangisaka yo. Ntango ozali kokanisa kolobela mateya ya Biblia, okoki kokanisa ete makambo ekoleka malamu te. Mbala mosusu, okoki kolongola kobanga soki ozali kolobela makambo oyo ezali kobangisa yo to okomi yango na papye.
Tondisá mondelo oyo elandi:
● Eloko oyo nazali kobanga ekoki kokóma soki nazali kolobela mateya ya lingomba na biso na kelasi: ․․․․․
Likambo oyo ekoki kokitisa yo motema, ezali ete bilenge mosusu bakristo babangaka mpe lokola yo. Na ndakisa, Christopher, oyo azali na mbula 14, alobi boye: “Nabangaka ete bilenge mosusu básɛka ngai mpe bápanza ngai nsango ete naza’ moto ya ndenge mosusu.” Mpe Kaleb, oyo tolobeli na ebandeli, alobi boye: “Nazalaki kobanga ete moto moko atuna motuna mpe nazanga eyano ya kopesa.”
2. Kokima makambo te. Makambo nyonso oyo ebangisaka yo ezangi ntina? Mpenza te. Ashley, oyo azali na mbula 20, amonaki mpe bongo. Alobi boye: “Bilenge mosusu bazalaki komonisa lokola ete bazali kosepela na mateya ya lingomba na biso oyo nazalaki koyebisa bango. Kasi, na nsima bazalaki kosalela makambo oyo nazalaki koteya bango mpo na kolobela ngai mabe, mpe bazalaki kotumola ngai na miso ya bato mosusu.” Nicole, oyo azali na mbula 17, alobaki boye: “Mwana *
mobali moko amonaki ete maloba ya vɛrsɛ moko na Biblia na ye ekesanaki na oyo ezali na Biblia na ngai. Alobaki ete babongolaki maloba yango malamu te na Biblia na ngai. Eswaki ngai mpenza! Nayebaki te naloba nini.”Makambo ya ndenge wana ekoki kobangisa mwa moke! Kasi, na esika ya kokima mikakatano ya ndenge wana, osengeli kondima yango ndenge ezali: lokola makambo oyo ekómelaka mokristo nyonso, ata mpe yo. (2 Timote 3:12) Matthieu, oyo azali na mbula 13, alobi boye: “Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakonyokwama, na yango tokoki te kokanisa ete bato nyonso bakolinga biso mpo na mateya ya Biblia oyo toyebisaka bango.”—Yoane 15:20.
3. Kanisá matomba. Moto akoki kozwa matomba na makambo ya mabe oyo ekoki kokómela ye? Amber, oyo azali na mbula 21, akanisi bongo. Alobi boye: “Ezali mpasi kolimbola mateya ya Nzambe na bato oyo bazali na limemya te mpo na Biblia. Kasi, yango esalisaka mpo oyeba mateya ya lingomba na biso malamu koleka.”—Baroma 12:2.
Zongelá lisusu molɔngɔ oyo otondisaki na likambo ya liboso. Kanisá ata matomba mibale oyo ekoki kobima na likambo yango, mpe komá yango awa na nse.
1 ․․․․․
2 ․․․․․
Likanisi: Kolobela mateya ya lingomba na yo ekoki kosala ete Masese 23:15.
baninga na yo bátungisaka yo lisusu mingi te. Ekosala ete ozala lisusu na kobanga te, osepelisa Yehova, mpe Yehova asepela na yo.—4. Omibongisa. Masese 15:28 elobi boye: “Motema ya moyengebene emanyolaka mpo na koyanola.” Longola komanyola na makambo oyo okoloba, meká kokanisa liboso mituna oyo basusu bakoki kotuna. Salá bolukiluki na makambo yango, mpe bongisá biyano oyo omoni ete ekozala mpasi te mpo na yo.—Talá tablo “Bongisá eyano na yo,” na lokasa 127.
5. Bandá lisolo. Ntango kaka okoki mpo na kolobela mateya ya lingomba na yo, ndenge nini osengeli kobanda? Okoki kopona. Na ndakisa, tokoki koloba ete koyebisa basusu mateya ya lingomba na biso ezali lokola kobɛta mai (nager): Bato mosusu bakɔtaka na mai malɛmbɛmalɛmbɛ, bamosusu bamibwakaka mbala moko. Ndenge moko mpe, okoki kobanda lisolo na likambo moko oyo ezali kosalema na mokili mpe komona mokemoke ndenge moto azali kotalela yango. Kasi soki ozali komitungisa mingi ete ekoleka malamu te, okoki komona malamu ‘omibwaka mbala Luka 12:11, 12) André, oyo azali na mbula 17, alobi boye: “Kokanisa koyebisa mateya ya lingomba na biso mpe kosala yango ezalaki ntango nyonso mpasi mpo na ngai. Kasi soki kaka lisolo ebandi, ezalaki pɛtɛɛ mpenza koleka ndenge nazalaki kokanisa!” *
moko’ na mai. (6. Zalá ekɛngɛ. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Moto ya ekenge akanisaka liboso ya kosala likambo.” (Batoli [Masese] 13:16, Bible na lingala ya lelo oyo) Ndenge kaka okomibwaka te na mai oyo ezali mozindo te, kebá ete obendanaka te na basusu na makambo ya mpambampamba. Kobosana te ete ezali na ntango ya koloba mpe ntango ya kofanda nyɛɛ. (Mosakoli 3:1, 7) Na bantango mosusu, ata Yesu aboyaki koyanola mituna mosusu.—Matai 26:62, 63.
Soki ondimi koyanola, osengeli kopesa eyano ya mokuse mpe kozala mayele. Na ndakisa, soki moninga moko ya kelasi atumoli yo boye: ‘Mpo na nini omɛlaka makaya te?’ okoki koloba boye: ‘Mpo nalingi nabebisa nzoto na ngai te!’ Na kotalela ndenge akoloba lisusu, okoki kozwa ekateli ya koyebisa ye makambo mosusu to te mpo na mateya ya lingomba na yo.
Makambo motoba oyo tolobeli na mokapo oyo ekoki kosalisa yo ‘omibongisa mpo na koloba’ na ntina na mateya ya lingomba na bino. (1 Petro 3:15) Ya solo, komibongisa elimboli te ete okobanga ata moke te. Kasi Alana, oyo azali na mbula 18, alobaki boye: “Ntango ozali kolobela mateya ya lingomba na bino kozanga ete obanga, okomiyoka lokola ete osali eloko moko ya malamu: olongoli kobanga mpe ozwi makasi ya kosala likambo oyo ekokaki koleka malamu te. Mpe soki eleki malamu, okoyoka malamu koleka! Okoyoka esengo mpo ozwaki makasi ya koloba.”
Oz’okutana na mitungisi na kelasi? Luká koyeba ndenge okoki kolonga yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 10 Babiblia mingi esalelaka maloba ndenge moko te. Kasi, babiblia mosusu ebongolami malamumalamu na kolanda minɔkɔ oyo Biblia ekomamaki na ebandeli.
^ par. 18 Talá etanda “Ndenge okoki kobanda lisolo,” na lokasa 124.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Bómibongisa ntango nyonso mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo bozali na yango, kasi bósalaka bongo na boboto mpe na limemya makasi.”—1 Petro 3:15.
TOLI
Na esika ya koyebisa baninga na yo ya kelasi nini basengeli kondima to te, lobá na kondima nyonso makambo oyo ondimaka mpe mpo na nini okanisi ete ezali mpenza bongo.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Baninga na yo mosusu ya kelasi bakoki kosepela na yo mpo okangamaka na mateya ya Biblia, kasi mbala mosusu bazali koyoka nsɔni mpo na kotuna yo na ntina etali mateya ya lingomba na biso.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Baninga ya kelasi oyo nakoki kopesa litatoli ezali [komá nkombo ata ya moto moko] ․․․․․
Lisolo to likambo oyo namoni ete ekosepelisa moto yango mingi ezali ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Ekoki kozala mpo na nini baninga na yo ya kelasi batyolaka mateya ya lingomba na bino?
● Soki ozwi ekateli ya koyebisa mateya ya lingomba na bino, mpo na nini ezali na ntina ete oloba na kondima nyonso?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 126]
“Ntango nazalaki mwana moke, nalingaki te kokesana na bana mosusu. Kasi na nsima nakómaki komona ete kondima na ngai esalaki ete nazala na bomoi ya malamu koleka. Koyeba likambo yango esalisaki ngai nalongola kobanga—esalisaki ngai namikumisa mpo na mateya ya lingomba na biso.”—Jason
[Etanda na lokasa 124]
Ndenge okoki kobanda lisolo
● “Okani kosala nini na konje?” [Nsima ya koyoka eyano, lobelá makambo oyo okani kosala, oyo etali losambo na yo, na ndakisa kokende na assemblée moko to kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola.]
● Lobelá nsango moko oyo oyoki mikolo oyo, mpe na nsima tuná boye: “Oyokaki yango? Okanisi nini mpo na yango?”
● “Okanisi ete mikakatano ya mbongo na mokili oyo [to mokakatano mosusu] ekoki kobonga? [Tiká ye apesa eyano.] Mpo na nini okanisi bongo?”
● “Osambelaka?”
● “Okanisi ete bomoi na yo ekozala ndenge nini nsima ya mbula mitano?” [Nsima ya koyoka eyano, yebisá ye makambo ya Nzambe oyo okosala.]
[Etanda na lokasa 127]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Etanda ya mituna
Bongisá eyano na yo Salá fotokopi ya lokasa oyo!
Likanisi: Talelá tablo oyo ná baboti na yo mpe ná bilenge mosusu oyo bazali bakristo. Tondisá tablo yango. Na nsima, kanisá mituna mosusu oyo baninga ya kelasi bakoki kotuna yo, mpe bongisá biyano oyo omoni ete ezali mpasi te mpo na yo.
Motuna Eyano Motuna oyo elandi Eyano
Mpo na nini → Namemyaka ekólo → Bongo okobunda → Te, mpe
okumisaka epai nafandaka, mpo na ekólo Batatoli
Politiki drapo te? kasi nasambelaka na yo te? ya Yehova
Olingaka ekólo yango te. nyonso [Témoins
na yo te? de Jéhovah] na mikili
mosusu bakondima mpe te
kozwa mandoki mpo na
kobundisa bazalani
na bango.
Mpo na nini → Nandimaka bázongisa → Bongo soki → ․․․․․
ondimaka bázongisa ngai mai to nkisi balobi ete okokufa
yo makila te? mosusu oyo ekoki soki bazongisi yo
komatisa ngai makila makila te? Nzambe
kasi makila te, mpo akolimbisa yo te?
kozongisa makila
ememaka maladi lokola
Makila sida to hépatite. Mpe
Biblia elobi ete tóboya
makila, yango wana
naboyaka ete bázongisa
ngai makila.
Ndeko na bino → Bateyaka biso → Elingi koloba → ․․․․․
wana asalaki boye mateya ya Nzambe, ete na lingomba
to boye. Mpo na kasi batindaka biso na bino moto
nini yo mpe na makasi te na moto asalaka
okoki kosala tósalela yango! oyo alingi?
Bikateli bongo te? Moto na moto
asengeli kozwa
bikateli ye moko.
Mpo na nini → Mpo na nini → ․․․․․ → ․․․․․
bondimaka asengeli kondima yango?
evolisyo te? Bato ya siansi kutu
Bozalisi bayokanaka te na
likambo yango; bango
kutu nde bato
ya mayele!
[Elilingi na lokasa 125]
Kopesa litatoli na kelasi ezali lokola kobɛta mai. Okoki kokɔta malɛmbɛmalɛmbɛ na mai—to komibwaka mbala moko!