Mama ya nzoto kolɔngɔnɔ, akobota bebe ya nzoto kolɔngɔnɔ
Mama ya nzoto kolɔngɔnɔ, akobota bebe ya nzoto kolɔngɔnɔ
BEBE oyo auti kobotama azali na esengo mpe na nzoto kolɔngɔnɔ, mama na ye amemi ye. Tata na ye azali na esengo. Lokola bamilio ya bato bamonaka likambo wana ya esengo mbula na mbula, bamonaka yango likambo ya mpasi te soki mwasi aboti kozanga mikakatano. Soki ezali bongo, mpo na nini komitungisa?
Ya solo, mbala mingi basi babotaka malamu, kasi ntango nyonso te. Na yango, basi ya zemi oyo bazali na bokɛngi basalaka nyonso mpo na kopɛngola makama oyo ekoki kobima na ntango ya kobota. Na ndakisa, balukaka koyeba makambo oyo ebimisaka makama na ntango ya kobota, balukaka monganga ya malamu mpo alandela zemi mpe basalaka makambo mosusu mpo na kopɛngola makama na ntango ya kobota. Tiká tótalela makambo yango na mozindo.
Makambo oyo esalaka ete mwasi abota malamu te
Moko ya makambo oyo ebimisaka mikakatano na ntango ya kobota mpe etyaka bomoi ya mama mpe bebe na likama ezali soki mama alukaki te monganga mpo alandela zemi. Cheung Kam-lau, monganga moko na lopitalo Prince de Galles na Hong Kong amonisi ete “soki mama azali te kokende epai ya monganga ntango azali
na zemi, zemi na ye ekoki kozala na likama makasi.” Alobi mpe ete “bamama yango mingi balingaka kobota mwana oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ, oyo azali monene, kasi makambo esalemaka ntango nyonso te ndenge bakanisaka.”Mpo na makambo oyo ekómelaka bamama, zulunalo moko (Journal of the American Medical Women’s Association) elobi ete “ntina ya libosoliboso oyo bamama bakufaka na ntango ya kobota” ezali kobima mingi ya makila, kobota na mpasi, mikrobɛ mpe maladi ya tansiɔ. Kasi, bankisi oyo esalisaka eyebani malamu mpenza mpe mbala mingi “esɛngaka te makambo ya mindɔndɔmindɔndɔ.”
Ezali mpe na bankisi oyo ekoki kosalisa babebe mingi. Zulunalo moko (UN Chronicle) elobi ete “bakokaki kosala ete babebe mingi (2/3) bákufa te soki bamama mpe babebe nyonso oyo bauti kobotama” bazalaki kozwa nkisi ya monganga oyo “eyebani malamu, mpe oyo esɛngaka mindɔndɔ te mpo na kozwa yango.” Nzokande, likambo ya mawa, zulunalo moko ya Philippines (News Agency) elobi ete bamama mingi bazalaka na boyebi te mpe bazalaka na bolɛmbu mpo na kokende kokutana na monganga mpo alandela zemi na bango.
Bankisi oyo ebongi mpo na mama mpe bebe
Zulunalo moko (UN Chronicle) elobi ete: “Soki mama azali na nzoto kolɔngɔnɔ akoki kobota bebe ya nzoto kolɔngɔnɔ.” Zulunalo yango elobi lisusu ete soki mama azali kokende mingi te epai ya monganga, to mpe akei ata mbala moko te ntango azali na zemi, na ntango ya kobota to na nsima, bebe na ye mpe akozwa kaka mwa lisalisi moke to mpe te.
Na mikili mosusu ekoki kozala mpasi mpo mwasi ya zemi azwa lisalisi ya monganga oyo ebongi. Ntango mosusu mpo lopitalo ezali mosika na esika afandaka to mpo azali na mbongo te ya kofuta monganga. Kasi, mwasi oyo azali na zemi asengeli kosala nyonso mpo na kozwa lisalisi ata moke epai ya minganga. Likambo yango ezali na ntina mingimingi mpo na mwasi oyo alandaka mateya ya Biblia, oyo elobi ete bomoi ya moto ezali bulɛɛ, ata mpe ya mwana oyo azali naino na libumu.—Kobima 21:22, 23; * Kolimbola Mibeko 22:8.
Kozwa lisalisi ya malamu elingi nde koloba kokendaka pɔsɔ nyonso epai ya monganga? Ezali mpenza bongo te. Mpo na mikakatano mosusu oyo emonanaka mingi ntango mwasi azali na zemi mpe na ntango ya kobota, ebongiseli oyo etalelaka makambo ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) “emonisi ete basi oyo bakendaka kokutana na minganga mbala minei mpamba ntango bazali na zemi” babotaka malamu “ndenge moko na basi oyo bakendaka epai ya monganga mbala 12 to koleka ntango bazali na zemi.”
Oyo minganga bakoki kosala
Mpo na kosalisa mama mpe mwana oyo azali na libumu mpo likama ekómela bango te, minganga, mingimingi badoktɛrɛ oyo balandelaka mwasi ya zemi, basalaka makambo oyo elandi:
▪ Batalaka karte ya mwasi ya zemi mpe basalaka ekzamɛ mpo na koyeba makama nini ekoki kobima mpe bazwaka bibongiseli mpo makama yango ekómela mama ná bebe na ye te.
▪ Bakoki kosɛnga ekzamɛ ya makila mpe ya masuba mpo na koyeba soki mama azali kosila makila, azali na mikrobɛ, to soki makila na ye eyokani te (rhésus) mpe soki azali na maladi mosusu, na ndakisa, maladi ya sukali, maladi oyo ebebisaka mposo, bamaladi oyo eutaka na kosangisa nzoto, maladi ya bangei, oyo ekoki kopesa maladi ya tansiɔ.
▪ Soki esengeli, mpe soki mwasi ya zemi andimi, bakoki kosɛnga ye azwa mangwele ya grippe, ya tetanosi mpe ya kobatelama ntango makila eyokani te (rhésus).
▪ Bakoki kokomela mwasi ya zemi bavitamini mosusu, mingimingi acide folique.
Soki minganga bamoni makama oyo ekoki kokómela mwasi ya zemi mpe bazwi bibongiseli oyo ebongi—to basalisi mama asala bongo—bakosalisa ye mpe bebe na ye oyo akobota.
Ndenge ya kosala mpo makama ezala mingi te na ntango ya kobota
Joy Phumaphi, oyo azalaki kala mokambi-molandi na ebongiseli moko ya OMS mpo na libota mpe kolɔngɔnɔ ya bato, alobi boye: “Eleko ya likama makasi mpo na mwasi ya zemi ezali ntango azali kobunda na mpasi ya kobota mpe ntango azali kobota.” Makambo nini ekoki kosalema mpo na kopɛngola makama minene, ata mpe liwa na ntango wana ya mpasi? Na ntembe te, makambo oyo esɛngami ezali mindɔndɔ te, kasi esengeli kozwa bibongiseli liboso mpenza. * Ezali mpenza na ntina mpo na baoyo baboyaka bázongisa bango makila mpo na lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia to mpo na baoyo baboyaka bázongisa bango makila mpo na kobanga makama mosusu.—Misala 15:20, 28, 29.
Basi yango basengeli kosala nyonso oyo bakoki mpo moto oyo azali kosalisa bango, ata soki azali monganga to mwasi oyo abotisaka, azala moto oyo ayebi mosala malamu mpe akoki kosalela bankisi mosusu na esika ya kozongisa bango makila. Basi oyo bazali na zemi bakosala na bwanya soki baluki koyeba soki lopitalo to esika oyo bakobota ekondima kolanda bamposa na bango. * Tokoki kotuna minganga mituna oyo mibale ya ntina: 1. Okosala nini soki makila ya mama to ya bebe ekiti to mpe soki mikakatano mosusu ebimi? 2. Soki ozali te ntango mwana abotami, bibongiseli nini okozwa mpo makambo esalema ndenge nazali kolinga?
Ya solo, mwasi ya zemi oyo azali na bokɛngi, akoki kosolola na monganga mpo na koyeba soki makila na ye ezali mingi mpe ekopesa ye nzela abota malamu. Mpo na komatisa makila ya mwasi ya zemi, monganga akoki kosɛnga ye amɛla nkisi, na ndakisa acide folique, bavitamini B mosusu mpe biloko mosusu oyo ekoki komatisa makila na ye.
Monganga akotalela mpe mwa makambo mosusu. Na ndakisa, ntango mwasi yango azali kokutana na monganga, monganga amoni ete azali na mikakatano mosusu ya nzoto oyo esengeli kotyela yango likebi? Ezali kosɛnga ete atɛlɛmaka te ntango molai? Ezali kosɛnga apema mingi? Ezali kosɛnga amatisa to akitisa kilo to asalaka ngalasisi mingi? Ezali kosɛnga atya likebi mingi lisusu na bopɛto na ye ya nzoto, ata mpe ya monɔkɔ?
Baankɛti mingi emonisi ete maladi ya mino oyo basi ya zemi babɛlaka ematisaka likama ya kobɛla maladi babengi prééclampsie, maladi oyo emonanaka mingi na makambo lokola komata ya tension, motó kobɛta makasi mpe bamaladi mosusu. Maladi ya prééclampsie * ekoki kobimisa mwana matsombe mpe ekoki kosala ete mwana akufa na libumu to mama akufa, mingimingi na mikili ya bobola.
Ya solo, monganga ya bokɛngi akotya likebi na elembo nyonso ya maladi oyo amoni epai ya mwasi ya zemi. Mpe soki amoni ete mwasi yango abandi koyoka mpasi ya kobota liboso basanza ekoka, akoki kosɛnga mbala moko mwasi yango akɔta lopitalo, mpe kosala bongo ekoki kobikisa ye.
Quazi Monirul Islam, monganga mpe mokambi na departema ya OMS, oyo etalelaka makambo oyo esɛngamaka mpo zemi ekola malamu alobi: “Ntango basi bazali kobota, bazalaka mosika te na liwa.” Kasi, kozwa nkisi ya malamu na ntango ya zemi, na ntango ya kobota mpe nokinoki nsima ya kobota ekoki kopɛngola makama mingi, ata mpe liwa. Kasi, likambo eleki ntina, salá makasi ozala na nzoto kolɔngɔnɔ. Soki olingi obota bebe ya nzoto kolɔngɔnɔ, osengeli kosala nyonso ozala mama oyo azali na nzoto kolɔngɔnɔ.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 10 Makomi ya Ebre ya ebandeli elobeli likama oyo ekoki kokómela mama to mwana oyo azali naino na libumu.
^ par. 20 Talá etanda “Makambo oyo mwasi ya zemi akoki kosala.”
^ par. 21 Basi ya zemi oyo bazali Batatoli ya Yehova bakoki kokutana na Komite ya boyokani na minganga ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bango liboso bábota. Bandeko ya Komite ya boyokani na minganga bakendaka na balopitalo mpe bakutanaka na minganga mpo na koyebisa bango ndenge bakoki kosalisa Batatoli kozanga kotya bango makila. Lisusu, bandeko ya Komite yango bakoki kosalisa mpo na koluka minganga oyo bakoki kotosa makambo oyo Batatoli bandimaka mpe oyo bayebi mpenza kosalisa kozanga kozongisa makila.
^ par. 24 Atako baankɛti mingi esɛngamaka mpo na koyeba soki maladi ya mino nde esalaka ete maladi ya prééclampsie ezala makasi, ekozala malamu ntango nyonso kotyelaka mino mpe monɔkɔ na yo likebi mingi mpo ezala pɛto.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]
Na kotalela mitángo oyo epesamaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 2007, miniti moko ezalaki koleka te kozanga ete mwasi moko akufa—536 000 na mbula moko—mpo na mikakatano ya zemi.—Fonds des Nations Unies pour la population
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 24]
“Mbula nyonso, babebe 3 300 000 bazali kokufa ntango babotami mpe koleka milio 4 bazali kokufa na boumeli ya mikolo 28 oyo elandi kobotama na bango.”—UN Chronicle
[Etanda na lokasa 25]
MAKAMBO OYO MWASI YA ZEMI AKOKI KOSALA
1. Mpo na kopona lopitalo ya malamu, monganga ya malamu, to mwasi oyo ayebi kobotisa, tuná liboso bato oyo bayebi mpo básalisa yo.
2. Kendáká mbala na mbala kokutana na monganga na yo to mwasi oyo akobotisa yo, boyokanaka malamu mpe salá ete bókóma baninga.
3. Tyáká likebi na kolɔngɔnɔ na yo ya nzoto. Soki likoki ezali, mɛláká bavitamini oyo monganga akomeli yo, kasi komɛla te bankisi oyo monganga akomeli yo te. Ekozala malamu oboya komɛla masanga. Ebongiseli moko (Institut américain pour la lutte contre l’abus d’alcool et l’alcoolisme) elobi ete: “Atako likama ezali makasi mpo na babebe oyo bamama na bango bamɛlaka masanga mingi, toyebi naino te ndambo nini ya masanga mwasi ya zemi akoki komɛla kozanga ete ebimisa makama.”
4. Soki oyoki mpasi ya kobota liboso ete mikolo ekoka (liboso ete pɔsɔ 37 ekoka), kutáná mbala moko na monganga na yo to kende na lopitalo oyo okobota. Kozanga kozela ekoki kosalisa mpo mwana abotama matshombe te mpe makama mosusu ebima te. *
5. Komá bikateli oyo ozwi mpo na lisalisi ya monganga oyo okozwa. Na ndakisa, bato mingi bamoni ete ezali na ntina kotondisa karte ya koboya kozongisa makila liboso ete mokakatano ebima. Okoki kosalela mayele oyo basalelaka na mboka na bino mpe oyo endimami na mibeko ya Leta.
6. Nsima ya kobota, tyá likebi na kolɔngɔnɔ na yo ya nzoto mpe oyo ya bebe na yo, mingimingi soki abotamaki matshombe. Soki kaka omoni mokakatano moko, kende mbala moko kokutana na monganga oyo asalisaka bana.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 41 Mbala mingi bazongisaka bana ya matshombe makila, baoyo nzoto na bango ekokaki te kosala makila oyo esengelaki.