Oyebaki yango?
Na mikolo ya Yesu, mpako ya lolenge nini bato bazalaki kofuta?
NA BOUMELI ya bambula mingi, Bayisraele bazalaki na momeseno ya kopesa mbongo mpo losambo ya solo ekende liboso. Kasi na mikolo ya Yesu, Bayuda basengelaki kofuta mpako mingi mpe yango ekómisaki bomoi na bango mpasi.
Mpo na kopesa mabɔkɔ na misala oyo ezalaki kosalema na tabernakle mpe na nsima na tempelo, Bayuda nyonso ya mikóló basengelaki kofuta shekele moko kabolá na mibale to drakime mibale. Na mikolo ya Yesu bazalaki kosalela yango mpo na kosomba biloko oyo esengelaki kopesama mbeka mpe mpo na kobatela tempelo oyo Erode atongaki. Bayuda mosusu batunaki Petro soki Yesu mpe azalaki kofuta mpako, mpe Yesu alobaki ete ezali mabe te kofuta yango. Kutu, alakisaki Petro esika ya kozwa mbongo ya ebende mpo na kofuta mpako yango.—Mat. 17:24-27.
Banda kala, basaleli ya Nzambe bazalaki mpe kofuta moko ya bandambo zomi ya mbuma ya bilanga na bango to mpe ya lifuti oyo bazalaki kozwa. (Lev. 27:30-32; Mit. 18:26, 28) Bakonzi ya Bayuda bazalaki kotya bato mbamba mpo báfuta moko ya bandambo zomi ya bandunda na bango nyonso, ezala ‘manti, aneti, mpe kumini.’ Yesu apekisaki te kopesa moko ya bandambo zomi. Kasi amonisaki nde polele bokosi ya bakomeli mpe ya Bafarisai.—Mat. 23:23.
Kasi kaka na ntango wana, Bayuda basengelaki mpe kofuta mpako mingi mpo na Baroma oyo bazalaki koyangela bango. Na ndakisa, bankolo-mabele basengelaki kofuta mpako ya mbongo to ya biloko ya bilanga na bango. Bato basengelaki kofuta moko kati na ndambo minei to mitano (20% to 25%) ya biloko ya bilanga na bango. Ezalaki mpe na mpako oyo Moyuda mokomoko asengelaki kofuta. Mpo na mpako yango nde Bafaisai batunaki Yesu motuna. Yesu amonisaki ndenge oyo tosengeli kotalelaka likambo ya kofuta mpako na maloba oyo: “Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.”—Mat. 22:15-22.
Ezalaki mpe na mpako mosusu oyo bato ya mombongo bazalaki kofuta mpo na biloko na bango oyo ezalaki kokɔta to kobima libándá ya engumba. Bazalaki kofuta mpako yango na mabongo, na bagbagba (pont), na bisika oyo banzela ekutaná, na baporte ya bingumba to mpe na bazando.
Mpako oyo bato bazalaki kofuta na nse ya boyangeli ya Baroma ekómaki mpenza kilo mpo na bato. Tacite, moto moko ya istware ya Roma alobi ete ntango Yesu azalaki awa na mabele na boumeli ya boyangeli ya Amperɛrɛ Tibere, bato ya “Siri mpe ya Yudea basɛngaki ete báfutaka mpako mingi te mpo ekómaki kilo mpo na bango.”
Lisusu, lolenge oyo bazalaki kokɔngɔla mpako yango nde ekómisaki bomoi mpasi. Bazalaki kopesa mosala ya kokɔngɔla mpako na moto oyo azalaki kofuta mbongo mingi mpo na kozwa mokumba yango. Moto yango mpe na ngala na ye azalaki kozwa bato mosusu mpo bákɔngɔlaka mpako mpe bango nyonso bazalaki na mposa ya kokóma na mbongo mingi na mosala yango. Emonani ete Zakai azalaki mpe na bato oyo bazalaki kokɔngɔla mpako ndenge wana. (Luka 19:1, 2) Na ntembe te, bato bazalaki kosepela na likambo yango te. Mpe bazalaki koyina baoyo bazalaki kofutisa bango mpako yango.