EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?
Ndenge banzete esalaka makambo na kalkile
BANZETE esalelaka ebongiseli moko ya kokamwa oyo babengi photosynthèse ya kobenda nguya ya moi mpo na kobimisa bilei. Bolukiluki oyo basali na balolenge mosusu ya banzete emonisi ete banzete esalaka mpe likambo mosusu; esalaka bakalkile ya bilei oyo esengeli kolya butu mobimba.
Tókanisa naino: Na moi, banzete ebendaka gaze ya mabe (dioxyde de carbone) mpe ekómisaka yango amidon mpe sukali. Na butu, lolenge mingi ya banzete elyaka amidon oyo ebombaki na moi mpo ekufa nzala te, ebota mpe ekola malamu. Lisusu, esalelaka amidon oyo yango ebombaki na ndenge ebongi; mbangumbangu te mpe malɛmbɛmalɛmbɛ te mpo esalela mingi na yango (95%) na ntɔngɔ, ntango ebandaka kobimisa yango mingi lisusu.
Basalaki bolukiluki yango na nzete moko ya mutarde (Arabidopsis thaliana). Bato yango bamonaki ete nzete yango ebombaka bilei na yango malamumalamu na kolanda ntango oyo butu eumeli, ata soki etikali ngonga 8, 12, to 16 liboso ntɔngɔ etana. Emonani ete nzete yango ekabolaka amidon oyo ezali na yango na kotalela ntango oyo etikali tii ntɔngɔ etana, na ndenge yango eyebaka amidon oyo esengeli kolya.
Ndenge nini banzete eyebaka amidon oyo ezali na yango? Ndenge nini eyebaka ntango? Mpe nini esalisaka yango esalaka bakalkile? Bolukiluki mosusu ekoyanola na mituna yango.
Okanisi nini? Ndenge banzete esalaka makambo na kalkile, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?