Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MITUNA-LISOLO | IRÈNE HOF LAURENCEAU

Monganga moko oyo asalaka lipaso ya mikuwa alobeli kondima na ye

Monganga moko oyo asalaka lipaso ya mikuwa alobeli kondima na ye

Doktɛrɛ Irène Hof Laurenceau asalaka bato lipaso ya mikuwa na Suisse. Liboso azalaki kondima te ete Nzambe azalaka. Kasi mwa bambula na nsima, akómaki kondima ete Nzambe azali mpe ye nde akelá bomoi. Zulunalo Lamuká! etunaki ye mituna mpo na mosala mpe mateya ya Nzambe oyo andimaka.

Nini esalaki ete okóma kosepela na siansi?

Ntango nazalaki naino mwana, biloko oyo Nzambe asalá ezalaki kosepelisa ngai mingi. Nakolaki na Richterswil, mboka moko kitoko na libongo ya Laki Zurich na ekólo Suisse. Tozalaki kokende kotambola elongo na baboti mpe bayaya na ngai mpe nzelanzela, bazalaki koyebisa ngai makambo etali banyama mpe banzete oyo tozalaki komona.

Mpo na nini oyekolaki kosala lipaso ya mikuwa?

Tata azalaki kopesa minganga oyo basalaka lipaso mabɔkɔ mpo na mwa ntango na lopitalo moko ya mboka na biso. Makambo oyo azalaki komona kuna ezalaki kotinda ye alobela lipaso na esengo mpenza. Esengo na ye esepelisaki ngai mingi yango wana, na nsima, nayekolaki ndenge ya kosala lipaso. Nakolisaki mayele na lipaso ya mikuwa mpo nasepelaka ndenge ekokani na mosala ya mekaniki. Moto oyo asalaka lipaso ya mikuwa asengeli kokanisa lokola ingénieur mpo abongisa mokuwa, misuni mpe misisa oyo esalisaka biso tótambola to tósala makambo mosusu.

Na nyonso, nasepelaka mingi ntango namonaka bato na ngai ya maladi bakómi nzoto kolɔngɔnɔ. Kosala na bato epesaka ngai mpe esengo mpenza.

Mpo na nini ozalaki kondima te ete Nzambe azalaka?

Ntango nazalaki elenge, makambo mibale nde ezalaki kotinda ngai nandima te ete Nzambe azalaka. Ya liboso, nayaki koyeba ete bateyi mosusu ya lingomba bazalaki na bizaleli mabe, mpe yango ezalaki kotungisa ngai mingi mpenza. Ya mibale, na kelasi, balakisi na ngai mosusu ya bioloji bazalaki kondima liteya ya evolisyo; nakómaki mpe kondima yango, mingimingi ntango nakɔtaki iniversite.

Mpo na nini ondimaki liteya ya evolisyo?

Nazalaki kondimela balakisi na ngai. Longola yango, nazalaki kokanisa ete makambo mosusu oyo ekokanaka epai ya banyama mosusu emonisaka ete bautá kaka na nyama moko mpe endimisaka liteya oyo ete mbongwana oyo esalemaka na kati ya ba-gène ebimisaka lolenge mosusu ya banyama.

Mpo na nini na nsima, obongolaki makanisi na yo?

Moninga moko abengisaki ngai na makita ya Batatoli ya Yehova. Bolingo oyo namonaki na lisangá yango mpe badiskur kitoko oyo nayokaki esepelisaki ngai makasi. Na nsima, elenge mwasi moko ya lisangá yango ayaki kotala ngai mpe natunaki ye boye: “Nini ekoki kondimisa ngai ete Biblia elobaka solo?”

Alakisaki ngai bisakweli ya Biblia oyo elobeli makambo oyo ezali kosalema lelo oyo. Moko na yango ezali esakweli ya Yesu oyo elobaki ete na mikolo ya nsuka, bitumba ekozala na bisika ndenge na ndenge, “mabele ekoningana makasi,” mpe “bamaladi mabe mpe nzala” * ekokóma mingi. Alobelaki mpe bisakweli oyo emonisaki ndenge bizaleli ya bato ekobeba, ndenge ezaleli ya lokoso ekobakisama mpe makambo mosusu ya mabe oyo etondi mingi lelo. * Eumelaki te, nakómaki koyekola Biblia na motema moko mpe namonaki ete makambo oyo yango elobaka ekokisamaka kaka. Nakómaki mpe kotalela lisusu makanisi oyo nazalaki na yango mpo na ndenge bomoi ebandá.

Koyekola makambo ya monganga esalisaki yo okanisa ndenge bomoi ebandá?

Ɛɛ. Ntango nabandaki koyekola Biblia, nazalaki kosala bolukiluki na likambo etali kosala lipaso ya libɔlɔngɔ. Kobanda na nsuka ya bambula 1960, bato ya siansi bakómaki koyeba mpenza makambo ndenge na ndenge oyo ezalaka na kati ya libɔlɔngɔ. Bamonaki ete libɔlɔngɔ ya moto esukaka kaka te na kogumbama ndenge charnière ya porte esalaka, kasi ekoki mpe kobaluka to kosala makambo mosusu; yango esalaka ete libɔlɔngɔ esala makambo mingi, na ndakisa esalisa biso tótambola, tóbina, tósɛlumwa, mpe tósala makambo mosusu.

Na boumeli ya mbula 40, bato ya mayele bamekaki kosala libɔlɔngɔ lokola oyo ya moto. Kasi makambo ndenge na ndenge oyo ezalaka na libɔlɔngɔ ya moto esalaka ete ezala mpasi mpo básala yango. Lisusu, soki tokokanisi yango na libɔlɔngɔ ya moto, biloko oyo bato basali eumelaka mpenza te. Ata soki bazali na biloko ya malamu mpenza mpo na kosala yango, bato yango basepelaka soki eloko oyo basali eumeli ata mbula 20. Nzokande, libɔlɔngɔ na biso esalemi na baselile oyo soki ekufi, mosusu ebotami na esika na yango. Mpo na ngai, libɔlɔngɔ ebimá kaka yango moko te ndenge evolisyo eteyaka kasi emonisaka nde bwanya ya Nzambe.

Olobi nini mpo na mbongwana oyo esalemaka na ba-gène mpe makambo oyo ekokanaka epai ya bikelamu mosusu?

Makambo oyo ekokanaka epai ya bikelamu mosusu emonisaka ete moto moko nde akelaki bikelamu yango. Longola yango, mbongwana oyo esalemaka na ba-gène esalaka te ete nzoto ya bikelamu yango ebongwana, eleka ndenge oyo ezalaki liboso. Kutu, mbongwana yango elukaka nde kobebisa ba-gène. Toboyi te, ekoki kosalema ete aksida moko ebimisa matomba; na ndakisa soki engbunduka moko ebaluki na gbagba mpe ebuki yango, mpe likama yango esali ete engumba ebatelama na basoda oyo balingaki kobundisa yango. Kasi, aksida yango ebongisi engumba te. Ndenge moko mpe, mbongwana oyo esalemaka na ba-gène ebongisaka te nzoto ya bikelamu ya bomoi. Mpe ekoki soki moke te kobimisa libɔlɔngɔ ya moto; moko ya biteni ya nzoto oyo esalemá malamu mpenza.

Mbongwana oyo esalemaka na ba-gène ekoki soki moke te kobimisa libɔlɔngɔ ya moto, oyo esalemá malamu mpenza

Mpo na nini okómaki Motatoli ya Yehova?

Ntango nakómaki kosalela batoli ya Biblia, bomoi na ngai ekómaki malamu mpenza. Lisusu, na 2003, nakendaki na liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo esangisaka bato ya bikólo ndenge na ndenge mpe namonaki ete bazali mpenza na bomoko, ata mpe epai ya bapaya oyo bakutaná naino te liboso. Bazalaki mpenza komoniselana bolingo ya solosolo, mpe nalingaki kozala moko na bango.