Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo mazali koleka na mokili

Makambo mazali koleka na mokili

Makambo mazali koleka na mokili

Bazali kotondisa lisusu te

Zulunalo Time elobi ete: “Lelo oyo lokola bakómi kotya biloko ya kotɛka na milangi to na bakartɔ ya minene, biloko mosusu bazali kotondisa yango lisusu te. Bakompanyi ezali kotondisa lisusu te biloko oyo batɛkaka​—lokola yaourt, crème, sabuni mpe bilamba ya bebe—​kasi mbala mingi ntalo ezali kokita te.” Likambo yango ebandi lelo te, kasi lokola nkita ezali se kokwea mpe basombi mingi bakómi ekɛngɛ mpe baboi bisombasomba, bakompanyi ezali komona mabe te kotɛka biloko moke to oyo etondá te mpo bázwaka mbongo kaka ndenge bazwaka. Basombi mingi bayebaka te ete eloko oyo basombi ekiti kilo mwa moke to ezali lisusu monene te, kasi atako bongo babimisaka mbongo mingi mpo na kosomba biloko mosusu oyo etondá te. Edgar Dworsky, oyo asali site moko ya Internet mpo na kosalisa basombi, alobi ete: “Basombi bakanisaka mpenza te komeka kilo ya eloko oyo balingi kosomba to kotala soki ezali ya kokoka. Yango ezali mayele mabe mpo na kobuba basombi, mpe basombi bakoyeba te ete batɛki bazali kolyela bango.”

Sabuni ebatelaka bomoi ya bato

Val Curtis, profesɛrɛ na Iniversite London School of Hygiene and Tropical Medecine, alobi ete kaka kosukola mabɔkɔ na sabuni ekokaki kobatela bomoi ya bato milio moko mbula na mbula, mpamba te ekokaki kosalisa bango babɛla maladi ya pulupulu te. Zulunalo The Daily Yomiuri elobi ete, na likita ya misato ya mokili mobimba oyo basalaki mpo na mai, na Kyoto, na Japon, Curtis amonisaki ete mikrobɛ oyo ezalaka na nyei ya bato ezali “monguna ya liboso ya bato.” Zulunalo yango elobi ete “na bamboka mosusu, basi basukolaka bana soki bauti twalɛti mpe na nsima balambaka biloko ya kolya kozanga ete básukola mabɔkɔ.” Kosukola mabɔkɔ na sabuni ekoki kosala ete mikrobe lokola virisi mpe bakteri oyo ebomaka epalangana te. Curtis amonisi ete mpo na kokima maladi ya pulupulu na mikili ya bobola, kosukola mabɔkɔ na sabuni eleki malamu mpe esɛngaka mbongo mingi te. Kotya nkisi na mai ezali kosɛnga mbongo mingi mbala misato koleka kosukola mabɔkɔ na sabuni.

Banzela babengi Via Alpina

Via Alpina ezali banzela ya makolo oyo bautaki kofungola na Mpoto na mobu 2002. Zulunalo The Independent ya Londres elobi ete: “Banzela yango oyo ezali kilomɛtrɛ 5 000, mpe balekisi yango na bisika oyo eleki kitoko na Mpoto, bisika ya bazamba, mai, mpe bangomba pembenipembeni ya banzela ya kala.” Banzela yango, oyo ekatisi bikólo mwambe ya Mpoto oyo ezalaka na bangomba ya Alpes, ebandi na mai monene na mboka Trieste, na nɔrdi-ɛsti ya Italie, mpe ekei kosuka lisusu na mai monene, na Monte-Carlo, na Monaco. Banzela yango emati bangomba tii na likoló na bamɛtrɛ 3 000 likoló ya nivo ya mai monene, mpe eleki likoló ya bangomba ya milai ya Alpes. Lisangá moko ya makambo ya baturiste na France, oyo babengi La Grande Traversée des Alpes, elobi ete “banzela yango ya makolo oyo bayekolaki yango malamumalamu liboso ya kosala yango, eleki pembenipembeni ya bisika oyo eleki kitoko oyo bato bakendaka kotala.” Bato mingi bakokoka te kotambola banda ebandeli tii nsuka ya banzela yango. Atako bongo, zulunalo yango elobi ete: “Okoki kokende kotambola kuna elongo na libota na yo; bokoki kotambola mwa bakilomɛtrɛ mpe na nsima bozongi na ndako. Kasi, Via Alpina ekosalisa bato oyo basepelaka kokenda kolekisa konje na bisika ya pɛto, ya kimya, epai bakomona makambo mosusu, mpe mosika te na mboka na bango.” Bato oyo bakei kotambola kuna bakoki kolala na baotɛlɛ, na bandako ya bapaya mpe na bisika ya kopema oyo ezali 300 na banzela yango.

Mbisi ezali kosila na mbu

Doktɛrɛ Ransom Myers, oyo asalaka na Iniversite ya Dalhousie, na Halifax, mpe Doktɛrɛ Boris Worm, oyo asalaka na Institut des sciences marines na Kiel, na Allemagne, bango bayekolaka bikelamu ya mbu, balobi ete mbu ezali lisusu te esika oyo etondani na mbisi ndenge ezalaki liboso. Balobi ete mitindo ya mbisi oyo ezalaka na mbu ezali kosila mokomoko, mpo na basatelite mpe bamasini oyo bamasuwa ya babomi-mbisi ezali kosalela mikolo oyo mpo na koluka esika mbisi ezali. Zulunalo The Globe and Mail ya Toronto elobi ete “lokola na bambula 50 oyo euti koleka babomi-mbisi bazali koboma mitindo nyonso ya mbisi ya minene, mitindo 9 likoló na 10 ya mbisi yango elimwi.” Myers akanisi ete lokola mbisi yango ezali kolimwa, bakisa mpe mbisi oyo bato balingaka kolya mingi, na ndakisa thon, morue, flétan, marlin, espadon; yango ekobongola makambo mingi na mbu. Worm abakisi ete: “Tozali kobebisa biloko oyo esimbi bomoi na mabelé, nzokande tosengeli kosala bongo te.”

Malaria ezali kongala na Afrika

Zulunalo moko ya France, Le Figaro, elobi ete “mokolo na mokolo malaria ezali koboma bana 3 000 na Afrika.” Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) elobi ete mbula na mbula bato koleka milio 300 babɛlaka malaria ya makasi na Afrika, mpe bato pene na milio moko bakufaka na yango. Na mobu 2000, bato mingi babɛlaki malaria mbala moko na ndenge ya nsɔmɔ na Burundi. Na sanza nsambo mpamba, katikati ya bato ya mboka yango​—bato milio 3,5—​babɛlaki malaria. Mokakatano wana ebimi mpo mikrobe mosusu ya malaria ezali kokufa lisusu na kinini te. Bikólo mingi ya Afrika elingi kaka kinini mpe eboi bankisi mosusu ya sika mpo eleki ntalo, na ndakisa, bankisi oyo basalaka na Artemisia annua, nzete moko ya Chine. Yango wana, ndenge mokonzi moko ya OMS alobi yango, “malaria ezali ntango nyonso kongala na Afrika.”

Monɔkɔ ya Latin ekufá te

Atako bato mingi bamonaka ete monɔkɔ ya Latin ekufá, Vatican ezali kosala nyonso mpo ete monɔkɔ yango ekufa te mpe bazali kobakisa maloba ya sika. Mpo na nini? Mpamba te, atako na Vatican balobaka mingi nde monɔkɔ ya Italien, Latin nde ezali monɔkɔ ya lingomba, oyo tii lelo Pápá akomaka na yango mikanda mpo na baɛpiskɔpɔ mpe mikanda mosusu. Babandaki kotika mokemoke kosalela monɔkɔ ya Latin na bambula ya 1970, ntango babimisaki mobeko ya kosala misa na minɔkɔ ya mboka. Ezalaki na ntango wana nde Pápá Paulo VI asalaki ebongiseli moko mpo na kobatela monɔkɔ ya Latin mpo ekufa te. Likambo ya liboso oyo ebongiseli yango esalaki, ebimisaki diksionɛrɛ ya Latin-Italien na volimi mibale, oyo etɛkamaki nyonso. Lelo oyo, bauti kobimisa diksionɛrɛ yango na volimi moko, mpe bazali kotɛka yango dolare 115. Diksionɛrɛ yango ezali na maloba ya Latin ya mikolo na biso pene na 15 000, na ndakisa “escariorum lavator” (masini ya kosukola basaani). Zulunalo The New York Times elobi ete “volimi mosusu ya sika ya diktionɛrɛ yango ekobima nsima ya mbula mibale to misato.” Maloba ya sika oyo bakobakisa na diktionɛrɛ yango “ekouta nde na makambo ya baordinatɛrɛ mpe ya bapanzi nsango.”

Babosanaka makambo oyo bayebisaka bango

Zulunalo moko ya makambo ya siansi na nkombo wissenschaft.de elobeli ankɛtɛ moko oyo basalaki na mikili mingi, mpe eyebisi ete “bato ya maladi babosanaka makambo mingi (80%) kati na makambo oyo minganga bayebisaka bango ntango bazali na lopitalo, mpe pene na katikati ya makambo oyo bayebaka lisusu ezalaka te ndenge oyo minganga bayebisaki bango.” Roy Kessels, moto ya mayele na Iniversite ya Utrecht na Pays-Bas, alobi ete ntina monene oyo esalaka ete bato yango bábosana ezali mpo bakómi mibange, mpo na makanisi oyo bazalaka na yango, komitungisa mingi, mpe kozanga komona na miso makambo oyo bayebisi bango. Mpo na kosalisa bato ya maladi bábosanaka te makambo ya ntina, bapesi minganga toli ete bálobaka na bango polele, bálobaka liboso makambo ya ntina, mpe básalelaka biloko oyo emonanaka na miso, lokola bamasini.