Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 18

‘Tópota mbangu tii na nsuka’

‘Tópota mbangu tii na nsuka’

“Napoti mbangu tii na nsuka.”​—2 TIM. 4:7.

LOYEMBO 129 Tokoyika mpiko tii na nsuka

NA MOKUSE *

1. Biso nyonso tosengeli kosala nini?

OKONDIMA kopota mbangu na momekano oyo oyebi ete ezali mpasi, mingimingi soki ozali na maladi to olɛmbi? Emonani ete okondima te. Nzokande, ntoma Paulo alobaki ete bakristo nyonso ya solo bazali na kati ya momekano moko ya kopota mbangu. (Ebr. 12:1) Mpe tózala bilenge to mikóló, tózala na makasi to tolɛmbi, biso nyonso tosengeli koyika mpiko tii na nsuka mpo tózwa mbano oyo Yehova alaki biso.​—Mat. 24:13.

2. Ndenge emonisami na 2 Timote 4:7, 8, mpo na nini ntoma Paulo azalaki na elobeli ya polele?

2 Ntoma Paulo azalaki na elobeli ya polele mpo alongaki ‘kopota mbangu tii na nsuka.’ (Tángá 2 Timote 4:7, 8.) Kasi, momekano ya kopota mbangu oyo Paulo azalaki kolobela ezali mpenza nini?

MOMEKANO YANGO YA KOPOTA MBANGU EZALI NINI?

3. Momekano nini ya kopota mbangu Paulo alobelaki?

3 Na bantango mosusu, Paulo asalelaki makambo oyo ezalaki kosalema na masano ya Bagrɛki ya ntango ya kala mpo na koteya makambo ya ntina mingi. (1 Ko. 9:25-27; 2 Tim. 2:5) Na mabaku mosusu, asalelaki ndakisa ya momekano ya kopota mbangu mpo na kolobela bomoi ya bokristo. (1 Ko. 9:24; Gal. 2:2; Flp. 2:16) Moto akɔtaka na momekano yango ya elilingi ntango amipesi na Yehova mpe azwi batisimo. (1 Pe. 3:21) Akokóma na ndelo ya nsuka ntango Yehova apesi ye mbano ya bomoi ya seko.​—Mat. 25:31-34, 46; 2 Tim. 4:8.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Na makambo nini lisano ya kopota mbangu ekokani na bomoi ya bokristo? Na makambo mwa mingi. Kasi, tólobela kaka misato kati na yango. Ya liboso, tosengeli kolanda nzela oyo ebongisami; ya mibale, tosengeli kotya makanisi na ndelo ya nsuka; mpe ya misato, tosengeli kokoba kopota mbangu ata soki tokutani na mikakatano na nzela.

LANDÁ NZELA OYO EBONGISAMI

Biso nyonso tosengeli kolanda nzela oyo ebongisami mpo na bakristo (Talá paragrafe 5-7) *

5. Nzela nini tosengeli kolanda, mpe mpo na nini?

5 Mpo na kozwa mbano na momekano ya kopota mbangu, esɛngaka ete bapoti-mbangu bálanda nzela oyo bakambi ya momekano yango babongisi mpo na molulu yango. Ndenge moko mpe, mpo tózwa mbano ya bomoi ya seko, tosengeli kolanda nzela oyo ebongisami mpo na bakristo, to kozala na bomoi ya bokristo. (Mis. 20:24; 1 Pe. 2:21) Kasi, Satana ná baoyo balandaka ndakisa na ye balingi te tólanda nzela oyo ebongisami mpo na bakristo; balingi ‘tómikɔtisa elongo na bango.’ (1 Pe. 4:4) Batyolaka bomoi na biso ya bokristo mpe balobaka ete nzela oyo bango bazali kolanda eleki malamu, mpe ememaka na bonsomi. Kasi, ezali lokuta.​—2 Pe. 2:19.

6. Ndakisa ya Brian eteyi yo nini?

6 Moto nyonso oyo azali kopota mbangu nzela moko na bato ya mokili ya Satana aumelaka te komona ete nzela yango ememaka na bonsomi te, kasi nde na boombo. (Rom. 6:16) Tótalela ndakisa ya Brian. Baboti na ye balendisaki ye alanda nzela oyo ebongisami mpo na bakristo. Kasi na bolenge, akómaki komituna soki nzela yango ekopesa ye mpenza esengo. Brian azwaki ekateli ya kopota mbangu nzela moko na baoyo balandaka makambo ya Satana. Alobi boye: “Nayebaki te ete bonsomi oyo nazalaki kolinga ekomema ngai nde na boombo ya mabe mingi. Na nsima, nakómaki kosalela drɔgɛ, komɛla masanga mingi, mpe namipesaki na makambo ya pite. Bambula ebele, nazalaki se komeka drɔgɛ oyo eleki makasi mpe nakómaki moombo ya mingi na yango. . . . Na nsima, nakómaki mpe kotɛka drɔgɛ mpo nazwa mbongo ya kokoba bomoi na ngai ya mbindo.” Nsukansuka, Brian azwaki ekateli ya koyokanisa bomoi na ye na mibeko ya Yehova. Atikaki banzela ya mabe mpe azwaki batisimo na 2001. Lelo, azali na esengo ya solosolo mpo azali kolanda nzela oyo ebongisami mpo na bakristo. *

7. Na kotalela Matai 7:13, 14, nzela nini mibale etyami mpo tópona moko?

7 Ezali mpenza na ntina tópona nzela ya malamu! Satana alingi ete tótika kopota mbangu na nzela ya nkaka oyo ezali ‘komema na bomoi,’ mpe tókende na nzela ya monene epai bato mingi ya mokili oyo bazali. Nzela yango ezali na bato mingi mpe ezali mpasi te kotambola na yango. Nzokande, ezali ‘komema na libebi.’ (Tángá Matai 7:13, 14.) Mpo tótikala na nzela ya malamu mpe tópɛngwa te, tosengeli kotyela Yehova motema mpe koyokaka ye.

TYÁ MAKANISI NA NDELO YA NSUKA MPE KOBƐTA LIBAKU TE

Tosengeli kotya miso na mbano mpe koboya kobɛtisa basusu libaku (Talá paragrafe 8-12) *

8. Soki mopoti-mbangu abɛti libaku, asalaka nini?

8 Bapoti-mbangu oyo bazali kosala momekano batalaka se liboso na nzela oyo bazali kolanda mpo bábɛta libaku te. Kasi, ekoki kokóma ete bátutana na bapoti-mbangu mosusu to bátya lokolo esika oyo libulu ezali. Soki bakwei, batɛlɛmaka mpe bakobaka kopota mbangu. Batyaka makanisi libosoliboso na ndelo ya nsuka mpe na mbano oyo bazali na elikya ya kozwa, kasi te na makambo oyo ebɛtisi bango libaku.

9. Soki tobɛti libaku, tosengeli kosala nini?

9 Na momekano ya kopota mbangu mpo na bomoi, tobɛtaka mabaku mbala mingi; tosalaka mabunga na maloba to na misala na biso. To mpe, bandeko oyo tozali kopota na bango mbangu mpo na bomoi bakoki kosala mabunga oyo esali biso mpasi. Yango esengeli kokamwisa biso te. Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, mpe tozali biso nyonso na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi. Na yango, ekoki kokóma ete “tótutana” na bandeko. Paulo andimaki ete na bantango mosusu tokoki kozala na ‘likambo ná basusu.’ (Kol. 3:13) Kasi, na esika tótya makanisi na makambo oyo ebɛtisi biso libaku, tótya nde makanisi na mbano oyo ezali kozela biso. Soki tobɛti libaku, ezali malamu tótɛlɛma mpe tókoba kopota mbangu. Soki tokómi nkandankanda mpe toboyi kotɛlɛma, tokokóma na ndelo ya nsuka te mpe tokozanga mbano. Lisusu, tokoki kokóma eloko oyo ezali kobɛtisa basusu libaku na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi, ndenge kaka mopoti-mbangu oyo akwei mpe atɛlɛmi te akoki kokanga basusu nzela.

10. Ndenge nini tokoki koboya kokóma ‘eloko oyo ezali kobɛtisa basusu libaku’?

10 Lolenge mosusu oyo tokoki koboya kokóma ‘eloko oyo ezali kobɛtisa basusu libaku’ ezali ya komipimela makambo mosusu soki ebongi na esika ya kotingama kaka na oyo biso tolingi. (Rom. 14:13, 19-21; 1 Ko. 8:9, 13) Na likambo yango ya ntina mingi, tokeseni na bapoti-mbangu na mimekano oyo bato basalaka. Bawelanaka bango na bango, mpe moto na moto asalaka nyonso mpo kaka ye nde azwa mbano. Balukaka libosoliboso matomba na bango. Na yango, bakoki kotindika baninga na nko mpo bango báleka liboso. Nzokande, na momekano ya kopota mbangu mpo na bomoi, towelanaka te. (Gal. 5:26; 6:4) Mokano na biso ezali ya kosalisa ebele ya bato bákóma na ndelo ya nsuka elongo na biso mpe bázwa mbano ya bomoi. Yango wana tosalaka makasi tósalela toli oyo Paulo akomaki na litambwisi ya elimo santu, ete ‘tótyaka likebi kaka na makambo na biso moko te, kasi tótyaka mpe likebi na makambo ya basusu.’​—Flp. 2:4.

11. Mopoti-mbangu atyaka makanisi na nini, mpe mpo na nini?

11 Longola kotya miso na nzela oyo bazali kolanda, bapoti-mbangu batyaka makanisi na ndelo ya nsuka. Ata soki bamonaka ndelo yango na miso te, bakoki komona na makanisi ete baleki yango mpe bazwi mbano. Kokanisa ntango nyonso mbano oyo bakozwa epesaka bango mpiko ya kokoba.

12. Yehova alaki biso nini na boboto na ye?

12 Na boboto na ye, Yehova alaki bato na ye ete soki bapoti mbangu tii na nsuka, akopesa bango mbano ya bomoi ya seko, ezala na likoló to na paradiso awa na mabele. Biblia elobeli mwa moke mbano yango, mpo tómonaka na makanisi ndenge bomoi na biso ekozala kitoko. Soki tozali ntango nyonso kobatela elikya na biso na makanisi mpe na motema na biso, tokozala na ekateli makasi ya kotika eloko te ebɛtisa biso libaku mpo na libela.

KOBÁ KOPOTA MBANGU ATAKO MIKAKATANO

Tolingaka kokoba kopota mbangu mpo na bomoi atako tozali na mikakatano (Talá paragrafe 13-20) *

13. Na ndenge nini toleki bapoti-mbangu ya masano?

13 Bapoti-mbangu na masano ya Bagrɛki basengelaki koyika mpiko na mikakatano, na ndakisa kolɛmba mpe nzoto mpasi. Kasi, bazalaki kotya motema kaka na formasyo oyo bazalaki kozwa mpe na makasi na bango. Tozali lokola bapoti-mbangu wana mpo tozwaka formasyo oyo eteyaka biso ndenge ya kopota mbangu mpo na bomoi. Kasi, toleki bapoti-mbangu wana na makambo mosusu. Tokoki kozwa makasi epai ya Yehova, oyo azali na nguya oyo ezangi nsuka. Soki totyeli Yehova motema, alaki ete akosuka kaka te na kopesa biso formasyo to kobongisa biso, kasi akokómisa biso mpe makasi!​—1 Pe. 5:10.

14. Ndenge nini 2 Bakorinti 12:9, 10 ezali kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano?

14 Paulo akutanaki na mikakatano ebele. Bato bafingaki ye mpe bazalaki kotɛmɛla ye, na bantango mosusu azalaki na bolɛmbu, mpe asengelaki kobundana na mokakatano oyo abengaki “nzubɛ moko na kati ya mosuni.” (2 Ko. 12:7) Kasi, na esika atika ete mikakatano yango ezongisa ye nsima, amonaki ete ezali libaku ya kotyela Yehova motema. (Tángá 2 Bakorinti 12:9, 10.) Lokola Paulo atalelaki makambo ndenge wana, Yehova asalisaki ye na mikakatano na ye nyonso.

15. Soki tomekoli Paulo, tokomona nini?

15 Bato bakoki mpe kofinga mpe kotɛmɛla biso mpo na kondima na biso. Ekoki mpe kozala ete tozali na maladi to makasi na biso ya nzoto esili. Kasi, soki tomekoli Paulo, mokakatano yango mokomoko ekoki kokóma libaku ya komona lobɔkɔ ya Yehova.

16. Ata soki ozali nzoto kolɔngɔnɔ te, okoki kosala nini?

16 Okɔtá ndako mpo na maladi to ofandá na kiti ya bibɔsɔnɔ? Mabɔlɔngɔ esalaka yo mpasi to miso ezali komona lisusu malamu te? Soki bongo, okoki kaka kopota mbangu mpo na bomoi nzela moko na baoyo bazali bilenge mpe na nzoto kolɔngɔnɔ? Ɛɛ! Bandeko mingi ya mibange mpe ya bibɔsɔnɔ bazali kopota mbangu na nzela ya bomoi. Basalaka yango na makasi na bango moko te. Kasi, bazwaka makasi epai ya Yehova na ndenge balandaka makita na nzela ya telefone to batalaka makita oyo etyami na Internet. Lisusu, basalaka mosala ya kokómisa bato bayekoli na ndenge basakwelaka minganga, mafulume, mpe bandeko na bango ya libota.

17. Yehova ayokaka ndenge nini mpo na baoyo nzoto ezali makasi te?

17 Kotika te ete kolɛmba nzoto mpe kozanga makasi na nzoto etinda yo okanisa ete ozali na bolɛmbu mpe ete okoki kopota mbangu te na nzela ya bomoi. Yehova alingaka yo mpo na kondima na yo mpe ayebi ndenge oyiki mpiko bambula ebele. Ayebi ete ozali na mposa ya lisalisi na ye mingi koleka sikoyo, mpe akosundola yo te. (Nz. 9:10) Kutu, akopusana lisusu mingi penepene na yo. Yoká makambo ndeko mwasi moko oyo abɛlaka makasi alobi: “Ntango maladi na ngai ezali se koya makasi, ezalaka mpasi nazwa mabaku ya koyebisa basusu nsango malamu mbala na mbala. Kasi nayebi ete ata mwa milende na ngai ya mikemike esepelisaka motema ya Yehova, mpe yango epesaka ngai esengo.” Ntango oyoki ete olɛmbi nzoto, kobosana te ete ozali yo moko te. Kanisá ndakisa ya Paulo, mpe maloba na ye ya kolendisa ete: “Nazali kosepela na bolɛmbu, . . . mpo ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.”​—2 Ko. 12:10.

18. Mokakatano nini ya makasi bandeko mosusu bazalaka na yango?

18 Bandeko mosusu oyo bazali kopota mbangu na nzela ya bomoi bazali na mokakatano ya ndenge mosusu. Basusu bakoki komona yango te mpe mbala mosusu koyeba yango te. Na ndakisa, banyokwamaka na makanisi, bazalaka na mitungisi oyo eleki ndelo to mpe maladi ya kobangabanga. Mpo na nini mokakatano ya basaleli yango ya Yehova ezali mpasi mingi? Mpo ntango moto abukaná lobɔkɔ to afandá na kiti ya bibɔsɔnɔ, moto nyonso akoki komona mokakatano na ye mpe yango ekoki kotinda ye asalisa. Kasi, baoyo banyokwamaka na makanisi to bazali na mikakatano mosusu ya bɔɔngɔ, mbala mosusu elembo moko te na libándá emonisaka ete bazali konyokwama. Nzokande, bazali na mpasi kaka lokola moto oyo abukaná; kasi lokola basusu bamonaka mpasi yango te, bato bamoniselaka bango motema mawa te ndenge esengeli.

19. Ndakisa ya Mefiboshete ezali koteya biso nini?

19 Soki ozalaka na mokakatano moko mpe soki omonaka ete basusu bamityaka na esika na yo te, ndakisa ya Mefiboshete ekoki kopesa yo makasi. (2 Sa. 4:4) Mefiboshete azalaki ebɔsɔnɔ, mpe Mokonzi Davidi asambisaki likambo na ye na bosembo te. Mefiboshete azalaki na foti te na likambo oyo esalemaki. Kasi, akómaki na makanisi ya mabe te; azalaki nde kosepela na makambo oyo ezalaki kotambola malamu na bomoi na ye. Azalaki na botɔndi mpo na boboto oyo Davidi amoniselaki ye na kala. (2 Sa. 9:6-10) Na yango, ntango Davidi akaniselaki ye mabe, Mefiboshete atalelaki likambo na mobimba na yango. Atikaki te ete libunga ya Davidi ekómisa ye nkandankanda. Mpe asilikelaki Yehova te mpo na likambo oyo Davidi asalaki. Mefiboshete alukaki kosala oyo akokaki mpo na kopesa mabɔkɔ na mokonzi oyo Yehova atyaki. (2 Sa. 16:1-4; 19:24-30) Yehova akomisaki ndakisa malamu ya Mefiboshete na Liloba na Ye mpo na bolamu na biso.​—Rom. 15:4.

20. Bato oyo bazalaka na mokakatano ya komitungisa koleka ndelo bakoki komiyoka ndenge nini, kasi elikya nini bakoki kozala na yango?

20 Bandeko mosusu oyo bazalaka na mokakatano ya komitungisa koleka ndelo bazalaka motema likolólikoló na boyokani na bango na basusu na makambo ya mokolo na mokolo. Ekoki kozala mpasi mpo na bango kozala esika ya bato ebele, kasi bakobaka koyangana na makita ya lisangá, na mayangani ya mike mpe ya minene. Bazalaka na mokakatano ya kosolola na bato oyo bayebi te, kasi basololaka na bato na mosala ya kosakola. Soki ezali bongo mpo na yo, yebá ete ozali yo moko te. Bandeko mingi bazali kobundana na mikakatano ya ndenge wana. Kobosana mpe te ete Yehova asepelaka na milende oyo osalaka na molimo na yo mobimba. Lokola ozali naino koyika mpiko, yango emonisi ete azali kopambola yo mpe kopesa yo makasi oyo osengeli na yango. * (Flp. 4:6, 7; 1 Pe. 5:7) Soki ozali kosalela Yehova atako maladi ya nzoto to ya makanisi, zalá na elikya ete ozali kosepelisa ye.

21. Na lisalisi ya Yehova, biso nyonso tokosala nini?

21 Likambo ya esengo, kopota mbangu oyo Paulo alobelaki ekeseni na masano ya kopota-mbangu. Na masano yango na ntango ya kala, kaka mopoti-mbangu moko nde azalaki kozwa mbano. Kasi, moto nyonso oyo azali koyika mpiko na bosembo nyonso na nzela oyo ebongisami mpo na bakristo, akozwa mbano ya bomoi ya seko. (Yoa. 3:16) Lisusu, na masano ya kopota mbangu, mopoti-mbangu nyonso asengelaki kozala nzoto makasi; soki te, ezalaki mpasi mpo bálonga. Nzokande, mingi kati na biso tozali nzoto kolɔngɔnɔ te, kasi tozali kokoba koyika mpiko. (2 Ko. 4:16) Na lisalisi ya Yehova, biso nyonso tokopota mbangu mpo na bomoi tii na nsuka!

LOYEMBO 144 Tyá miso na yo na mbano!

^ par. 5 Basaleli mingi ya Yehova lelo bazali kokutana na mikakatano mpo bakómi mibange to mpo bazali na maladi oyo ezali kosilisa bango makasi. Mpe na bantango mosusu, biso nyonso toyokaka ete nzoto elɛmbi. Na yango, likanisi ya kosala lisano moko ya kopota mbangu ekoki kobangisa biso. Lisolo oyo elobeli ndenge oyo biso nyonso tokoki koyika mpiko mpe kolonga na momekano ya kopota mbangu mpo na bomoi, oyo ntoma Paulo alobelaki.

^ par. 6 Talá lisolo “Biblia ebongolaka bato” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/2013.

^ par. 20 Mpo na kozwa makanisi mosusu oyo ekoki kosalisa soki tomitungisaka koleka ndelo, mpe komona ndenge bandeko basusu bazali kolonga mokakatano yango, talá emisyo ya sanza ya Mai 2019 na jw.org®. Kende na BIBLIOTƐKƐ > TV JW.

^ par. 63 NDIMBOLA YA BILILINGI: Komipesa na mosala ya kosakola esalisaka ndeko moko ya mobange atikala na nzela oyo ebongisami mpo na bakristo.

^ par. 65 NDIMBOLA YA BILILINGI: Tokoki kobɛtisa basusu libaku soki totye bango mbamba bámɛla masanga to soki tozali komɛla mingi.

^ par. 67 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ata soki akɔtá lopitalo, ndeko mobali moko azali kaka kopota mbangu mpo na bomoi na ndenge asakwelaka bato oyo bayaka kopesa ye nkisi.