Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOKONZI OYO EKOBONGISA MAKAMBO

“Kimya . . . ekozala na nsuka te”

“Kimya . . . ekozala na nsuka te”

Lelo oyo, ONU ezali kolendisa bato ya mikili ndenge na ndenge básalisana, bátosa ntomo ya bato, mpe bábatela mabele. Mpo na nini? Na zulunalo ya ONU, Maher Nasser akomaki ete “mai, mopɛpɛ, mpe bazamba ezali kobeba, mobulu ezali kokóma makasi, bobola ezali kobakisama, bato bazali kokoka kosilisa matata te, ebele ya bato bazali kokima bitumba, bateroriste bazali kobakisama, bamaladi mabe, mpe makambo mosusu ya ndenge wana ezali kopanzana na mokili mobimba.”

Yango wana, bato mosusu bapesaki likanisi ete esengeli kosala guvɛrnema moko oyo ekotambwisa mokili mobimba. Moko na bango ezali Dante, mwana-mboka Italie oyo azalaki moto ya filozofi, mokomi, mpe moto ya politiki, mpe mosusu ezali Albert Einstein, moto ya mayele na fizike. Dante azalaki koloba ete kimya ya solosolo ekoki kozala te na mokili oyo ekabwani na bikólo. Azongelaki maloba ya Yesu Kristo ete “bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko ebebaka.”​—Luka 11:17.

Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba basalelaki babombe atomike mibale; nsima ya etumba yango, Albert Einstein atindelaki bakonzi ya ONU mokanda moko. Akomaki boye: “ONU esengeli kobongisa nokinoki makambo oyo ekosalisa mpo na kotya guvɛrnema ya solosolo, oyo ekotambwisa mokili mobimba.”

Kasi, ekoki mpenza kosalema ete bakonzi oyo bakozala na guvɛrnema yango bázala miyibi te, bato bayebi mpenza mosala, mpe bato ya nko te? To bakosala kaka makambo ya mabe oyo bakonzi mosusu bazali kosala? Mituna yango ezali kotinda biso tókanisa maloba ya Lord Acton, mwana-mboka Angleterre mpe moto ya mayele na istware, oyo alobaki ete: “Bokonzi ebebisaka moto mpe soki bokonzi eleki mingi, ebebisaka mpe mingi.”

Atako bongo, mpo bato bázala na kimya ya solosolo mpe báyokana, basengeli kozala liboke moko. Kasi, ekoki kosalema ndenge nini? Ekoki ata kosalema? Biblia elobi ete ekoki kosalema mpe ekosalema. Ekosalema te na bato ya politiki ya mokili oyo, oyo batondi na moyibi. Guvɛrnema ya Nzambe nde ekosala yango. Kutu, guvɛrnema yango ekomonisa ete Nzambe nde abongi koyangela bikelamu na ye. Biblia ebengi guvɛrnema yango “bokonzi ya Nzambe.”​—Luka 4:43.

“BOKONZI NA YO EYA”

Yesu Kristo azalaki kokanisa Bokonzi ya Nzambe ntango ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema . . . na mabele.” (Matai 6:9, 10) Bokonzi wana nde ekokokisa mokano ya Nzambe awa na mabele, kasi te bato oyo balingá bokonzi mpe batondi na lokoso.

Bokonzi ya Nzambe ebengami mpe “bokonzi ya likoló.” (Matai 5:3) Mpo na nini? Mpo ekoyangela mabele, kasi ekozala na likoló. Kanisá naino: guvɛrnema yango ekofutisa bato mpako te mpo esala misala na yango. Ekozala mpenza likambo ya esengo mpo na bato oyo yango ekoyangela!

Nzambe aponi Yesu atambwisa Bokonzi yango. Biblia elobi boye mpo na Yesu:

  • “Boyangeli ekozala na lipeka na ye. . . . Bonene ya boyangeli na ye mpe kimya . . . ekozala na nsuka te.”​—Yisaya 9:6, 7.

  • “Bapesaki ye boyangeli, lokumu ná bokonzi, mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye. Boyangeli na ye . . . ekoleka te.”​—Danyele 7:14.

  • “Bokonzi ya mokili ekómi bokonzi ya Nkolo [Nzambe] na biso mpe ya Kristo na ye.”​—Emoniseli 11:15.

Bokonzi wana ekokokisa mokano ya Nzambe awa na mabele, ndenge tosɛngaka yango na libondeli oyo Yesu ateyaki. Na ntango wana, bato nyonso bakoyekola kobatela mabele mpo ezonga malamu mpe etonda na bikelamu ya bomoi.

Kasi, libosoliboso Bokonzi yango ekoteya bato mibeko ya Nzambe. Bato bakokabwana na bikólo te. Yisaya 11:9 elobi: “Bakosala eloko moko te ya mabe mpe bakobebisa eloko moko te . . . mpo mabele ekotonda na boyebi ya Yehova ndenge mai etondi na mbu.”

Bato nyonso oyo bakofanda awa na mabele bakozala ndenge ONU ezali kolinga bato bákóma: bato oyo balingaka kimya. Nzembo 37:11 elobi: “Bakosepela mpenza na kimya mingi.” Nsukansuka, maloba lokola “mobulu,” “kobebisa mopɛpɛ,” “bobola,” mpe “bitumba” ekolimwa mpenza. Kasi nyonso wana ekosalema ntango nini? Ntango nini Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mokili? Ekosala yango ndenge nini? Ndenge nini biso mpe tokoki kosepela na makambo oyo bokonzi yango ekotya? Tótalela yango.