Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mayele oyo ligorodo oyo ebombaka bana na estoma esalelaka mpo na kobota

Mayele oyo ligorodo oyo ebombaka bana na estoma esalelaka mpo na kobota

BANDA 2002, bazalaki kokanisa ete ligorodo oyo ezalaka na Australie, oyo ebombaka bana na estoma ezalaka lisusu te. Ligorodo yango ebotaka na ndenge moko ya kokamwa mpenza. Emɛlaka maki na yango oyo ebandi kosala bana mpe ebombaka yango na kati ya estoma na boumeli ya pɔsɔ soki motoba. Na nsima, ebimisaka bana yango na monɔkɔ soki bakoli mwa moke.

Mpo estoma na ye enika maki yango te, esɛngaka ete ligorodo yango etikaka kolya mpe estoma yango etikaka kobimisa aside. Emonani ete mwa biloko oyo maki mpe bana yango ebimisaka nde epekisaka aside esalema na estoma.

Ligorodo yango ekoki kobomba maki soki 24 na estoma. Na ntango ya kobota, kilo ya bana yango ekoki kozwa kilo mingi (40%) ya kilo ya nzoto na yango. Ezali lokola mwasi oyo azali na kilo 68 liboso akóma na zemi oyo ezali na bana 24, oyo mwana mokomoko azali na kilo soki mibale! Bana ya ligorodo yango ekómisaka estoma ya mama na bango monene tii na kokanga bapumɔ na yango, kosala ete ekóma kopema na loposo na yango.

Soki ntango ya kobota ekoki, bana yango ebimaka na boumeli ya mwa mikolo ntango ezali kokɔmɛla. Kasi soki mama emoni ete ezali na likama, ekosanza bana yango kaka na monɔkɔ. Bato ya mayele bamonaki mokolo moko ndenge ligorodo yango ezalaki kosanza bana motoba na mbala moko, kobwaka bana yango na ntaka ya mɛtrɛ moko.

Liteya ya evolisyo elobaka ete mbongwana oyo esalemaka mokemoke na kati ya bikelamu ebimisaka bikelamu mosusu ya sika. Kasi, lokola mayele oyo ligorodo yango esalelaka mpo na kobota etalelaka ndenge oyo nzoto na yango ezalaka mpe ndenge oyo yango esalaka makambo, mbongwana ya monene oyo esengeli mpo ligorodo ya mpamba ebongwana tii ekóma ligorodo ya ndenge wana, esengelaki kosalema na mbala moko mpo ligorodo yango ebongwana ndenge wana. Yango wana, bato mosusu bamoni ete lolenge wana ya ligorodo ekokaki te kokóma ndenge wana kaka yango moko, esengelaki Mozalisi nde asala yango. *

Okanisi nini? Mayele oyo ligorodo oyo ebombaka bana na estoma esalelaka mpo na kobota ebimá kaka yango moko, to basalaki yango kosala?

^ par. 7 Na buku na ye (L’origine des espèces) Darwin akomaki boye: “Bikelamu emesanaka na esika oyo yango ezali kaka soki ezali kozwa litomba na mbongwana moke oyo ezali kosalema na kolandana; ekoki te kobongwana na . . . mbalakaka.”