MOKAPO YA ZOMI NA MINEI
Wana bokómi mibangé
1, 2. (a) Mbongwana nini emonanaka wana bobangé ezali kobɛlɛma? (b) Lolenge nini mibali oyo bazalaki kobanga Nzambe na ntango ya kala balekisaki malamu bobangé na bango?
MBONGWANA esalemaka wana tozali kokóma mibangé. Kolɛmba ya nzoto ebebisaka nguya na biso. Komitala na talatála ekomonisa manyúnyúku ya sika na elongi mpe kobungisa mokemoke lángi ya nsuki—ata mpe kobungisa nsuki. Tokoki kobanda kobosana makambo. Boyokani ya sika esalemaka ntango bana babali, mpe lisusu ntango bana na bino baboti oyo ya bango bana. Mpo na bato mosusu, kobima epasó na mosala epesaka nzela na kosala misala mikeseni kati na bomoi.
2 Ya solo, bobangé ekoki kozala na mikakatano. (Mosakoli 12:1-8) Kasi, tótalela basaleli ya Nzambe na ntango ya kala. Atako basukaki na kokufa, bazwaki mayele mpe bososoli, oyo epesaki bango bosepeli mingi na ntango bakómaki mibangé. (Genese 25:8; 35:29; Yobo 12:12; 42:17) Lolenge nini balóngaki na kozala na esengo ata ntango bakómaki mibangé? Mpo na koloba solo, ezali mpo ete bazalaki komitambwisa na boyokani na mitindá oyo tozali kokuta lelo kati na Biblia.—Nzembo 119:105; 2 Timoté 3:16, 17.
3. Toli nini Paulo apesaki epai na mibangé mibali mpe epai na mibangé basi?
3 Kati na mokanda oyo atindelaki Tito, ntoma Paulo apesaki toli ya malamu epai na baoyo bakómi mibangé. Akomaki ete: “Tiká ete mibangé mibali bázala bato na kokanga motema, bato na sembo na bozito, basembwi, bakembi mpo na kondima, na bolingo, na etingya. Tiká ete mibangé basi bázala mpe na etambweli na bulɛɛ, kowelana te. Bámipesa lokola baombo na vinyo te; bázala balakisi na makambo malamu.” (Tito 2:2, 3) Kolanda maloba oyo ekoki kosalisa yo na kolónga mikakatano oyo mibimaka na ntango ya bobangé.
KOMIYOKANISA NA LIPANDÁ YA BANA NA YO
4, 5. Baboti mingi bazalaka na mayoki nini ntango bana na bango batiki ndako, mpe lolenge nini basusu bayokanisaka bomoi na bango na ezalela na bango ya sika?
4 Mbongwana ya mikumba esɛngaka koyeba komiyokanisa na makambo. Yango ezali mpenza solo ntango bana oyo bazali mikóló batiki ndako mpe babali! Mpo na baboti mingi yango ezali elembo ya liboso oyo ezali kokundwela bango ete babandi kokóma mibangé. Atako bazali na esengo ete bana na bango basili kokóma mikóló, mbala mingi baboti bamitungisaka mpo na koyeba soki basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na kobongisa bana ete bázala na lipandá. Mpe bakoki koyoka mawa mpo ete bazali lisusu elongo na bango te.
5 Na bosembo nyonso, baboti balandaka komibanzabanza mpo na bolamu ya bana na bango, ata ntango bana batiki ndako. Mama moko alobaki ete: “Soki nazali bobele koyoka nsango na bango, mbala mingi, koyeba ete bango nyonso bazali malamu—yango epesaka ngai esengo.” Tata moko alobi ete: “Ntango mwana na biso ya mwasi atikaki ndako, ezalaki ntango moko ya mpasi. Yango etikaki libulu moko monene kati na libota na biso mpamba te tozalaki na momeseno ya kosala makambo nyonso esika moko.” Lolenge nini baboti wana balóngaki mawa ya kozanga kozala elongo na bana na bango? Na makambo mingi, na komibanzabanza mpo na bato mosusu mpe na kosalisa bango.
6. Makambo nini mazali kosalisa mpo ete boyokani na libota ezala na lolenge lobongi?
6 Ntango bana babali, mokumba ya baboti ebongwanaka. Genese 2:24 elobi ete: “Mobali akotika tata na ye mpe mama na ye mpe [akokangama] na mwasi na ye, mpe bango bakozala mosuni moko.” Koyeba mitindá ya Nzambe mpo na oyo etali ebongiseli ya bokonzi mpe kosala makambo na mobulu te ekosalisa baboti na koyeba kotalela makambo na lolenge lobongi.—1 Bakolinti 11:3; 14:33, 40.
7. Ezaleli nini kitoko tata moko alónaki ntango bana na ye ya basi babalaki?
7 Nsima wana mobali moko mpe mwasi na ye babalisaki bana na bango mibale ya basi, bayokaki ete bazangaki eloko moko kati na bomoi na bango. Na ebandeli, mobali azalaki koyokela mibali ya bana na ye nkanda. Kasi nsima na kokanisa likoló na etindá ya bokonzi, ayebaki ete mibali ya bana na ye nde bazali na mokumba ya kotambwisa bandako na bango. Na yango, ntango bana na ye ya basi bazalaki koluka toli, azalaki kotuna bango ete likanisi ya mibali na bino ezali nini, mpe na nsima azalaki kosala nyonso mpo na kopesa lisungi oyo ekoki. Mibali ya bana na ye bazali kotalela ye sikawa lokola moninga mpe bandimaka batoli na ye.
8, 9. Lolenge nini baboti mosusu bamiyokanisaka na lipandá ya bana na bango oyo bakóli?
8 Ezali boni soki babalani ya sika bazangi kokokisa oyo baboti bazali kokanisa ete ezali malamu, ata soki oyo babalani yango bazali kosala ekweisami te kati na Makomami? Mobali mpe mwasi moko oyo basili kobalisa bana mingi balimboli ete: “Ntango nyonso tosalisaka bango ete bámona likanisi ya Yehova, kasi soki toyokani na bango te likoló na ekateli oyo bazwi, ata bongo tondimaka yango, tosungaka bango mpe toyikisaka bango mpiko.”
9 Na mikili misusu ya Azia, bamama mosusu bazalaka mpenza na mokakatano mpo na kondima lipandá ya bana na bango ya mibali. Nzokande, soki bazali kotosa etindá ya boklisto ya kosala makambo na mobulu te mpe kotosa ebongiseli ya bokonzi, bakomona ete matáta elongo na basi ya bana na bango ekozala mingi te. Mwasi moko moklisto amonaki ete bokei ya bana na ye ya mibali na kotikáká libota ezalaki “liziba ya botɔ́ndi monene.” Asepelaki na komona makoki na bango ya kotambwisa bandako na bango ya sika. Epai mosusu, yango elimboli koyeisa pɛpɛlɛ bozito ya nzoto mpe ya makanisi oyo ye mpe mobali na ye basengeli komema wana ezali bango kokóma mibangé.
BÓYEISA MAKASI BIKANGANELI YA LIBALA NA BINO
10, 11. Toli nini ya Makomami ekosalisa bato na kopɛngola mitambo mikobimaka wana bazali kopusana na mbula?
10 Bato bazalaka na mayoki makeseni wana bapusani na mbula. Mibali misusu bamilatisaka na lolenge lokeseni mpo bámonana lokola bilenge. Basi mingi bamitungisaka na ntina na mbongwana oyo eyaka nsima wana batiki komona sanza. Likambo ya mawa, bato mosusu oyo bapusani na mbula batumolaka babalani na bango ete básilika mpe báyoka zuwa na kosakanáká na bilenge mibali to na bilenge basi. Kasi mibali mibangé oyo bazali kobanga Nzambe, bazalaka na “makanisi na sembo,” na kopekisáká bamposa oyo elongobani te. (1 Petelo 4:7) Bobele bongo, basi oyo bakɔmɛli basalaka makasi na kobatela mabala na bango, na kozaláká na bolingo mpo na mibali na bango mpe na mposa ya kosepelisa Yehova.
11 Na kopemama na Nzambe, Mokonzi Lemuele akumisaki “mwasi ya molende” oyo asalelaka mobali na ye “malamu, akobebisa ye te, mikolo nyonso na bomoi na ye.” Mobali moklisto akozanga te komonisa botɔ́ndi na lolenge mwasi na ye azali kosala makasi mpo na kolónga mikakatano nyonso ya mayoki oyo azali kokutana na yango na boumeli ya ntango oyo abandi kopusana na mbula. Bolingo ekopusa mobali na ‘kosanzola mwasi na ye.’—Masese 31:10, 12, 28.
12. Lolenge nini babalani oyo bazali konuna elongo bakoki kotya likebi moko epai na mosusu, wana bambula ezali koleka?
12 Na boumeli ya bambula ya mosala mingi mpo na kobɔkɔla bana, ekoki kozala ete bino mibale bomipimelaki kokokisa bamposa na bino mpo na kokokisa oyo ya bana na bino. Nsima ya bokei na bango ezali ntango ya kotya lisusu likebi mingi na libala na bino. Mobali moko alobi ete: “Ntango bana na ngai ya basi batikaki ndako, nabandelaki lisusu bolingo elongo na mwasi na ngai na makambo nyonso.” Mobali mosusu alobi ete: “Tozali komibanzabanza mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ya moko na mosusu mpe tomikundwelaka moko na mosusu ntina ya kosala ngalasisi.” Na yango, na esika ete bázala na mayoki ya kozala bango moko, ye mpe mwasi na ye bazali komonisa ezaleli ya bokabi epai na basangani mosusu ya lisangá. Ɛɛ, komibanzabanza mpo na basusu epesaka mapamboli. Lisusu, yango ekumisaka Yehova.—Bafilipi 2:4; Baebele 13:2, 16.
13. Boboto mpe bosembo ezali kokokisa mokumba nini wana babalani bakómi mibangé?
13 Kotika nzela te ete kozanga kosolola ezala kati na yo mpe mobalani na yo. Bólobanaka na polele nyonso. (Masese 17:27) Mobali moko alobi ete: “Tozali kokólisa bozindo ya boyebani na biso moko epai na mosusu na komonisáká motema malamu mpe na kozaláká na limemya.” Mwasi na ye andimi likambo yango, na kolobáká ete: “Lokola tosili kokóma mibangé, tosepelaka na komela tii elongo, kosolola, mpe kopesana mabɔkɔ.” Ezaleli na yo ya kolobana polele mpe ya kolongobana ekoki kokembisa bikanganeli ya libala, kopesáká yango makasi lisusu mpo na kotɛmɛla makaneli ya Satana, mobebisi na mabala.
BÓSEPELA NA BANA YA BANA NA BINO
14. Mosala nini nkɔ́kɔ-mwasi ya Timoté asalaki mpo na bokóli ya Timoté lokola moklisto?
14 Bana ya bana bazali “motole” ya mibangé. (Masese 17:6) Kozala elongo na bana ya bana ekoki mpenza kozala likambo ya kosepelisa—ya esengo mpe ya kobɔndisa. Biblia elobeli malamu na ntina na Loisi, nkɔ́kɔ ya mwasi oyo elongo na mwana na ye ya mwasi Enise, ateyaki bindimeli na ye epai na Timoté, mwana ya mwana na ye. Elenge wana akólaki na koyebáká ete mama na ye mpe nkɔ́kɔ na ye ya mwasi bazalaki kopesa motuya mingi na solo ya Biblia.—2 Timoté 1:5; 3:14, 15.
15. Mpo na oyo etali bana ya bana na bango, lisungi nini ya malamu bankɔ́kɔ bakoki kopesa, kasi nini basengeli kopɛngola?
15 Na bongo, oyo ezali likambo ya sikisiki kati na yango bankɔ́kɔ bakoki kosalisa mingi. Bankɔ́kɔ, bosili kolakisa boyebi ya mikano ya Yehova epai na bana na bino. Sikawa bokoki mpe kolakisa yango epai na libota lilandi oyo wana! Bilenge mingi basepelaka koyoka bankɔ́kɔ na bango koyebisa bango masoló ya Biblia. Ya solo, bozali kozwa te mokumba ya tata oyo asengeli kokɔtisa solo ya Biblia kati na bana na ye. (Deteronome 6:7) Nde ata bongo, bozali kobakisa makambo mosusu masengeli. Tiká libondeli na bino ezala oyo ya mokomi na Nzembo ete: “Boye, kino ntango na konuna na ngai na nsuki mpɛmbɛ, Ɛ Nzambe, tiká ngai te. Kino nakosakola nguya na yo epai na nyonso na libota lizali koya nsima.”—Nzembo 71:18; 78:5, 6.
16. Lolenge nini bankɔ́kɔ bakoki kopɛngola ete bázala te eutelo ya matáta kati na libota na bango?
16 Na mawa nyonso, bankɔ́kɔ mosusu balekisaka ndelo na lolenge ya kobɔkɔla bilenge na boye ete kozanga boyokani ebimaka kati na bankɔ́kɔ mpe bana na bango oyo basili kokóla. Nzokande, boboto na bino ya sembo ekoki mbala mosusu kosala ete bana ya bana na bino báyebisaka makambo na bango ya nkuku epai na bino soki bamoni lokola ete bakoki te koyebisa yango epai na baboti na bango. Na bantango mosusu bilenge balikyaka ete bankɔ́kɔ na bango bakokɔtela bango soki bazwani na baboti na bango. Bokosala nini? Bómonisa mayele mpe bólendisa bana ya bana na bino ete básololaka na baboti na bango. Bokoki koyebisa bango ete kosala bongo ezali kosepelisa Yehova. (Baefese 6:1-3) Soki esengeli, bokoki kobongisa lolenge oyo bilenge basengeli kosala mpo na kosolola na baboti na bango. Bólobela bana ya bana na bino polele makambo oyo bosili koyekola na boumeli ya bambula. Bosembo na bino mpe boboto na bino ekoki kozala na litomba mpo na bango.
BÓYEKOLA KOSALA MAKAMBO MAKOKI NA MBULA NA BINO
17. Ekateli nini ya mokomi na Nzembo mibangé baklisto basengeli komekola?
17 Wana bozali kopusana na mbula, bokomona ete bozali kokoka te kosala makambo nyonso oyo bozalaki kosala to nyonso oyo bolingi kosala. Lolenge nini moto akoki kondima mpe koyika mpiko na likambo litali kokóma mobangé? Kati na makanisi na yo okoki kokanisa ete ozali na mibu 30, kasi komitala na talatála ekomonisa makambo makeseni na lolenge ozali kokanisa. Kolɛmba nzoto mpo na yango te. Mokomi na Nzembo alɔmbaki Yehova na etingya nyonso ete: “Boyá ngai na ntango na konuna te, tiká ngai te wana nguya na ngai elɛmbi.” Salá makasi na komekola ekateli oyo ya mokomi na Nzembo. Ye alobaki ete: “Nakolikya epai na yo ntango nyonso mpe nakofulisa masanzoli na ngai kosanzola yo.”—Nzembo 71:9, 14.
18. Lolenge nini moklisto akɔmɛli akoki kosalela ntango na ye na lolenge malamu nsima na kobima epasó?
18 Mingi basilaki komibongisa liboso mpo na kokólisa masanzoli na bango mpo na Yehova nsima wana bakobima epasó na mosala. Tata moko oyo asilá kobima epasó, alobi ete: “Nasilaki kokana liboso eloko nini nakosala ntango mwana na biso ya mwasi akosilisa kelasi. Nazwaki ekateli ete nakobanda mosala ya kosakola ya ntango nyonso, mpe natɛkisaki biloko na ngai ya mombongo mpo ete nazala na ntango mingi ya kosalela Yehova. Nabondelaki mpo na kozwa litambwisi ya Nzambe.” Soki okómi pene na kozwa epasó, zwá kobɔndisama na maloba oyo ya Mozalisi na biso Monene: “Kino ntango na konuna, ngai oyo, kino nsuki ikómi pɛɛ ngai nakokumba bino.”—Yisaya 46:4.
19. Toli nini epesami epai na baoyo bapusani na mbula?
19 Kobongola mimeseno na yo nsima na kobima epasó na mosala ekoki kozala likambo ya pɛtɛɛ te. Ntoma Paulo apesaki toli epai na mibali mibangé ete bázala “bato na bokatikati na mimeseno na bango.” Yango esɛngi komipekisa na makambo nyonso, komipesa te na bamposa ya koluka bomoi ya mindɔndɔ́. Kútu esengelaka mpenza milende mpo na kosala makambo motindo moko mokolo na mokolo mpe mpo na komipesa disipilini nsima na kobima epasó. Na bongo, bózala na mosala mingi, “bósalaka mosala na Nkolo ntango nyonso, awa eyebi bino ete kati na Nkolo mosala na bino ezali mpamba te.” (1 Bakolinti 15:58) Bómipesa mingi na kosalisáká basusu. (2 Bakolinti 6:13) Baklisto mingi basalaka bongo na kosakoláká na molende nyonso nsango malamu engebene makoki na bango. Awa esili bino kopusana na mbula, bózala “bakembi mpo na kondima, na bolingo, na etingya.”—Tito 2:2.
LOLENGE OKOKI KOLÓNGA MAWA YA KOKUFELA MOBALANI
20, 21. (a) Kati na ebongiseli ya biloko oyo, nini ekoki kokabola babalani? (b) Lolenge nini Ana apesi ndakisa malamu epai na mibali mpe basi oyo bakufeli babalani na bango?
20 Ezali likambo ya mawa kasi ezali mpe likambo ya solo ete kati na ebongiseli ya biloko oyo, nsukansuka babalani bayaka kokabwana na ntina na liwa. Babalani baklisto oyo bakufeli basi to mibali na bango, bayebi ete balingami na bango bazali kolala, mpe bazali na elikya ete bakomona bango lisusu. (Yoane 11:11, 25) Atako bongo, kozanga wana epesaka mpasi na motema. Lolenge nini moto oyo atikali na bomoi akoki kolónga yango? *
21 Komikundola lolenge bato mosusu oyo balobelami kati na Biblia basalaki ekoki kosalisa yo. Ana azalaki mokufeli-mobali bobele nsima ya mbula nsambo ya libala na bango, mpe ntango tozali kotánga makambo matali ye, azalaki na mibu 84. Tokoki kondimisama ete ayokaki mpenza mpasi na motema ntango mobali na ye akufaki. Lolenge nini alóngaki? Azalaki kosalela Yehova Nzambe mosala ya bulɛɛ na tempelo butu na moi. (Luka 2:36-38) Kozanga ntembe, bomoi ya Ana kati na mosala ya molende esungaki ye mingi na kolónga mawa mpe mayoki ya kozala ye moko oyo azalaki na yango lokola mwasi-mokufeli-mobali.
22. Lolenge nini basi mosusu bakufeli-mibali mpe mibali mosusu bakufeli-basi basili kolónga mayoki ya kozala bango moko?
22 Mwasi moko ya mibu 72, oyo akufelá-mobali esili koleka mibu zomi, alobi ete: “Mokakatano monene nazalaki na yango ezalaki ya kozanga moninga oyo nakokaki kosolola na ye. Mobali na ngai azalaki moyoki malamu. Tozalaki kolobela makambo matali lisangá mpe bosangani na biso na mosala ya boklisto.” Mwasi mosusu oyo azali mokufeli-mobali alobi ete: “Atako mpasi na ngai eyaki kokita na boumeli ya ntango, namoni malamu koloba ete oyo moto asalaka mpo na kosalisa moto mosusu na ntango ya mpasi nde esalisaka ye na kokitisa mpasi na ye. Ozali mpenza na likoki ya kosalisa bato mosusu.” Mobali moko ya mibu 67, oyo azali mokufeli-mwasi andimi likambo yango, na kolobáká ete: “Lolenge malamu ya kolónga na ntango ya kufa ya mobalani na yo ezali ya komipesa yo moko mpo na kobɔndisa basusu.”
MIBANGÉ BAZALI NA MOTUYA NA MISO YA NZAMBE
23, 24. Libɔndisi nini monene Biblia ezali kopesa epai na mibangé, mingimingi epai na baoyo bakufeli babalani na bango?
23 Atako liwa ekamati mobalani na biso molingami, Yehova azali ntango nyonso sembo, mpe abongi ntango nyonso kotyelama motema. Mokonzi Davidi na ntango na kala ayembaki ete: “Nalɔmbi eloko moko epai na [Yehova], nakolanda yango; yango ete, nafanda kati na ndako na [Yehova]; mikolo nyonso na bomoi na ngai; ete natala boboto na [Yehova] mpe natuna makambo kati na tempelo na ye.”—Nzembo 27:4.
24 Ntoma Paulo apesi toli oyo ete: “Okumisa basi-bakufeli-mibali baoyo bazali mpenza basi-bakufeli-mibali.” (1 Timoté 5:3, NW) Toli oyo elandi lilako wana emonisi ete basi-bakufeli-mibali ya sembo oyo bazalaki na bandeko ya penepene te bakokaki kozwa lisungi ya mosuni na lisangá. Nzokande, ndimbola ya lilako ya “kokumisa” esangisi likanisi ya kotalela bango ete bazali na motuya. Oyo nde kobɔndisama basi-bakufeli-mibali mpe mibali-bakufeli-basi bakoki kozwa na koyeba ete Yehova azali kotalela bango ete bazali na motuya mpe azali pene na kosunga bango!—Yakobo 1:27.
25. Mokano nini ezali liboso ya mibangé?
25 Liloba lipemami ya Nzambe lilobi ete: “Motó na pɛɛ ezali motole na nkembo, [ntango] ezwami na nzela na boyengebene.” (Masese 16:31; 20:29) Na bongo, ezala ete obalá to ozali monzemba, landá kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso kati na bomoi na yo. Na yango, okozwa nkombo malamu epai na Nzambe uta sikawa mpe elikya ya bomoi ya seko kati na mokili epai kuna bampasi ya bobangé ekozala lisusu te.—Nzembo 37:3-5; Yisaya 65:20.
^ Mpo na kozwa bandimbola mosusu na likambo oyo, talá mwa búku Ntango moto oyo olingaka akufi . . . , ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.