Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 26

Ntina oyo kosala makambo ya malamu ezalaka mpasi

Ntina oyo kosala makambo ya malamu ezalaka mpasi

PAULO azalaki kosepelisa nani ntango azalaki kosala makambo ya mabe?— Azalaki kosepelisa Satana Zabolo. Kasi azalaki mpe kosepelisa bakonzi ya lingomba ya Bayuda. Na nsima, ntango Saulo akómaki moyekoli ya Moteyi Monene mpe akómaki kobengama Paulo, bakonzi wana babandaki koyina ye. Na bongo, oyebi sikoyo mpo na nini ezalaka mpasi mpo moyekoli ya Yesu asala makambo ya malamu?—

Mpasi nini Paulo amonaki mpo asalaki makambo ya malamu?

Mokolo moko, nganga-nzambe monene na nkombo Ananiasi apesaki etinda ete bábɛta Paulo na elongi. Kutu Ananiasi asalaki nyonso bátya Paulo na bolɔkɔ. Paulo amonaki mpasi mingi ntango akómaki moyekoli ya Yesu. Na ndakisa, bato mabe babɛtaki Paulo mpe babambaki ye mabanga minene mpo bazalaki koluka koboma ye.​—Misala 23:1, 2; 2 Bakolinti 11:24, 25.

Bato mingi bakoluka kotinda yo osala makambo oyo esepelisaka Nzambe te. Na bongo mituna ya komituna yango oyo: Olingaka mingi mpenza makambo ya malamu? Olingaka mpenza yango mingi mpe ete okolanda kaka kosala makambo ya malamu ata soki bato mosusu bakoyina yo mpo na yango? Mpo osala bongo, esɛngaka mpenza kozala na mpiko, ezali bongo te?—

Mbala mosusu okoki komituna ete: ‘Mpo na nini bato bayinaka biso, nzokande tosalaka makambo ya malamu? Basengeli nde kosepela, ezali bongo te?’ Omikosi te ndenge okanisi bongo. Mbala mingi bato bazalaki kolinga Yesu mpo na makambo ya malamu oyo azalaki kosala. Mokolo moko, bato nyonso ya engumba bayanganaki na porte ya ndako epai azalaki kofanda. Bayaki wana mpo Yesu azalaki kobikisa bato oyo bazalaki kobɛla.​—Malako 1:33.

Kasi na bantango mosusu, bato bazalaki kosepela te na makambo oyo Yesu azalaki koteya. Ata azalaki ntango nyonso koteya solo, bato mosusu bazalaki koyina ye makasi mpo azalaki koloba. Mokolo moko, likambo ya motindo wana esalemaki na Nazalete, engumba oyoYesu akolaki. Akɔtaki na sinagoga, esika oyo Bayuda bazalaki koyangana mpo na kosambela Nzambe.

Kuna na kati, Yesu apesaki lisukulu moko kitoko, oyo euti na Makomami. Na ebandeli, bato basepelaki na yango. Bakamwaki na maloba kitoko oyo ezalaki kobima na monɔkɔ na ye. Bakokaki kondima te ete ezali elenge mobali oyo akolaki na engumba na bango nde azali kobimisa maloba ya ndenge wana.

Kasi nsima na yango, Yesu alobaki likambo mosusu. Alobelaki ntango oyo Nzambe akomonisa boboto na ye epai ya bato oyo bazali Bayuda te. Ntango alobelaki likambo wana, bato oyo bazalaki na sinagoga basilikaki. Oyebi mpo na nini basilikaki?— Mpo bazalaki kokanisa ete kaka bango moko nde bato oyo Nzambe asengeli komonisela boboto. Bazalaki kokanisa ete kaka bango nde bazali bato malamu koleka bato mosusu nyonso. Na bongo, bayinaki Yesu mpo na makambo oyo alobaki. Mpe oyebi likambo oyo balingaki kosala ye?—

Biblia elobi ete: ‘Bakangaki Yesu mpe babimisaki ye nokinoki na libándá ya engumba. Bamemaki ye na nsɔngɛ ya ngomba mpe balingaki kobwaka ye longwa kuna tii na nse mpo na koboma ye! Kasi Yesu akimaki bango.’​—Luka 4:16-30.

Mpo na nini bato oyo bazali koluka koboma Yesu?

Soki yango ekómelaki yo, olingaki okoka lisusu kozonga epai ya bato yango mpo na koyebisa bango makambo ya Nzambe?— Mpo okoka kosala bongo, esengeli mpenza ozala na mpiko, ezali bongo te?— Nzokande Yesu asalaki bongo; mbula moko na nsima, azongaki na Nazalete. Biblia elobi ete: “Abandaki koteya bango na kati ya sinagoga na bango.” Yesu apesaki nzela te ete kobanga bato oyo bazalaki kolinga Nzambe te epekisa ye koloba solo.​—Matai 13:54.

Na libaku mosusu, na mokolo ya sabata, Yesu azalaki na esika moko boye; na esika yango ezalaki mpe na mobali moko oyo lobɔkɔ na ye ekauká mpe ekɔndá. Nzambe apesaki Yesu nguya mpo na kobikisa mobali yango. Kasi bamosusu kati na bato oyo bazalaki wana balingaki kolukela Yesu makambo. Moteyi Monene asalaki nini?— Ya liboso atunaki ete: ‘Soki bozalaki na mpate kaka moko oyo ekwei na libulu mokolo ya Sabata, bolingaki kobimisa yango te?’

Ɛɛ, balingaki kosala bongo mpo na mpate, ata na Sabata, mokolo oyo bango basengelaki kopema. Yango wana Yesu alobaki ete: ‘Ezali kutu malamu kosalisa moto na Sabata, mpo ete moto aleki mpate na motuya!’ Ntembe ezalaki te ete Yesu asengelaki kosalisa mobali wana. Ɛɛ, asengelaki kobikisa ye mpenza!

Yesu ayebisaki mobali yango ete asembola lobɔkɔ na ye. Na mbala moko, lobɔkɔ yango ebongaki. Mobali yango ayokaki mpenza esengo! Kasi bato wana mosusu bayokaki ndenge nini? Bango basepelaki?— Te. Kutu bakómaki nde koyina Yesu lisusu koleka. Babimaki libándá mpe basalaki likita mpo báboma ye!​—Matai 12:9-14.

Ezali mpe kaka bongo lelo oyo. Ata tosali ndenge nini, tokokoka soki moke te kosepelisa moto nyonso. Na bongo, tosengeli kopona nani mpenza tolingi kosepelisa. Soki toponi kosepelisa Yehova Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu Klisto, boye tosengeli ntango nyonso kosala oyo bango bazali koteya. Kasi soki tosali bongo, okanisi nani akoyina biso? Nani akolukela biso mindɔndɔ mpo tósala makambo ya malamu te?—

Ezali Satana Zabolo. Kasi longola ye, nani mosusu?— Ezali bato oyo Zabolo akosá mpo bándima makambo ya lokuta. Yesu ayebisaki bakonzi ya mangomba ya ntango na ye ete: “Bino bouti na tata na bino Zabolo, mpe bolingi kokokisa bamposa ya tata na bino.”​—Yoane 8:44.

Ezali na bato mingi oyo Zabolo alingaka. Bato yango, Yesu abengi bango “mokili.” Mpo na yo, “mokili” oyo Yesu alobeli, okanisi ezali nini?— Tiká tótala Yoane mokapo 15, vɛrsɛ 19, mpo tóyeba mokili yango. Na mokapo wana, tozali kotánga maloba oyo ya Yesu: “Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango. Lokola bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na kati ya mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.”

Na bongo mokili oyo ezali koyina bayekoli ya Yesu esalemi na bato nyonso oyo bazali bayekoli na ye te. Mpo na nini mokili yango ezali koyina bayekoli ya Yesu?— Kanisá naino. Nani azali mokonzi ya mokili oyo?— Biblia elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” Moto mabe yango nde Satana Zabolo.​—1 Yoane 5:19.

Omoni sikoyo ntina oyo kosala makambo ya malamu ezalaka mpasi?— Satana ná mokili na ye nde bazali koyeisa makambo mpasi. Kasi ntina mosusu mpe ezali. Oyebi lisusu ntina yango?— Na Mokapo 23 ya mokanda oyo, toyekolaki ete biso nyonso tobotami na lisumu. Ntango bakolongola lisumu, Zabolo, mpe mokili na ye, ekozala ntango moko ya esengo, ezali bongo te?—

Ntango mokili oyo ekoleka, nini ekokómela bato oyo basalaka makambo ya malamu?

Biblia epesi elaka oyo: “Mokili ezali koleka.” Yango elimboli ete bato nyonso oyo bazali bayekoli ya Moteyi Monene te bakozala lisusu te. Bakopesa bango nzela te ya kozala na bomoi libela na libela. Oyebi nani oyo akozala na bomoi libela na libela?— Biblia elobi lisusu ete: “Moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:17) Ɛɛ, kaka bato oyo basalaka makambo ya malamu, bato oyo basalaka “mokano ya Nzambe,” nde bakozala na bomoi libela na libela na mokili ya sika ya Nzambe. Na bongo, ata soki ezalaka mpasi kosala makambo ya malamu, tólinga kaka kosala makambo ya malamu, ezali bongo te?—

Tiká tótánga elongo mikapo oyo ezali komonisa ntina oyo ezalaka pɛtɛɛ te kosala makambo ya malamu: Matai 7:13, 14; Luka 13:23, 24; mpe Misala 14:21, 22.