Kosala elongo na Nzambe epesaka esengo
“Lokola tozali kosala elongo na ye, biso mpe tozali kobondela bino ete bóndima boboto monene ya Nzambe te mpe na nsima bóbosana ntina na yango.”—2 BAKORINTI 6:1.
NZEMBO: 75, 74
1. Atako Yehova azali Oyo-Aleki-Nyonso, asɛngaka basusu básala nini?
YEHOVA azali Oyo-Aleki-Nyonso. Akelaki biloko nyonso; bwanya mpe nguya na ye ezali na nsuka te. Nsima ya kosalisa Yobo akanga ntina ya likambo yango, Yobo alobaki na ye: “Nayebi sikoyo ete okoki kosala makambo nyonso, mpe mpo na yo, likanisi moko ezali te oyo ekozanga kokokisama.” (Yobo 42:2) Yehova akoki kosala nyonso oyo alingi kozanga ete moto moko asalisa ye. Kasi amonisaka bolingo na ndenge asɛngaka basusu básala elongo na ye mpo na kokokisa mokano na ye.
2. Mosala nini ya ntina mingi Yehova asɛngaki Yesu asala elongo na ye?
2 Nzambe akelaki Yesu, Mwana na ye, liboso ya kokela baanzelu ná bato mosusu nyonso mpe biloko mosusu nyonso. Na nsima, Yehova andimaki ete Mwana na ye asalisa ye ntango azalaki kokela biloko mosusu nyonso. (Yoane 1:1-3, 18) Ntoma Paulo akomaki boye mpo na Yesu: “Na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabele, biloko oyo emonanaka mpe biloko oyo emonanaka te, ezala bakiti ya bokonzi to bonkolo to baguvɛrnema to makonzi. Biloko mosusu nyonso ezalisamaki na nzela na ye mpe mpo na ye.” (Bakolose 1:15-17) Na yango, Yehova asukaki kaka te na kopesa Mwana na ye mosala moko ya ntina mingi; ayebisaki mpe basusu likambo yango. Yango ezali mpenza lokumu monene!
3. Mosala nini Yehova apesaki Adama, mpe mpo na nini?
3 Yehova asɛngaki mpe bato básala elongo na ye. Na ndakisa, apesaki Adama mosala ya kopesa banyama nkombo. (Ebandeli 2:19, 20) Kanisá esengo oyo Adama ayokaki ntango azalaki kosala mosala wana! Atalaki nyama mokomoko malamumalamu, amonaki makambo oyo yango ezalaki kosala, na nsima apesaki yango nkombo oyo eyokani na yango. Yehova nde akelaki banyama nyonso; na yango, ye moko akokaki kopesa yango nkombo. Kasi, amonisaki ete azalaki kolinga Adama mingi na ndenge apesaki ye mosala ya kopesa banyama nkombo. Nzambe apesaki mpe Adama mokumba ya kokómisa mabele mobimba paradiso. (Ebandeli 1:27, 28) Kasi nsukansuka, Adama azwaki ekateli ya kotika kosala elongo na Nzambe, mpe yango ememelaki ye ná bakitani na ye nyonso mpasi monene.—Ebandeli 3:17-19, 23.
4. Ndenge nini bato mosusu basalaki elongo na Nzambe mpo na kokokisa mokano na ye?
4 Na nsima, Nzambe asɛngaki bato mosusu básala elongo na ye. Noa atongaki masuwa oyo ebatelaki ye ná libota na ye na ntango ya Mpela. Moize asikolaki libota ya Yisraele na boombo na Ezipito. Yosua akambaki Bayisraele na Mokili ya Ndaka. Salomo atongaki tempelo na Yerusaleme. Maria abotaki Yesu. Bato wana nyonso ya sembo mpe bato mosusu mingi basalaki elongo na Yehova mpo na kokokisa mokano na ye.
5. Mosala nini biso nyonso tokoki kosala, mpe Yehova asengelaki mpenza kopesa biso mosala yango? (Talá elilingi ya ebandeli.)
5 Lelo oyo, Yehova azali kosɛnga biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kopesa Bokonzi na ye mabɔkɔ. Ezali na ndenge mingi oyo tokoki kosalela Nzambe. Atako biso nyonso tozali te na likoki ya kosalela ye na lolenge moko, biso nyonso tokoki kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Yehova akokaki kosala mosala yango ye moko. Akokaki koloba mbala moko na bato awa na mabele uta na likoló. Yesu alobaki ete Yehova akokaki ata kosala ete mabanga eyebisa bato makambo oyo etali Mokonzi ya Bokonzi na ye. (Luka 19:37-40) Kasi Yehova andimi ete tózala “bato oyo bazali kosala elongo na” ye. (1 Bakorinti 3:9) Ntoma Paulo akomaki: “Lokola tozali kosala elongo na ye, biso mpe tozali kobondela bino ete bóndima boboto monene ya Nzambe te mpe na nsima bóbosana ntina na yango.” (2 Bakorinti 6:1) Kosala elongo na Nzambe ezali mpenza lokumu monene. Tótalela mwa bantina oyo yango epesaka biso esengo mingi.
KOSALA ELONGO NA NZAMBE EPESAKA BISO ESENGO
6. Mwana ya liboso ya Nzambe alobi ete azalaki koyoka ndenge nini ntango azalaki kosala elongo na Tata na ye?
6 Kosala elongo na Nzambe epesaka ntango nyonso basaleli ya Yehova esengo. Liboso ete Mwana ya liboso ya Nzambe aya awa na mabele, alobaki boye: “Yehova ye moko asalaki ngai ebandeli ya nzela na ye . . . Nazalaki pembeni na ye lokola mosali ya mayele, mpe mokolo na mokolo, nazalaki moto oyo ye azalaki kolinga mingi mpenza, wana ngai nazalaki kosepela Masese 8:22, 30) Ntango Yesu azalaki kosala elongo na Tata na ye, azalaki na esengo mpo asalaki makambo mingi mpe ayebaki ete Yehova azalaki kolinga ye. Bongo biso?
liboso na ye ntango nyonso.” (7. Mpo na nini mosala ya kosakola epesaka biso esengo?
7 Yesu alobaki ete tozalaka na esengo ntango topesaka mpe ntango tozwaka. (Misala 20:35) Tosepelaki mingi ntango toyebaki solo, kasi mpo na nini toyokaka mpe esengo ntango toyebisaka basusu solo yango? Ezali mpo tomonaka ndenge basepelaka mingi ntango bakangi ntina ya mateya ya Biblia mpe babandi kokóma na boyokani na Nzambe. Tosepelaka mingi komona ndenge bazali kobongola makanisi mpe bomoi na bango. Mosala ya kosakola ezali mosala oyo eleki ntina mpe epesaka esengo mingi koleka misala nyonso oyo tokoki kosala. Epesaka bato oyo bakómi baninga ya Nzambe likoki ya kozwa bomoi ya seko.—2 Bakorinti 5:20.
8. Bandeko mosusu balobaki nini mpo na esengo oyo eutaka na kosala elongo na Yehova?
8 Ntango tosalisaka basusu báyeba makambo ya Nzambe, toyebaka ete tozali kosepelisa Yehova mpe ete azwaka na motuya mingi milende oyo tosalaka mpo na kosalela ye. Yango mpe epesaka biso esengo. (Tángá 1 Bakorinti 15:58.) Ndeko Marco, oyo afandaka na Italie, alobi: “Nazali na esengo mingi koyeba ete nazali kopesa Yehova oyo eleki malamu, kasi te moto oyo abosanaka noki oyo nasaleli ye.” Ndenge moko mpe, ndeko Franco, oyo azali mpe na Italie, alobi: “Na nzela ya Liloba na ye mpe bibongiseli ya elimo oyo azali kozwa, Yehova akundwelaka biso mokolo na mokolo ete alingaka biso mpe ete eloko nyonso oyo tosalaka mpo na ye ezali na ntina, ata soki biso moko tomoni lokola ete milende oyo tosalaka ezali na ntina te. Yango wana, kosala elongo na Nzambe epesaka ngai esengo mpe esalaka ete bomoi na ngai ezala na ntina.”
KOSALA ELONGO NA NZAMBE ESALAKA ETE TÓKÓMA PENEPENE NA YE MPE NA BASUSU
9. Boyokani ya ndenge nini Yehova ná Yesu bazalaki na yango, mpe mpo na nini?
9 Ntango tozali kosala elongo na bato oyo tolingaka, tokómaka penepene na bango. Toyebaka malamu bomoto na bango mpe bizaleli na bango. Toyebaka mikano na bango mpe ndenge oyo basalaka makasi mpo na kokokisa yango. Yesu asalaki elongo na Yehova ntango mosusu na boumeli ya bamiliare ya bambula. Bolingo na bango ekómaki mpenza makasi mpe ata eloko moko te ekokaki kobebisa boyokani na bango. Yesu alimbolaki ndenge boyokani na bango ezalaki makasi ntango alobaki ete: “Ngai ná Tata tozali moko.” (Yoane 10:30) Bazalaki mpenza na bomoko mpe bazalaki kosala mpenza na boyokani.
Mosala ya kosakola ekómisaka kondima na biso makasi mpo ekundwelaka biso bilaka ya Nzambe mpe mitinda na ye ya bolingo
10. Mpo na nini mosala ya kosakola esalaka ete tópusana penepene na Nzambe mpe basusu?
10 Yesu asɛngaki Yehova abatela bayekoli na ye. Mpo na nini? Abondelaki ete: “Mpo bázala moko ndenge biso mpe tozali.” (Yoane 17:11) Ntango tozali kotosa mitinda ya Nzambe mpe kobima na mosala ya kosakola, toyebaka lisusu malamu bizaleli na ye ya kitoko. Toyebaka ntina oyo kotyela ye motema mpe kolanda litambwisi na ye ezali likambo ya bwanya. Mpe soki topusani penepene na Nzambe, ye mpe akopusana penepene na biso. (Tángá Yakobo 4:8.) Topusanaka mpe penepene na bandeko na biso mpo tokutanaka na mikakatano ndenge moko, makambo oyo epesaka biso esengo ezali ndenge moko, mpe tozali na mikano ndenge moko. Tosalaka elongo, tosepelaka elongo, toyikaka mpiko elongo. Ndeko Octavia, oyo afandaka na Grande-Bretagne, alobi: “Kosala elongo na Yehova ekómisaka ngai penepene na basusu.” Alimboli ete ezali mpo sikoyo ye ná baninga na ye bazali na “mikano moko mpe litambwisi moko.” Na ntembe te, biso mpe toyokaka bongo. Komona milende oyo bandeko na biso basalaka mpo na kosepelisa Yehova, esalaka ete tópusana penepene na bango.
11. Mpo na nini na mokili ya sika tokoyokana lisusu malamu koleka na Yehova mpe na bandeko na biso?
11 Bolingo oyo tolingaka Nzambe mpe bandeko na biso ezali makasi sikoyo, kasi ekozala lisusu makasi koleka na mokili ya sika. Kanisá ndenge tokosepela na misala nyonso oyo tokosala na mikolo ezali koya! Tokoyamba bato oyo bakosekwa mpe tokoteya bango makambo ya Yehova. Tokosala mpe mosala ya kokómisa mabele paradiso. Ekozala esengo monene kosala elongo mpe komona ndenge mokemoke tokokóma bato ya kokoka na boyangeli ya Kristo. Bato nyonso bakoyokana lisusu malamu koleka bango na bango mpe elongo na Yehova, oyo ‘akokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.’—Nzembo 145:16.
KOSALA ELONGO NA NZAMBE EZALI LIBATELI
12. Na ndenge nini mosala ya kosakola ebatelaka biso?
12 Tosengeli kobatela boyokani na biso na Yehova. Lokola tofandi na mokili ya Satana Bafilipi 4:8) Mosala ya kosakola ekómisaka kondima na biso makasi mpo ekundwelaka biso bilaka ya Nzambe mpe mitinda na ye ya bolingo. Esalisaka mpe biso tóbungisa te bizaleli oyo tosengeli na yango mpo tózwama te na Satana ná mokili na ye.—Tángá Baefese 6:14-17.
mpe tozali bato ya kozanga kokoka, ezali mpasi te tókóma kokanisa mpe kosala makambo lokola bato ya mokili. Tozali lokola moto oyo azali kobɛta mai na ebale kasi mbonge ezali komema ye na esika oyo alingi te. Na yango, tosengeli kobimisa makasi na biso nyonso mpo na kobɛta mai na ngámbo mosusu. Ndenge moko mpe, tosengeli kosala makasi mpo mokili ya Satana ebebisa biso te. Ndenge nini mosala ya kosakola ebatelaka biso? Ntango tozali koloba makambo ya Yehova mpe Biblia, totyaka makanisi na makambo oyo ezali na ntina mpe ya malamu, kasi te na makambo oyo ekoki kolɛmbisa kondima na biso. (Soki tozali na makambo mingi ya kosala na mosala ya Yehova tokozala na ntango te ya komitungisa mingi mpo na mikakatano na biso moko
13. Motatoli moko na Australie alobi nini mpo na mosala ya kosakola?
13 Kozala na makambo mingi ya kosala na ndakisa kosakola, koyekola, mpe kosala makambo mosusu ya lisangá, ebatelaka biso mpamba te tozali na ntango te ya komitungisa mingi mpo na mikakatano na biso moko. Ndeko Joel, oyo afandaka na Australie, alobi boye: “Mosala ya kosakola esalisaka ngai nayeba makambo oyo ezali koleka na mokili. Esalisaka ngai namona mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango mpe namona matomba oyo nazwaka ndenge nalandaka mitinda ya Biblia na bomoi na ngai. Mosala ya kosakola esalisaka ngai nakoba kozala na komikitisa; epesaka ngai libaku ya kotyela Yehova mpe bandeko motema.”
14. Mpo na nini molende na biso na mosala ya kosakola emonisaka ete tozali na elimo ya Nzambe?
14 Mosala ya kosakola endimisaka mpe biso ete tozali na elimo ya Nzambe. Tózwa ndakisa: Kanisá ete bapesi yo mosala ya kokende kotikela bato nyonso ya kartye na bino mampa. Bazali kofuta yo te mpo na yango, mpe yo moko nde osengeli kobimisa mbongo na yo mpo na mosala yango. Longola yango, bato mingi bazali kolinga mampa yango te, basusu kutu bazali koyina yo mpo ozali komemela bango yango. Okokoba kosala mosala ya ndenge wana ntango boni? Ekoumela te, okolɛmba nzoto mpe mbala mosusu okotika mosala yango. Nzokande, mingi na biso tozali kokoba na mosala ya kosakola mbula na mbula, atako mosala yango esɛngaka biso ntango mpe mbongo, mpe atako bato mosusu basɛkaka biso to basilikelaka biso. Yango emonisi ete elimo ya Nzambe ezali kosalisa biso.
KOSALA ELONGO NA NZAMBE EMONISAKA ETE TOLINGAKA YE MPE BASUSU
15. Mosala ya kosakola ezali na boyokani nini na mokano ya Nzambe mpo na bato?
15 Mosala ya kosakola ezali na boyokani nini na mokano ya Nzambe mpo na bato? Mokano ya Nzambe ezalaki ete bato bázala na bomoi libela na libela, mpe mokano yango ebongwanaki te ata ntango Adama Yisaya 55:11) Nzambe azwaki ebongiseli moko mpo na kosikola biso na lisumu mpe liwa. Ndenge nini? Yesu ayaki awa na mabele mpe apesaki bomoi na ye lokola mbeka. Kasi, mpo bato bázwa litomba na mbeka na ye, basengeli kotosa Nzambe. Na yango, Yesu ateyaki bato makambo oyo Nzambe asɛngaka bango, mpe apesaki bayekoli na ye mitindo básala mpe bongo. Ntango tozali kosakola mpe kosalisa bato bákóma baninga ya Nzambe lelo oyo, tozali kosala elongo na Nzambe na ebongiseli na ye ya kolongola bato na boombo ya lisumu mpe liwa.
asalaki lisumu. (16. Ndenge nini mosala na biso ya kosakola eyokani na mibeko ya Nzambe oyo eleki minene?
16 Ntango tosalisaka basusu bátambola na nzela ya bomoi, tomonisaka ete tolingaka bango mpe tolingaka Yehova. “Mokano na ye ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Ntango Mofarisai moko atunaki Yesu mobeko nini ya Nzambe eleki monene, Yesu alobaki: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’” (Matai 22:37-39) Ntango tosakolaka nsango malamu, totosaka mibeko wana.—Tángá Misala 10:42.
17. Ndenge nini otalelaka lokumu oyo ozali na yango ya kosakola nsango malamu?
17 Ezali mpenza lipamboli mpo na biso! Yehova apesi biso mosala oyo epesaka biso esengo, esalisaka biso tópusana penepene na ye mpe na bandeko na biso, mpe ebatelaka boyokani na biso na ye. Epesaka mpe biso libaku ya komonisa ete tolingaka Nzambe mpe basusu. Yehova azali na bamilio ya basaleli na ye bipai nyonso na mokili, mpe bango nyonso bazali na bomoi ndenge moko te. Kasi tózala bilenge to mikóló, bazwi to babola, na nzoto makasi to te, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na koyebisa bato makambo oyo tondimaka. Tomiyokaka lokola ndeko Chantel oyo afandaka na France; alobi: “Moto oyo aleki na nguya na molɔ́ngɔ́ mobimba, Mozalisi ya biloko nyonso, Nzambe ya esengo, alobi na ngai: ‘Kende! Lobá! Lobelá ngai, lobá makambo oyo euti na motema na yo. Nakopesa yo makasi, Liloba na ngai Biblia, lisalisi oyo euti na likoló, baninga ya mosala awa na mabele, formasyo mokemoke, mpe malako ya sikisiki na ntango oyo ebongi.’ Tozali mpenza na libaku monene ya kosala oyo Yehova azali kosɛnga biso mpe kosala elongo na Nzambe na biso!”