BIBLIA ELOBI NINI?
Ndenge oyo Nzambe azali
Nzambe azalaka na nzoto ya ndenge nini?
“Nzambe azali Elimo.”—Yoane 4:24.
OYO BIBLIA ELOBI
Biblia emonisi ete Nzambe azali na nzoto ya elimo. (2 Bakorinti 3:17) Yango elingi koloba ete aleki biso mosika mpe miso na biso ekoki komona ye te. 1 Timote 1:17 elobi ete azali “Mokonzi ya seko, oyo akoki kopɔla te, oyo amonanaka te.” Biblia elobi mpe ete “ata mokolo moko te moto amoná Nzambe.”—1 Yoane 4:12.
Mozalisi aleki biso mosika mpenza na boye ete tokoki kutu te komeka kokanisa ndenge oyo azalaka. Yisaya 40:18 elobi boye: “Bokoki kokokanisa Nzambe na nani, mpe eloko nini bokoki kotya pembeni na ye oyo ekokani na ye?” Ata likoló oyo tomonaka ekokani ata moke te na Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.—Yisaya 40:22, 26.
Kasi, ezali na bikelamu ya mayele oyo bakoki komona Nzambe mpe kosolola na ye. Na ndenge nini? Mpo bango mpe bazali bilimo, mpe bafandaka na likoló. (1 Bakonzi 22:21; Baebre 1:7) Yesu Kristo alobaki boye mpo na bikelamu yango oyo baleki bato, oyo babengamaka mpe baanzelu: “Bazali ntango nyonso kotala elongi ya Tata na ngai oyo azali na likoló.”—Matai 18:10.
Nzambe azalaka bisika nyonso?
“Yango wana, bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso na likoló.’”—Matai 6:9.
OYO BIBLIA ELOBI
Biblia eteyaka te ete Nzambe azalaka bisika nyonso, na ngonga nyonso lokola nguya moko boye. Kutu, ndenge maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:9 mpe 18:10 emonisi yango, Nzambe azali mpenza, kasi azali moto ya elimo; azali “Tata” mpe afandaka na likoló, “esika na [ye] ya kofanda ya libela.”—1 Bakonzi 8:43.
Ntango akómaki pene ya kokufa, Yesu alobaki boye: “Nazali kotika mokili mpe nazali kokende epai ya Tata.” (Yoane 16:28) Nsima ya liwa na ye, Kristo asekwaki na nzoto ya elimo mpe amataki na “likoló mpenza, mpo amonana sikoyo liboso ya Nzambe mpenza.”—Baebre 9:24.
Makambo nyonso oyo tolobeli mpo na Nzambe ezali na ntina. Mpo na nini? Ya liboso mpo Nzambe azali mpenza, tokoki koyekola makambo etali ye mpe kopusana penepene na ye. (Yakobo 4:8) Ya mibale, koyeba solo na ntina na Nzambe ebatelaka biso na losambo ya lokuta, na ndakisa kosambela bikeko mpe biloko mosusu. 1 Yoane 5:21 elobi boye: “Bana, bókeba na bikeko.”
Na ndenge nini bato bakelamá na elilingi ya Nzambe?
“Nzambe abandaki kozalisa moto na elilingi na ye, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali ná mwasi.”—Ebandeli 1:27.
OYO BIBLIA ELOBI
Bato bazali na likoki ya komonisa bizaleli ya Nzambe, na ndakisa, bolingo, bosembo mpe bwanya. Kutu, Biblia elobi: “Bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo.”—Baefese 5:1, 2.
Nzambe akelá biso na bonsomi ya kopona, yango esalisaka biso tózala na likoki ya kopona oyo ezali mabe to malamu mpe tómonisela basusu bolingo na lolenge mingi. (1 Bakorinti 13:4-7) Tozali mpe na likoki ya kosala makambo ya sika, kosepela na biloko ya kitoko, mpe kokamwa mpo na biloko ndenge na ndenge oyo ezali zingazinga na biso. Oyo eleki nyonso, Nzambe apesá biso likabo ya elimo; mposa ya koyekola makambo etali Mozalisi na biso mpe mokano na ye mpo na bato.—Matai 5:3.
Ndenge oyo solo ya Biblia ekoki kosalisa yo. Soki ozali koyekola makambo mingi na ntina na Nzambe mpe ozali komekola ye, okotambwisa bomoi na yo na ndenge oyo alingi. Yango ekosala ete ozala na esengo ya solosolo, na kimya ya motema mpe osepela na oyo ozali na yango. (Yisaya 48:17, 18) Ya solo, Nzambe ayebi ete bizaleli na ye esimbaka mitema ya bato, ebendaka bato ya mitema sembo epai na ye mpe etyaka bango na nzela ya bomoi ya seko.—Yoane 6:44; 17:3.