Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

Ata lelo, bamilio ya bato basí bazwi bomoi ya esengo mpe ya kimya na nse ya guvɛrnema ya Nzambe, oyo ekoká na makambo nyonso. Olingi kozala na kati ya bato yango?

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Ndenge nini nsango ya esengo oyo ndeko Charles Russell apesaki mokolo ya 02/10/1914 emonani ete ezalaki mpenza likambo ya solo?

MOKAPO 1

“Bokonzi na yo eya”

Yesu ateyaki makambo ya Bokonzi ya Nzambe mingi koleka makambo mosusu nyonso. Ndenge nini mpe ntango nini ekoya?

MOKAPO 2

Bokonzi ebotami na likoló

Banani basalisaki bayekoli ya Kristo awa na mabele bábongisama mpo na Bokonzi? Makambo nini emonisi ete Bokonzi ezali guvɛrnema ya solo?

MOKAPO 3

Yehova ayebisi bato mokano na ye

Na ebandeli, Bokonzi ya Nzambe ezalaki na kati ya mokano ya Nzambe?

MOKAPO 4

Yehova asali ete nkombo na ye eyebana

Makambo nini Bokonzi esili kosala mpo na nkombo ya Nzambe? Okoki kosala nini mpo na kosantisa nkombo ya Yehova?

MOKAPO 5

Mokonzi asalisi bato báyeba makambo oyo etali Bokonzi

Talá makambo oyo ekosalisa yo oyeba malamumalamu Bokonzi ya Nzambe, bakonzi na yango, bato oyo yango ekoyangela, mpe ndenge ya komonisa bosembo.

MOKAPO 6

Basakoli ya Bokonzi​​—Bato bamipesi na bolingo na bango moko

Mpo na nini Yesu azalaki na elikya ete ekozala na ebele ya bato oyo bakomipesa na kosakola na mikolo ya nsuka? Ndenge nini okoki komonisa ete otyaka Bokonzi na esika ya liboso?

MOKAPO 7

Mayele oyo tosaleli​​—Ebele ya bato bayoki nsango malamu

Talá mayele ndenge na ndenge oyo basaleli ya Nzambe basaleli mpo bato ebele mpenza báyoka nsango malamu liboso nsuka eya.

MOKAPO 8

Biloko oyo tosaleli​​—Kobimisa mikanda mpo na mokili mobimba

Ndenge nini mosala na biso ya kobongola ezali komonisa ete Yesu azali na biso? Makambo nini oyo etali mikanda na biso endimisaka yo ete Bokonzi ezali mpenza likambo ya solo?

MOKAPO 9

Mosala ya kosakola​​—“Bilanga . . . eteli mpo na bobuki mbuma”

Yesu ateyaki bayekoli na ye makambo mibale ya ntina oyo etali mosala monene ya kobuka mbuma ya elilingi. Makambo yango etali biso na nini lelo?

MOKAPO 10

Mokonzi apɛtoli bato na ye na elimo

Boyokani nini ezali kati na fɛti ya Noele mpe ekulusu?

MOKAPO 11

Bapɛtolami na bizaleli mpo na komonisa bosantu ya Nzambe

Bandako ya bakɛngɛli mpe baporte ya tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli ezali na ndimbola monene mpo na basaleli ya Nzambe banda 1914.

MOKAPO 12

Babongisami mpo na kosalela “Nzambe ya kimya”

Na esika esalela liloba molɔngɔ oyo ekeseni na mobulu, Biblia esaleli nde liloba kimya. Mpo na nini? Mpe ndenge nini eyano na motuna yango etali bakristo lelo?

MOKAPO 13

Basakoli ya Bokonzi liboso ya batribinale

Bazuzi mosusu lelo oyo basalaka lokola Gamaliele, moteyi moko ya Mibeko na ntango ya kala.

MOKAPO 14

Bamonisi bosembo na bango na Bokonzi ya Nzambe

“Mabele” emɛli “ebale” ya botɛmɛli oyo eyelaki Batatoli ya Yehova mpo bakɔtaka na makambo ya politiki te.

MOKAPO 15

Babundi mpo na kozwa bonsomi ya losambo

Basaleli ya Nzambe babundi mpo na kozwa lotomo ya kotosa mibeko ya Bokonzi ya Nzambe.

MOKAPO 16

Koyangana elongo mpo na losambo

Tokoki kosala nini mpo makita mpo na kosambela Yehova esalisa biso mpenza?

MOKAPO 17

Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi

Ndenge nini biteyelo ya teokrasi ebongisi basakoli ya Bokonzi mpo bákokisa mikumba na bango?

MOKAPO 18

Makabo mpo na mosala ya Bokonzi

Mbongo na biso eutaka wapi? Ndenge nini tosalelaka yango?

MOKAPO 19

Kotonga bandako mpo na kokumisa Yehova

Bisika na biso ya losambo ekumisaka Nzambe, kasi na miso na ye eloko mosusu nde eleki motuya.

MOKAPO 20

Mosala ya kosunga bandeko

Ndenge nini toyebi ete mosala ya kosunga bandeko ezali na kati ya mosala mosantu epai ya Yehova?

MOKAPO 21

Bokonzi ya Nzambe elongoli banguna na yango

Okoki komibongisa sikoyo mpo na etumba ya Armagedone.

MOKAPO 22

Bokonzi ekokisi mokano ya Nzambe na mabele

Ndenge nini tokoki kondima ete bilaka ya Yehova ekokokisama?