MOKAPO 22
Ntina oyo tosengeli kokosa te
KANISÁ ete mwana moko ya mwasi alobi na mama na ye boye: “Mama, soki kaka tobimi kelasi, nakozonga mbala moko na ndako.” Nzokande mwana yango atikali kosakana na baninga na ye mpe na nsima ayei koloba na mama na ye ete: “Molakisi na biso alobaki na ngai natikala soki tobimi kelasi.” Koloba ndenge wana ezali malamu?—
To mbala mosusu kanisá ete mwana moko ya mobali alobi na tata na ye ete: “Ngai te moto nabɛtaki bale na ndako.” Kasi tokoloba boni soki ya solo ye nde moto abɛtaki yango? Lokola awangani likambo yango akosi to akosi te?—
Moteyi Monene amonisaki biso eloko ya malamu oyo tosengeli kosala. Alobaki ete: ‘Tiká ete liloba na yo Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na yo, Te; mpo oyo ebakisamaka likoló na yango ezali kouta na moto mabe.’ (Matai 5:37) Yesu alingaki mpenza koloba nini?— Alingaki koloba ete tosengeli kokokisa maloba na biso.
Kati na Biblia, tozali kokuta lisolo moko oyo ezali komonisa ntina ya koloba solo. Lisolo yango elobeli bato mibale oyo balobaki ete bazali bayekoli ya Yesu. Tiká tóyoka lisolo yango.
Sanza mibale ekoki naino te nsima ya liwa ya Yesu, ebele ya bato oyo bauti mosika mpenza bayei na Yelusaleme mpo na fɛti moko monene ya Bayuda, fɛti oyo babengi Pantɛkɔti. Ntoma Petelo asali lisukulu moko ya kafukafu mpe na lisukulu yango ayebisi bato makambo etali Yesu, oyo Yehova asekwisaki na bakufi. Mpo na ebele ya bato oyo bayei na Yelusaleme, oyo ezali mbala na bango ya liboso báyoka makambo etali Yesu. Sikoyo bazali na mposa ya koyeba makambo mingi. Na bongo, basengeli kosala nini?
Baumeli mikolo mingi mpenza. Kasi nsima ya mwa mikolo, bamosusu kati na bango, mbongo na bango esili; sikoyo bakómi na mposa ya lisalisi mpo bákoka kosomba biloko ya kolya. Bayekoli oyo bazali na Yelusaleme bamoni malamu básalisa bango. Na bongo, mingi kati na bayekoli yango batɛki biloko na bango mpe bamemi mbongo oyo bazwi epai ya bantoma ya Yesu. Na nsima bantoma bapesi mbongo yango epai ya bato oyo basengeli na mbongo.
Ananiasi ná mwasi na ye, Safira, oyo bazali na lisangá ya boklisto ya Yelusaleme, batɛki elanga na bango. Moto moko atindi bango te ete bátɛka yango. Bango moko bayokani bátɛka yango. Kasi soki basali bongo ezali te mpo balingi bayekoli ya sika ya Yesu. Ɛɛ, Ananiasi ná Safira balingi nde bato bákanisa ete bazali bato malamu, nzokande bazali mpenza bato malamu te. Yango wana bayokani mpo báloba ete bakopesa mbongo nyonso mpo na kosalisa bato mosusu. Nzokande bakopesa kaka ndambo. Okanisi boni mpo na yango?—
Ananiasi ayei kokutana na bantoma. Apesi bango mbongo yango. Ɛɛ, Nzambe ayebi ete apesi mbongo nyonso te. Yango wana Nzambe apesi ntoma Petelo likoki ya koyeba ete Ananiasi azali koloba solo te na likambo yango.
Na nsima Petelo alobi ete: ‘Ananiasi, mpo na nini otiki Satana atinda yo osala likambo ya boye? Elanga ezalaki ya yo. Moto moko te atindaki yo ete otɛka yango. Mpe ata nsima ya kotɛka yango, kaka yo moko nde olingaki kokata soki okopesa mbongo yango to okopesa yango te. Kasi mpo na nini ozali koloba ete opesi mbongo nyonso, nzokande opesi kaka ndambo ya mbongo? Na yango, ozali kokosa biso te, kasi ozali kokosa nde Nzambe.’
Yango ezali likambo ya kosakana te. Ananiasi azali kokosa! Azali kosala te makambo oyo azali koloba. Azali kaka koloba, kasi azali te kosala makambo yango. Biblia eyebisi biso likambo oyo ebimi na nsima. Elobi ete: ‘Ntango ayoki maloba ya Petelo, Ananiasi akwei na nse mpe akufi.’ Nzambe moto abomi Ananiasi! Na nsima, bamemi ebembe na ye libándá mpo na kokunda yango.
Nsima soki ya ngonga misato, Safira akɔti. Ayebi te likambo nini ekómeli mobali na ye. Na bongo, Petelo atuni ye ete: ‘Bino mibale botɛkaki elanga na ntalo ya mbongo oyo bopesi biso?’
Safira apesi eyano ete: ‘Ɛɛ, totɛkaki elanga kaka na ntalo wana.’ Nzokande ye mpe akosi! Na mbongo oyo batɛkaki elanga, balongolaki mwa ndambo oyo babombaki mpo na bango moko. Na bongo, Nzambe abomi mpe Safira.—Misala 5:1-11.
Liteya nini tozwi na lisolo ya Ananiasi ná Safira?— Lisolo yango eteyi biso ete Nzambe alingaka te bato oyo bakosaka. Alingi biso tólobaka solo mikolo nyonso. Kasi bato mingi balobaka ete kokosa ezali mabe te. Okanisi ete ndenge bato wana balobaka ezali malamu?— Oyebi ete, awa na mabelé, soki bato nyonso bazali kozwa bamaladi, bampasi mpe liwa ezali mpo na lokuta?—
Kobosana te ete Zabolo akosaki Eva, mwasi ya liboso. Zabolo alobaki na ye ete akokufa te soki azangi kotosa Nzambe na kolyáká mbuma oyo Nzambe apekisaki ye kolya. Eva andimaki maloba ya Zabolo mpe alyaki mbuma yango. Eva apesaki mpe Adama mbuma yango mpe alyaki. Na nsima bakómaki bato ya masumu, mpe bana na bango nyonso babotamaki bato ya masumu. Yango wana bana nyonso ya Adama bakómaki komona mpasi mpe kokufa mpo babotamaki bato ya masumu. Ndenge nini mpasi nyonso wana ebandaki?— Ebandaki na kokosa.
Ezali likambo ya kokamwa te soki Yesu alobaki ete Zabolo “azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta”! Azalaki moto ya liboso oyo abukaki lokuta. Ntango moto abuki lokuta, azali kosala kaka likambo oyo Zabolo asalaki na ebandeli. Ntango nyonso oyo mposa ya kokosa eyeli biso, tosengeli kokanisa likambo wana.—Yoane 8:44.
Ntango nini okoki koyoka mposa ya kokosa?— Ntango oyo osali likambo moko ya mabe, ezali bongo te?— Ekoki kozala ete opasoli eloko moko, kasi osalaki yango na nko te. Soki batuni yo, okoloba ete ezali ndeko na yo ya mobali to ya mwasi nde aposolaki yango? To okoloba nde ete nayebi te?—
Ekozala boni soki basɛngaki yo osala devuare na yo, nzokande osali yango kaka ndambo? Okoloba nde ete osalaki yango nyonso, ata soki osalaki yango te?— Tosengeli kobosana te oyo ekómelaki Ananiasi ná Safira. Balobaki solo kaka ndambo. Mpe Nzambe abomaki bango mpo na komonisa ete likambo basalaki ezalaki mabe mpenza.
Na bongo, ata tosali mabe ya ndenge nini, soki tobuki lokuta to soki tolobi solo kaka ndambo, yango ekobebisa makambo koleka. Biblia elobi ete: “Bólobanaka solo.” Elobi lisusu ete: “Bólobanaka lokuta te.” Yehova alobaka ntango nyonso solo, mpe alingi kozela ete biso mpe tólobaka solo.—Baefese 4:25; Bakolose 3:9.
Tosengeli ntango nyonso koloba solo. Yango nde likambo oyo elobelami na Exode 20:16; Masese 6:16-19; 12:19; 14:5; 16:6; mpe Baebele 4:13.