Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosangisa nzoto ekobongisa boyokani na biso?

Kosangisa nzoto ekobongisa boyokani na biso?

Mituna oyo bilenge batunaka

Kosangisa nzoto ekobongisa boyokani na biso?

Sara akutanaki na Mike eleki kaka sanza mibale, kasi azali koyoka lokola ayebi ye banda kala. Batindelanaka ba-message ntango nyonso, basololaka na telefone ntango molai, mpe bakoki kutu kosilisa maloba ya moninga ntango ye naino asilisi yango te! Kasi sikoyo, lokola bafandi na motuka wana sanza ezali kongɛnga, Mike alingi básuka kaka na kosolola te.

Na sanza mibale oyo eleki, Mike ná Sara bazalaki kaka kosimbana na lobɔkɔ mpe kopesana mwa babizi. Sara alingi bákende mosika te. Kasi alingi mpe kozanga Mike te. Ezali na moto mosusu te oyo asalaka ete amiyoka ete azali kitoko mingi, mpe na ntina mingi. Mpe azali koloba na nse ya motema ete: ‘Kasi, ngai ná Mike tolingani na biso!’

OKOKI mbala mosusu kokanisa epai likambo yango ekosuka. Kasi, mbala mosusu likambo oyo oyebi te ezali ete soki basangisi nzoto, makambo ekobongwana makasi mpo na Mike ná Sara​—mpe na ndenge ya malamu te. Tópesa ndakisa.

Soki outi likoló mpe omibwaki na nse, obuki mobeko oyo babengaka loi de la gravité, okoki kobukana to kokufa. Ezali mpe bongo soki obuki mibeko oyo etali bizaleli ya malamu, na ndakisa oyo elobi ete: “Bóboya pite.” * (1 Batesaloniki 4:3) Kobuka mobeko yango ebimisaka makambo nini? Biblia elobi boye: “Moto oyo asalaka pite, azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.” (1 Bakorinti 6:18) Na ndenge nini? Komá makambo misato ya mabe oyo ekoki kokómela bato oyo basangisaka nzoto liboso bábalana.

1. ․․․․․

2. ․․․․․

3. ․․․․․

Sikoyo talá makambo oyo okomi. Okomaki makambo lokola maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, zemi oyo okani te, mpe koboyama na Nzambe? Ezali mpenza makambo ya mabe oyo ekoki kokómela moto nyonso oyo abuki mobeko ya Nzambe oyo etali pite.

Atako bongo, okoki kaka kolinga komeka. Okoki koloba ete: ‘Likambo moko te ekokómela ngai.’ Kutu, bato nyonso basangisaka nzoto, boye te? Baninga na yo ya kelasi bamikumisaka mpo na ndenge basangisaka nzoto, mpe emonanaka ete likambo moko te ya mabe ekómelá bango. Mbala mosusu, lokola Sara, oyo tolobelaki na ebandeli, ozali kutu komona ete soki yo ná moninga na yo bosangisi nzoto, boyokani na bino ekobonga mingi. Longola yango, nani akolinga básɛka ye mpo azali naino ngɔndɔ? Eleki malamu te kosangisa nzoto?

Zelá naino! Ya liboso, bato nyonso te nde basangisaka nzoto. Ya solo, mbala mosusu otángaki balapolo oyo emonisaki ete bilenge mingi mpenza basangisaka nzoto. Na ndakisa, ankɛtɛ moko na États-Unis emonisaki ete ntango basilisi eteyelo ya ntei, soki ozwi bilenge misato na ekólo yango, bilenge mibale basangisaka nzoto mbala na mbala. Yango elimboli mpe ete elenge moko kati na bilenge misato, oyo ezali mpe motángo moko monene, asangisaka nzoto te. Bongo baoyo basalaka yango? Bato oyo basalaka baankɛtɛ bamonisi ete bilenge yango mingi bakutanaka na likambo moko to mingi kati na makambo oyo ya mpasi:

(1) MOTEMA MPASI. Bilenge mingi oyo basangisaki nzoto liboso ya kobala balobaka ete na nsima, bayokaki mawa mingi.

(2) KOZANGA KOTYELANA MOTEMA. Nsima ya kosangisa nzoto, mokomoko akobanda komituna boye: ‘Nani mosusu asangisá nzoto ná ye?’

(3) KOZANGA BOSEMBO. Nsima ya kosangisa nzoto, mbala mosusu elenge mobali akolinga kotika elenge mwasi wana mpe koluka mosusu.

(4) KOLƐMBA NZOTO. Lokola alɛmbi nzoto, elenge mwasi akomona ete alingaki kosepela nde na moto oyo akokaki kobatela ye na esika asakana na ye.

Longola makambo oyo totángi, kanisá mpe likambo oyo: Bilenge mibali mingi balobaki ete bakoki te kobala mwasi oyo asangisá nzoto na bango. Mpo na nini? Mpo balingaka nde mwasi oyo azali naino pɛto!

Ekamwisi yo​—to mbala mosusu epesi yo nkanda? Soki ezali bongo, ozala mwasi to mobali, kobosana likambo oyo te: Kosangisa nzoto liboso ya libala ekeseni mosika na ndenge oyo balakisaka yango na bafilme mpe na televizyo. Bafilme ekumisaka kosangisa nzoto kati na bilenge mpe emonisaka yango lokola bolingo ya solo. Kasi, kokosama te! Bato oyo bakoluka kondimisa yo osangisa nzoto liboso obala bazali nde koluka matomba na bango moko. (1 Bakorinti 13:4, 5) Mpo moto oyo alingaka yo mpenza, akoluka kobebisa yo na nzoto to na makanisi? (Masese 5:3, 4) Moto oyo amibanzabanzaka mpenza mpo na yo, akoluka kobebisa boyokani na yo na Nzambe?​—Baebre 13:4.

Likambo ya solo ezali ete soki ondimi kosangisa nzoto liboso obala, ozali kolongola lokumu na yo mpo ozali kokaba eloko moko oyo ezali na motuya mingi. (Baroma 1:24) Ezali likambo ya kokamwa te ndenge bato mingi bamiyokaka ete bazali na ntina lisusu te nsima ya kosangisa nzoto, lokola nde bazalaki na bopɔtu na ndenge batikaki moto ayiba bango eleko na bango ya motuya! Kotika te likambo ya ndenge wana ekómela yo. Soki moto aluki kondimisa yo osangisa nzoto mpe alobi na yo ete: “Soki olingaka ngai, okosala yango,” lobá na mpiko ete: “Soki olingaka ngai, olingaki kosɛnga ngai yango te!”

Nzoto na yo ezali na motuya mingi; kokaba yango te. Monisá ete ozali na makasi ya kotosa mobeko ya Nzambe oyo esɛngi tókima pite. Na nsima, soki obali, okoki kosangisa nzoto. Mpe okosepela na yango malamumalamu, kozanga mitungisi, koyoka mawa, to kobanga makambo oyo eyaka mbala mingi nsima ya kosangisa nzoto liboso ya libala.​—Masese 7:22, 23; 1 Bakorinti 7:3.

Okokuta masolo mosusu na “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/ypf

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 6 Liloba “pite” oyo Biblia esaleli ezali kaka kosangisa nzoto te, kasi mpe makambo mosusu kati na bato oyo babalani te, na ndakisa kosimbasimba binama ya kobotela ya moto oyo azali molongani na yo te to kosangisa nzoto na monɔkɔ to na esumbeli. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, nkasa 42-47, na Lifalanse.

MITUNA YA KOMANYOLA

● Atako kosangisa nzoto liboso ya libala ekoki kobenda nzoto ya kozanga kokoka, mpo na nini ezali mabe mpo na yo?

● Okosala nini soki moto asɛngi yo bósangisa nzoto?

[Etanda/Bililingi na lokasa 17]

OYO BILENGE MOSUSU BALOBI

“Kosuka kaka na koloba ‘te’ epekisaka te moto aya lisusu komeka kosɛnga yo. Osengeli koyeba koboya. Soki olobi ‘te’ na mongongo elɛmbá, ekomonana polele ete oboyi mpenzampenza te. Osengeli koloba na mpiko!”

“Na bantango mosusu, kosuka kaka na koloba ‘te’ esimbaka te. Mbala mosusu ata soki olimboli bindimeli na yo ekosimba te. Nayebi bato mosusu oyo bazalaki komikumisa ete bakweisaki mokristo. Ntango mosusu osengeli kaka kolongwa wana. Ezali mpasi, kasi esimbaka.”

“Lokola ozali mokristo, ozali na bizaleli oyo ekotinda basusu básepela na yo. Na yango, osengeli kozala ekɛngɛ mpe koboya soki basɛngi yo osala likambo ya mbindo. Memyá bizaleli yango. Kowangana yango te!”

[Bililingi]

Diana

James

Joshua

[Etanda na lokasa 18]

ZALÁ NDAKISA NA YE!

Soki ozali na fianse, obatelaka mpenza elenge mwasi yango? Soki ezali bongo, monisá ye ete ozali na . . .

makasi ya kotosa mibeko ya Nzambe

bwanya ya kokima makambo oyo ekoki komeka bino

bolingo mpo na koluka bolamu na ye

Soki osali bongo, mbala mosusu fianse na yo akozala na makanisi lokola ya mwasi Moshulame, oyo alobaki ete: “Bolingo na ngai azali wa ngai mpe ngai nazali wa ye.” (Loyembo ya Salomo 2:16) Na mokuse, okozala ndakisa na ye!

Talá Masese 22:3; 1 Bakorinti 6:18; 13:4-8.

[Etanda na lokasa 18]

LIKANISI

Soki ozali liboso ya moto oyo azali molongani na yo te, salá boye: Soki olingi kosala likambo oyo omoni ete okolinga te baboti na yo bámona yo ozali kosala yango, kosala likambo yango te.

[Elilingi na lokasa 18]

Kosangisa nzoto liboso ya libala ezali kobebisa likabo oyo Nzambe apesá biso. Ezali lokola kozwa liyemi moko kitoko oyo moto akabelaki yo mpe kosalela yango lokola elamba ya kopangwisa makolo