Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu?
Mokapo 8
Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu?
“Soki nasiliki, nazalaka na mposa ya moto oyo nakoki koyebisa ye ndenge nazali koyoka. Soki nazali na mawa, nazalaka na mposa ya moto oyo akoki kokitisa ngai motema. Soki nazali na esengo, nazalaka na mposa ya kokabola yango ná moto mosusu. Mpo na ngai, kozala na baninga ezali na ntina mingi.”—Brittany.
NTANGO ozalaki mwana moke, ozalaki na mposa ya kosakana ná bana mosusu. Bazalaki wana mpo omiyoka te ete ozali yo moko. Kasi, sikoyo ozali na mposa ya baninga mpenza. Moninga azali moto oyo olekisaka kaka te
ntango ná ye, kasi oyo okoki koyebisa makambo oyo olingaka.Longola yango, Biblia elobi ete “moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Na ntembe te, boninga yango eleki mosika boninga oyo ozalaki na yango ntango ozalaki kosakana ná bana mosusu!
Likambo oyo ezali solo: Ntango ozali kokola, okokóma na mposa ya baninga oyo
1. Bazali na bizaleli ya malamu
2. Balandaka oyo Biblia elobaka
3. Bakosalisa yo osalaka malamu
Motuna: Ndenge nini okoki kozwa baninga ya lolenge wana? Tótalela likambo mokomoko.
Likambo ya 1—Bazali na bizaleli ya malamu
Oyo osengeli koyeba. Moto nyonso te oyo amibengaka moninga na yo nde azali moninga ya solosolo. Kutu, Biblia elobi ete “baninga mosusu balukaka kosalana mabe.” (Masese 18:24) Maloba yango ekoki komonana lokola ete eleki ndelo. Kasi, kanisá naino: Osilá kozala na “moninga” moko oyo alyelaki yo? To osilá kozala na moninga oyo azalaki kotɔnga yo to kopanza yo bansango ya lokuta? Makambo ya ndenge wana ekoki kotinda yo otyelaka lisusu baninga na yo motema te. * Kobosanaka te ete kozala na baninga ya malamu eleki kozala na baninga mingi.
Oyo okoki kosala. Poná baninga oyo bazali na bizaleli oyo okoki komekola.
“Moto nyonso alobaka malamu mpo na moninga na ngai Fiona. Nalingi bálobaka mpe malamu mpo na ngai. Nalingi nayebana lokola ye. Mpo na ngai, ezali malamu bongo.”—Yvette, azali na mbula 17.
Meká kosala boye.
1. Tángá Bagalatia 5:22, 23.
2. Omituna boye: ‘Baninga na ngai bamonisaka bizaleli oyo ezali na kati ya “mbuma ya elimo”?’
3. Komá awa na nse bankombo ya baninga na yo ya motema. Pembeni ya nkombo mokomoko, komá ezaleli oyo moto yango amonisaka mpenza.
Nkombo Ezaleli
․․․․․ ․․․․․
Likanisi: Soki kaka bizaleli ya mabe nde ezali koyela yo na makanisi, ekoki kozala ntango ya koluka baninga mosusu ya malamu!
Likambo ya 2—Batosaka mitinda ya Biblia
Oyo osengeli koyeba. Soki ozali na mposa kaka ozwa baninga, okoki kondima ata baninga ya malamu te. Biblia elobi boye: “Ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” (Masese 13:20) Na vɛrsɛ yango, liloba “bazoba” elimboli te bato oyo bazwaka bapwɛ ya malamu te na kelasi to oyo bazangi mayele. Kasi, ezali nde bato oyo baboyaka kondima toli ya malamu mpe balandaka etamboli ya mabe. Ebongi te kozala na baninga ya ndenge wana!
Oyo okoki kosala. Na esika ya kozala moninga ya moto nyonso oyo akondima yo, osengeli koponaka. (Nzembo 26:4) Yango elingi koloba te ete osengeli kokaniselaka basusu mabe. Na likambo oyo, kopona elimboli ete osengeli kozala na mayele ya ‘komona bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asaleli ye te.’—Malaki 3:18.
“Nazali na botɔndi mingi ndenge baboti na ngai basalisaki ngai nazwa baninga—bato ya mbula na ngai oyo batosaka mitinda ya Biblia.”—Christopher, azali na mbula 13.
Pesá biyano na mituna oyo elandi:
Ntango nazali ná baninga na ngai, nabangaka ete bakoki kotinda ngai nasala likambo moko oyo nayebi ete ezali mabe?
□ Ɛɛ
□ Te
Nabangaka kolakisa baninga na ngai epai ya baboti na ngai mpo namonaka ete bakosepela na bango te?
□ Ɛɛ
□ Te
Likanisi: Soki biyano na yo na mituna yango ezali ɛɛ, luká baninga oyo batosaka mitinda oyo eleki malamu, elingi koloba baoyo bamonisaka bizaleli malamu ya bakristo.
Likambo ya 3—Bakosalisa yo osalaka malamu
Oyo osengeli koyeba. Biblia elobi boye: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakorinti 15:33) Elenge moko na nkombo Lauren alobi boye: “Bana-kelasi na biso bazalaki kondima ngai kaka soki nazalaki kosala makambo oyo bazalaki kotinda ngai. Nazalaki komiyoka ete nazali kaka ngai moko, yango wana, nandimaki kosala lokola bango mpo bándima ngai.” Lauren amonaki ete ntango ondimi kosala makambo oyo basusu bazali kotinda yo, okokóma lokola pion ya dame, mpe bakotambwisatambwisa yo ndenge balingi. Ebongi te básalaka yo bongo!
Oyo okoki kosala. Kabwaná ná baninga oyo bazali kotingama kaka obongwana mpo okóma lokola bango. Soki osali bongo, mbala mosusu okozala na baninga mingi te; kasi okomiyoka malamu, mpe okozala na libaku ya kozwa baninga ya malamu koleka—baninga oyo bakosalisa yo osalaka malamu.—Baroma 12:2.
“Clint, moninga na ngai ya motema, azalaka na bososoli mpe ayebaka komitya na esika ya basusu, yango wana alendisaka ngai mingi.”—Jason, azali na mbula 21.
Omituna mituna oyo elandi:
Nabongolaka lolenge na ngai ya kolata, koloba, to kosala makambo kaka mpo na kosepelisa baninga na ngai?
□ Ɛɛ
□ Te
Nakendaka bisika oyo bato basalaka makambo ya mbindo, epai nakoki kokende te soki nazalaki ná baninga na ngai te?
□ Ɛɛ
□ Te
Likanisi: Soki oyanoli ɛɛ na mituna yango, sololá ná baboti na yo to ná mokóló moko mpo na kosɛnga ye toli. Soki ozali Motatoli ya Yehova [Témoin de Jéhovah], okoki mpe kosolola ná nkulutu moko mpe koyebisa ye ete ozali na mposa asunga yo mpo na kopona baninga oyo bakosalisa yo osala malamu.
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 9, NA VOLIMI 2
Moninga na yo moko ya nkombo mpamba—to mbala mosusu motema na yo—azali kotinda yo osala makambo ya mabe? Luká koyeba ndenge oyo okoki koboya!
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 12 Ezali solo ete moto nyonso asalaka mabunga. (Baroma 3:23) Na yango, ntango moninga moko asali yo mabe, mpe na nsima ayoki mpenza mawa, kobosana te ete “bolingo ezipaka ebele ya masumu.”—1 Petro 4:8.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.”—Masese 18:24.
TOLI
Soki ozali kolanda makambo oyo Biblia elobaka, na ntembe te, bato mosusu oyo bazali mpe kosala bongo bakokangama na yo. Bakozala baninga ya malamu mpenza mpo na yo!
OYEBAKI YANGO . . . ?
Nzambe aponaponaka te, kasi atalaka malamumalamu ‘nani akoki koyamba na hema na ye.’—Nzembo 15:1-5.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Mpo nazwa baninga ya malamu, nako ․․․․․
Bato mosusu oyo bazali mikóló na ngai oyo nakolinga bákóma baninga na ngai ezali ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Bizaleli nini olukaka epai ya moninga, mpe mpo na nini?
● Bizaleli nini osengeli kobongisa mpo ozala moninga ya malamu?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 60]
“Ntango baboti na ngai bapekisaki ngai kozala na groupe moko boye ya baninga, nalobaki na nse ya motema ete kaka bango nde bakokaki kozala baninga na ngai. Kasi, toli ya baboti na ngai ezalaki malamu, mpe ntango kaka nakanisaki malamu na toli yango, namonaki ete nakokaki kozwa ebele ya baninga mosusu ya malamu.”—Cole
[Etanda na lokasa 61]
Meká makanisi oyo
Sololá ná baboti na yo na likambo etali baninga. Tuná bango báyebisa yo lolenge ya baninga oyo bazalaki na yango ntango bazalaki na mbula na yo. Bayokaka mawa mpo na baninga oyo baponáká? Soki ezali bongo, mpo na nini? Tuná bango báyebisa yo ndenge okoki kosala mpo okutana te na mikakatano oyo bakutanaki na yango.
Lakisá baninga na yo epai ya baboti na yo. Soki ozali kobanga mpo na kosala yango, omituna boye: ‘Mpo na nini?’ Baninga na yo bazali nde na bizaleli to basalaka makambo oyo oyebi ete baboti na yo bakosepela na yango te? Soki ezali bongo, ekosɛnga oyeba kopona baninga ya malamu.
Yebáká koyoka. Monisá ete otyaka likebi na bolamu ya baninga na yo.—Bafilipi 2:4.
Limbisáká. Kolukaka te ete basusu bázala bato ya kokoka. “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.”—Yakobo 3:2.
Tikeláká bango ntango. Osengeli te kokangama ntango nyonso na moninga na yo. Baninga ya malamu bakozala wana ntango okozala na mposa na bango.—Mosakoli 4:9, 10.
[Elilingi na lokasa 63]
Ntango ondimi kosala makambo oyo basusu bazali kotinda yo, okokóma lokola “pion” ya dame, mpe bakotambwisatambwisa yo ndenge balingi