ETENI 5
Solo na likambo etali nkisi, bondɔki, mpe bonganga-nkisi
1. Nini emonisi ete bato mingi mpenza bandimaka makambo ya nkisi, bondɔki mpe bonganga-nkisi?
MOKANDA moko (African Traditional Religion) elobi ete “na Afrika, ezali na ntina te kobanda kotuna bato soki bandɔki bazalaka to te.” Ebakisi ete “mpo na moto nyonso ya Afrika, bondɔki ezali likambo ya solo mpe esengeli kotalela yango na lisɛki te.” Kati na bato oyo bandimaka nkisi, bondɔki mpe bonganga-nkisi okokuta bato oyo batángá kelasi te mpe bato oyo batángá kelasi mingi. Ata bakonzi ya Lingomba ya Bamizilma mpe bakonzi ya mangomba ya boklisto mpe bandimaka yango.
2. Bato mingi bakanisaka ete nguya ya nkisi eutaka wapi?
2 Bato mingi na Afrika bandimaka ete ezali na nguya moko ya elimo mpe ya kokamwa. Nzambe azali nkolo na yango. Bilimo mpe bankɔkɔ bakoki kosalela yango. Bato mosusu bayebi ndenge ya kozwa yango mpe kosalela yango mpo na bolamu ya bato (nkisi ya komibatela) to mpo na kosala bato mabe (kolɔka).
3. Kolɔka ezali nini mpe bato bakanisaka ete ekoki kosala nini?
3 Kolɔka to bondɔki esalelamaka mpo na kobundisa banguna. Bato bakanisaka ete baoyo basalelaka yango bakoki kotinda ngembo, ndɛkɛ, nzinzi to mpe nyama mosusu mpo na kosala bato mabe. Bato mingi bakanisaka ete moto abundaka mingi, akómaka ekomba, abɛlaka to mpe akufaka mpo balɔki ye.
4. Bato mingi bakanisaka nini mpo na bandɔki, mpe bato mosusu oyo batiká bondɔki bandimaka ete basalá nini?
4 Likambo mosusu oyo eyokani na bondɔki ezali bonganga-nkisi. Bato balobaka ete bandɔki batikaka nzoto na bango na butu mpe bapumbwaka mpo na kokende kokutana na baninga na bango to mpo na kolya to koboma bato. Lokola nzoto ya bandɔki yango etikalaka na mbeto, bato bandimaka masolo yango mingimingi mpo bato mosusu oyo bazalaki bandɔki mpe batiká, bandimaka makambo oyo basalaki kala. Na ndakisa, zulunalo moko ya Afrika ekomaki maloba ya bato oyo bazalaki bandɔki (mingimingi bilenge basi): “Nabomaki bato 150 ntango nabimisaki makama ya mituka.” “Nabomaki bana mitano; namɛlaki makila na bango nyonso.” “Nabomaki bamakango na ngai misato mpo baboyaki ngai.”
5. Nkisi ya komibatela ezali nini, mpe ndenge nini basalelaka yango?
5 Bato bakanisaka ete nkisi ya komibatela
esalisaka mpo mabe ekómela moto te. Bato oyo basalelaka nkisi yango balataka mpɛtɛ to bansinga. Bamɛlaka to bapakolaka bankisi oyo ekobatela bango. Na bandako to na mapango na bango, babombaka mwa biloko oyo bakanisaka ete ezali na nguya ya kobatela bango. Batyaka elikya na bango na mwa bikeko esika babombá mwa maloba ya Koran to ya Biblia.Ezali lokuta
6. Satana na bademo na ye basalaki nini na ntango ya kala, mpe ndenge nini tosengeli kotalela nguya na bango?
6 Ya solo, Satana na bademo na ye bazali banguna minene ya bato. Bazali na nguya ya kotambwisa makanisi mpe bomoi ya bato, mpe na ntango ya kala, bazalaki kokɔta na nzoto ya bato mpe ya banyama. (Matai 12:43-45) Tosengeli ata moke te kozwa nguya na bango na lisɛki, bobele bongo tosengeli mpe te komona ete bazali na nguya mingi koleka.
7. Satana alingi ete tóndima likambo nini, ndakisa nini epesami mpo na yango?
7 Satana azali mokosi monene. Akosaka bato bákanisa ete azali na nguya mingi koleka oyo azali na yango. Tózwa ndakisa: Na bambula oyo eleki, ekólo moko ya Afrika ezalaki na bitumba mpe basoda basalelaki bamasini oyo ekolisaka lolaka mpo na kobangisa banguna na bango. Liboso bábanda bitumba, basoda batyaki kasɛti oyo ezalaki kobimisa lokito makasi ya bibundeli ya mineneminene mpe ya mindoki ya makasi. Balingaki ete banguna na bango bákanisa ete bato oyo bazali kobundisa bango bazali na ebele ya bibundeli ya makasi mpenza. Ndenge moko mpe, Satana alingi ete bato bándima ete nguya na ye ezali na nsuka te. Mokano na ye ezali ete abangisa bato mpo básala mokano na ye, kasi ya Yehova te. Tiká tótalela makambo misato ya lokuta oyo Satana alingi ete bato bándima.
8. Tángá likambo moko ya lokuta oyo Satana alingi bato bándima.
8 Likambo moko ya lokuta oyo Satana alingi bato bándima yango oyo: Likambo moko te ya mabe eyaka kaka mpamba; mpasi nyonso, soki euti na moto te, eutaka na nguya moko boye. Tózwa ndakisa ya mwana moko oyo akufi na malaria. Mbala mosusu mama na ye ayebi ete ngungi nde epesaka malaria. Kasi mbala mosusu akokanisa mpe ete moto moko asali bikelakela mpo na kotinda ngungi eswa mwana na ye.
9. Ndenge nini Biblia emonisi ete mikakatano nyonso eutaka na Satana te?
9 Atako Satana azali na nguya ya komemela bato mikakatano, ezali lokuta kokanisa ete mikakatano nyonso eutaka na ye. Biblia elobi boye: “Komekana mbangu ezali mpo na bato ya mbangu te, to mpe etumba ezali mpo na bato ya makasi te, to mpe biloko ya kolya mpo na bato ya bwanya te, to bomɛngo mpo na bato ya mayele te, to koyokela mawa mpo na bato ya boyebi te; mpo ete ntango mpe makambo ekanami te ekómelaka bango nyonso.” (Mosakoli 9:11) Na ntango ya komekana mbangu, moto moko akoki kozala na mbangu koleka basusu, kasi mbala mosusu akolonga te. ‘Likambo moko oyo akanaki te’ ekoki kosala ete alonga te. Mbala mosusu abɛti libaku mpe akwei to abɛli, to mpe mosisa na ye moko ekoki kokangama. Makambo yango ekoki kokómela moto nyonso. Elingi koloba te ete Satana to ndɔki moko nde asali yango; esalemi kaka na mbalakaka.
10. Bato balobaka nini mpo na bandɔki, mpe ndenge nini toyebi ete ezali lokuta?
10 Lokuta ya mibale oyo Satana alingi ete
bato bándima yango oyo: Bandɔki batikaka nzoto na bango mpe bapumbwaka na butu mpo na kokutana na baninga na bango to mpo na kozwa to kolya bato mosusu. Omituna naino: ‘Soki ya solo bandɔki bakoki kopumbwa, bongo eloko nini ebimaka na nzoto na bango?’ Lokola tomonaki yango, molimo ezali moto ye moko, kasi ezali te eloko moko oyo ebimaka na moto. Mpe lisusu, elimo ezali nguya ya bomoi oyo esalaka ete nzoto ezala na bomoi, kasi yango moko ekoki te kosala mosala moko soki nzoto ezali te.11. Mpo na nini tolobi ete bandɔki bakoki te kotika nzoto na bango mpo na kokende epai mosusu, mpe yo moko ondimi yango?
11 Ezala molimo to elimo, nyonso mibale ebimaka na nzoto ya moto te mpo na kokende kosala bato malamu to mabe. Yango wana, bandɔki bakoki te kotika nzoto na bango mpo na kokende epai mosusu. Basalaka mpenza te makambo oyo babɛtaka ntolo ete basalaka to makambo oyo bakanisaka ete basalá.
12. Ndenge nini Satana akoki kotinda bato bákanisa ete basali makambo oyo basalá mpenza te?
12 Bongo ndenge nini bato mosusu oyo bazaláká bandɔki balobaka ete basalá makambo yango? Satana akoki kotinda bato bákanisa ete basali makambo oyo basalá ata mbala moko te. Satana asalelaka bimonaneli mpo na kotinda bato bákanisa ete bamonaki, bayokaki mpe basalaki makambo oyo basalá ata moke te. Na bongo, Satana azali koluka kopɛngwisa bato bátika nzela ya Yehova mpe azali kotinda bango bákanisa ete Biblia ezali koloba solo te.
13. (a) Nkisi ya komibatela ezali malamu? (b) Makomami elobi nini mpo na nkisi?
13 Lokuta ya misato yango oyo: Nkisi ya komibatela mpo bálɔka yo te ezali malamu. Biblia ekesenisi te kolɔka na nkisi ya komibatela. Epekisi lolenge nyonso ya nkisi to maji. Talá mibeko oyo Yehova apesaki na ekólo ya Yisalaele mpo na nkisi mpe mpo na baoyo basalelaka yango.
-
“Bokosala nkisi mpo na kolɔka moto te.”—Levitike 19:26.
- “Mobali [to] mwasi oyo akosololaka na [bilimo], to azali nganga na nkisi akobomama.”—
-
“Moto akozwama kati na bino te, oyo . . . [akosala] nkisi mpo na kosakola liboso, to nganga na nkisi, to [molɔki], to moto na kobyanga [bilimo].”—Deteronome 18:10-14.
14. Mpo na nini Yehova apesaki mibeko oyo epekisaki nkisi?
14 Mibeko oyo emonisaki polele ete Nzambe alingaki te ete bato na ye básala nkisi. Yehova apesaki bato na ye mibeko oyo mpo alingaki bango mpe alingaki te ete bákóma kobangabanga to bándima biyambayamba. Alingaki te ete bademo bátungisaka bango.
15. Ndenge nini Biblia emonisi ete Yehova azali na nguya mingi koleka Satana?
15 Atako Biblia ezali kolobela te makambo nyonso oyo bademo bakoki kosala mpe oyo bakoki kosala te, emonisaka ete Yehova Nzambe azali na nguya mingi mpenza koleka Satana na bademo na ye. Yehova atindaki bábengana Satana na likoló. (Emoniseli 12:9) Omoni mpe ete Satana asɛngaki Yehova nzela ete ameka Yobo mpe atosaki ndenge Nzambe akebisaki ye ete aboma Yobo te.—Yobo 2:4-6.
16. Tosengeli koluka libateli epai ya nani?
16 Masese 18:10 elobi boye: “Nkombo ya [Yehova] ezali ndako molai na nguya; moyengebene akokima kuna mpe akobika.” Yango wana tosengeli koluka libateli epai ya Yehova. Basaleli ya Nzambe balukaka bikelakela to bankisi te mpo na komibatela na misala mabe ya Satana na bademo, babangaka mpe te ete bandɔki bakoya kolɔka bango. Basaleli ya Nzambe bandimaka maloba ya Biblia oyo emonisi ete: “Miso ya [Yehova] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.”—2 Ntango 16:9.
17. Yakobo 4:7 endimisi biso likambo nini, kasi tosengeli kosala nini?
17 Yo mpe okoki kozala na elikya oyo soki osaleli Yehova. Yakobo 4:7 elobi boye: “Na yango, bótosaka Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.” Soki ozali kosalela Nzambe ya solo mpe ozali kotosa ye, okoki kolikya mpenza ete Yehova akobatela yo.