MOKAPO 10
Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
“Nsinga oyo esalemi na bansinga misato ekatanaka nokinoki te.”—MOSAKOLI 4:12.
1, 2. (a) Bato oyo babalani sika bakanisaka nini mpo na libala na bango? (b) Mituna nini tokotalela na mokapo oyo?
KANISÁ esengo oyo mwasi ná mobali bazalaka na yango mokolo ya libala na bango. Bazalaka na esengo mpo babandi bomoi ya sika mpe bakanisaka makambo ndenge na ndenge oyo bakosala. Bamonaka ete libala na bango ekozala ya esengo mpe ekoumela.
2 Nzokande, mabala mingi ebandaka malamu, kasi na nsima makambo ebongwanaka. Mpo libala eumela mpe ezala ya esengo, mwasi ná mobali basengeli kotika Nzambe atambwisa bango. Na yango, tótalela biyano oyo Biblia epesi na mituna oyo: Libala ezali na matomba nini? Soki olingi kobala, ndenge nini okoki kopona molongani ya malamu? Ndenge nini okoki kozala mobali to mwasi malamu? Mpe nini esalaka ete libala eumela?—Tángá Masese 3:5, 6.
NASENGELI MPENZA KOBALA?
3. Okanisi ete esengeli kaka moto abala mpo azala na esengo? Limbolá.
3 Bato mosusu bakanisaka ete moto akozala na esengo kaka soki abali. Kasi ezali bongo te. Yesu alobaki ete bonzemba ekoki kozala likabo. (Matai 19:11, 12) Mpe ntoma Paulo alobaki ete kozala monzemba ezali na matomba. (1 Bakorinti 7:32-38) Yo moko osengeli kopona soki okobala to te. Osengeli te kobala kaka mpo baninga mpe bato ya libota bazali kotungisa yo, to mpo na kolanda bonkɔkɔ na bino.
4. Tángá mwa matomba ya libala ya malamu.
4 Biblia elobi ete libala mpe ezali likabo ya Nzambe, mpe ezali na mwa matomba. Mpo na Adama, mobali ya liboso, Yehova alobaki: “Ezali malamu te moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi, oyo abongi na ye.” (Ebandeli 2:18) Yehova asalaki Eva mpo azala mwasi ya Adama, mpe bango nde bakómaki libota ya liboso awa na mabele. Soki mwasi ná mobali baboti bana, libota na bango esengeli kozala esika oyo ebongi mpo na kobɔkɔla bango. Kasi, mokano ya libala ezali kaka ya kobota bana te.—Nzembo 127:3; Baefese 6:1-4.
5, 6. Ntango nini libala ekozala lokola “nsinga oyo esalemi na bansinga misato”?
5 Mokonzi Salomo akomaki boye: “Bato mibale baleki moto moko, mpo bazali na mbano malamu na mosala na bango ya makasi. Mpo soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye. Kasi ekozala boni soki moto oyo azali kaka ye moko akwei mpe moto mosusu azali te mpo na kotɛlɛmisa ye? . . . Mpe nsinga oyo esalemi na bansinga misato ekatanaka nokinoki te.”—Mosakoli 4:9-12.
6 Libala ya malamu ekoki kozala boninga makasi kati na bato mibale oyo bakobanda kosalisana, kobɔndisana, mpe kobatelana. Bolingo ekoki kokómisa boyokani ya mwasi ná mobali makasi, kasi boyokani yango ekokóma makasi koleka soki bango mibale bazali kosambela Yehova. Na ntango yango, libala ekokóma lokola “nsinga oyo esalemi na bansinga misato,” bansinga misato oyo bakangisi yango makasi esika moko. Nsinga ya ndenge wana ezalaka makasi koleka nsinga oyo esalemi kaka na bansinga mibale. Libala ekozala malamu soki mwasi ná mobali batiki ete Yehova azwa esika na libala na bango.
7, 8. Toli nini ntoma Paulo apesaki mpo na libala?
7 Soki mwasi ná mobali babalani, mokomoko akoki kokokisa mposa ya moninga ya kosangisa nzoto. (Masese 5:18) Kasi, soki moto alingi kobala kaka mpo na kosangisa nzoto, akoyeba kopona molongani ya malamu te. Yango wana, Biblia elobi ete moto asengeli kobala soki aleki “eleko ya ebandeli ya bolenge,” ntango oyo mposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi mingi. (1 Bakorinti 7:36) Eleki malamu kozela ete bamposa yango ekita, bongo na nsima nde obala. Na ntango yango, moto akoki kokóma na makanisi ya malamu mpe akoyeba kopona malamu.—1 Bakorinti 7:9; Yakobo 1:15.
8 Soki okanisaka kobala, ekozala malamu obosana te ete libala nyonso ezalaka na mikakatano. Ntoma Paulo alobaki ete baoyo bazali kobala “bakozwa bolɔzi na kati ya mosuni na bango.” (1 Bakorinti 7:28) Ata soki libala ezali malamu ndenge nini, mikakatano ezangaka te. Yango wana, soki ozwi ekateli ya kobala, salá makasi opona molongani ya malamu.
NAKOBALA NANI?
9, 10. Nini ekoki kosalema soki obali moto oyo asambelaka Yehova te?
9 Ntango ozali koluka moto oyo okobala, kobosana te etinda oyo ya Biblia: “Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te.” (2 Bakorinti 6:14) Maloba yango euti na likambo moko oyo basali-bilanga bazalaki kosala. Mosali-bilanga azalaki te kokangisa na ekanganeli banyama mibale oyo monene mpe makasi na yango ekeseni mpo esala elongo na bilanga. Likambo yango ezalaki mpasi mpe monyoko mpo na nyama mokomoko. Ndenge moko mpe, libala oyo esangisi moto oyo asambelaka Yehova ná moto oyo asambelaka ye te ekoki kobimisa mikakatano ebele. Yango wana, Biblia epesi toli ete tóbala “na kati ya Nkolo kaka.”—1 Bakorinti 7:39.
10 Bakristo mosusu bamonaki malamu ete bábala ata moto oyo asambelaka Yehova te, na esika bátikala kaka minzemba. Bato oyo baboyaka toli ya Biblia, bamonaka mbala mingi mpasi mpe bazalaka na esengo te. Mpo na basambeli ya Yehova, kosalela Nzambe nde likambo eleki ntina na bomoi. Okoyoka ndenge nini soki okoki te kosala likambo yango oyo eleki ntina elongo na molongani na yo? Bakristo mingi baponaka kotikala minzemba na esika ya kobala moto oyo alingaka Yehova te mpe asalelaka ye te.—Tángá Nzembo 32:8.
11. Ndenge nini okoki kopona molongani ya malamu?
11 Yango elingi koloba te ete moto nyonso oyo asalelaka Yehova akozala mobali to mwasi oyo abongi na yo. Soki ozali kokanisa kobala, luká moto oyo osepeli na ye mpenza mpe oyo bokoyokana malamu. Kangá motema tii okozwa moto oyo alingaka kosala makambo oyo yo mpe olingaka, mpe oyo atyaka mosala ya Nzambe na esika ya liboso. Zwá ntango ya kotánga mpe komanyola toli ya malamu oyo ezali na mikanda ya moombo ya sembo oyo elobeli libala.—Tángá Nzembo 119:105.
12. Biblia ekoki koteya baboti nini na oyo etali koponela mwana molongani?
12 Na bamboka mosusu, baboti nde baponelaka bana na bango bato oyo bakobala. Bamonaka ete baboti nde bakoyeba moto oyo abongi na mwana na bango. Biblia mpe elobeli momeseno yango. Na yango, soki bolingi kolanda momeseno yango na libota na bino, Biblia ekoki kosalisa baboti báyeba bizaleli oyo basengeli koluka epai ya moto oyo akobalana na mwana na bango. Na ndakisa, ntango Abrahama atindaki bálukela mwana na ye Yisaka mwasi, atalaki liboso mbongo to lokumu te; alukaki nde mwasi oyo alingaka Yehova.—Ebandeli 24:3, 67; talá Maloba na nsuka ya lisolo 25.
NDENGE NINI OKOKI KOMIBONGISA MPO NA LIBALA?
13-15. (a) Ndenge nini mobali akoki komibongisa mpo azala mobali ya malamu? (b) Ndenge nini mwasi akoki komibongisa mpo azala mwasi ya malamu?
13 Soki ozali kokanisa kobala, osengeli komibongisa malamu. Mbala mosusu okanisi ete omibongisi, kasi tótala naino soki komibongisa mpo na libala elimboli nini. Mbala mosusu yango ekokamwisa yo.
14 Biblia emonisi ete mwasi ná mobali bazali na mokumba ndenge moko te na kati ya libota. Na yango, komibongisa ya mobali mpe ya mwasi ezali ndenge moko te. Soki mwana mobali azali kokanisa kobala, asengeli komituna soki abongi mpenza kozala mokonzi ya libota. Yehova asɛngi mobali akokisa bamposa ya mosuni ya mwasi na ye mpe ya bana na ye mpe atyelaka bango likebi. Oyo eleki ntina, mobali asengeli kokamba libota na ye na makambo ya losambo. Biblia elobi ete mobali oyo akokisaka bamposa ya libota na ye te azali “mabe koleka moto oyo azali na kondima te.” (1 Timote 5:8) Na yango, soki ozali mobali mpe ozali na mposa ya kobala, kanisá ndenge okoki kosalela etinda oyo ya Biblia: “Lɛngɛlá mosala na yo libándá, mpe bongisá yango mpo na yo na elanga. Nsima na yango, osengeli mpe kotonga libota na yo.” Na maloba mosusu, liboso obala, omituna soki okokoka kozala mobali oyo Yehova asɛngi yo ozala.—Masese 24:27.
15 Mwasi oyo azali kokanisa kobala asengeli komituna soki akokoka kokokisa malamu mikumba ya mwasi ya libala, mbala mosusu mpe ya kozala mama. Biblia elobeli mwa makambo oyo mwasi ya malamu asengeli kosala mpo na mobali na ye mpe bana. (Masese 31:10-31) Lelo oyo, basi ná mibali ebele bakanisaka kaka oyo molongani akosalela bango. Kasi Yehova alingi tókanisa nde oyo biso tokoki kosalela molongani na biso.
16, 17. Liboso ya kobala, makambo nini osengeli komanyola?
16 Liboso ya kobala, kanisá makambo oyo Yehova asɛngi mibali mpe basi. Mobali asengeli koyeba ete kozala mokonzi ya libota elimboli te ete akoki kobɛta mwasi na ye to kofinga ye. Mobali ya malamu asengeli kolanda ndakisa ya Yesu, oyo alingaka mpe azalaka na boboto epai ya bato oyo abatelaka. (Baefese 5:23) Ndenge moko mpe, mwasi asengeli koyeba malamu mokumba na ye ya kopesa mabɔkɔ na bikateli oyo mobali azali kozwa mpe kosala na bomoko elongo na ye. (Baroma 7:2) Asengeli komituna soki akokoka kotosa mobali ya kozanga kokoka na motema moko. Soki amoni ete akokoka te, ekozala malamu atikala naino monzemba.
17 Mobali asengeli koluka liboso bolamu ya mwasi na ye, mpe mwasi asengeli koluka liboso bolamu ya mobali na ye. (Tángá Bafilipi 2:4.) Ntoma Paulo akomaki: “Mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi, asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Baefese 5:21-33) Moto nyonso, ezala mobali to mwasi, asepelaka koyoka ete balingaka ye mpe bapesaka ye limemya. Kasi, mpo libala ezala malamu, mobali alingaka mingimingi komona ete mwasi na ye apesaka ye limemya, mpe mwasi alingaka mingimingi komona ete mobali na ye alingaka ye.
18. Mpo na nini bato oyo balingani basengeli kozala ekɛngɛ ntango bazali bafianse?
18 Soki mwasi ná mobali bazali bafianse, kokutana na bango esengeli kozala ntango ya esengo mpe ya koluka koyebana malamu. Ezali mpe ntango ya kotalela makambo ndenge ezali mpenza mpe kosolola na bosembo mpo na koyeba soki balingi mpenza kofanda elongo bomoi mobimba. Na ntango yango, mwasi ná mobali basengeli koyekola kosolola malamu mpe komeka koyeba makambo oyo ezali mpenza na motema ya moninga. Wana bolingo na bango ezali kokóma makasi, mokomoko akokóma na mposa ya moninga; ezali ndenge Nzambe asalá mwasi ná mobali. Kasi basengeli kotya bandelo na ndenge ya komoniselana bolingo yango liboso bábalana, mpo bákwea te na makambo ya pite. Bolingo ya solosolo ekosalisa bango bázala na komipekisa mpe básala te likambo oyo ekobebisa boyokani na bango mibale mpe boyokani na bango na Yehova.—1 Batesaloniki 4:6.
NINI ESALAKA ETE LIBALA EUMELA?
19, 20. Ndenge nini bakristo batalelaka libala?
19 Na babuku mpe bafilme mingi, lisolo ya bolingo esukaka na fɛti moko ya monene ya libala mpe ya esengo. Kasi na bomoi ya solo, mokolo ya libala ezali kaka ebandeli. Yehova abongisaki ete libala eumela libela na libela.—Ebandeli 2:24.
20 Lelo oyo, bato mingi bamonaka ete libala ezali kaka boyokani ya mwa ntango. Kobala mpe koboma libala ezali mpasi te. Bato mosusu bamonaka ete soki kaka matata ebandi, bakoki kokabwana mpe koboma libala. Kasi kobosana te ndakisa oyo Biblia esaleli, ya nsinga oyo esalemi na bansinga misato. Nsinga ya ndenge wana ekatanaka mpambampamba te. Soki toluki lisalisi ya Yehova, libala na biso ekoki koumela. Yesu alobaki: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”—Matai 19:6.
21. Nini ekosalisa mwasi ná mobali bálingana?
21 Moto nyonso azalaka na makambo oyo asalaka malamu, azalaka mpe na bolɛmbu. Ezalaka mpasi te kotya likebi mingi na bolɛmbu ya basusu, mingimingi ya molongani na biso. Kasi soki tozali kosala bongo, tokozala na esengo te. Nzokande, soki tozali kotya likebi mingi na bizaleli malamu ya molongani na biso, libala na biso ekozala ya esengo. Yango ekoki kosalema? Ɛɛ! Yehova ayebi bolɛmbu na biso malamumalamu, kasi aponaka kotya likebi mingi na bizaleli na biso ya malamu. Tolingaki kosuka wapi soki asalaka bongo te? Mokomi ya nzembo alobaki: “Soki otalaka kaka mabunga, Ee Yah, Ee Yehova, nani akotɛlɛma?” (Nzembo 130:3) Mwasi ná mobali bakolanda ndakisa ya Yehova soki bazali kotala bolamu ya molongani na bango mpe kolimbisa nokinoki.—Tángá Bakolose 3:13.
22, 23. Ndakisa nini ya malamu Abrahama ná Sara batikelá bato oyo babalá?
22 Wana bambula ezali koleka, boyokani kati na mwasi ná mobali ekoki kokóma lisusu makasi. Libala ya Abrahama ná Sara eumelaki mpe ezalaki ya esengo. Ntango Yehova ayebisaki Abrahama alongwa na engumba Ure, mbala mosusu Sara azalaki na mbula koleka 60. Okanisi ezalaki pɛtɛɛ alongwa na ndako na ye ya kitoko mpo na kokende kofanda na bahema? Kasi, Sara azalaki moninga mpe molongani ya malamu mpo na Abrahama, mpe azalaki kopesa ye limemya makasi. Na yango, andimaki bikateli ya Abrahama mpe asalisaki ye mpo bikateli yango elonga.—Ebandeli 18:12; 1 Petro 3:6.
23 Ya solo, kozala na libala ya malamu elakisi te ete mwasi ná mobali bakoyokana na likambo nyonso. Mokolo moko, Abrahama ná Sara bayokanaki te na likambo moko, kasi Yehova alobaki na Abrahama: “Yoká mongongo na ye.” Abrahama ayokelaki Sara, mpe makambo esukaki malamu. (Ebandeli 21:9-13) Soki yo ná molongani na yo boyokani te na makambo mosusu, kolɛmba nzoto te. Likambo oyo eleki ntina ezali ete ata soki boyokani te na likambo moko, bókoba kosalelana makambo na bolingo mpe na limemya.
24. Ndenge nini libala ekoki kopesa Yehova nkembo?
24 Na lisangá, ezali na bandeko ebele oyo bazali na esengo na libala na bango. Soki olingi kobala, yebá ete kopona molongani ezali moko ya bikateli minene oyo osengeli kozwa. Ekobongola bomoi na yo mobimba; yango wana luká litambwisi ya Yehova. Na ndenge yango, okopona molongani ya malamu, okomibongisa malamu mpo na libala, mpe ntango okobala, okosala makasi bózala na libala ya malamu, ya bolingo, oyo ekopesa Yehova nkembo.