LISOLO YA BOYEKOLI 28
Bokonzi ezali koyangela!
“Bokonzi ya mokili ekómi bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Kristo na ye.”—EM. 11:15.
LOYEMBO 22 Bokonzi ezali koyangela—Tiká eya!
NA MOKUSE a
1. Likambo nini moto moko te ya sembo akoki koboya, mpe mpo na nini?
NTANGO ozali kotala makambo oyo ezali kosalema na mokili ezali mpasi kondima ete makambo ekobonga mokolo mosusu. Na mabota mingi, bato balinganaka lisusu te ndenge bazalaki kolingana liboso. Bato bakómi kosala lisusu mobulu mingi mpe bazali na ezaleli ya moimi. Bato mingi bakómi na mokakatano ya kotyela bakonzi ya Leta motema. Kasi makambo yango ekoki kondimisa yo ete makambo ekobonga. Mpo na nini? Mpamba te bato bazali kosala kaka makambo oyo Biblia elobi mpo na esakweli moko ya ntina mingi etali “mikolo ya nsuka.” (2 Tim. 3:1-5) Moto moko te ya sembo akoki koboya ete Kristo Yesu azali koyangela na likoló lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, mpo biso moko tozali komona ndenge esakweli oyo ezali kokokisama. Kasi yango ezali moko ya bisakweli oyo elobeli Bokonzi ya Nzambe. Soki totaleli lisusu bisakweli mpe kokokisama na yango na bambula oyo euti koleka, ekokómisa kondima na biso makasi.
2. Tokolobela nini na lisolo oyo, mpe mpo na nini? (Lobelá elilingi ya ezipeli.)
2 Na lisolo oyo, tokolobela (1) esakweli moko oyo ekosalisa biso tóyeba ntango nini Bokonzi etyamaki, (2) bisakweli oyo ekosalisa biso tókanga ntina ya kozala ya Yesu lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe oyo azali komonana te, mpe (3) bisakweli oyo emonisi ndenge banguna ya Bokonzi ya Nzambe bakosuka. Kaka ndenge tomonaka motongi-bilamba asangisaka biteni ndenge na ndenge ya elamba mpo atonga elamba moko, yango esalisaka biso tóyeba soki elamba yango elingi kosila to te, ndenge moko mpe bisakweli ndenge na ndenge oyo tokomona ekosalisa biso tómona polele eleko nini tokómi na manaka ya Yehova.
NDENGE NINI TOKOKI KOYEBA NTANGO OYO BOKONZI YA NZAMBE ETYAMAKI?
3. Likambo nini esakweli oyo ezali na Danyele 7:13, 14 endimisi biso na oyo etali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe?
3 Esakweli oyo ezali na Danyele 7:13, 14 endimisi biso ete Kristo Yesu nde abongi kozala Moyangeli na Bokonzi ya Nzambe. Bato ya bikólo nyonso ‘bakosalela ye’ na esengo mpe mokonzi mosusu te akozwa esika na ye. Esakweli mosusu na mokanda ya Danyele elobaki ete Yesu akobanda koyangela na Bokonzi yango na nsuka ya ntango nsambo. Tokoki koyeba ntango oyo Yesu akómaki Mokonzi?
4. Ndenge nini Danyele 4:10-17 esalisi biso tóyeba mbula oyo Kristo asengelaki kokóma Mokonzi? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
4 Tángá Danyele 4:10-17. “Ntango nsambo” ezali komonisa eleko moko ya bambula 2520. Ntango yango ebandaki na mobu 607 L.T.B. ntango bato ya Babilone balongolaki mokonzi ya nsuka na Yerusaleme na kiti ya bokonzi ya Yehova. Esukaki na mobu 1914 T.B., ntango Yehova akómisaki Yesu “ye oyo azali na lotomo oyo euti na mibeko,” Mokonzi ya Bokonzi na ye. b—Ezk. 21:25-27.
5. Ndenge nini tokoki kozwa matomba na esakweli oyo elobeli “ntango nsambo”?
5 Matomba nini tozali kozwa na esakweli yango? Soki tokangi ntina ya esakweli oyo elobeli “ntango nsambo” yango, ezali kondimisa biso ete Yehova akokisaka bisakweli na ye na ntango oyo ebongi. Kaka ndenge atyaki Bokonzi na ye na ntango oyo ebongi, ndenge moko mpe akokokisa bisakweli mosusu nyonso na kotalela manaka oyo atyá. Na ntembe te, mokolo ya Yehova “ekokóma nsima ya ngonga te!”—Hab. 2:3.
NDENGE OYO TOYEBI ETE KRISTO AKÓMAKI MOKONZI YA BOKONZI YA NZAMBE
6. (a) Makambo nini tozali komona na mabele oyo endimisi biso ete Yesu azali koyangela na likoló? (b) Ndenge nini esakweli oyo ezali na Emoniseli 6:2-8 endimisi biso likambo yango?
6 Wana akómaki na nsuka ya mosala na ye awa na mabele, Yesu asakolaki mwa makambo oyo esengelaki kosalisa bayekoli na ye báyeba ntango oyo akobanda koyangela na likoló. Alobelaki bitumba, nzala, mpe koningana ya mabele. Alobaki mpe ete bamaladi mabe ekozala “na bisika ndenge na ndenge,” na ndakisa, tokoki mpe kotánga maladi ya Coronavirus. Makambo yango ezali na kati ya makambo oyo Biblia ebengi “elembo” ya kozala ya Kristo. (Mat. 24:3, 7; Luka 21:7, 10, 11) Bambula koleka 60 nsima ya liwa na ye mpe kozonga na ye na likoló, Yesu amonisaki ntoma Yoane ete makambo yango ekokokisama mpenza. (Tángá Emoniseli 6:2-8.) Makambo yango nyonso ebandaki kokokisama ntango Yesu akómaki Mokonzi na mobu 1914.
7. Mpo na nini makambo ebebaki lisusu makasi na mokili ntango Yesu akómaki Mokonzi?
7 Mpo na nini makambo ebebaki lisusu makasi na mokili ntango Yesu akómaki Mokonzi? Emoniseli 6:2 emonisi likambo moko ya ntina. Lokola akómaki Mokonzi, likambo ya liboso oyo Yesu asalaki ezalaki ya kobunda etumba. Abundaki na banani? Abundaki na Zabolo ná bademo na ye. Na kotalela Emoniseli mokapo 12, Satana alongaki te, mpe ye ná bademo na ye babwakamaki awa na mabele. Yango ebimisi “mawa na mabele,” mpo Satana azali na nkanda makasi mpe azali kobundisa bato.—Em. 12:7-12.
8. Matomba nini tozali kozwa ntango tozali komona ndenge bisakweli oyo etali Bokonzi ezali kokokisama?
8 Matomba nini tozali kozwa na bisakweli yango? Makambo oyo ezali kosalema na mokili mpe komona ndenge bizaleli ya bato ebongwani ezali kosalisa biso tóyeba ete Yesu asili kokóma Mokonzi. Na yango, na esika ya kosilika komona ndenge bato bazali na ezaleli ya moimi mpe motema mabe, tóbosana te ete makambo oyo bazali kosala ezali kokokisa nde bisakweli ya Biblia. Bokonzi ezali koyangela! (Nz. 37:1) Mpe tokomona lisusu makambo mingi ya mpasi wana Armagedone ezali kobɛlɛma. (Mrk. 13:8; 2 Tim. 3:13) Tozali na botɔndi mingi mpo na Tata na biso ya likoló ndenge azali kosalisa biso tóyeba ntina oyo mikakatano ezali na mokili.
NDENGE OYO BANGUNA YA BOKONZI YA NZAMBE BAKOSUKA
9. (a) Ndenge nini esakweli oyo ezali na Danyele 2:28, 31-35 elobeli bokonzi ya nsuka oyo eleki na nguya na mokili mobimba? (b) Ntango nini bokonzi yango ebandaki koyangela?
9 Tángá Danyele 2:28, 31-35. Tozali mpe komona kokokisama ya esakweli yango lelo oyo. Ndɔtɔ ya Nebukadenezare emonisi makambo oyo ekosalema “na eleko ya nsuka ya mikolo,” nsima ya kotyama ya Kristo lokola Mokonzi. Bokonzi ya nsuka oyo eleki na nguya na mokili mobimba ezali mpe na kati ya banguna ya Yesu awa na mabele, bokonzi yango emonisami na “makaka na yango ya ebende mpe ya mabele ya lima.” Bokonzi yango oyo eleki na nguya na mokili mobimba esilá komonana. Emonanaki na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ntango Royaume-Uni mpe États-Unis esalaki boyokani, oyo ebimisi bokonzi ya Anglo-américain. Ekeko oyo Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ elobeli mpe makambo mibale oyo etaleli bokonzi yango oyo eleki na nguya na mokili mobimba, oyo esengelaki kokesana na baguvɛrnema oyo elekaki na nguya na mokili mobimba oyo esilá koyangela.
10. (a) Ndenge esakweli ya Danyele emonisi yango, makambo nini tozali komona na bokonzi ya Anglo-américain lelo oyo? (b) Tosengeli kokeba na likambo nini? (Talá etanda “ Kebá na mabele ya lima!”)
10 Ya liboso, ndenge moko na baguvɛrnema oyo elekaki na nguya na mokili mobimba oyo esilá koyangela ndenge emonaneli emonisi yango, bokonzi ya Anglo-américain emonisami te na ebende ya makasi, lokola wolo to motako, kasi nde na ebende oyo esangisami na mabele ya lima. Mabele ya lima ezali komonisa “bana ya bato,” to bato. (Dan. 2:43) Lelo oyo, tokoki komona polele ndenge bato yango bazali na bopusi mingi na makambo etali maponami, ntomo ya basali-misala, bazali kotinda bato mosusu bátomboka, mpe milende na bango ezali kosala ete ekóma mpasi mpo bakonzi ya bokonzi yango oyo eleki na nguya na mokili mobimba básala makambo oyo balingi kosala.
11. Lokola bokonzi ya Anglo-américain ezali koyangela, ndenge nini yango endimisi biso lisusu ete tozali kobika na ntango ya nsuka?
11 Ya mibale, ndenge emonisami na makolo ya ebakata ya ekeko yango, bokonzi ya Anglo-américain ezali bokonzi ya nsuka oyo eleki na nguya na mokili mobimba oyo Biblia esakolaki. Ekozala na guvɛrnema mosusu te oyo ekoya nsima na yango. Ekosuka na Armagedone ntango Bokonzi ya Nzambe ekobukabuka yango mpe baguvɛrnema mosusu nyonso. c—Em. 16:13, 14, 16; 19:19, 20.
12. Esakweli ya Danyele emonisi makambo nini mosusu, mpe ndenge nini ezali kobɔndisa biso mpe kopesa biso elikya?
12 Matomba nini tozali kozwa na esakweli yango? Esakweli ya Danyele epesi biso bilembeteli mosusu oyo emonisi ete tozali kobika na ntango ya nsuka. Eleki sikoyo mbula 2500, Danyele asakolaki ete nsima ya Babilone, baguvɛrnema minei mosusu oyo ekoleka na nguya na mokili mobimba esengelaki koyangela basaleli ya Nzambe. Lisusu, amonisaki ete bokonzi ya Anglo-américain ekozala bokonzi ya nsuka kati ya baguvɛrnema oyo elekaki na nguya na mokili mobimba. Yango ezali kobɔndisa biso mpe kopesa biso elikya ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekokɔmbɔla baguvɛrnema nyonso ya bato mpe ekoyangela mabele mobimba.—Dan. 2:44.
13. (a) Ndenge Emoniseli 17:9-12 emonisi yango, “mokonzi ya mwambe” mpe “bakonzi zomi” bazali komonisa nini? (b) Ndenge nini esakweli yango ezali kokokisama?
13 Tángá Emoniseli 17:9-12. Lokola Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebimisaki makama mingi, likambo moko esalemaki oyo ekokisaki esakweli mosusu ya Biblia oyo elobeli mikolo ya nsuka. Bakonzi ya mokili balingaki kotya kimya na mokili mobimba. Yango wana, na sanza ya 01/1920, batyaki ebongiseli moko na nkombo Société des Nations, oyo ekómaki ONU na sanza ya 10/1945. Ebongiseli yango ebengami “mokonzi ya mwambe.” Kasi ezali te bokonzi oyo eleki na nguya na mokili mobimba. Bakonzi ya politiki nde bapesaka yango nguya mpe mabɔkɔ. Biblia ebengi bakonzi yango na maloba ya elilingi “bakonzi zomi.”
14-15. (a) Emoniseli 17:3-5 emonisi nini mpo na “Babilone Monene”? (b) Bato mingi bazali kosala nini mpo na mangomba ya lokuta?
14 Tángá Emoniseli 17:3-5. Na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe, ntoma Yoane amonaki na emonaneli moko mwasi moko ya ndumba, elingi koloba “Babilone Monene,” oyo ezali komonisa lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta. Ndenge nini esakweli yango ezali kokokisama? Mangomba nyonso ya lokuta epesaka bakonzi ya politiki mabɔkɔ mpe epambolaka bango. Kasi, mosika te, Yehova akotya na mitema ya bakonzi ya politiki likanisi moko “mpo na kokokisa likanisi na ye.” Yango ekobimisa nini? Bakonzi yango ya politiki, elingi koloba, “bakonzi zomi,” bakobalukela mangomba nyonso ya lokuta mpe bakobebisa yango nyɛɛ.—Em. 17:1, 2, 16, 17.
15 Ndenge nini toyebi ete nsuka ya Babilone monene ekómi pene? Mpo na koyanola na motuna yango, ezali na ntina tókanisa ndenge engumba ya Babilone ya kala ebatelamaki na mai ya Ebale Efrate. Mokanda ya Emoniseli ekokanisi bamilio ya bato ya Babilone monene na “mai” oyo ebatelami. (Em. 17:15) Kasi emonisi mpe ete mai yango ‘ekokauka,’ mpo na komonisa ete lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta ekozanga bato oyo bakopesa yango mabɔkɔ. (Em. 16:12) Mpo na kokokisa esakweli yango, lelo oyo bato mingi bazali kobima na mangomba ya lokuta mpe bazali kokende bisika mosusu mpo na koluka solisyo na mikakatano na bango.
16. Ndenge nini koyeba bisakweli oyo elobeli komonana ya ONU mpe kobebisama ya Babilone Monene ezali komemela biso matomba?
16 Matomba nini tozali kozwa na bisakweli yango? Komonana ya ONU mpe komona ndenge bato bazali lisusu te kopesa mangomba ya lokuta mabɔkɔ endimisi biso ete tozali kobika na mikolo ya nsuka. Atako bato mingi bazali lisusu kopesa Babilone mabɔkɔ te, yango te nde ekotya nsuka na mangomba nyonso ya lokuta. Ndenge tolobaki yango liboso, Yehova akotya likanisi moko na mitema ya “bakonzi zomi,” elingi koloba, bakonzi ya politiki oyo bapesaka ONU mabɔkɔ “mpo na kokokisa likanisi na ye.” Kobebisama ya mangomba nyonso ya lokuta na nzela ya bakonzi ya politiki ekoya pwasa. Mpe yango ekokamwisa mpenza mokili. d (Em. 18:8-10) Kobebisama ya Babilone Monene ekozala likambo oyo ekotika nsango mpe yango ekomema mpasi, kasi basaleli ya Nzambe bakozala na bantina mibale oyo ekotinda bango básepela. Mangomba nyonso ya lokuta oyo ezali monguna ya Nzambe banda kala, ekozala lisusu te, mpe kosikolama na biso na mokili oyo mabe ekokóma pene!—Luka 21:28.
TYÁ ELIKYA ETE YEHOVA AKOBATELA BASALELI NA YE NA MIKOLO EZALI KOYA
17-18. (a) Ndenge nini tokoki kokoba kokómisa kondima na biso makasi? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
17 Danyele asakolaki ete “boyebi ya sikisiki ekokóma mingi.” Yango mpenza ezali kosalema! Lelo tokangi ntina ya bisakweli oyo elobeli ntango na biso. (Dan. 12:4, 9, 10) Kokokisama ya bisakweli yango ezali kotinda biso tózala na botosi epai Yehova mpe Liloba na ye. (Yis. 46:10; 55:11) Na yango, kobá kokómisa kondima na yo makasi na koyekola Makomami na mozindo mpe kosalisa basusu bákóma na boyokani malamu ná Yehova. Akobatela baoyo nyonso batyelaka ye motema mobimba, mpe akopesa bango “kimya ntango nyonso.”—Yis. 26:3.
18 Na lisolo oyo elandi, tokolobela bisakweli oyo etali lisangá ya bokristo na ntango oyo ya nsuka. Ndenge tokoyekola yango, bisakweli yango mpe ekomonisa ete tozali kobika na mikolo ya nsuka. Tokomona mpe bilembeteli mosusu oyo emonisi ete Yesu, oyo azali sikoyo Mokonzi na biso, azali kotambwisa basaleli na ye ya sembo.
LOYEMBO 61 Batatoli, bókende liboso!
a Tozali kobika na eleko moko oyo makambo ya minene ezali kosalema! Bokonzi ya Nzambe etyami, kaka ndenge bisakweli mingi ya Biblia esakolaki yango. Lisolo oyo ekolobela bisakweli yango mosusu mpe ndenge oyo ekoki kosalisa biso tókómisa kondima na biso makasi epai Yehova, tózala na kimya mpe tótyela ye motema lelo oyo mpe na mikolo ezali koya.
b Talá liteya 32 pwɛ 4 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!, mpe kende na jw.org mpo otala video Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914.
c Mpo na koyeba makambo mosusu etali esakweli ya Danyele, talá nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/06/2012, nk. 14-19.
d Mpo na koyeba makambo mosusu oyo elobeli makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya, talá mokapo 21 ya buku Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!