Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okoki mpenza kotyela batoli ya Biblia motema?

Okoki mpenza kotyela batoli ya Biblia motema?

Okoki mpenza kotyela batoli ya Biblia motema?

Soki moto moko oyo atɛkaka mituka azali kokumisa vuatire moko ya kala mpo osomba yango, to soki moto moko ya politiki azali kopesa bato bilaka na ntango ya maponami, okoki komituna boye: ‘Nasengeli mpenza kondima makambo moto oyo azali koloba?’ Na ntembe te, okolinga te kobebisa mbongo to ntango na yo na makambo to biloko oyo ezangá ntina.

NDENGE moko mpe, okoki komituna boye: ‘Biblia ezali mpenza na makambo ya ntina oyo nakoki koyekola? Soki nasali milende mpenza mpo na kotánga Biblia mpe koyekola yango, nakozwa nini?’ Vɛrsɛ moko ya Biblia epesi eyano na mituna yango; elobi boye: “Bwanya emonani moyengebene na misala na yango.” (Matai 11:19) Ya solo, matomba oyo moto azwi nsima ya kolanda toli moko boye nde emonisaka soki toli yango ezali ya “bwanya.” Talá mwa makanisi oyo euti na bato oyo bazwaki ntango ya koyekola Biblia. Makambo oyo balobi ekosalisa yo otala soki osengeli kotánga mpe koyekola buku wana oyo eleki babuku mosusu nyonso.

Liwa mpe nsima ya liwa

Karen afandaka na États-Unis, mpe eleki mwa bambula banda mama na ye akufá. Banda bomwana, Karen azalaki kondima ete bato ya malamu oyo bakufaka, bakendaka na likoló. Liteya yango ezalaki mpenza kobɔndisa ye te. Azalaki komituna boye: ‘Mama akómá ndenge nini kuna na likoló esika akendá? Soki ngai mpe nakei kuna, nakokutana na ye ndenge nini? Soki nakufi, nakokende nde epai mosusu?’

Karen akómaki koyekola Biblia malamumalamu na Batatoli ya Yehova. Ayekolaki ete bakufi bakendaka na likoló te; kasi, bazali lokola bato oyo balali mpɔngi makasi. Mosakoli 9:5 elobi ete: “Bayebi likambo te.” Yango elingi nde koloba ete akomona lisusu mama na ye te?

Maloba oyo ya Biblia ebɔndisaki ye mpe epesaki ye elikya; elobi boye: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo [ya Klisto] mpe bakobima.” (Yoane 5:28 29) Karen ayekolaki ete Nzambe oyo akomisaki Biblia akosalela Mwana na ye mpo na kozongisa bakufi na bomoi awa na mabelé. Alobaki boye: “Namonaki ete makambo oyo Biblia eteyaka mpo na liwa mpe lisekwa ebongi mpenza.”

Losambo nini Nzambe andimaka?

Ntango Angela, elenge moko ya ekólo Roumanie azalaki na mbula 14, pastɛrɛ moko ya Lingomba ya Pantekote asambelaki mpo na ye mpo azwa elimo santu, mpe akómaki koloba na minɔkɔ mosusu. Kasi, baboti na ye bamonaki ete mateya ya Lingomba ya Pantekote eyokanaki na Biblia te. Libota na bango mobimba batikaki kokende na lingomba yango mpe bakómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova.

Na ebandeli, Angela alɛmbaki nzoto; kasi eumelaki te, amonaki ete mimeseno ya lingomba na ye ya kala eyokanaki te na mateya ya Biblia. Na ndakisa, atángaki Yoane 17:3, oyo elobi ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” Angela amonaki ete mpo moto andimama na Nzambe, asengeli naino koyeba ye. Amitunaki boye: “Ndenge nini nakokaki kozwa elimo santu, nzokande nayebaki Nzambe malamu te?” Na nsima, alobaki boye: “Nazali kotɔnda Yehova ndenge asalisi ngai nayeba losambo ya solo na nzela ya Liloba na ye oyo epemami.”

Batoli oyo ebongolaka bomoi ya bato

Gabriel, oyo afandaka na Inde, alobi boye: “Nazalaki moto ya nkandankanda. Soki moto atumoli ngai, nazalaki koganga, kopanza biloko, ata mpe kofinga bato to kosimba bango na nzoto. Boyekoli ya Biblia esalisaki ngai nakóma na ezaleli ya komipekisa. Lelo oyo, ata na mikakatano ya ndenge nini, nakangaka kaka motema.”

Gabriel atángaki bavɛrsɛ lokola oyo ya Masese 16:32, oyo elobi ete: “Ye oyo akosilika noki te aleki bato ya makasi, mpe ye oyo akokanga motema na ye aleki mobuki ya mboka.” Dhiraj, mobali mosusu oyo akómi mpe na ezaleli ya komipekisa, alobi boye: “Vɛrsɛ wana esalisaki ngai mpe namona ete moto oyo apekisaka nkanda na ye te azali moto ya bolɛmbu, kasi oyo amipekisaka, azali moto ya makasi.”

Philip azalaki moto ya mobulu na Afrika ya Sudi. Azalaki kobunda, koyiba mpe koloba maloba ya mbindo. Akɔtaki mpe bolɔkɔ mpo na makambo yango. Atako bongo, Philip azalaki mpe na mposa makasi ya koyeba Nzambe. Akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Yango epesaki ye mposa ya kosalela Nzambe, mpe azwaki ekateli ya kobongola bomoi na ye. Atikaki makambo ya mabe oyo azalaki kosala mpe aboyaki baninga ya mobulu. Mateya nini ya Biblia esalisaki ye?

Batatoli ya Yehova batángelaki ye maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 6:44, oyo elobi ete: “Moto moko akoki koya epai na ngai te soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” Philip alobi boye: “Yehova amonaki eloko moko ya malamu kati na ngai, yango wana abendaki ngai mpo nakɔta na libota na ye ya kitoko.” Philip ayekolaki mpe masolo ya Biblia oyo elobeli ndenge Yehova amonisaka motema mawa epai ya bato mabe oyo babongoli motema. Alobi boye: “Masolo yango esalisaki ngai namona ete Yehova azali makambo makasimakasi te, alimbisaka mpenza ntango moto ya kozanga kokoka abongoli motema.”​—2 Samwele 12:1-14; Nzembo 51.

Wade, elenge mobali moko ya Australie, azalaki molangwi-masanga mpe momɛli-bangi, azalaki kobɛta masano ya mbongo mpe kosala pite. Atako bongo, azalaki na esengo te. Mokolo moko, asololaki na Batatoli ya Yehova mpe andimaki bábanda koyekola na ye Biblia. Makambo nini Wade ayekolaki?

Wade alobi boye: “Ndenge oyo Yesu azalaki kotalela bato esepelisaki ngai mingi. Azalaki komonisa boboto, motema mawa, mpe bolingo na bato nyonso, ezala mpe bana mike. Makambo oyo nayekolaki ekolisaki mposa na ngai ya komekola ye. Biblia eteyaki ngai ndenge ya kozala moto malamu mpe ya kobongisa bomoto na ngai.” Bongo makambo nyonso ya mabe oyo asalaki? Wade abakisi boye: “Biblia eteyaki ngai ete soki nabongoli motema, natiki bomoi ya masumu mpe nakómi na etamboli ya malamu, Nzambe akolimbisa ngai. Kutu, nakoki mpe kozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Lisusu, nakómi na elikya ya solo mpo na mikolo ezali koya!” (Matai 5:5) Wade abongolaki bomoi na ye, mpe lelo oyo azali kosalela Yehova na lisosoli ya pɛto.

Makanisi oyo outi kotánga euti na bato oyo bazalaki na mposa ya kobongola bomoi na bango. Bayekolaki Biblia malamumalamu mpo na komona soki mateya na yango ekoki kosalisa bango báyeba ndenge ya kosilisa mikakatano na bango mpe bázwa biyano na mituna na bango. Matomba oyo bazwaki endimisaki bango ete bakoki mpenza kotyela batoli ya Biblia motema. Yo mpe okoki kosala bongo.

Lisese moko ya kala oyo epemamaki na Nzambe elobi boye: “Mapamboli epai na moto oyo azwi mayele mpe moto oyo [akolanda] boyebi. Zambi litomba na yango eleki palata mpe kozwa yango eleki wolo na kitoko. Aleki mabanga ya penini na motuya; biloko nyonso bikolula yo ekoki kopimama na ye te. Mikolo mingi ezali na lobɔkɔ na ye ya mobali, mpe na lobɔkɔ na ye ya mwasi ezali bozwi mpe lokumu. Nzela na ye ezali nzela ya esengo mpe bilekelo na ye nyonso ezali kimya. Ye azali lokola nzete ya bomoi mpo na nyonso baoyo bakosimbaka ye; moto na moto oyo akobatelaka ye azali na esengo.”​—Masese 3:13-18.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 25]

NDENGE BIBLIA ESALISAKI MOTO MOKO YA BOLƆKƆ

Mobali moko na nkombo Bill azalaki na esengo na libala na ye. Kasi, liboso akokisa mbula moko ya libala, akɔtaki bolɔkɔ mpo na makambo mabe oyo asalaki mwa bambula liboso.

Bill atungisamaki mingi ndenge azalaki lisusu na bonsomi te. Yango wana, azwaki ekateli ya kosalela malamu ntango oyo akolekisa na bolɔkɔ. Alobi boye: “Nazalaki kotánga mpe koyekola Biblia na mbeto na ngai ya bolɔkɔ.” Bill azalaki mpe kosalela makambo oyo azalaki koyekola. Alobi boye: “Nazalaki kosalela baninga ya bolɔkɔ makambo na boboto, mpe bazalaki komona ete nalingaki te kosala makambo ya mabe oyo bango bazalaki kosala. Bazalaki koloba boye: ‘Bill alingi kosalela ntango oyo akolekisa na bolɔkɔ mpo na koyeba Nzambe mpe Biblia. Alingi lisusu kosala makambo ya mabe te.’”

Alobi lisusu boye: “Lokola baninga ya bolɔkɔ bayebaki etamboli na ngai ya malamu, bazalaki kokɔtisa ngai te na kowelana mpe na makambo mosusu ya mabe. Bakɛngɛli ya bolɔkɔ bamonaki ete nazalaki kopesa bango motó mpasi te. Nsukansuka, bakómaki kopesa ngai misala oyo ezalaki kosalisa ngai nalekisaka ntango mingi te na baninga mosusu ya bolɔkɔ. Kosalela mateya ya Biblia ebatelaki ngai mpenza.”

Bill azalaki mpe koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki kosalema na bolɔkɔ, mpe na molende mpenza, azalaki koyebisa basusu makambo oyo azalaki koyekola. Azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova kaka kuna na bolɔkɔ. Mpo na makambo nyonso oyo akutaná na yango, alobi boye: “Nabebisi mbula soki 50 ya bomoi na ngai, mpe nalingi sikoyo kobongisa makambo. Nayebi ete likambo ekoki kosalisa moto ya bolɔkɔ abongisa bomoi na ye, ezali kaka kosalela mateya ya Biblia. Mpe mpo na koyeba Biblia malamumalamu, esengeli koyekola yango na Batatoli ya Yehova. Ezali lingomba kaka moko oyo eteyaka solo ya Biblia. Ezali mpasi te koyeba yango.”

Lelo oyo, Bill abimá na bolɔkɔ mpe azali kosalela Yehova na molende na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na États-Unis. Ye ná mwasi na ye bazali kokoba koyekola Liloba ya Nzambe mpe kosalela mateya na yango. Basepelaka mingi na makanisi oyo ezali na Yisaya 48:17, 18, oyo elobi ete: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango. Soki oyokaki malako na ngai! mbɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mai-na-monana.”

[Elilingi na lokasa 23]

Karen, États-Unis

[Elilingi na lokasa 23]

Angela, Roumanie

[Elilingi na lokasa 24]

Gabriel, Inde

[Elilingi na lokasa 24]

Dhiraj, Inde

[Elilingi na lokasa 24, 25]

Philip ná libota na ye, Afrika ya Sudi

[Elilingi na lokasa 24]

Wade, Australie