Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 37

Tókanisa Yehova mpe mwana na ye

Tókanisa Yehova mpe mwana na ye

KANISÁ ete moto moko akabeli yo eloko moko ya kitoko mpenza. Okosala nini?— Okoloba na ye kaka mɛrsi mpe obosani ye libela? To okobosana ye te mpe bolamu oyo asaleli yo?—

Yehova Nzambe apesaki biso likabo moko ya malamu mpenza. Atindaki Mwana na ye awa na mabelé mpo akufela biso. Oyebi mpo na nini Yesu asengelaki kokufela biso?— Yango ezali likambo moko ya ntina mingi oyo tosengeli koyeba.

Ntango toyekolaki Mokapo 23, tomonaki ete Adama asalaki lisumu ntango abukaki mobeko ya kokoka ya Nzambe. Mpe tozwaki lisumu epai ya Adama, tata na biso nyonso. Na bongo, okanisi ete tozali na mposa ya nini?— Tokoki koloba ete tozali na mposa ya tata mosusu, oyo akotikala moto ya kokoka bomoi na ye mobimba awa na mabelé. Okanisi ete tata wana ekoki kozala nani?— Ezali bongo Yesu.

Yehova atindaki Yesu awa na mabelé mpo akóma lokola tata na biso na esika ya Adama. Biblia elobi ete: “‘Moto ya liboso Adama akómaki molimo ya bomoi.’ Adama ya nsuka akómaki elimo oyo epesaka bomoi.” Nani azalaki Adama ya liboso?— Ezali moto oyo Nzambe azalisaki na putulu ya mabelé. Nani azali Adama ya mibale?— Yesu. Biblia emonisi yango ntango elobi ete: “Moto ya liboso [Adama] auti na mabelé mpe asalemi na putulu; moto ya mibale [Yesu] auti na likoló.”​—1 Bakolinti 15:45, 47; Genese 2:7.

Lokola Nzambe alongolaki bomoi ya Yesu na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Malia, Yesu azwaki lisumu ya Adama te. Yango wana Yesu azalaki moto ya kokoka. (Luka 1:30-35) Ezali mpe mpo na yango nde, ntango Yesu abotamaki, anzelu moko alobaki na babateli ya mpate ete: “Mobikisi moko abotameli bino lelo.” (Luka 2:11) Kasi mpo Yesu azala Mobikisi na biso, lokola azalaki naino mwana moke, asengelaki libosoliboso kosala nini?— Asengelaki kokola mpe kozala mobali oyo akɔmɛli, lokola Adama. Yango wana nde Yesu akokaki kokóma ‘Adama ya mibale.’

Yesu, Mobikisi na biso, akokóma mpe ‘Tata na biso ya seko.’ Babengi ye bongo na Biblia. (Yisaya 9:6, 7) Ɛɛ, Yesu, moto ya kokoka, akoki kokóma tata na biso na esika ya Adama oyo akómaki moto ya kozanga kokoka ntango asalaki lisumu. Yango wana, tokoki kopona ‘Adama ya mibale’ mpo azala tata na biso. Atako bongo, Yesu azali kaka Mwana ya Yehova Nzambe.

Adama ná Yesu bakokanaki na nini, mpe mpo na nini esengelaki mpenza bákokana?

Soki tozali koyekola koyeba Yesu, tokondima azala Mobikisi na biso. Ozali koyeba lisusu soki tosengeli kobikisama na nini?— Ɛɛ, tosengeli kobikisama na lisumu mpe na liwa oyo tozwaki epai ya Adama. Bomoi ya Yesu moto ya kokoka mpe oyo akɔmɛlá oyo akabaki yango lokola mbeka mpo na biso, babengaka yango lisiko. Yehova apesaki lisiko yango mpo na kolimbisa masumu na biso.​—Matai 20:28; Baloma 5:8; 6:23.

Ya solo, tokolinga te kobosana oyo Nzambe ná Mwana ye basalaki mpo na biso, ezali bongo te?— Yesu amonisaki bayekoli na ye lolenge ya malamu oyo ekokaki kosalisa bango bákanisaka oyo ye asalaki. Tiká tólobela yango.

Kanisá ete ozali na shambre ya ndako moko ya etaze na Yelusaleme. Butu ekómi. Yesu ná bantoma na ye bafandi na mesa mpona kolya. Batye misuni ya mwana-mpate oyo batumbi ná mampa ya papala, mpe vinyo ya motane. Bazali kolya biloko yango mpo na ntina mosusu. Oyebi ntina yango?—

Biloko yango ezali kozongisa na makanisi na bango oyo Yehova asalaki esili koleka bambula mingi, ntango bato na ye, bana ya Yisalaele, bazalaki baombo na Ezipito. Na ntango yango, Yehova ayebisaki bato na ye boye: ‘Na libota mokomoko, bóboma mwana-mpate moko mpe bótya makila na yango likoló ya makonzí ya baporte ya bandako na bino.’ Alobaki lisusu boye: ‘Bókɔta na bandako na bino, mpe bólya mwana-mpate yango.’

Ndenge nini makila ya mwana-mpate ebatelaki bato ya Yisalaele?

Bayisalaele basalaki bongo. Mpe na butu yango kaka, anzelu ya Nzambe alekaki na mokili ya Ezipito. Anzelu yango abomaki mwana nyonso ya liboso na bandako mingi. Kasi azalaki koleka likoló ya ndako nyonso oyo azalaki komona makila ya mwana-mpate na makonzí ya baporte. Na bandako yango, mwana moko te akufaki. Makambo oyo anzelu ya Yehova asalaki ebangisaki Farao, mokonzi ya Ezipito, mingi. Yango wana, ayebisaki Bayisalaele ete: ‘Bókende na bino. Bóbima na Ezipito!’ Mbala moko, batyaki biloko na bango likoló ya bakamela ná bampunda mpe bakendaki.

Yehova alingaki ete bato na ye bábosana te ndenge alongolaki bango na boombo. Yango wana alobaki ete: ‘Mbala moko na mbula bosengeli kolya bilei lokola oyo bolei na butu oyo.’ Bilei wana oyo ekeseni na oyo ya mikolo mosusu babengaki yango Elekeli. Oyebi mpo na nini?— Mpo na butu yango anzelu ya Nzambe “alekaki likoló” ya bandako oyo bapakolaki makila.​—Exode 12:1-13, 24-27, 31.

Yesu ná bayekoli na ye bazali kokanisa likambo yango ntango bazali kolya Elekeli. Nsima na yango, Yesu asali likambo moko ya ntina mingi. Nzokande, liboso asala likambo yango, abimisi naino Yuda, ntoma oyo azalaki lisusu sembo te. Na nsima, Yesu akamati eteni moko ya limpa oyo etikalaki, abondeli mpo na yango, abuki yango, mpe apesi yango na bayekoli na ye. Alobi ete: “Bókamata, bólya.” Bongo ayebisi bango ete: ‘Limpa oyo elakisi nzoto na ngai oyo nakopesa ntango nakokufela bino.’

Nsima na yango Yesu akamati kɔpɔ ya vinyo ya motane. Nsima ya kosala libondeli mosusu ya kopesa matɔndi, apesi yango ete bátambwisa yango mpe alobi ete: “Bómɛla yango, bino nyonso.” Mpe ayebisi bango: ‘Vinyo oyo elakisi makila na ngai. Etikali moke, nakosopa makila na ngai mpo na kolongola bino na masumu. Bósalaka boye mpo na kokanisa ngai.’​—Matai 26:26-28; 1 Bakolinti 11:23-26.

Makila ya Yesu, oyo akokanisaki yango na vinyo, ekoki kosala nini mpo na biso?

Omoni ete Yesu alobaki na bayekoli ete basengelaki kosalaka bongo mpo na kokanisa ye?— Basengelaki lisusu te kolya Elekeli. Na esika ya Elekeli, mbala moko na mbula bakobanda nde kolya bilei yango mpo na kokanisa Yesu mpe liwa na ye. Babengaka yango Bolei ya Mpokwa ya Nkolo. Lelo oyo mbala mingi tobengaka yango Ekaniseli. Mpo na nini?— Mpo yango ezali kotinda biso tókanisa lisusu oyo Yesu ná Tata na ye, Yehova Nzambe, basalaki mpo na biso.

Limpa esengeli kotinda biso tókanisa nzoto ya Yesu. Andimaki kopesa nzoto yango lokola mbeka mpo biso tókoka kozwa bomoi ya seko. Kasi ezali boni mpo na vinyo ya motane?— Yango esengeli kosalisa biso tókanisa motuya ya makila ya Yesu. Makila yango ezali na motuya mingi koleka makila ya mwana-mpate oyo basalelaki na Elekeli na Ezipito. Oyebi mpo na nini?— Biblia elobi ete makila ya Yesu ekoki kosala ete masumu na biso elimbisama. Mpe ntango masumu nyonso na biso ekolimbisama, tokobɛla lisusu te, tokonuna lisusu te, mpe tokokufa lisusu te. Tosengeli kokanisaka makambo wana ntango tozali koyangana na Ekaniseli.

Moto nyonso asengeli nde kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli?— Yesu ayebisaki baoyo basengeli kolya mpe komɛla yango ete: ‘Bokozala na kati ya bokonzi na ngai mpe bokofanda elongo na ngai na bakiti ya bokonzi na likoló.’ (Luka 22:19, 20, 30) Yango elakisi ete bakokende na likoló mpo na kozala bakonzi elongo na Yesu. Na bongo, kaka baoyo bazali na elikya ya koyangela elongo na Yesu na likoló nde basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo yango.

Kasi ata baoyo balyaka limpa te mpe bamɛlaka vinyo te basengeli koyangana na Ekaniseli. Oyebi mpo na nini?— Mpo Yesu apesaki bomoi na ye mpe mpo na biso. Ntango tozali koyangana na Ekaniseli, tozali komonisa ete tobosani likambo yango te. Tozali kokanisa likabo ya malamu mpenza oyo Nzambe apesaki biso.

Mikapo mosusu oyo ezali komonisa ntina ya lisiko ya Yesu yango oyo: 1 Bakolinti 5:7; Baefese 1:7; 1 Timote 2:5, 6; mpe 1 Petelo 1:18, 19.