ELOBELI TITRE YA EZIPELI
Kobɔkɔla bana na mokili oyo bato balukaka liboso bolamu na bango
MOKOLO na mokolo, bato bazalaka na mabaku mingi ya komonisela basusu boboto. Kasi, emonanaka lokola ete mingi bakanisaka kaka bolamu na bango moko. Na ntembe te omonaka ezaleli yango bisika nyonso; na ndenge oyo bato mosusu babubaka baninga, ndenge bakumbaka motuka mabe, na maloba na bango ya mabe mpe ezaleli na bango ya nkandankanda.
Ezaleli oyo bato bazalaka na yango ya koluka liboso matomba na bango ezalaka mpe na bandako mingi. Na ndakisa, bato mosusu babomaka libala ná balongani na bango kaka mpo moko amoni ete “mosusu azali na nivo na ye te.” Kozanga koyeba, baboti mosusu bakoki kosala ete bana na bango bakóma na ezaleli yango. Ndenge nini? Ntango batikaka bana básala oyo balingi, mpe bakakatanaka mpo na kopesa bango disiplini ata ya lolenge nini.
Nzokande, baboti mosusu balakisaka bana na bango ndenge ya kotya matomba ya basusu na esika ya liboso mpe yango ememelaka bango matomba. Bana oyo balukaka matomba ya basusu bazalaka na mokakatano te ya kozwa baninga mpe boyokani na bango ná basusu ezalaka ntango nyonso malamu. Basepelaka mpe na oyo bazali na yango. Mpo na nini? Mpamba te, Biblia elobi, “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.
Soki ozali moboti, ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bázwa matomba oyo eutaka na kozala na boboto mpe bábebisama te na ezaleli ya koluka liboso bolamu na bango; ezaleli oyo epalangani mingi lelo oyo? Tótalela makambo misato oyo ekoki kosala ete bana na yo bakóma na ezaleli yango mpe oyo okoki kosala mpo ekómela bango te.
1 Kokumisa koleka ndelo
Mokakatano. Bato ya mayele balobeli likambo moko ya mawa: Soki bilenge bazwi mosala sika, bazalaka na ezaleli ya koluka naino matomba na bango; ezaleli oyo etindaka bango bámona ete bakolonga kaka, ata soki basali mingi te to basali eloko te mpo na kolonga. Bamosusu kutu balobaka ete bakozwa mpɛtɛ nokinoki ata soki bayebi mosala na bango malamu te. Basusu bamonaka ete bazali na ntina mingi mpe ebongi ete bato bazwa bango na valɛrɛ ndenge wana; kasi na nsima, batungisamaka na makanisi ntango bamonaka ete makanisi na bango ekeseni mpenza na oyo ya bato mosusu.
Ezaleli yango eutaka wapi? Mbala mosusu moto akómaka na ezaleli yango na kotalela ndenge oyo abɔkwamá. Na ndakisa, baboti mosusu balandaki ezaleli ya komizwa na valɛrɛ oyo epalanganaki mingi na bambula oyo euti koleka. Ezaleli yango eutá na likanisi oyo: Soki kokumisa mwana mwa moke ezali malamu, kokumisa ye mingi eleki malamu. Epai mosusu likanisi yango emonisaka ete soki oboyi kondima likambo nyonso oyo mwana asali, ekolɛmbisa ye nzoto. Na mokili oyo ezali kolendisa ezaleli ya komipesa valɛrɛ, okomonana moboti mabe soki ozali kosala bongo te. Bayebisaki baboti ete bana basengeli soki moke te komiyoka mabe.
Yango wana, bapapa ná bamama mingi bakómá kokumisa bana na bango koleka ndelo, ata soki basali likambo moko te oyo ebongi bákumisa bango. Bakómá kokumisa bana na likambo nyonso ya malamu, ata soki ezali moke mpenza; mpe kokanga miso na likambo nyonso ya mabe, ata soki ezali monene ndenge nini. Baboti yango bakanisaka ete mpo bana na bango bamizwaka na valɛrɛ esengeli kokanga miso na makambo na bango ya mabe mpe kokumisa bango na makambo mosusu nyonso. Kosala ete bana bamiyoka malamu ekómá na ntina mingi koleka koteya bango básala makambo oyo ekosalisa bango bayoka malamu.
Oyo Biblia elobi. Biblia eboyi te kokumisa moto ntango asali likambo ya malamu. (Matai 25:19-21) Kasi, kokumisa bana kaka mpo na kosepelisa bango ekoki kosala ete bakóma komitalela na ndenge oyo ebongi te. Yango wana Biblia elobi boye: “Soki moto akanisi ete azali moto ya ntina ntango azali moto mpamba, azali kokosa makanisi na ye moko.” (Bagalatia 6:3) Elobi lisusu na baboti boye: “Koboya kopesa mwana na yo etumbu té; soki obeti ye fimbo, akokufa té.” *—Masese 23:13, Bible na lingala ya lelo oyo.
Okoki kosala boye. Zwá mokano ya kopesa bana etumbu soki esengeli mpe kopesa bango longonya soki ebongi mpenza kosala yango. Kokumisa bana te kaka mpo na kosepelisa bango. Kosala bongo ekosimba te. Buku moko (Generation Me) elobi boye: “Komityela motema na ndenge oyo ebongi eutaka nde na kokolisa mokemoke makoki na yo mpe koyekola makambo, kasi te kaka mpo bayebisi yo ete moto aleki yo azali te.”
“Kokanisa te koleka ndenge oyo ozali. Kutu, zalá nde na makanisi malamu.”—Baroma 12:3, Biblia Good News Translation
2 Kobatela koleka ndelo
Mokakatano. Emonani ete bilenge mingi oyo bazwaka mosala, babandaka yango kozanga ete balakisa bango ndenge ya kolonga mikakatano. Bamosusu balɛmbaka nzoto soki balobeli bango mabe ata mwa moke mpo na mosala oyo basali. Basusu bazalaka matata mpe balingaka kaka misala oyo ekosepelisa bango. Na ndakisa, na buku moko (Escaping the Endless Adolescence), Joseph Allen, moto moko ya mayele alobeli ndenge elenge mobali moko ayanolaki ye ntango atunaki ye mituna mpo abanda mosala; elenge yango ayanolaki boye: “Namoni ete na bantango mosusu, makambo mosusu ya mosala ekoki kolɛmbisa moto nzoto, mpe nalingi te ete yango ekómela ngai.” Allen akomaki boye: “Emonanaki lokola elenge yango ayebaki te ete misala nyonso ezalaka na makambo mosusu oyo elɛmbisaka. Ndenge nini elenge ya mbula 23 lokola ye ayebaki likambo yango te?”
Ezaleli yango eutaka wapi? Na bambula oyo euti koleka, baboti mingi bamonaki ete basengeli kobatela bana na bango na mikakatano ya lolenge nyonso. Na ndakisa, soki mwana na ye azwi te na ekzamɛ, akokanga mabɔkɔ te, akoyokana ná molakisi mpo abakisela ye bapwɛ. Soki bakateli mwana na ye amande mpo atambwisi motuka mabe, akofutela ye amande yango. Soki baboyi mwana na ye epai ya fianse na ye, akopesa foti nyonso epai ya fianse yango.
Atako ezali mabe te kobatela bana na yo, kosala yango koleka ndelo ekoki kopesa likanisi ya mabe; ekomonisa lokola ete ezali na ntina te bámema mokumba mpo na makambo mabe oyo basali. Buku moko (Positive Discipline for Teenagers) elobi boye: “Na esika báyeba ete bakoki kolonga mpasi mpe makambo mabe oyo basali bango, to mpe kozwela yango liteya, bana ya [ndenge wana] bakómaka kokanisa kaka bolamu na bango moko, mpe bamonaka ete baboti mpe bato mosusu nyonso basengeli kosalela bango makambo oyo balingi.”
Oyo Biblia elobi. Mikakatano ezangaka te na bomoi. Kutu, Biblia elobi boye: “Makambo mabe ekómelaka moto nyonso!” (Mosakoli 9:11, Biblia Easy-to-Read Version) Ata mpe bato malamu. Na ndakisa, ntoma Paulo ayikelaki mikakatano ya ndenge nyonso mpiko na boumeli ya mosala na ye ya kosakola. Ata bongo, azwelaki yango matomba mpenza! Akomaki boye: “Nayekoli, na makambo ata ya ndenge nini, kosepela na oyo nazali na yango. . . . nayekoli sekele ya kotonda mpe ya kozala na nzala; ya kozala na biloko mingi mpe ya kokelela.”—Bafilipi 4:11, 12.
Okoki kosala boye. Na kotalela ndenge bana na yo bazali kokɔmɛla na makanisi, landá toli oyo ya Biblia: “Moto na moto akomema mokumba na ye moko.” (Bagalatia 6:5) Soki bakateli mwana na yo amande, ekozala malamu kotika ye moko afuta yango na mbongo oyo bopesaka ye to na lifuti na ye moko. Soki mwana na yo ya mwasi alongi te na ekzamɛ, mbala mosusu yango ekoki kolamwisa makanisi na ye mpo amibongisa malamu na mbala ya nsima. Soki fianse ya mwana na yo aboyi ye, bɔndisá ye; kasi na ntango oyo ebongi, salisá ye akanisa na mituna lokola oyo: ‘Soki namitaleli malamu, likambo yango emonisi ngai ata esika moko te oyo nasengeli kobongisa?’ Bana oyo basilisaka mikakatano bango moko, bakómaka na likoki ya koyika mpiko mpe ya komityela motema; makoki oyo balingaki kozala na yango te soki moto moko azalaki ntango nyonso kosala makambo na esika na bango.
“Moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, bongo akozwa likambo ya komikumisa na yango.”—Bagalatia 6:4
3 Kopesa bango nyonso oyo balingi
Mokakatano. Na mituna oyo batunaki bilenge, mingi na bango (81%) balobaki ete ‘kokóma na bomɛngo’ ezali na ntina mingi koleka kosalisa basusu. Kasi, koluka bomɛngo esalaka te ete moto asepela na oyo azali na yango. Kutu, bolukiluki emonisi ete bato oyo batyaka miso na biloko ya mokili bazalaka mpenza na esengo te mpe batungisamaka mingi na makanisi mpe na nzoto.
Ezaleli yango eutaka wapi? Bana mosusu babɔkwamaka na mabota oyo elingá biloko ya mokili. Buku moko (The Narcissism Epidemic) elobi boye: “Baboti balingaka kosepelisa bana na bango, mpe bana balingaka kozala na eloko nyonso. Na yango, baboti basombelaka bango biloko yango. Mpe bana yango basepelaka, kasi ezalaka kaka mpo na ntango mokuse. Na nsima, bakómaka na mposa ya biloko mosusu mingi.”
Ya solo, bapiblisite esalaka nyonso mpo bato oyo balingaka kozala na eloko nyonso oyo ebimi sika básomba biloko yango. Balendisaka makanisi lokola ‘obongi mpenza kozala na eloko oyo ya kitoko’ mpe ‘mpo ebongi na yo.’ Bilenge mingi oyo balandaki bapiblisite yango bakɔti sikoyo banyongo mpo na biloko oyo balobaki na bango ete ‘babongi kozala na yango,’ mpe bazali kokoka kofuta banyongo yango te.
Oyo Biblia elobi. Biblia emonisi ete mbongo ezali na ntina. (Mosakoli 7:12) Ekebisi mpe ete “bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso.” Ebakisi: “Lokola bamosusu bakolisi bolingo wana . . . bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.” (1 Timote 6:10) Biblia elendisi biso te tóluka bomɛngo, kasi nde tósepela na biloko ya kobikela oyo tozali na yango.—1 Timote 6:7, 8.
“Bato oyo balingaka kaka kozala bazwi bakweaka na komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba”—1 Timote 6:9
Okoki kosala boye. Lokola ozali moboti, talelá ezaleli oyo ozalaka na yango mpo na mbongo mpe biloko oyo yango esombaka. Talelá biloko oyo osengeli na yango, mpe salisá mwana na yo asala mpe bongo. Buku (The Narcissism Epidemic) elobi lisusu boye: “Baboti ná bana na bango bakoki kobanda kosolola makambo lokola ‘ebongi kosomba biloko ntango nini? Ntango nini ebongi te?’ ‘Matabisi oyo tokozongisa ezali boni?’ ‘Ntango nini osombaki eloko moko mpo moto moko alobaki na yo osengeli kosomba yango?’”
Kebá ete “biloko” ekóma te lokola nkisi mpo na kosilisa mikakatano ya libota oyo ebongi kotalelama. Buku moko (The Price of Privilege) elobi boye: “Kosombela bato ya libota biloko mingi mpo na kobongisa makambo, esimbaka te. Mpo na kobongisa makambo, esengeli kokanisa, kozala na bososoli mpe komitya na esika ya basusu, kasi te kopesa moto sapato to sakosi.”
^ par. 11 Biblia epekisi konyokola bana ezala na nzoto to na makanisi. (Baefese 4:29, 31; 6:4) Ntina ya etumbu ezali mpo na koteya, kasi te mpo baboti básilisa nkanda na bango na nzoto ya bana.