Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 21

Osepelaka na makabo kitoko ya Nzambe?

Osepelaka na makabo kitoko ya Nzambe?

“Yo moko osali makambo mingi, Ee Yehova Nzambe na ngai, ɛɛ misala na yo ya kokamwa mpe makanisi na yo epai na biso.”​NZ. 40:5.

LOYEMBO 5 Misala ya kokamwa ya Nzambe

NA MOKUSE *

1-2. Na kotalela Nzembo 40:5, makabo nini Yehova apesá biso, mpe mpo na nini tokolobela yango na lisolo oyo?

YEHOVA azali Nzambe oyo akabaka. Kanisá naino na mwa makabo oyo apesá biso. Apesá biso mabele, esika kaka moko ya kitoko oyo tokoki kofanda. Apesá biso bɔɔngɔ, oyo esalemá na ndenge ya kokamwa mpe Liloba na ye Biblia. Lokola Yehova apesá biso makabo yango misato, yango esalisi biso tózala na: esika ya kofanda, likoki ya kokanisa mpe ya kosolola na basusu, mpe biyano na mituna ya ntina mingi oyo tokoki komituna.​—Tángá Nzembo 40:5.

2 Na lisolo oyo, tokolobela na mokuse makabo yango misato. Soki tozali kokanisa na mozindo na makabo yango, tokosepela na yango lisusu mingi, mpe mposa na biso ya kosepelisa Yehova, Mozalisi na biso ya bolingo, ekokóma lisusu makasi. (Em. 4:11) Longola yango, tokozala na likoki ya kosolola na bato oyo bakosamá na liteya ya evolisyo.

MABELE EKESENI NA BAPLANƐTI MOSUSU

3. Nini ekesenisi mabele na baplanɛti mosusu?

3 Ndenge oyo Nzambe asalá mabele, emonisaka mpenza ete azali na bwanya. (Rom. 1:20; Ebr. 3:4) Ezali na baplanɛti mosusu oyo ebalukaka zingazinga ya moi, kasi mabele ekeseni na baplanɛti yango mpo ezali na biloko nyonso oyo esengeli mpo moto azala na bomoi.

4. Ndakisa nini emonisi ete lolenge oyo Yehova asalá mabele emonisaka bwanya na ye?

4 Na molɔ́ngɔ́, mabele ezali lokola masuwa oyo ezali kotepatepa na mbu. Kasi bokeseni monene ezali kati na masuwa oyo etondi na bato mpe mabele. Na ndakisa, soki tolobi ete bato oyo bazali na kati ya masuwa moko básala mopɛpɛ na bango moko mpo na kopema, biloko na bango moko ya kolya, mai na bango moko, mpe bábwakaka te bosɔtɔ na bango na libanda ya masuwa, bato yango bakoumela ntango boni? Na ntembe te, ekoumela te mpo bákufa. Nzokande, mabele ezali na likoki ya kobatela bomoi ya ebele ya bato mpe ya banyama. Ezali na mopɛpɛ ya kitoko, bilei mpe mai oyo tosengeli na yango; mpe biloko yango esilaka te. Lisusu, atako mabele ebwakaka bosɔtɔ na yango libándá te, ezalaka ntango nyonso kitoko mpe ezali esika oyo ebongi mpo na kofanda. Mpo na nini esalemaka bongo? Mpo Yehova asalá mabele na likoki ya kobongola eloko moko ya bosɔtɔ mpo ekóma eloko moko ya malamu mpo mabele esalela yango lisusu. Tokolobela na mokuse ndenge mai mpe mopɛpɛ oyo topemaka emonisaka bwanya ya Yehova.

5. Ndenge nini tozwaka mopɛpɛ ya malamu, mpe yango endimisi biso likambo nini?

5 Mopɛpɛ ya malamu (Oxygène) ezali na ntina mingi mpo na bomoi ya bato mpe banyama. Bato ya mayele balobi ete na mbula moko, bato mpe banyama basalelaka bamiliare ya kilo ya mopɛpɛ ya malamu, mpe babimisaka mopɛpɛ ya mabe (dioxyde de carbone). Atako bongo, mopɛpɛ yango ya malamu esilaka te mpe mopɛpɛ ya mabe etondaka te na etando na biso. Mpo na nini? Mpo Yehova asalá banzete ndenge na ndenge oyo ebendaka mopɛpɛ ya mabe mpe ebimisaka mopɛpɛ ya malamu. Makambo oyo esalemaka mpo tózwa mopɛpɛ ya malamu endimisi biso maloba oyo ezali na Misala 17:24, 25 oyo elobi ete “Nzambe . . . apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema.”

6. Makambo nini esalemaka mpo mai ezala ntango nyonso na mabele, mpe yango emonisi nini? (Talá mpe etanda “ Mai, likabo oyo Yehova apesá biso.”)

6 Lokola mabele ekabwani na moi na ntaka oyo ebongi, yango wana tozangaka mai te. Soki mabele ezalaka mwa moke pene na moi, bomoi elingaki kozala te mpo mai nyonso elingaki kokauka mpe mabele elingaki kozala mɔtɔ mpe kotikala kaka na mabanga. Soki mabele ezalaka mwa moke mosika na moi, mai elingaki kokóma libanga mpe mabele elingaki kotonda na banɛjɛ mpe na mabanga ya malili. Lokola Yehova atyá mabele na esika oyo ebongi, yango esalaka ete mai ezala ntango nyonso na mabele mpo bato ná banyama mpe biloko mosusu bázala na bomoi. Molunge ya moi ematisaka mai oyo ezali na mbu mpe na mabele likoló mpo ekóma mapata. Mbula na mbula, bakilomɛtrɛ kibe ya mai pene na 500 000 emataka na likoló. Nsima ya mikolo pene na 10, mai yango ekweaka lisusu na mabele lokola mbula to nɛjɛ. Na nsima, mai yango ezongaka lisusu na mbu to na bibale mosusu, mpe emataka lisusu na likoló. Yehova asalá bongo mpo mai ezalaka ntango nyonso na mabele. Yango emonisi ete Yehova azali na bwanya mpe na nguya ya kokamwa mpenza.​—Yobo 36:27, 28; Mos. 1:7.

7. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na makabo oyo Nzembo 115:16 elobeli?

7 Nini ekoki kosalisa biso tómonisa botɔndi mpo na planɛti na biso oyo esalamá na ndenge moko ya kokamwa, mpe mpo na biloko nyonso oyo ezali na kati? (Tángá Nzembo 115:16.) Mpo na komonisa botɔndi na biso, tosengeli kokanisa na mozindo na makambo oyo Yehova asalá. Yango ekotinda biso tópesa ye matɔndi mokolo na mokolo mpo na biloko malamu oyo apesá biso. Lisusu, tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na mabele soki tozali kosala nyonso mpo esika oyo tofandi ezala ntango nyonso pɛto.

BƆƆNGƆ NA BISO ESALEMÁ NA NDENGE MOKO YA KOKAMWA

8. Mpo na nini tokoki koloba ete bɔɔngɔ ya moto esalemá na ndenge moko ya kokamwa mpenza?

8 Bɔɔngɔ ya moto esalemá na ndenge moko ya kokamwa mpenza. Ntango ozalaki naino na libumu ya mama, bɔɔngɔ na yo ezalaki kosalema na kolanda malako ya sikisiki. Mpe nsima ya miniti mokomoko, bankotó ya baselile ya bɔɔngɔ ezalaki kosalema. Bato ya mayele balobi ete mokóló akoki kozala na baselile ya bɔɔngɔ oyo babengi neurone pene na miliare 100. Baselile yango nyonso nde esalá bɔɔngɔ ya moto, oyo ezalaka na kilogramɛ moko na ndambo. Tótalela sikoyo mwa makoki ya kokamwa oyo bɔɔngɔ ezalaka na yango.

9. Nini endimisi yo ete likoki na biso ya koloba ezali mpenza likabo oyo euti epai ya Nzambe?

9 Likoki oyo tozalaka na yango mpo na koloba ezali mpenza likamwisi. Tókanisa naino mwa moke mpo na makambo oyo esalemaka ntango tolobaka. Mpo tóloba ata liloba moko, bɔɔngɔ epesaka mitindo na misuni koleka 100; misuni ya lolemo, ya mongongo, ya mbɛbu, ya mbanga, mpe ya ntolo. Mpo bato bákanga ntina ya makambo oyo tozali koloba, misuni yango esengeli koningana na ndenge oyo ebongi mpe na boumeli ya ntango oyo esengeli. Na 2019, bato oyo basalaka bolukiluki na likambo etali likoki ya koloba minɔkɔ, balobaki ete babebe oyo babotami sika bakoki koyeba mwa maloba ya monɔkɔ moko boye mpe kosala na boyokani na maloba yango. Boyekoli yango endimisi lisusu likanisi oyo bato ya mayele mingi bazalaka na yango ete tobotamaka na likoki ya koyeba mpe koyekola minɔkɔ. Ya solo, likoki na biso ya koloba ezali mpenza likabo oyo euti epai ya Nzambe.​—Kob. 4:11.

10. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na likoki ya koloba oyo Nzambe apesá biso?

10 Tokomonisa botɔndi mpo na likabo oyo Nzambe apesá biso ya koloba soki tozali kolimbolela bato oyo bandimaka liteya ya evolisyo ntina oyo biso tondimaka ete Nzambe akelá biloko nyonso. (Nz. 9:1; 1 Pe. 3:15) Bato yango balobaka ete mabele mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele, ebimá kaka yango moko. Soki tosaleli Biblia mpe makambo mosusu oyo tolobeli na lisolo oyo, tokoki kolongisa Tata na biso ya likoló mpe kolimbola na baoyo bazali na mposa ya koyoka ntina oyo biso tondimaka mpenza ete Yehova azali Mozalisi ya likoló mpe mabele.​—Nz. 102:25; Yis. 40:25, 26.

11. Mpo na nini bɔɔngɔ na biso ekamwisaka mpenza?

11 Likoki na biso ya kokanisa makambo ekamwisaka mpenza. Na kala, mokomi moko akomaki ete bɔɔngɔ na biso ezali na likoki ya kokanisa makambo ebele mpenza. Soki tokomi makambo yango nyonso na babuku, ekoki kokóma babuku milio 20. Kasi sikoyo emonani ete bɔɔngɔ na biso ekoki kokanga makambo mingi koleka wana. Lokola bɔɔngɔ na biso esalemá bongo, likoki nini kaka bato nde bazalaka na yango?

12. Na ndenge nini likoki na biso ya koyekola mateya mpo na kozala na bizaleli malamu ekesenisi biso na banyama?

12 Na bikelamu nyonso oyo ezali na mabele, kaka bato nde bazali na likoki ya kokanisa makambo oyo eleká, kotalela yango malamumalamu mpo na kozwa mateya ya ntina na oyo etali bizaleli na bango. Yango esalaka ete tózala na likoki ya koyekola bizaleli ya malamu, mpe tóbongola lolenge na biso ya kokanisa mpe makambo oyo tosalaka na bomoi na biso. (1 Ko. 6:9-11; Kol. 3:9, 10) Kutu, tokoki koteya lisosoli na biso mpo eyeba kokesenisa malamu ná mabe. (Ebr. 5:14) Tokoki mpe koyekola kokóma na bizaleli lokola, bolingo, koyokelaka basusu mawa, mpe komekola bosembo ya Yehova.

13. Na kotalela makambo oyo ezali na Nzembo 77:11, 12, ndenge nini tosengeli kosalela likoki na biso ya kokanga makambo?

13 Tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na likabo oyo Nzambe apesá biso ya kokanisaka makambo soki tozali kopona kokanisa ntango nyonso ndenge oyo Yehova asalisaki to abɔndisaki biso na kala. Yango ekokómisa lisusu kondima na biso makasi ete akosalisa biso mpe na mikolo ezali koya. (Tángá Nzembo 77:11, 12; 78:4, 7) Tokomonisa mpe botɔndi na biso mpo na likabo yango soki tozali kokanisa makambo malamu oyo bato mosusu basalelaka biso mpe kopesa bato yango matɔndi mpo na lisalisi na bango. Bato ya mayele balobi ete mbala mingi bato oyo bamonisaka botɔndi bazalaka na esengo. Tosengeli mpe kondima kobosanaka makambo mosusu kaka ndenge Yehova asalaka. Na ndakisa, atako Yehova azali bɔɔngɔ oyo ekoki kobosana ata likambo moko te, andimaka kolimbisa mpe kobosana masumu na biso soki tobongoli mpenza motema. (Nz. 25:7; 130:3, 4) Alingi tósala mpe bongo soki bato mosusu basɛngi biso bolimbisi mpo na mabunga oyo basaleli biso.​—Mat. 6:14; Luka 17:3, 4.

Tokomonisa botɔndi mpo na bɔɔngɔ na biso, oyo ezali likabo ya kokamwa, soki tozali kosalela yango mpo na kokumisa Yehova (Talá paragrafe 14) *

14. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na bɔɔngɔ, likabo ya kokamwa oyo Nzambe apesá biso?

14 Tokomonisa botɔndi mpo na bɔɔngɔ na biso, oyo ezali likabo ya kokamwa, soki tozali kosalela yango mpo na kokumisa Nzambe oyo apesá biso yango. Bato mosusu basalelaka bɔɔngɔ na bango na ndenge ya mabe; basalelaka yango mpo na komityela mibeko na oyo etali malamu ná mabe. Kasi lokola Yehova akelá biso, ebongi mpenza tóndimisama ete mibeko na ye ezali malamu koleka mosusu nyonso oyo tokoki komityela biso moko. (Rom. 12:1, 2) Ntango totosaka mibeko na ye, tozalaka na bomoi ya kimya. (Yis. 48:17, 18) Mpe tomonaka mpenza ntina oyo tozali na bomoi: Kopesa Mozalisi mpe Tata na biso lokumu mpe esengo.​—Mas. 27:11.

BIBLIA, LIKABO MOKO KITOKO

15. Lokola Yehova apesá biso Biblia, ndenge nini yango emonisi ete alingaka biso?

15 Biblia ezali likabo moko ya bolingo oyo Nzambe apesá biso. Na lisalisi ya elimo santu, Tata na biso ya likoló atindaki bato bákoma Biblia mpo alingaka biso mingi mpenza. Na nzela ya Biblia, Yehova apesaka biso biyano na mituna eleki ntina oyo tokoki komituna. Na ndakisa: Toutá wapi? Mpo na nini tozalaka na bomoi? Mpe makambo nini ekosalema na mikolo oyo ezali koya? Lokola Yehova alingi ete bana na ye nyonso bázwa biyano na mituna wana, yango wana, na boumeli ya basiɛklɛ ebele atindaki bato bábongola Biblia na minɔkɔ ebele. Lelo oyo, Biblia mobimba to ndambo na yango ebongolami na minɔkɔ koleka 3 000! Biblia ezali buku oyo ebongolami mpe ekabolami mingi koleka babuku mosusu nyonso na mokili mobimba. Ata soki bato bafandaka wapi to balobaka monɔkɔ nini, mingi na bango bakoki kotánga Biblia na monɔkɔ na bango moko.​—Talá etanda “ Biblia ebongolami na minɔkɔ ya Afrika.”

16. Na kotalela Matai 28:19, 20, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na Biblia?

16 Tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na Biblia soki tozali kotánga yango mokolo na mokolo, kokanisa na mozindo na makambo oyo yango eteyaka, mpe kosala nyonso mpo na kosalela makambo oyo toyekoli. Longola yango, tokomonisela Nzambe botɔndi na biso soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na koyebisa bato ebele makambo oyo Biblia eteyaka.​—Nz. 1:1-3; Mat. 24:14; tángá Matai 28:19, 20.

17. Wapi mwa makabo oyo tolobeli na lisolo oyo, mpe tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

17 Na lisolo oyo, tolobeli mwa ndambo ya makabo oyo Nzambe apesá biso, na ndakisa mabele, bɔɔngɔ na biso oyo esalemá na ndenge ya kokamwa, mpe Biblia. Kasi ezali na makabo mosusu oyo Yehova apesá biso oyo miso ya moto ekoki komona te. Na lisolo oyo elandi, tokolobela makabo yango ya kitoko.

LOYEMBO 12 Yehova, Nzambe monene

^ par. 5 Lisolo oyo ekosalisa biso tókóma lisusu na botɔndi mingi mpo na Yehova mpe mpo na makabo misato oyo apesá biso. Ekosalisa biso mpe tóyeba ndenge ya kosolola na bato oyo bandimaka te ete Nzambe azalaka.

^ par. 64 ELILINGI: Ndeko mwasi moko azali koyekola monɔkɔ ya bapaya mpo na koteya bato yango solo ya Liloba ya Nzambe.