Mpo na nini nalukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Mpo na nini nalukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
“Lokola tata azalaki molakisi, moto nyonso azalaki kokanisa ete nasengeli kaka kozwa bapwɛ zomi likoló ya zomi. Ntango mosusu nazalaki kolela tii mpɔngi ekozwa ngai.”—Leah. *
“Nalukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka. Nalingaka kosala likambo nyonso malamu koleka bato nyonso to kosala yango na ndenge oyo ekeseni na bato nyonso, soki bongo te namonaka ntina ya kosala yango te.”—Caleb.
OMONAKA ete olukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka? Omitungisaka ntango nyonso ete ata soki obomi nzoto ndenge nini, osalaka eloko moko ya malonga te? Okokaka te kokanga motema ntango bayebisi yo ete osali mwa libunga? Ntango makambo ezali kotambola malamu te, omipesaka foti, omimonaka zoba, ozangi mayele to oyebi eloko te? Soki olingi ete mosala moko boye esalema malamu, omonaka ete esengeli yo moko osala yango? Obangaka ntango mosusu ete okolonga te, yango wana ozongisaka makambo nsima to osalaka eloko te?
Ezali boni mpo na boyokani na yo na bato? Ozalaka na baninga te mpo omonaka ete ata moto moko te azali kokoka kosala ndenge yo olingaka? Olandelaka mabunga nyonso oyo bato basalaka? Soki eyano na yo na moko ya mituna wana ezali ɛɛ, na bongo, yebá ete ozali kobundana na oyo babengi koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka. Mpe soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Likambo yango emonanaka mingi epai ya bilenge—mingi mpenza epai ya baoyo bazalaka na mayele mingi to baoyo balongaka na bomoi na bango. *
Nini etindaka moto aluka kosala makambo na ndenge ya kokoka? Bato oyo bayekolaki likambo yango bapesi kaka makanisi. Buku moko (Le perfectionnisme: quel mal y a-t-il à être trop bon?, na Lingelesi) elobi ete: “Ezaleli ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ezali maladi te; ozwá yango te. Eutaka mpe na libota te; obotamá na yango te. Kasi, ndenge nini okómaki na makanisi ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka? Bato mosusu ya mayele bakanisaka ete likambo yango ebandaka na bomwana. Soki na libota na bino bazalaki kolinga osala makambo nyonso malamumalamu, soki yo moko obandaki kokolisa momeseno yango, soki na esika okolaki bato bazalaki na momeseno yango, soki balobelaka yango mingi na televizyo to na radio, to mpe soki omekolaki moto moko oyo okoki mpenza kokokana na ye te, nyonso wana ekoki kosala ete okóma komitungisa bomoi na yo mobimba, omipesaka foti, mpe olukaka kosala mingi koleka.”
Ata soki momeseno yango euti na nini, koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekoki kosilisa yo esengo na bomoi. Tiká tótalela momeseno yango na mozindo mpe tóluka koyeba mpo na nini ekoki kozala mabe mpo na yo.
Koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka elimboli nini?
Koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka elimboli kaka te kozala na molende mpo na kosala mosala malamu koleka to kosepela na mosala oyo osali malamu. Kutu, na Masese 22:29 (NW), Biblia ekumisi moto oyo “ayebi mosala na ye malamu.” Ekumisi mpe bato oyo bakómaki na mayele ya kosala misala ndenge na ndenge. (1 Samwele 16:18; 1 Mikonzi 7:13, 14) Yango wana ezali mabe te kosala milende mpo na kosala mosala malamu to komityela mikano ya kosala malamu, kasi oyo okoki kokokisa. Na ndenge yango nde moto akoki ‘kozwa esengo kati na mosala na ye.’—Mosakoli 2:24.
Kasi, moto oyo alukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka ayokaka esengo wana te. Azali na makanisi oyo ebongi te na oyo etali kolonga. Bato mosusu ya mayele balobaka ete, koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka emonanaka na komityela mikano oyo “okokoka kokokisa te (ezaleli ya kokoka), mpe ntango nyonso kosepela ata na likambo moko te, ata soki esalemi malamu ndenge nini.” Yango wana, moto oyo alukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka, “makanisi na ye ezalaka kimya te, akanisaka ntango nyonso ete akolonga te.” Buku moko elimboli ezaleli ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ete ezali “likanisi ya malamu te oyo moto amityeli ye moko mpe/to alingi ete bato mosusu bázala bato ya kokoka.” Ezali “likanisi oyo bato mosusu bazalaka na yango ete makambo nyonso na bomoi na bango esengeli kosalema malamumalamu, na mbeba to na foti ata moke te, na molɔngɔ mpenza.”
Kasi, Yesu alobaki te ete: “Bosengeli kozala bato ya kokoka, ndenge Tata na bino ya likoló azali moto ya kokoka”? (Matai 5:48) Ezali bongo, kasi Yesu alingaki koloba te ete moto akoki kozanga libunga te. Kutu, Biblia elobi ete “bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23) Kasi, Yesu alingaki mpenza koloba nini? Na Biblia, liloba “kokoka” epesaka likanisi ya kozala mobimba. (Matai 19:21) Ntango Yesu alobaki ete tosengeli kozala bato ya kokoka, azalaki kolobela bolingo mpe alendisaki bayekoli na ye bákómisa bolingo na bango mobimba. Ndenge nini? Esengelaki bákolisa bolingo na bango mpo bálingaka ata banguna na bango. Luka akomaki maloba oyo Yesu alobaki ete: “Bókoba kokóma bato ya motema mawa, ndenge Tata na bino azali moto ya motema mawa.”—Luka 6:36.
Kasi, bato oyo balukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka bakanisaka ete moto akoki kosala ata mwa libunga te. Yango wana, basɛngaka bato básala makambo oyo bakokoka te. Buku moko (Y a-t-il des perfectionnistes heureux?) elobi ete bato oyo balukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka bazali “bato oyo bamitungisaka ete bato mosusu basalaka misala na bango malamu te . . . Na miso na bango, bato mosusu bamonaka ata ntina moko te ya kosala mosala malamumalamu mpe na ndenge esɛngami.”
Na ndakisa, Carly azwaka bapwe ya malamu mpenza na kelasi, alandaka kutu mateya ya bana oyo bazalaka na mayele mingi. Kasi, ayokanaka na bato mosusu malamu te. Alingaka moto asala ata mwa libunga moko te, yango wana aboyá baninga na ye nyonso. Alobi boye: “Nakanisi bazalaki kosala ata eloko moko ya malonga te.”
Basusu balukaka ezaleli ya kokoka epai ya bato mosusu te, kasi epai na bango moko. Buku oyo tolobeli awa likoló elimboli ete bato ya ndenge wana bakanisaka ete “ezala bango moko to makambo oyo basalaka ezali mpenza malamu te . . . mpe bamitungisaka mingi ndenge bato mosusu bakokanisela bango.”
Mokakatano ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka
Na esika epesa ye matomba mpe esalisa ye, mbala mingi moto oyo alukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka Masese 19:20, NW) Kasi, na esika andima toli oyo bapesi ye, Daniel amoni nde ete asalaki lisolo na ye malamu te. Alobi boye: “Nayokaki mposa ya kozinda na mabelé.” Asalaki bapɔsɔ mingi, azalaki kozwa mpɔngi te.
amipesaka nde mpasi. Mpe na esika ya koluka kosala malamu koleka, kotalela makambo na liso ya ndenge wana ebebisaka nde mosala. Moklisto moko nkombo na ye Daniel, akanisi lisusu milende oyo asalaki mpo na kobongisa lisolo oyo bapesaki ye na eteyelo oyo esalemaka na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Bandeko mingi oyo balandaki lisolo na ye bapesaki ye longonya mpo na lisolo kitoko oyo asalaki. Na nsima, molakisi apesaki Daniel mwa toli, na mayele mpenza, mpo esalisa ye. Biblia elendisi biso ‘tóyoka toli mpe tóndima disipiline.’ (Koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekoki mpe kopekisa moto koyekola malamu. Na lisolo moko oyo bakomaki na Internet, na site moko mpo na bilenge, mwana mwasi moko nkombo na ye Rachel akomaki boye: “Ntango nabandaki kotánga na eteyelo ya ntei, namityelaki mokano ya kolonga. Nazalaki ntango nyonso kozwa bapwɛ zomi likoló ya zomi mpe nazalaki komona ntina moko te ya kozwa bapwɛ ya nse.” Kasi eumelaki te, Rachel amonaki ete azalaki na mwa mokakatano na mituya mpe azwaki “bobele” bapwɛ 9 likoló ya 10. Rachel alobi boye: “Moto nyonso amonaki ete ezali bapwɛ ya malamu, kasi ngai . . . nayokaki nsɔni. Nabandaki kobanga mpe komitungisa . . . Nazalaki kobanga kotuna molakisi asalisa ngai mpo nazalaki kokanisa ete soki natuni alakisa ngai ndenge ya kosala devuare, akomona ete nazali koyeba eloko te . . . Mbala mosusu nazalaki kokanisa ete malamu kutu nakufa na esika ete nalonga te.”
Bilenge mosusu balingaki kutu komiboma mpo bazalaki kobanga ete bakolonga te na kelasi. Likambo ya esengo ezali ete makanisi mabe ndenge wana eyelaka bilenge mingi te. Kasi ndenge Sylvia Rimm, monganga ya maladi ya motó amonisi yango, basusu baboyaka kosala devuare mpo babangaka ete bakolonga te. Monganga yango amonisi ete bana-kelasi mosusu oyo balukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka “basalaka badevuare na bango te, basepelaka te na bapwɛ oyo bazwi, babosanaka kosala badevuare na bango, mpe bazangaka maloba ya komilongisa te.”
Lisusu, bilenge mosusu balekisaka mpe ndelo na ndenge balukaka kaka kolonga. Daniel alobi boye: “Natángaka mingi na butu makambo oyo bateyi biso na kelasi mpo nábosana ata likambo moko te.” Mokakatano ezali ete, mbala mingi kosala bongo ebimisaka matomba ya malonga te. Mbala mingi, mwana-kelasi oyo alɛmbi nde asalaka malamu te.
Yango wana, tokoki kokamwa te soki moto oyo alukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka azalaka nkandankanda, akanisaka ete abongi te, amipesaka foti, azalaka na makanisi malamu te, alyaka na nsɔngɛ ya misapi mpe abɛlaka maladi ya makanisi. Kasi, oyo eleki mabe, momeseno yango ekoki kolɛmbisa moto na elimo. Na ndakisa, Biblia etindi baklisto báyebisa bato kondima na bango. (Baloma 10:10; Baebele 10:24, 25) Kasi, elenge moko nkombo na ye Viviane azalaki kolinga te kopesa biyano na makita mpo azalaki kobanga ete akoloba malamu te. Elenge mwasi mosusu nkombo na ye Léa azalaki mpe kobanga kaka mpo na ntina wana. Alobi boye: “Soki nalobi malamu te, basusu bakokanisa ete nazali na mayele te. Yango wana, nafandaka nyɛɛ.”
Tomoni polele ete koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekoki kosala moto mabe mpe ezali malamu te. Soki omoni ete osalaka moko ya makambo oyo lisolo oyo elobeli, ekozala malamu obongola ndenge na yo ya kokanisa. Lisolo mosusu ekobima na mbala ya nsima, ekomonisa yo ndenge ya kosala yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 3 Topesi bango bankombo mosusu.
^ par. 6 Ntango bayekolaki likambo yango na eteyelo moko, bamonaki ete bana-kelasi mingi (87,5%) ya mayele balukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka.
[Elilingi na lokasa 22]
Bilenge mosusu basilisaka badevuare te mpo babangaka ete bakolonga te
[Elilingi na lokasa 23]
Koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekoki kobɛlisa yo na makanisi mpe kotinda yo omimona mpamba