Makambo oyo bikelamu ya bomoi ekoki koteya biso
Tomonaka ndenge bikelamu ya bomoi ekolaka, etambolaka, mpe ebotaka. Biloko yango ekómisaka mabele kitoko mpenza. Mpe lelo oyo, bato bayebi makambo etali bikelamu ya bomoi koleka ndenge bayebaki yango liboso. Bikelamu ya bomoi ezali koteya biso ete eutá wapi? Talá makambo oyo.
Biloko ndenge na ndenge oyo ezali na bomoi emonisi ete basalá yango kosala. Bikelamu ya bomoi esalemá na baselile ya mikemike. Mwa selile mokomoko esalaka misala minene ndenge na ndenge mpo bikelamu ya bomoi ezala na bomoi mpe ebota lisusu. Ata mwa biloko ya mike mpenza esalaka mpe kaka bongo. Na ndakisa, levire oyo basalaka na yango mampa, ezali mwa eloko moko ya moke mpenza. Soki okokanisi yango na selile ya moto, ekoki komonana lokola selile ya levire ezali na makambo mingi te. Kasi komikosa te, mwa selile yango ezali na makambo ndenge na ndenge. Selile mokomoko ya levire ezalaka na ADN na kati na yango, mpe ADN yango eyebisaka selile eloko oyo yango esengeli kosala. Baselile yango ezali na mwa “bamasini” ya mikemike oyo eponaka, ememaka, mpe ebongolaka bamolekile, mpe yango ezali na ntina mingi mpo selile wana ezala na bomoi. Ntango selile yango ezangi biloko ya kolya, elɛmbaka mpe esalaka te, ezalaka nde lokola elali. Yango wana levire eumelaka ntango molai, mpe mwa selile yango elamukaka kaka ntango bazali kosala na yango limpa.
Bato ya siansi babandá koyekola baselile ya levire banda kala mpenza mpo báyeba baselile ya bato malamu. Kasi tii sikoyo bazali kaka koyeba yango malamu te. Ross King, profesɛrɛ na iniversite moko (Chalmers University of Technology) na Suède amileli na maloba oyo: “Na mokili mobimba, ezali ata na moto moko te ya mayele na makambo ya biologie
oyo andimi komipesa mpo na koyekola makambo nyonso oyo etali selile ya levire, mpo na koyeba yango malamu mpenza.”Ntango ozali kokanisa makambo ndenge na ndenge oyo ezali na kati ya mwa selile lokola oyo ya levire, omoni te ete moto moko nde asalaki yango kosala? Okanisi ete selile ya levire ebimá kaka yango moko?
Bomoi ekoki kouta kaka na bomoi. ADN esalemaka na bamolekile oyo babengi nikleotide (nucléotide). Selile mokomoko ya moke ezali na banikleotide ebele mpenza (miliare 3,2). Mwa biloko yango ebongisamá malamu mpenza mpo ete selile ebotaka baanzime (enzyme) ná baproteini.
Ezali mpasi mpo nikleotide ya mike mpenza esala eloko ya malonga kaka mpamba boye (balobi ete kaka nikleotide 1 na kati ya nikleotide 1 bakisá bazero 150 nsima na yango nde ekoki kosimba). Likambo ya ndenge wana ekoki kosalema ata moke te.
Bato ya siansi bazali na likoki te ya kobimisa ekelamu ya bomoi na kati ya ekelamu oyo ezali na bomoi te.
Bomoi ya moto ekeseni na bomoi ya bikelamu mosusu. Bomoi na biso bato esalemá na ndenge ete tókoka kosepela na bomoi na ndenge ya malamu mpenza, koleka bikelamu mosusu nyonso. Biso bato tozali na makoki mingi mpenza ya kosala biloko, ya koyangana na baninga, mpe ya komonisa mayoki na ndenge mingi. Toyokaka elɛngi ya biloko, nsolo, lokito, tomonaka langi ndenge na ndenge mpe biloko mosusu. Tobongisaka makambo mpo na mikolo ekoya mpe tolukaka kozala na bomoi ya malamu.
Okanisi nini? Makoki nyonso wana ebimá na ndenge na yango moko mpo tosengelaki na yango mpo tózala na bomoi mpe tóbotaka? To ezali nde komonisa ete bomoi ezali likabo oyo eutá epai ya Mozalisi moko ya bolingo?