Biblia elobi nini?
Mpo na nini Nzambe abomi naino Zabolo te?
SOKI ozalaki na likoki ya kosilisa mpasi ya moto mosusu, okokaki kosala yango? Mbala mingi, bato oyo basalisaka basusu na ntango ya makama bakendaka noki mpo na kosilisa mpasi ya bato mpe kobikisa bato oyo bayebi kutu te. Na yango, moto akoki kotuna boye: ‘Mpo na nini Nzambe awelaka te koboma Zabolo, moto oyo abimiselá bato bampasi mingi boye?’
Mpo na kozwa eyano na motuna wana, kanisá ete bazali kosambisa likambo moko monene na tribinale. Mobomi, lokola azali kosala nyonso mpo bátika kosambisa likambo na ye, alobi ete zuzi azali kosambisa na bosembo te mpe kutu ete apesi kanyaka na bazuzi mosusu oyo bazali wana mpo na koyoka likambo. Na yango, batiki batemwe ebele mpenza bápesa litatoli na bango.
Zuzi ayebi ete lokola likambo ekómi monene, ekobimisa mikakatano mingi, kasi akolinga kokata likambo yango kozanga kolekisa ntango mingi. Atako bongo, amoni ete mpo lisambisi wana etikala ndakisa mpo na makambo mosusu oyo ekoki kobima, esengeli kotikela bato nyonso ntango oyo ekoki mpo báloba soki bazali na ngámbo nini na likambo yango.
Mpo lisambisi moko etikala ndakisa mpo na makambo mosusu oyo ekoki kobima, esengeli kotikela ngámbo nyonso mibale ntango oyo ekoki mpo báloba mpo na ngámbo na bango
Ndenge nini ndakisa wana ekokani na ntembe oyo Zabolo—oyo abengami mpe “dragɔ,” “nyoka,” mpe “Satana”—abɛtelaki Yehova, ye “Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba”? (Emoniseli 12:9; Nzembo 83:18) Zabolo azali mpenza nani? Afundaki Yehova Nzambe na makambo nini? Mpe, ndenge nini Nzambe akoboma ye?
Ndakisa mpo na mikolo ekoya
Na ebandeli ekelamu oyo ekómaki Zabolo ezalaki moto ya elimo ya kokoka, anzelu moko ya Nzambe. (Yobo 1:6, 7) Amikómisaki Zabolo ntango akómaki na mposa makasi mpe ya moimi ete bato básambela ye. Na yango, abɛtelaki lotomo ya Nzambe ya koyangela ntembe, mpe alobaki kutu ete Nzambe abongi te bátosa ye. Alobaki ete bato basalelaka Nzambe kaka soki asopeli bango mapamboli. Satana alobaki ete, soki mikakatano eyei, bato nyonso bakolakela Mozalisi na bango mabe.—Yobo 1:8-11; 2:4, 5.
Komonisa nguya mpamba ekokaki te mpo na kopesa biyano oyo esengelaki na bifundeli wana ya Satana. Kutu, koboma Zabolo mbala moko ekokaki kotinda bato mosusu bámona ete Zabolo alobaki solo. Na yango, lokola Nzambe azali na bokonzi nyonso, abandaki kosambisa likambo yango mpo alongola makanisi ya ndenge wana na mitó ya bikelamu nyonso oyo bazalaki kotala.
Na boyokani na mitinda mpe bosembo na ye ya kokoka, Yehova Nzambe amonisaki ete ngámbo mokomoko ekobimisa batemwe oyo bakopesa litatoli mpo na kolongisa ngámbo oyo bango bazali na likambo yango. Ntango yango oyo epesami etikeli bakitani ya Adama libaku ya kozala na bomoi mpe ya kopona na bolingo nyonso soki bakotikala sembo epai ya Nzambe ata na ntango ya mpasi, mpo na komonisa ete bango mpe bazali na ngámbo ya Nzambe na likambo yango.
Etikali ntango boni?
Yehova ayebi malamu ete ntango makambo yango nyonso ezali kosalema, bato bazali kokoba konyokwama. Kasi, azali na mposa ya kosilisa likambo yango noki. Biblia ebengi ye “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (2 Bakorinti 1:3) Ya solo, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso” akotika Zabolo na bomoi ntango molai koleka te, akotika mpe makambo oyo ye abimisá eumela libela na libela. Na ngámbo mosusu, Nzambe akoboma Satana te soki ntango ekoki naino te, mpe soki likambo oyo bazali kosamba mpo na mokili mobimba esili naino te.
Ntango makambo yango ekosila, lotomo ya Yehova ya koyangela ekolongisama mpenza. Likambo oyo bazali kosamba ná Satana ekozala ndakisa mpo na libela. Soki ntembe ya ndenge wana ebimi lisusu, ndakisa ya Satana ekolakisama mpo na komonisa ete ezali na ntina te likambo ya ndenge wana ezongelama lisusu.
Na ntango ebongi, Yehova Nzambe akotinda Mwana na ye oyo asekwaki aboma Zabolo mpe alongola misala na ye nyonso. Biblia elobeli ntango oyo Kristo “akozongisa bokonzi epai na Nzambe na ye mpe Tata, ntango akokómisa mpamba guvɛrnema nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya. Mpo asengeli koyangela tii ntango Nzambe akotya banguna nyonso na nse ya makolo na ye. Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi.”—1 Bakorinti 15:24-26.
Likambo ya esengo, Biblia elaki ete mabele ekokóma lisusu paradiso. Ndenge Nzambe akanaki na ebandeli, bato bakofanda na kimya na paradiso! “Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.” Ya solo, “bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”—Nzembo 37:11, 29.
Kanisá naino makambo kitoko oyo Biblia elobeli oyo ezali kozela basaleli ya Nzambe; elobi boye: “Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”—Emoniseli 21:3, 4.