Bilimu mabe bazali kolendisa bato na kotombokela Nzambe
Kasi mpo na nini Satana mpe bilimu mabe na ye bazali kongala boye mpo na kokosa bato? Mpo balingi kokotisa biso kati na botomboki na bango. Balingi ete tosambela bango. Balingi ete tondima lokuta na bango mpe tosala makambo oyo mazali kosepelisa Jéhovah te. Kati na makambo yango, ezali na mimeseno mingi ya bonkoko oyo mizali na boyokani na bakufi.
Liwa ya molingami moko ezali ntango moko ya mpasi mingi mpo na kolekisa. Kolela mpo na mawa ezali likambo na mabe te. Yesu “atangisaki mpisoli” nsima na liwa ya Lazare, moninga na ye.—Yoane 11:35.
Ezali na mimeseno mingi ya bonkoko oyo mizali na boyokani na bakufi, mpe yango ekeseni mingi kati na mokili mobimba. Mingi ezali kotemela mitinda na Biblia te; kasi, makambo mosusu matongami likoló na likanisi oyo ete bakufi bazali na bomoi mpe ete bakoki komona bato oyo bazali na bomoi. Matanga, koboma nzoto mpo na kolela mpe milulu ya bokundi, makambo nyonso wana mauti mpo na kobanga koyinama na bilimu ya bakufi. Nzokande, lokola “bakufi bayebi likambo te,” baoyo bazali kosalela makambo wana bazali kokotela lokuta na Satana.—Mosakoli 9:5.
Mimeseno misusu na bonkoko to milulu misusu miuti na endimeli oyo ete bakufi bazali na mposa na lisalisi ya bato na bomoi mpe bazali kopesa mpasi na bato na bomoi soki babondeli bango te. Kati na mikili misusu, bazali kosala elambo mpe kopesa mbeka mikolo 40 to mbula moko nsima na liwa ya moto. Elambo yango mpe mbeka wana ezali soki mpo na kosalisa mowei ete ‘akatisa’ kino mokili na bilimu. Mbala mingi bakopesaka mpe masanga na bilei epai na bakufi.
Makambo yango mabongi te mpamba te mazali bongo kolendisa lokuta ya Satana na ntina na bakufi. Ata mbala moko te Jéhovah akondima ete tozala na boyokani ata ya moke elongo na mimeseno oyo mitongami likoló na mateya ya bilimu mabe!—2 Bakolinti 6:14-18.
Basaleli na Nzambe ya solo bazali kosangana soko moke te na misala oyo mizali komonisa lokuta na Satana. Nzokande, na bolingo, bazali ntango nyonso kosalisa bato na bomoi mpe kolendisa bango. Bayebi ete bobele Jéhovah nde akoki kosalisa moto oyo akufi.—Yobo 14:14, 15.
Kosolola na bilimu mabe ekweisami na Nzambe
Bato mosusu bazali kosolola na bilimu mabe ezala bango moko, to na lisalisi ya nganga-nkisi. Koyokana na bilimu mabe ezali na mitindo mingi. Na ndakisa, bonganga, bondoki, maji, koyebisa mabombami mpe kosolola elongo na bakufi.
Biblia ezali kokweisa makambo wana na maloba oyo: “Epai ya bino . . . moto moko te akende epai ya nganga mpo na koyeba makambo makoya nsima, to epai ya moto akotala nzela ya monzoto, to epai ya moto akosala mosala mwa koloko to nkisi; epai ya moto ayebi koloko bato to moto akotunaka bilimu to epai ya nganga-nkisi to epai ya moto akosolola na bato bawei. Moto akosala ndenge wana asali likambo lya nsomo o miso ma Jéhovah Nzambe wa yo.”—Deteronome 18:10-12, Biblia Liloba lya Nzambe.
Mpo na nini Jéhovah azali kokebisa biso makasi na ntina na makambo wana?
Mpo na bolamu na biso, Jéhovah azali kokebisa biso na lolenge nyonso ya misala na bilimu mabe.
Alingi bato mpe azali komibanzabanza na ntina na bango, mpe ayebi ete baoyo bazali na boyokani elongo na bilimu mabe bazali komipesa na makama.Likambo ya Nilda, mosololi na bilimu mabe na mboka Brézil endimisi yango. Bilimu mabe babebisaki bomoi na ye. Ayebisi ete: “Bilimu . . . bazalaki koyangela ngai, bazalaki kopesa ngai bitinda. Nazalaki mbala na mbala kolekisa bomoi na ngai lokola moto oyo azali na makanisi na ye nyonso mpe ntango mosusu lokola moto oyo abungisi makanisi nyonso, mpe nakotaki lopitalo mpo na maladi ya makanisi. Badémo bazalaki mpenza kotungisa ngai kino baner na ngai ebelaki. Nazalaki komela bankisi ya kolembisa mpasi mpe nakomaki komela masanga mpe likaya mbala na mbala. Yango eumelaki mibu mingi.”
Na nsima, na lisalisi ya Jéhovah mpe ya Batemwe na ye awa na mabelé, Nilda asikwamaki na boombo na bilimu mabe. Sikawa, azali na bomoi moko ya peto mpe ya esengo. Alobi ete: “Nazali kopesa toli epai na bato nyonso: bozala na boyokani soko moke te na bilimu [mabe], ata mpo na mwa ntango te.”