MOKAPO YA ZOMI NA MISATO
Soki libala elingi kopanzana
1, 2. Ntango libala lizali na mikakatano, motuna nini mosengeli kotunama?
NA 1988, Lucia, mwasi moko ya mboka Italie atungisamaki mingi na makanisi. * Nsima ya mibu zomi libala na ye likufaki. Mbala mingi amekaki kozongisa boyokani kati na ye mpe mobali na ye, kasi yango elóngaki te. Na yango bakabwanaki na ntina na kozanga boyokani oyo ezalaki kati na bango mpe mwasi oyo asengelaki sikawa kobɔkɔla bana na ye mibale ya basi ye moko. Kokanisáká ntango yango, Lucia amikundoli ete: “Nandimisamaki ete eloko moko te ekokaki kobatela libala na biso.”
2 Soki ozali na mikakatano kati na libala, okoki kososola mayoki oyo Lucia azalaki na yango. Mobulu ekoki kokɔta kati na libala na yo mpe okoki komituna soki yango ekoki bobele kobatelama. Soki ezali bongo, okosepela kotalela motuna oyo: Nazali kolanda batoli nyonso oyo Nzambe azali kopesa kati na Biblia mpo na kosalisa ete libala elónga?—Nzembo 119:105.
3. Atako koboma mabala esili kopalangana mingi, nini eyebisami na ntina na mayoki ya bato mingi oyo babomá mabala mpe mabota na bango?
3 Ntango mikakatano miyei makasi kati na mobali mpe mwasi, koboma libala ekoki komonana lokola mwango ya malamu na kolanda. Kasi atako mikili mingi misili komona bokóli ya mabota oyo makabwani, boyekoli oyo bouti kosalema kala mingi te emonisi ete motángo monene ya mibali mpe basi oyo babomaki libala bazali koyoka mawa ndenge bakabwaná. Mingi kati na bango bazali konyokwama na mikakatano mitali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, na mosuni mpe na makanisi, koleka baoyo batikalaki bobele kati na mabala na bango. Mobulungano mpe kozanga esengo ya bana oyo baboti babomá libala eumelaka bambula mingi. Baboti mpe baninga ya libota oyo likabwani bayokaka mpe mpasi yango. Mpe ezali boni mpo na lolenge oyo Nzambe, Mobandisi ya libala, azali kotalela likambo yango?
4. Lolenge nini mikakatano kati na libala mikoki kosilisama?
4 Lokola tomonaki yango na mikapo ya liboso, mokano ya Nzambe ezalaki ete libala ezala ekanganeli ya libela. (Genese 2:24) Na bongo, mpo na nini mabala mingi mazali kokufa? Yango ekoki kosalema na mbalakaka te. Mbala mingi ezalaka na bilembo oyo bimonisaka yango. Mikakatano mikemike kati na libala mikoki kokóma makasi kino komonana ete mikoki kolóngama te. Kasi soki mikakatano yango mibongisami nokinoki na lisalisi ya Biblia, mbɛlɛ kobomama ya mabala mingi ekokaki kopɛngolama.
ZALÁ NA MAKANISI MALONGOBANI
5. Ezalela nini elongobani oyo esengeli komonana na mabala nyonso?
5 Eloko oyo mbala mosusu ememaka mikakatano ezali bilikya bilongobani te oyo mobalani moko to bango nyonso mibale bakoki kozala na yango. Babúku oyo elobelaka masoló ya lolango, bazulunalo oyo eyebani mingi, baemisyó ya televizyó, mpe bafilime ekoki kobimisa bilikya mpe ndɔ́tɔ oyo ekeseni mpenza na lolenge makambo mazalaka solo kati na bomoi. Ntango ndɔ́tɔ wana ekokisami te, moto akoki kozala na mayoki ete akosami, na mayoki ya kozanga bosepeli, ata mpe komilelalela. Kasi, lolenge nini bato mibale oyo bazangi kokoka bakoki kozwa bolamu kati na libala? Mpo na kozala na boyokani ya malamu, yango esɛngaka milende.
6. (a) Likanisi nini ya bokatikati na ntina na libala Biblia ezali kopesa? (b) Wapi mwa bantina ya kwɔkɔsɔ kati na libala?
6 Biblia ebongi mpenza. Elobeli bisengo oyo bizalaka kati na libala, kasi lisusu ekebisi ete baoyo bazali kobala “bakozala na mpasi na nzoto.” (1 Bakolinti 7:28) Lokola tosili komonisa yango, mobali mpe mwasi bazali bato bazangi kokoka mpe bakweaka na masumu. Makanisi na bango mpe mayoki na bango mpe lolenge moko na moko kati na babalani abɔkwamaki ekeseni. Babalani mbala mosusu bazangaka koyokana na ntina na mosolo, na ntina na bana, mpe na ntina na bakiló. Kozanga ntango ya kosala makambo elongo mpe mikakatano na makambo matali kosangisa nzoto ekoki mpe kozala eutelo ya kozanga boyokani. * Esɛngaka ntango mpo na kosilisa mikakatano motindo wana, kasi ata bongo, zalá na mpiko! Babalani mingi bazali kolónga mikakatano wana mpe bazali kopesana mabɔkɔ mpo na kosilisa yango na lolenge ya malamu.
BÓLOBELANAKA MIKAKATANO
7, 8. Soki matáta to kozanga boyokani ezali kati na babalani, Makomami mamonisi nini mpo na kosilisa yango?
7 Mingi bakakatanaka mpo na kofanda nyee ntango bazali kolobelana mayoki ya makasi, makambo oyo bazali koyokana na yango te, to mabungá ya moto na moto. Na esika ya koloba na polele nyonso ete: “Nakanisi ozali koyoka ngai te,” mobalani moko akoki kosilika mpe koyeisa likambo yango makasi. Mingi bakoloba ete: “Ozali komibanzabanza bobele mpo na yo moko,” to, “Olingaka ngai te.” Mpo na kokima koswana, mobalani mosusu akoki mbala mosusu koboya koyanola.
8 Lolenge malamu ya kosala ezali bongo ya kolanda toli oyo ya Biblia: “Bóyoka nkanda, nde na lisumu te; tiká te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino.” (Baefese 4:26) Babalani mibale oyo bazali na esengo, oyo bakómaki na mibu 60 ya libala na bango, batunaki bango sɛkɛlɛ́ ya kolónga na bango kati na libala. Mobali alobaki ete: “Toyekolaki ete tosengeli te kolala kozanga ete tósilisa mikakatano na biso, ata ya mike ndenge nini.”
9. (a) Nini emonisami kati na Makomami lokola likambo ya ntina mpo na kosolola? (b) Babalani basengeli mpenza kosala nini, ata soki yango ezali kosɛnga mpiko mpe komikitisa?
9 Ntango mobali mpe mwasi bazali na mwa kwɔkɔsɔ, moko na moko asengeli “azala na koyoka noki nde aloba malɛmbɛ; ayoka mpe nkele malɛmbɛ lokola.” (Yakobo 1:19) Nsima na koyoka na likebi nyonso, babalani mibale bakoki komona ntina ya kosɛngana bolimbisi. (Yakobo 5:16) Kolobáká na bosembo nyonso ete, “Nayoki mawa mingi ndenge nasaleli yo mabe,” esɛngaka komikitisa mpe mpiko. Kasi kosilisa mikakatano na lolenge wana ekozala malamu mpo na kosalisa mobali mpe mwasi ete básilisa bobele mikakatano na bango te kasi lisusu ete bákólisa boyokani mpe boninga oyo ekosala ete bázala na bosepeli mingi na kozala elongo.
KOPESA NA MOBALANI LOTÓMO NA YE KATI NA LIBALA
10. Libateli nini Paulo amonisaki epai na baklisto ya Kolinti oyo ekoki kosalelama lelo epai na moklisto?
10 Ntango ntoma Paulo akomelaki Bakolinti, asɛngaki bango ete moto na moto azala na mobalani na ye ‘mpo ete pite ezalaki mingi.’ (1 Bakolinti 7:2) Mokili ya lelo ekokani na Kolinti ya kala, to mpe ebebi mpenza mingi koleka. Masoló ya mbindo oyo bato ya mokili bazali kolobela na polele nyonso, kolata na ndenge ya kozanga bopɔlɔ, mpe masoló ya kolamwisa mposa ya nzoto oyo etondi na bazulunalo mpe babúku, na televizyó, mpe na bafilime, nyonso wana ezali kolamwisa mposa mabe ya kosangisa nzoto. Epai na Bakolinti oyo bazalaki kofanda na ezingelo motindo wana, ntoma Paulo alobaki ete: “Kobalana eleki malamu na kozika na mposa.”—1 Bakolinti 7:9.
11, 12. (a) Eloko nini mobali mpe mwasi basengeli kopesana, mpe na elimo nini yango esengeli kopesama? (b) Lolenge nini makambo makoki kobongisama soki eloko oyo ekoki kopesama kati na libala esengeli kopimelama mpo na mwa ntango moke?
11 Na yango, Biblia esɛngi na baklisto oyo babali ete: ‘Mobali apesa mwasi lotómo na ye mpe bongo mwasi apesa mobali lotómo na ye.’ (1 Bakolinti 7:3) Tomoni ete likambo lilobelami mingi awa ezali ya kopesa—kasi ya kosɛnga te. Kosangisa nzoto kati na libala ezali mpenza kopesa bosepeli bobele soki moko na moko kati na babalani azali komibanzabanza mpo na bolamu ya mosusu. Na ndakisa, Biblia esɛngi na mibali ete báfanda na basi na bango “engebene boyebi.” (1 Petelo 3:7, NW) Yango ezali mpenza solo mpo na kopesa mpe kozwa lotómo ya mobalani kati na libala. Soki osaleli mwasi makambo na boboto te, akoki kozala na mokakatano mpo na kosepela na likambo wana litali libala.
12 Ezali na bantango oyo babalani bakoki kopimelana lotómo ya mobalani kati na libala. Yango ezali solo mpo na mwasi na bileko mosusu ya sanza to ntango azali koyoka ete alɛmbi. (Kokanisá na Levitike 18:19.) Ekoki mpe kozala solo mpo na mobali ntango azali na mokakatano moko makasi na mosala mpe alɛmbi na mayoki. Makambo wana ya kopimelana oyo ekoki kati na libala mpo na mwa ntango ekozala malamu soki babalani mibale balobani likambo yango polele mpe “bandimi yango bango mibale.” (1 Bakolinti 7:5, NW) Yango ekopekisa moko na babalani kozwa makanisi ya mabe. Nzokande, soki mwasi azali na nkó nyonso kopimela mobali na ye oyo ekoki na ye kati na libala to soki mobali azali na nkó nyonso kopimela mwasi na ye oyo ekoki na ye kati na libala na lolenge ya bolingo, mobalani mosusu akoki mbala mosusu kokwea na kolengolama. Na likambo motindo wana, mikakatano mikoki kobima kati na libala.
13. Lolenge nini baklisto bakoki kosala mpo na kobatela makanisi na bango pɛto?
13 Lokola baklisto nyonso, basaleli ya Nzambe oyo basilá kobala basengeli kopɛngola kotánga mikanda oyo mizali kolakisa bolumbu ya mibali mpe ya basi, mikanda oyo mikoki kolamwisa bamposa ya mbindo mpe oyo elongobani te. (Bakolose 3:5) Basengeli mpe kobatela makanisi na bango mpe etamboli na bango ntango bazali elongo na basi to na mibali mosusu. Yesu akebisaki ete: “Ye nani akotala mwasi na mposa mabe na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.” (Matai 5:28) Na kosaleláká batoli ya Biblia na makambo matali kosangisa nzoto, babalani bakozala na likoki ya kopɛngola kokwea na kolengolama mpe kosala ekobo. Bakoki kokóba kosepela na kosangisa nzoto na libala, likambo oyo litalelami na motuya lokola likabo malamu liuti epai na Mobandisi ya libala, Yehova.—Masese 5:15-19.
NTINA OYO BIBLIA ENDIMI MPO NA KOBOMA LIBALA
14. Ezalela nini ya mabe ebimaka mbala mosusu yango moko? Mpo na nini?
14 Na esengo nyonso, kati na mabala mingi ya baklisto, mikakatano nyonso oyo mibimaka mikoki kosilisama. Kasi, na bantango mosusu, esalemaka bongo te. Lokola bato bazangi kokoka mpe bazali kobika kati na mokili ya masumu oyo eyangelami na Satana, mabala mosusu makómaka pene na kobomama. (1 Yoane 5:19) Lolenge nini baklisto basengeli kosala liboso na ezalela wana ya mpasi?
15. (a) Wapi ntina bobele moko oyo endimami na Makomami mpo na koboma libala mpe kozala na likoki ya kobala lisusu? (b) Mpo na nini bamoko bazwaki ekateli ya koboma libala te na mobalani oyo azangaki sembo?
15 Lokola yango elobelamaki na Mokapo 2 ya búku oyo, pite nde ezali ntina bobele moko endimami na Makomami mpo na koboma libala mpe kozala na likoki ya kobala lisusu. * (Matai 19:9) Soki ozali na elembeteli ya solosolo ete mobalani na yo asili komitambwisa na kozanga sembo, na bongo ozali liboso ya ekateli moko makasi. Okokóba kobatela libala to okoboma yango? Mibeko mizali mpo na yango te. Baklisto mosusu basili mpenza kolimbisa mobalani oyo abongoli solo motema, mpe na yango babatelaki libala na bango. Basusu bazwaki ekateli ya koboma libala te na ntina na bana.
16. (a) Wapi mwa makambo oyo mapusaki bamoko na koboma libala na bango na mobalani oyo asali lisumu? (b) Ntango mobalani oyo asalelami mabe azwi ekateli ya koboma libala to koboma yango te, mpo na nini moto moko te asengeli kotɔ́nga ekateli na ye?
16 Epai mosusu, likambo wana ya lisumu likoki komema na kozwa zemi to na kozwa maladi oyo epesamaka na kosangisa nzoto. To mbala mosusu bana basengeli kobatelama na moboti oyo akoki kobebisa bango na kosangisa nzoto. Ya solo, makambo mazali mingi oyo masengeli kotalelama liboso ya kokamata ekateli. Nzokande, soki oyebi ete mobalani na yo asali ekobo mpe na nsima osangisi nzoto elongo na ye, yango emonisi ete olimbisi mobalani na yo mpe ete ozali na mposa ya kokóba kofanda elongo na ye kati na libala. Motifi mondimami na Makomami mpo na koboma libala ezali lisusu te. Moto moko te asengeli komikɔtisa na likambo yango mpe komeka kozala na bopusi likoló na ekateli na yo, moto moko mpe te asengeli kotɔ́nga ekateli oyo yo okozwa. Ekosengela na yo kondima mbuma ya ekateli na yo. “Moto na moto akomema bozito na ye moko.”—Bagalatia 6:5.
BANTINA YA KOKABWANA
17. Soki ezali pite te, makambo nini Makomami mapesi nzela mpo na kokabwana to koboma libala?
17 Ezali na makambo oyo makoki kopesa nzela na kokabwana to mbala mosusu koboma libala ata soki mobalani asali pite te? Ɛɛ, kasi na makambo motindo yango, moklisto azali na lotómo te ya koluka moto mosusu mpo na kobalana na ye. (Matai 5:32) Biblia, atako epesi nzela na kokabwana motindo wana, elobi ete moto oyo akabwani asengeli “atikala kozanga mobali soko azongi na mobali na ye te.” (1 Bakolinti 7:11) Wapi mwa ndambo ya makambo minene oyo makoki kopesa nzela na kokabwana?
18, 19. Wapi mwa makambo mosusu ya mpasi oyo makoki komema mobalani na kotalela likoki ya kokabwana to koboma libala, atako kobalana lisusu ekoki kosalema te?
18 Libota ekoki kozanga biloko bisengeli na yango na ntina na bopɔtu monene mpe mimeseno mabe ya mobali. * Akoki kobebisa mosolo ya libota na masano ya mbongo to kosalela yango mpo na kosomba bilangwiseli to masanga makasi. Biblia elobi ete: “Soko moto nani akoleisa . . . bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.” (1 Timoté 5:8) Soki mobali motindo wana aboyi kobongola ezaleli na ye, mbala mosusu ata kokokisa bamposa na ye ya mabe na kokamatáká mosolo ya mwasi na ye, mwasi akoki kopona komibatela mpe kobatela bana na ye na kosɛngáká ete bákabwana na boyokani na mibeko.
19 Likambo motindo wana oyo eyokani na mibeko ekoki kotalelama soki mobalani moko azali mpenza konyokola makasi mobalani mosusu, mbala mosusu kobɛta ye kino kolɔngɔ́nɔ́ na ye ya nzoto mpe ata bomoi na ye ekómi na likámá. Lisusu, soki mobalani moko azali ntango nyonso kopusa mobalani mosusu ete abuka mibeko ya Nzambe na makambo mosusu, mobalani oyo azali komona mpasi akoki mpe kokanisa kokabwana na ye, mingimingi soki makambo makómi kotya bomoi ya elimo na likámá. Mobalani oyo azali na likámá akoki kosukisa na koloba ete lolenge bobele moko ya malamu mpo na “kotosa Nzambe liboso na kotosa bato” ezali ya kosɛnga kokabwana oyo endimami na mibeko.—Misala 5:29.
20. (a) Ntango libota moko likabwani, baninga bakɔmɛli mpe bankulutu bakoki kosala nini, mpe basengeli te kosala nini? (b) Babalani basengeli te kosalela mitindá ya Biblia mpo na kokabwana mpe koboma libala lokola mwango ya kosala nini?
20 Na makambo nyonso maleki ndelo oyo mobalani moko azali konyokola mobalani mosusu, moto moko te asengeli kopusa mobalani oyo asalelami mabe na kokabwana to na kofanda elongo na mobalani mosusu. Atako baninga oyo bakɔmɛli mpe bankulutu bakoki kopesa lisalisi mpe batoli oyo euti na Biblia, bakoki mbala mosusu koyeba te makambo nyonso mazali koleka kati na mwasi mpe mobali. Bobele Yehova nde akoki komona yango. Ya solo, mwasi moklisto akokumisa te Nzambe lokola mobandisi ya ebongiseli ya libala soki azali koluka makambo ya mpambampamba mpo na koboma libala. Kasi soki likambo moko ya likámá makasi ezali sé koumela, moto moko te asengeli kotɔ́nga ye soki aponi kokabwana na mobali na ye. Esengeli mpe kozala bobele bongo mpo na mobali moklisto oyo alingi kokabwana na mwasi na ye. “Biso nyonso tokotɛlɛma liboso na esambiselo na Nzambe.”—Baloma 14:10.
LOLENGE LIBALA MOKO OYO EKABWANAKI EBIKISAMAKI
21. Eksperiansi nini emonisi ete batoli ya Biblia ezali mpenza kobota mbuma?
21 Sanza misato na nsima Lucia, oyo tolobelaki na ebandeli, akabwanaki na mobali na ye, akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe abandaki koyekola Biblia elongo na bango. Alimboli ete: “Nakamwaki mingi na komona ete Biblia ezali kopesa myango mibongi mpo na kosilisa mikakatano na ngai. Bobele nsima na koyekola na boumeli ya pɔ́sɔ moko, nalukaki nokinoki koyokana na mobali na ngai. Lelo oyo nakoki koloba ete Yehova ayebi lolenge ya kobikisa mabala na ntango ya mpasi mpamba te mateya na ye mazali kosalisa babalani na koyekola lolenge ya komonisa bolingo moko epai na mosusu. Likambo oyo ete Batatoli ya Yehova bakabolaka mabota, lokola bamoko balobaka yango, ezali solo te. Mpo na oyo etali ngai, bayeisaki nde boyokani na libota na ngai.” Lucia ayekolaki lolenge ya kosalela mitindá ya Biblia kati na bomoi na ye.
22. Babalani nyonso basengeli kotya elikya na nini?
22 Ezali bobele Lucia ye moko te. Libala esengeli kozala lipamboli, kasi eloko ya bozito te. Mpo na yango, Yehova asili kopesa liziba lileki malamu ya batoli ekomamá na makambo matali libala—Liloba na ye ya motuya mingi. Biblia ekoki kopesa “[mayele] epai na ye oyo azangi yango.” (Nzembo 19:7-11) Esili kobikisa mabala mingi oyo makómaki pene na kokabwana mpe esili kobongisa mabala mingi mosusu oyo mazalaki na mikakatano makasi. Tiká ete babalani nyonso bátya elikya kati na batoli ya libala oyo Yehova Nzambe azali kopesa. Yango ezali mpenza kobota mbuma malamu!
^ Wana ezali nkombo na ye ya solo te.
^ Mwa ndambo na mikakatano yango milobelamaki na mikapo mizali liboso.
^ Liloba ya Biblia oyo libongolami na “pite” esangisi ekobo, kosangisa nzoto mibali na mibali, kosangisa nzoto na banyama, mpe mitindo misusu mabe ya kosangisa nzoto na nkó nyonso.
^ Yango esangisi te makambo oyo kati na yango mobali, azali na makanisi malamu, kasi azali na makoki te mpo na kosunga libota na ye mpo na bantina oyo eleki nguya na ye, na ndakisa mpo ete azali na bokɔnɔ to mpo ete azali kozwa mosala te.