Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 15

Ndenge nini otalelaka bato ya teritware na bino?

Ndenge nini otalelaka bato ya teritware na bino?

“Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.”​—YOA. 4:35.

LOYEMBO 64 Tósala na esengo mosala ya kobuka mbuma

NA MOKUSE *

1-2. Ekoki kozala mpo na ntina nini Yesu alobaki maloba oyo ezali na Yoane 4:35, 36?

NA MOBEMBO moko oyo Yesu asalaki, amonaki bilanga, mbala mosusu bilanga ya ɔrje oyo ezalaki naino mikemike. (Yoa. 4:3-6) Esengelaki sanza soki minei eleka liboso milona yango etela mpe bábuka yango. Kasi, Yesu alobaki likambo moko oyo na ntembe te ekamwisaki bato; alobaki: “Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.” (Tángá Yoane 4:35, 36.) Alingaki koloba nini?

2 Emonani ete Yesu azalaki kolobela kobuka mbuma ya elilingi, elingi koloba koyanganisa bato. Tótalela makambo oyo eutaki kosalema. Mbala mingi Bayuda bazalaki kokima kosolola na bato ya Samaria, kasi Yesu ateyaki mwasi Mosamaria moko, mpe mwasi yango andimelaki ye! Kutu, ntango Yesu azalaki koloba ete bilanga “eteli mpo na bobuki mbuma,” ebele ya bato ya Samaria oyo bayokaki nsango ya Yesu epai ya mwasi wana bazalaki koya mpo Yesu ateya bango makambo mingi. (Yoa. 4:9, 39-42) Moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi boye mpo na lisolo yango: “Ndenge bato bazalaki koya elulu . . . emonisaki ete bazalaki mpenza lokola mbuma oyo bakoki kobuka mpo eteli.”

Tosengeli kosala nini soki tomoni ete teritware na biso ezali lokola elanga “oyo eteli mpo na bobuki mbuma”? (Talá paragrafe 3)

3. Na ndenge nini okokóma mosakoli ya malamu koleka soki ozali kotalela bato ndenge moko na Yesu?

3 Tokoki koloba nini mpo na bato oyo osakwelaka nsango malamu? Omonaka ete bazali lokola mbuma oyo bakoki kobuka mpo eteli? Soki otalelaka bango bongo, makambo misato ekomonisa yango. Ya liboso, okozongisa mosala ya kosakola nsima te. Eleko ya bobuki mbuma eumelaka te; ebongaka te kolekisa ngonga. Ya mibale, okozala na esengo ntango ozali komona ndenge bato bazali koyoka nsango malamu. Biblia elobi ete: “Bato basepelaka na ntango ya kobuka mbuma.” (Yis. 9:3) Mpe ya misato, okomona moto nyonso lokola moto oyo akoki kokóma moyekoli ya Yesu, mpe yango ekotinda yo oyebisa ye nsango malamu na ndenge ekosepelisa ye.

4. Na lisolo oyo, mateya nini tokoyekola na ndakisa ya ntoma Paulo?

4 Yesu azalaki kotyola bato ya Samaria te, atako mbala mosusu bayekoli na ye bazalaki kosala bongo. Kasi, amonaki ete bakoki kokóma bayekoli na ye. Biso mpe tosengeli komona bato ya teritware na biso lokola bato oyo bakoki kokóma bayekoli ya Kristo. Ntoma Paulo atikelá biso ndakisa moko ya malamu. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye? Na lisolo oyo, tokolobela makambo oyo esalisaki Paulo (1) ayeba mwa makambo oyo etali bindimeli ya bato oyo azalaki kosakwela, (2) asosola makambo oyo esepelisaka bango, mpe (3) amona ete bakoki kokóma bayekoli ya Yesu.

MAKAMBO NINI BANDIMAKA?

5. Mpo na nini Paulo akokaki koyeba bato oyo bazalaki koyoka ye na sinagoga?

5 Mbala mingi, Paulo azalaki kosakola na basinagoga ya Bayuda. Na ndakisa, na sinagoga ya Tesaloniki, “na boumeli ya sabata misato azalaki kosalela Makomami mpo na kosolola na [Bayuda].” (Mis. 17:1, 2) Na ntembe te, Paulo azalaki komiyoka malamu na sinagoga mpo azalaki Moyuda. (Mis. 26:4, 5) Lokola ayebaki makambo mingi ya Bayuda, akokaki kosakwela bango kozanga kobanga.​—Flp. 3:4, 5.

6. Ndenge nini bato oyo Paulo akutanaki na bango na zando na Atene bakesenaki na baoyo ateyaki na sinagoga?

6 Ntango Paulo akimaki banguna na Tesaloniki mpe na nsima na Beroya, akómaki na Atene. Kuna mpe, “na sinagoga, abandaki kosolola na Bayuda mpe na bato mosusu oyo bazalaki kosambela Nzambe.” (Mis. 17:17) Kasi, ntango Paulo azalaki kosakola na zando, bayoki na ye ezalaki sikoyo bato ya ndenge mosusu. Kati na bango, ezalaki na bato ya Filozofi mpe bato ya bikólo mosusu oyo bamonaki ete nsango oyo Paulo amemaki ezalaki “liteya ya sika.” Balobaki na ye: “Ozali kokɔtisa makambo mosusu oyo toyoká naino te na matoi na biso.”​—Mis. 17:18-20.

7. Na kotalela Misala 17:22, 23, ndenge nini Paulo asalelaki mayele mosusu mpo na kosakola?

7 Tángá Misala 17:22, 23. Mpo na kosakwela bikólo mosusu na Atene, Paulo asalelaki te kaka mayele oyo asalelaki epai ya Bayuda na sinagoga. Ekoki kozala ete Paulo amitunaki: ‘Bindimeli ya bato oyo ya Atene ezali nini?’ Atalaki na likebi zingazinga na ye mpe atyaki likebi na mimeseno na bango ya losambo. Na nsima, Paulo alukaki likambo moko ya losambo ya bato yango oyo akokaki koyokanisa na solo ya Makomami. Moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi ete: “Lokola [Paulo] azalaki mokristo mpe Moyuda, ayebaki ete Bagrɛki wana oyo bazalaki bapakano bazalaki te kosambela Nzambe ‘ya solo’ ya Bayuda mpe bakristo, kasi alukaki komonisa ete bato ya Atene mpe bakokaki koyeba Nzambe oyo ye azalaki kosakola.” Na yango, Paulo andimaki kosalela mayele mosusu mpo na kosakola. Ayebisaki bato ya Atene ete nsango oyo amemaki eutaki “epai ya Nzambe oyo ayebani te,” oyo bazalaki koluka kosambela. Atako bato ya bikólo mosusu bamesanaki na Makomami te, Paulo asundolaki bango te. Kasi, amonaki nde ete bazalaki lokola mbuma oyo bakoki kobuka mpo eteli, mpe abongolaki ndenge na ye ya koyebisa bango nsango malamu.

Na ndakisa ya ntoma Paulo, yebá kosalela miso, luká ndenge ya koyokanisa lisolo na yo, mpe monáká bato ete bakoki kokóma bayekoli ya Kristo (Talá paragrafe 8, 12, 18) *

8. (a) Nini ekoki kosalisa yo oyeba bindimeli ya bato ya teritware na bino? (b) Soki moto alobi ete azali na lingomba na ye, okoki koloba nini?

8 Ndenge moko na Paulo, yebá kosalela miso. Lukáká komona makambo oyo ekoki kosalisa yo oyeba bindimeli ya bato ya teritware na bino. Okoki kotala biloko oyo moto abambi na ndako na ye to na motuka na ye. Talá soki nkombo na ye, molato na ye, ndenge oyo abongisi nsuki, to ata elobeli na ye ezali komonisa soki azali moto ya lingomba nini. Mbala mosusu ayebisi yo mbala moko ete azali na lingomba na ye. Mobongisi-nzela moko na nkombo Flutura alobi ete soki moto ayebisi ye ete azali na lingomba na ye, ye alobaka ete: “Nayei awa mpo na kondimisa yo bindimeli na ngai te, nayei nde mpo tólobela likambo oyo . . .”

9. Soki moto alobi ete azali na lingomba na ye, ndenge nini okoki koyeba bindimeli na ye oyo yo mpe ondimaka?

9 Makambo nini okoki kosolola na moto oyo alobi ete azali na lingomba na ye? Meká koyeba bindimeli na ye oyo yo mpe ondimaka. Mbala mosusu asambelaka Nzambe kaka moko, andimaka ete Yesu azali Mobikisi ya bato, to andimaka ete tozali na eleko moko ya mabe oyo ekosuka mosika te. Na kotalela makambo oyo bino mibale bondimaka, yebisá ye nsango ya Biblia na ndenge oyo ekosepelisa ye.

10. Tosengeli koluka kosala nini, mpe mpo na nini?

10 Kobosana te ete bato mosusu bandimaka te nyonso oyo lingomba na bango eteyaka. Na yango, ata nsima ya koyeba lingomba ya moto, luká koyeba soki ye moko andimaka mpenza nini. David, oyo azali mobongisi-nzela monene na Australie, alobi boye: “Lelo, bato mingi basangisaka mateya ya filozofi ná bindimeli ya lingomba na bango.” Donalta, ndeko moko ya Albanie, alobi: “Bato mosusu balobaka ete bazali na lingomba na bango, kasi na nsima bakómaka koloba ete bandimaka mpenza te ete Nzambe azali.” Mpe ndeko mobali moko ya misionɛrɛ na Argentine amoni ete bato mosusu balobaka ete bandimaka liteya ya Bosato, kasi ekoki kozala ete bandimaka mpenza te ete Tata, Mwana, mpe elimo santu bazali Nzambe moko. Ndeko yango alobi boye: “Koyeba ete mbala mosusu moto andimaka te makambo nyonso oyo lingomba na ye eteyaka, esalisaka mpo na kozwa likambo oyo ekoyokanisa biso.” Na yango, saláká makasi oyeba mpenza makambo oyo bato bandimaka. Na ndenge yango, lokola ntoma Paulo, okoki ‘kokóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.’​—1 Ko. 9:19-23.

MAKAMBO NINI BASEPELAKA NA YANGO?

11. Ndenge ekomami na Misala 14:14-17, ndenge nini Paulo asakwelaki bato ya Listra nsango na ndenge oyo ekosepelisa bango?

11 Tángá Misala 14:14-17. Paulo asosolaki makambo oyo bayoki na ye bazalaki kosepela na yango, na nsima ayokanisaki yango na lisolo na ye. Na ndakisa, ebele ya bato oyo bazalaki koyoka ye na Listra bayebaki kaka moke to mpe bayebaki Makomami te. Na yango, Paulo alobelaki makambo oyo bakokaki koyeba. Alobelaki bileko ya kobuka mbuma mpe likoki ya kosepela na bomoi. Asalelaki maloba mpe bandakisa oyo bayoki na ye bakokaki kokanga ntina na yango mbala moko.

12. Ndenge nini okoki koyeba makambo oyo moto asepelaka na yango mpe koyokanisa yango na lisolo na yo?

12 Salelá bososoli mpo oyeba makambo oyo bato ya teritware na bino basepelaka na yango mpe yokanisá yango na lisolo na yo. Wana ozali kopusana na ndako ya moto, ndenge nini okoki koyeba likambo oyo esepelisaka ye? Awa mpe, osengeli koyeba kosalela miso. Ntango mosusu azali kosala bilanga, azali kotánga mokanda moko, azali kobongisa motuka, to mpe azali kosala mosala mosusu. Soki ebongi, okoki kolobela likambo oyo azali kosala ntango obandi lisolo. (Yoa. 4:7) Ata molato ya moto ekoki kosalisa yo oyeba ye mwa moke; ntango mosusu emonisi ekólo oyo auti, mosala oyo asalaka, to ekipi ya masano oyo akumisaka. Ndeko Gustavo alobi boye: “Nabandaki lisolo na elenge mobali moko ya mbula 19 oyo alataki elamba oyo ezali na fɔtɔ ya alangá-nzembo moko oyo ayebani mingi. Natunaki ye mpo na yango, mpe ayebisaki ngai ntina oyo alingaka alangá-nzembo yango. Lisolo yango ememaki na boyekoli ya Biblia, mpe lelo oyo azali ndeko na biso.”

13. Ntango ozali koyebisa moto ete okoki koyekola na ye Biblia, okoki kosala nini mpo asepela na yango?

13 Ntango ozali koyebisa moto ete okoki koyekola na ye Biblia, salá ete asepela na boyekoli mpe lakisá ye ndenge ekosalisa ye. (Yoa. 4:13-15) Na ndakisa, ndeko mwasi moko na nkombo Poppy asololaki na mwasi moko mpe mwasi yango akɔtisaki ye na ndako na ye. Ntango Poppy amonaki na efelo diplome oyo emonisi ete mwasi yango atángá kelasi ya kozala molakisi, amonisaki ye ete biso mpe toteyaka bato na nzela ya boyekoli ya Biblia na ndako mpe na makita na biso. Mwasi yango andimaki koyekola, akendaki na makita mokolo oyo elandaki, mpe akendaki liyangani ya zongazonga oyo esalemaki mwa moke na nsima. Mbula moko na nsima, mwasi yango azwaki batisimo. Omituna boye: ‘Bato oyo nazongelaka basepelaka na makambo nini? Nakoki kolimbwela bango boyekoli ya Biblia oyo tosalaka na bato na ndenge oyo ekosepelisa bango?’

14. Ndenge nini okoki kobongisa boyekoli ya Biblia mpo na kosalisa moyekoli mokomoko?

14 Ntango obandi koyekola Biblia na moto, bongisáká boyekoli mbala nyonso, wana ozali kokanisa bomoi ya moyekoli mpe makambo oyo esepelisaka ye. Ntango ozali kobongisa boyekoli yango, poná bavɛrsɛ nini bokotánga, bavideo oyo okolakisa, mpe bililingi oyo okosalela mpo na kolimbola mateya ya Biblia. Omituna boye: ‘Nini mpenza ekosepelisa moyekoli yango mpe ekosimba motema na ye?’ (Mas. 16:23) Na Albanie, ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela na nkombo Flora azalaki koyekola Biblia na mwasi moko; mwasi yango alobaki na mpiko ete: “Nakoki te kondima liteya ya lisekwa.” Flora atyaki ye mbamba te. Alobi boye: “Namonaki ete asengeli liboso koyekola koyeba Nzambe oyo alaki ete lisekwa ekozala.” Banda wana, mbala nyonso oyo bazali koyekola, Flora azalaki kobenda likebi mingi na bolingo, bwanya, mpe nguya ya Yehova. Na nsima, mwasi yango akómaki kondimela lisekwa. Lelo, azali Motatoli ya Yehova ya molende.

MONÁKÁ BANGO LOKOLA BATO OYO BAKOKI KOKÓMA BAYEKOLI YA KRISTO

15. Na kotalela Misala 17:16-18, makambo nini ya mabe oyo ezalaki na Grɛsi etungisaki Paulo, kasi mpo na nini asundolaki bato ya Atene te?

15 Tángá Misala 17:16-18. Paulo asundolaki bato ya Atene te, atako engumba na bango etondaki na losambo ya bikeko, makambo ya pite, mpe filozofi ya bapakano. Lisusu, atikaki te ete mafinga na bango elɛmbisa ye nzoto. Paulo ye moko akómaki mokristo, nzokande liboso azalaki “kofinga mpe konyokola mpe [azalaki] moto ya lofundo.” (1 Tim. 1:13) Ndenge kaka Yesu amonaki ete Paulo akokaki kokóma moyekoli na ye, Paulo mpe amonaki ete bato ya Atene bakokaki kokóma bayekoli ya Yesu. Amikosaki te na likambo yango.​—Mis. 9:13-15; 17:34.

16-17. Nini emonisi ete bato ya ndenge na ndenge bakoki kokóma bayekoli ya Kristo? Pesá ndakisa.

16 Na siɛklɛ ya liboso, bato ya ndenge na ndenge bakómaki bayekoli ya Yesu. Ntango Paulo akomelaki bakristo ya Korinti, oyo ezalaki engumba moko ya Grɛsi, alobaki ete bato mosusu ya lisangá yango bazalaki kala babomi-bato to bazalaki na etamboli ya mbindo mingi. Mpe na nsima abakisaki ete: “Bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana. Kasi bosukwami pɛɛ.” (1 Ko. 6:9-11) Soki ezalaki yo, olingaki komona ete bato yango bakokaki kobongwana mpe kokóma bayekoli ya Yesu?

17 Lelo, bato mingi bandimaka kosala mbongwana oyo esengeli mpo na kokóma bayekoli ya Yesu. Na ndakisa na Australie, ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela monene na nkombo Yukina akangaki ntina ete bato ya ndenge nyonso bakoki kondima nsango ya Biblia. Ntango azalaki na biro moko oyo etalelaka makambo ya kotɛka bandako, Yukina amonaki elenge mwasi moko oyo alati bilamba ya mineneminene mpe bakomakomá na nzoto na ye. Alobi boye: “Nakakatanaki mwa moke, kasi na nsima nabandaki kosolisa ye. Namonaki ete azalaki kosepela mingi na Biblia mpe ete makambo mosusu oyo bakomakomá na nzoto na ye ezalaki bavɛrsɛ ya mokanda ya Nzembo!” Mwasi yango abandaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita. *

18. Mpo na nini tosengeli te kosambisaka bato?

18 Ntango Yesu alobaki ete bilanga eteli mpo na bobuki mbuma, ezalaki nde mpo akanisaki ete bato nyonso bakokóma bayekoli na ye? Te. Biblia esakolaki ete kaka bato moke nde bakondimela Yesu. (Yoa. 12:37, 38) Lisusu, Yesu azalaki na likoki ya kotánga na mitema ya bato. (Mat. 9:4) Atako bongo, atyaki likebi na ye epai ya mwa bato moke oyo bakondima, mpe asakwelaki moto nyonso na molende. Lokola biso tokoki kotánga mitema ya bato te, ebongi mpenza tótɛmɛla ezaleli ya kokanisa mabe mpo na teritware na biso to bato oyo bafandaka kuna! Kasi, monáká ete moto nyonso akoki kokóma moyekoli ya Yesu. Marc, oyo azali misionɛrɛ na Burkina Faso, alobi boye: “Mbala mingi bato oyo namonaka ete bakokola na elimo batikaka koyekola. Kasi, bato oyo nakanisaka ete bakokende mosika te, bango nde bakolaka malamu. Yango eteyi ngai ete eleki malamu kotika elimo ya Yehova etambwisa biso.”

19. Ndenge nini tosengeli kotalela bato ya teritware na biso?

19 Soki otali kaka likolólikoló, okoki komona lokola ete bato oyo bazali lokola mbuma oyo eteli bazali mingi te na teritware na bino. Kasi, kobosana te makambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye. Alobaki ete elanga eteli, ekoki mpo na kobuka mbuma. Bato bakoki kobongwana mpe kokóma bayekoli ya Kristo. Yehova amonaka ete bato yango oyo bakoki kokóma bayekoli bazali “biloko kitoko.” (Hag. 2:7) Soki tozali kotalela bato ndenge Yehova ná Yesu batalelaka bango, tokoluka koyeba bindimeli na bango mpe makambo oyo basepelaka na yango. Tokomona bango lokola bapaya te, kasi nde lokola bato oyo bakoki kokóma bandeko na biso ya elimo.

LOYEMBO 57 Tósakwela bato ya ndenge nyonso

^ par. 5 Na ndenge nini lolenge oyo totalelaka bato ya teritware na biso esalaka ete tósakola mpe tóteya malamu to te? Lisolo oyo elobeli ndenge Yesu ná ntoma Paulo batalelaki bayoki na bango. Emonisi mpe ndenge oyo tokoki komekola bango na oyo etali kotya likebi na bindimeli ya moto, makambo oyo esepelisaka ye, mpe komona ye lokola moto oyo akoki kokóma moyekoli ya Yesu.

^ par. 17 Lisolo “Biblia ebongolaka bato” elobeli bato mosusu oyo babongwanaki. Lisolo yango ezalaki kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli tii na 2017. Lelo, ezali kokoba kobima na jw.org®. Kende na OLINGI KOYEBA BISO? > MAKAMBO OYO BATATOLI YA YEHOVA BAKUTANAKI NA YANGO.

^ par. 57 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ntango ndeko moko ná mwasi na ye bazali kosakola ndako na ndako, bamoni (1) ndako moko oyo babongisi yango na bafololo; (2) ndako moko oyo ezali mpe na bana mike; (3) ndako moko oyo biloko na yango ezali na molɔngɔ te; mpe (4) ndako oyo batye bililingi ya losambo. Na ndako nini okokuta moto oyo akoki kokóma moyekoli ya Kristo?