Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MITUNA-LISOLO | RAJESH KALARIA

Monganga moko oyo ayekolaka bɔɔngɔ alobeli kondima na ye

Monganga moko oyo ayekolaka bɔɔngɔ alobeli kondima na ye

PROFESƐRƐ Rajesh Kalaria, oyo azali molakisi na iniversite ya Newcastle, na Angleterre, ayekolaka bɔɔngɔ ya moto esali sikoyo mbula koleka 40. Liboso, azalaki kondima liteya ya evolisyo. Kasi na nsima, abongolaki makanisi na ye. Lamuká! etunaki ye mituna mpo na mosala na ye mpe kondima na ye.

Yebisá biso: liboso ozalaki na lingomba nini?

Tata na ngai abotamaki na Inde. Mama na ngai, azali mpe moto ya Inde, kasi abotamaki na Ouganda. Bazalaki kolanda mimeseno ya lingomba ya Hindu. Babotá biso misato; ngai nazali mwana ya mibale. Tozalaki kofanda na engumba Nairobi, na ekólo Kenya. Bato mosusu mingi ya lingomba ya Hindu bazalaki kofanda pene na biso.

Nini etindaki yo osepela na siansi?

Nazalaki kosepela mingi na banyama mpe mbala na mbala ngai ná baninga na ngai tozalaki kokende kotambola na bangomba mpe na zamba mpo na kotala ndenge banyama esakanaka. Na ebandeli, namityelaki mokano ya kokóma monganga ya banyama. Kasi, nsima ya kosilisa kelasi na eteyelo moko ya tekiniki na Nairobi, nakendaki na Angleterre mpo na kotánga na iniversite ya Londres. Kuna, nayekolaki ndenge oyo maladi ekolaka na nzoto ya moto. Na nsima, natángaki lisusu mpo na koyekola na mozindo bɔɔngɔ ya moto.

Bakelasi oyo otángaki ebongolaki bindimeli na yo?

Ɛɛ. Ntango nazalaki koyekola siansi na mozindo, ekómaki mpasi mpo nandima lisusu masapo mpe mimeseno ya lingomba ya Hindu, na ndakisa momeseno ya kosambela banyama mpe bikeko.

Mpo na nini ozalaki kondima liteya ya evolisyo?

Ntango nazalaki mwana moke, bato mingi zingazinga na ngai bazalaki kondima likanisi oyo elobaka ete moto autá na evolisyo mpe abandá na Afrika, mpe mbala mingi tozalaki kolobela likambo yango na kelasi. Longola yango, ntango nazalaki kotánga na iniversite, balakisi bazalaki kondimisa biso ete bato nyonso ya mayele na siansi bandimaka liteya ya evolisyo.

Na nsima, mpo na nini otalelaki lisusu likambo etali ndenge oyo bomoi ebandaki?

Banda bambula mingi, nazalaki koyekola siansi oyo etalelaka bikelamu ya bomoi mpe oyo etalelaka nzoto ya moto; kasi mokolo moko, moninga moko ya kelasi ayebisaki ngai makambo oyo azalaki koyekola na Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Yango ebendaki likebi na ngai. Na yango, ntango Batatoli ya Yehova basalaki liyangani moko na eteyelo oyo nazalaki kotánga na Nairobi, nakɔtaki na liyangani yango. Na nsima, Batatoli ya Yehova mibale oyo bazalaki bamisionɛrɛ balimbolelaki ngai mateya mosusu ya Biblia. Namonaki ete ndenge oyo bazalaki kondimela Mozalisi Monene oyo apesi biyano na mituna minene ya bomoi ezalaki likambo ya solo, kasi masapo mpamba te. Na yango, namonaki ete ebongaki mpenza ete ezala bongo.

Kelasi ya monganga oyo otángaki epekisaki yo ondima ete Mozalisi azali?

Te! Kutu, endimisaki nde ngai. Ntango nazalaki koyekola siansi oyo etalelaka nzoto ya moto, namonaki ete bikelamu ya bomoi esalemá mpenza malamu mpe na ndenge ya kokamwa. Koloba ete makambo ya kokamwa wana nyonso esalemá yango moko ezali mpenza bozoba.

Okoki kopesa biso ndakisa moko?

Nabandá koyekola bɔɔngɔ ya moto na ebandeli ya bambula 1970, mpe enama yango ekobaka kaka kokamwisa ngai. Makanisi mpe basuvenire eutaka na bɔɔngɔ mpe enama yango nde etambwisaka makambo mingi na nzoto ya moto. Bɔɔngɔ etambwisaka mpe mayoki mingi na kati ya nzoto ya moto, mpe eyebaka makambo oyo euti na kati ya nzoto to libándá.

Bɔɔngɔ na biso esalaka ndenge wana mpo yango nde etambwisaka makambo ndenge na ndenge na kati ya nzoto mpe etambwisaka baselile oyo esalaka na boyokani, oyo ezali baselile ya libosoliboso ya bɔɔngɔ. Bɔɔngɔ ya moto ezalaka na bamiliare ya baselile ya mikemike oyo esalaka na boyokani kati na yango, na nzela ya bansinga mikemike ya milai oyo ebengami axones. Na nzela na yango, selile mokomoko ezalaka na bansinga oyo babengi dendrites, oyo ekutanisaka yango na bankóto ya baselile mosusu. Yango wana, bisika oyo baselile ekutaná na kati ya bɔɔngɔ, ezali ebele mpenza! Likambo oyo ekamwisaka koleka ezali ete ebele ya baselile mpe misisa wana etambolaka na mobulu te, kasi na molɔngɔ. Ndenge oyo baselile wana ekanganakanganá ekamwisaka mpenza.

Okoki kolimbola?

Baselile yango oyo ekanganakanganá ebakisamaka na ndenge ya molɔngɔ ntango mwana azali kokola na libumu ya mama, ezala mpe nsima ya kobotama. Baselile etindaka bansinga na baselile mosusu oyo ekoki kozala mwa basantimɛtrɛ mosika na yango, ntaka oyo eleki molai mpo na baselile. Mokano ya nsinga yango ezalaka mpenza te ya kotuta selile mobimba, kasi ya kotuta ata mwa eteni ya selile oyo esengeli.

Nsinga oyo selile etindaka mpo ekutana na selile mosusu etambwisamaka na mibeko ya shimi oyo ezali koyebisa yango “tɛlɛmá,” “kende,” to “baluká,” tii ntango nsinga wana ekokutana na selile oyo esengeli. Soki malako ya polele ezalaka te, mbɛlɛ bansinga yango ebungaka nzela. Makambo wana nyonso etambolaka na molɔngɔ; nyonso ebandaka na malako oyo ekomami na ADN.

Na yango, tokoki koyeba malamu te ndenge oyo bɔɔngɔ ekolaka mpe esalaka makambo, ebombaka basuvenire, ebatelaka mayoki mpe makanisi. Mpo na ngai, komona ndenge oyo bɔɔngɔ esalaka, ndenge oyo etambwisaka makambo malamu mpe ndenge oyo ekolaka, emonisi ete ezali na moto moko oyo aleki biso mosika, oyo asalá yango.

Mpo na nini okómaki Motatoli ya Yehova?

Batatoli balakisaki ngai ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Na ndakisa, Biblia ezali buku ya siansi te, kasi ntango elobelaka makambo ya siansi, elobelaka yango mpenza ndenge ezali. Ezali mpe na bisakweli ya solo. Mpe ebongisaka bomoi ya bato oyo bazali kosalela mateya na yango. Yango emonani mpe na bomoi na ngai. Banda nakómá Motatoli ya Yehova na 1973, Biblia ezali buku oyo etambwisaka ngai. Yango wana, nakómá na bomoi ya esengo mpe ya malamu.