LISOLO YA BOYEKOLI 44
Batelá elikya na yo ya bokristo makasi
“Tyelá Yehova elikya.”—NZ. 27:14.
LOYEMBO 144 Tyá miso na yo na mbano!
NA MOKUSE *
1. Elikya nini Yehova apesá biso?
YEHOVA apesá biso elikya kitoko ya bomoi ya seko. Basusu bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na likoló lokola bikelamu ya elimo oyo ekoki kokufa te. (1 Ko. 15:50, 53) Kasi, ebele mpenza ya bato bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na nzoto ya kokoka mpe na esengo awa na mabele. (Em. 21:3, 4) Ezala tozali na elikya ya kozala na bomoi ya seko kuna na likoló to awa na mabele, elikya na biso ezali na motuya mingi mpo na biso.
2. Elikya na biso esimbami na nini, mpe mpo na nini tolobi bongo?
2 Na Biblia, liloba “elikya,” ekoki kolimbola “kozela ete makambo ya malamu ekosalema.” Tokoki kondima ete elikya na biso ekokokisama mpo euti epai ya Yehova. (Rom. 15:13) Toyebi makambo oyo alaki, mpe toyebi ete akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. (Mit. 23:19) Tondimisami ete Yehova azali na mposa mpe na nguya ya kokokisa makambo nyonso oyo alobi akosala. Nzokande, elikya na biso ezali te ndɔtɔ ya mpamba to makanisi ya mpamba; esimbami nde na bilembeteli mpe na makambo ya solo.
3. Na kotalela Nzembo 27:14, tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Tata na biso ya likoló alingaka biso, mpe alingi ete tótyela ye motema. (Tángá Nzembo 27:14.) Soki elikya na biso epai ya Yehova ezali makasi mpe tondimi ete elikya na biso ekokokisama, tokozala na mpiko mpe na esengo ya koyikela mikakatano mpiko mpe kolonga yango na mikolo ezali koya. Tiká tótalela ndenge oyo elikya na biso ebatelaka biso. Tokolobela liboso ndenge oyo elikya ezali lokola longo mpe lokola ekɔti. Na nsima tokolobela ndenge oyo tokoki kokómisa elikya na biso makasi.
ELIKYA NA BISO EZALI LOKOLA LONGO
4. Na kotalela Baebre 6:19, ndenge nini elikya ezali lokola longo?
4 Na mokanda na ye epai ya Baebre, ntoma Paulo akokanisaki elikya na biso na longo. (Tángá Baebre 6:19.) Azalaki mbala na mbala kosala mibembo na mbu, yango wana Paulo ayebaki ete balongo esalelamaka mpo na kotɛlɛmisa masuwa mpo ezinda te. Na libaku moko, azalaki na kati ya masuwa moko ntango mopɛpɛ moko makasi eyaki. Wana mopɛpɛ yango ezalaki naino kobɛta, amonaki bamatelo bazalaki kobwaka balongo na kati ya mai mpo masuwa etutana te na mabanga ya minene. (Mis. 27:29, 39-41) Lokola longo oyo etɛlɛmisaka masuwa, elikya na biso mpe ebatelaka biso tózala penepene na Yehova mpo tókende mosika te ntango tozali na mikakatano oyo ezali lokola mipɛpɛ ya makasi. Elikya na biso oyo epikami makasi esalisaka biso tózala na kimya ntango tozali kokutana na mikakatano, mpo tondimaka ete makambo na biso ekobonga. Tóbosana te ete Yesu alobaki bakonyokola biso. (Yoa. 15:20) Na yango, komanyola na makambo oyo Yehova alaki biso mpo na mikolo ezali koya esalisaka biso tókoba kosalela ye.
5. Ndenge nini elikya esalisaki Yesu atikala sembo tii na liwa?
5 Tótalela ndenge elikya esalisaki Yesu atikala sembo atako ayebaki ete akokufa liwa moko ya mpasi. Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ntoma Petro azongelaki maloba ya esakweli oyo ezali na mokanda ya Nzembo oyo emonisaki ete Yesu akobanga eloko moko te, alobaki boye: “Ata nzoto na ngai mpe ekofanda na elikya; mpo okotika molimo na ngai na kati ya Nkunda te, okopesa mpe nzela te ete moto na yo ya sembo apɔla. . . . Okotondisa ngai na nsai ya elongi na yo.” (Mis. 2:25-28; Nz. 16:8-11) Atako Yesu ayebaki ete akokufa, azalaki na elikya makasi ete Nzambe akosekwisa ye, mpe akozala na esengo ya kozala lisusu elongo na Tata na ye ya likoló.—Ebr. 12:2, 3.
6. Ndeko mobali moko alobaki nini mpo na elikya?
6 Elikya na biso ya bokristo esalisaki bandeko na biso mingi ya basi mpe ya mibali báyika mpiko. Tótalela ndakisa ya Leonard Chinn, ndeko mobali moko ya sembo oyo azalaki kofanda na Angleterre. Na boumeli ya Etumba ya Liboso na mokili mobimba, bakangaki ye na bolɔkɔ mpo aboyaki kokɔta na mosala ya soda. Na boumeli ya sanza mibale, batyaki ye na bolɔkɔ oyo azalaki kaka ye moko, mpe bazalaki kosalisa ye misala ya makasi mpenza. Na nsima, akomaki boye: “Makambo oyo nakutanaki na yango esalisaki ngai namona ete tozali mpenza na mposa ya elikya mpo tóyika mpiko. Tozali na ndakisa ya Yesu, bantoma, basakoli, mpe bilaka kitoko oyo ezali na Biblia. Yango nyonso epesaka biso elikya makasi mpo na mikolo ezali koya mpe epesaka biso makasi ya koyika mpiko.” Elikya ezalaki lokola longo mpo na ndeko Leonard, mpe ekoki kozala bongo mpo na biso.
7. Na kotalela Baroma 5:3-5 mpe Yakobo 1:12, ndenge nini komekama ekómisaka elikya na biso makasi?
7 Ntango toyikelaka mikakatano mpiko mpe tomonaka ndenge Yehova asalisaka biso, tomonaka ete andimaka biso. Yango ekómisaka elikya na biso makasi. (Tángá Baroma 5:3-5; Yakobo 1:12.) Sikoyo tozali na elikya makasi koleka ntango oyo tondimaki nsango malamu. Satana alingi ete komekama oyo tozali kokutana na yango elɛmbisa biso, kasi na lisalisi ya Yehova, tokoki kolonga mokomoko na yango.
ELIKYA NA BISO EZALI LOKOLA EKƆTI
8. Na kotalela 1 Batesaloniki 5:8, ndenge nini elikya ezali lokola ekɔti?
8 Biblia ekokanisi mpe elikya na biso na ekɔti. (Tángá 1 Batesaloniki 5:8.) Soda alataka ekɔti mpo ebatela motó na ye na bambanzi oyo banguna babwakelaka ye. Na etumba ya elimo oyo tozali kobunda, tosengeli kobatela makanisi na biso ntango Satana azali kobundisa biso. Asalelaka mayele ndenge na ndenge mpo na komeka biso mpe kobebisa makanisi na biso. Kaka ndenge ekɔti ebatelaka motó ya soda, elikya na biso ebatelaka makanisi na biso mpo tótikala sembo epai ya Yehova.
9. Nini ekómelaka bato soki bazali na elikya te?
9 Elikya na biso ya bomoi ya seko ekosalisa biso tósala makambo na bwanya mpe na bososoli. Nzokande, soki elikya na biso elɛmbi, mpe tozali kokanisa kaka bamposa na biso, tokoki kobosana elikya na biso ya bomoi ya seko. Tótalela likambo oyo ekómelaki bakristo mosusu oyo bazalaki kofanda na Korinti ya kala. Babungisaki kondima na elaka ya ntina oyo Nzambe apesaki, elingi koloba, elikya ya lisekwa. (1 Ko. 15:12) Paulo akomaki ete bato oyo bandimelaka lisekwa te bazalaka na bomoi kaka mpo na kokokisa bamposa na bango. (1 Ko. 15:32) Lelo oyo, bato mingi oyo bazalaka na elikya te na bilaka ya Nzambe bazalaka na bomoi kaka mpo na lelo mpe basalaka makasi mpo bámipesa kaka na bisengo. Nzokande, biso totyaka motema na bilaka oyo Nzambe apesi biso mpo na mikolo ezali koya. Elikya na biso ezali lokola ekɔti ya elilingi oyo ebatelaka makanisi na biso mpe esalisaka biso tókanisa kaka te bamposa na biso moko oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná Yehova.—1 Ko. 15:33, 34.
10. Ndenge nini elikya ekoki kobatela biso na makanisi mabe?
10 Elikya na biso ekoki mpe kobatela biso tóboya kozala na makanisi ete tokoki te kosepelisa Yehova. Na ndakisa, basusu bakoki kokanisa boye: ‘Nakozala soki moke te kati ya bato oyo bakozwa bomoi ya seko. Nabongi mpenza te. Nakokoka te kosala makambo oyo Nzambe azali kosɛnga ngai nasala.’ Kobosana te Elifaze, moko ya babɔndisi mabe ya Yobo, asalelaki mpe makanisi ya ndenge wana ntango azalaki kososola na Yobo. Elifaze alobaki boye: “Moto—mowei mpamba—azali nani mpo azala pɛto?” Lisusu, alobaki boye mpo na Nzambe: “Talá! Andimelaka basantu na ye te, mpe likoló yango moko kutu ezali pɛto te na miso na ye.” (Yobo 15:14, 15) Oyo nde lokuta monene mpenza! Kobosana te ete ezali Satana nde alingi okanisaka bongo. Ayebi ete soki ozali kokoba kokanisa bongo, okobungisa elikya na yo. Na yango, boyá lokuta ya ndenge wana, mpe tyá makanisi na yo na bilaka ya Yehova. Kozanga ntembe Yehova alingi ozala na bomoi ya seko mpe akosalisa yo ozwa yango.—1 Tim. 2:3, 4.
BATELÁ ELIKYA NA YO MAKASI
11. Mpo na nini tosengeli kozala na motema molai wana tozali kozela ete elikya na biso ekokisama?
11 Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo tóbatela elikya na biso makasi. Na ntango mosusu tokoki kolɛmba nzoto ntango tozali kozela Nzambe akokisa bilaka na ye. Kasi, lokola Yehova azali seko na seko, yango wana lolenge na ye ya kotalela ntango ekeseni na oyo ya biso. (2 Pe. 3:8, 9) Akokokisa mokano na ye na ntango oyo amoni ete ezali malamu, kasi akosala yango te na ntango oyo biso tomoni ete ezali malamu. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela elikya na biso makasi wana tozali kozela na motema molai nyonso Nzambe akokisa bilaka na ye?—Yak. 5:7, 8.
12. Na kotalela Baebre 11:1, 6, ndenge nini elikya ezali na boyokani na kondima?
12 Tokobatela elikya na biso makasi soki tozali kotikala penepene na Yehova, moto oyo akosala ete elikya na biso ekokisama. Mpo tózala na elikya, tosengeli kondima ete Yehova azali “moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” (Tángá Baebre 11:1, 6.) Soki tondimaka mpenza ete Yehova azali, tokozala na elikya ete akosala makambo nyonso oyo alaki biso. Tiká tótalela makambo oyo ekosalisa biso tókómisa makasi boyokani na biso ná Yehova mpe tóbatela elikya na biso makasi.
13. Ndenge nini tokoki kopusana penepene na Nzambe?
13 Bondeláká Yehova, mpe tángáká Liloba na ye. Atako tokoki komona Yehova te, tokoki kopusana penepene na ye. Tokoki kosolola na ye na libondeli mpe kotya motema ete akoyoka biso. (Yir. 29:11, 12) Toyokaka Nzambe ntango totángaka Liloba na ye mpe tomanyolaka yango. Ntango totángaka makambo oyo Yehova asalelaki baoyo bazalaki sembo epai ye na ntango ya kala, elikya na biso ekómaka lisusu makasi. Makambo nyonso oyo ezali na Liloba ya Nzambe “ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.”—Rom. 15:4.
14. Mpo na nini ezali na ntina komanyola na makambo oyo Yehova asalelá basusu?
14 Manyoláká na makambo oyo Yehova asalaki mpo na kokokisa bilaka na ye. Tótalela makambo oyo Nzambe asalaki mpo na Abrahama mpe Sara. Bakómaki na mbula oyo bakokaki kobota bana te. Kasi, Nzambe alakaki bango ete bakobota mwana moko. (Eba. 18:10) Abrahama asalaki nini? Biblia elobi: “Azalaki na elikya mpe na kondima, ete akokóma tata ya bikólo mingi.” (Rom. 4:18) Atako na miso ya bato, likambo ya ndenge wana ekokaki kosalema te, Abrahama azalaki na kondima ete Yehova akokokisa elaka na ye. Mobali wana ya sembo alɛmbaki nzoto te. (Rom. 4:19-21) Masolo ya ndenge wana eteyaka biso ete tokoki ntango nyonso kotya motema ete Yehova akokisaka bilaka na ye, ata ntango tomonaka ete likambo yango ekoki kosalema te.
15. Mpo na nini tosengeli komanyolaka na makambo oyo Nzambe asalelá biso?
15 Talelá makambo oyo Yehova asalelá yo. Kanisá mapamboli oyo osili kozwa na kokokisama ya bilaka oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Na ndakisa, Yesu alakaki ete Tata na ye ekopesa yo biloko oyo osengeli na yango mpo ozala na bomoi. (Mat. 6:32, 33) Lisusu, Yesu alobaki na yo ete Yehova akopesa yo elimo santu ntango ozali kosɛnga yango. (Luka 11:13) Yehova asili kokokisa bilaka yango. Okoki mpe kokanisa bilaka mosusu oyo asili kokokisa mpo na bolamu na yo. Na ndakisa, alaki ete akolimbisa yo, akobɔndisa yo, mpe akoleisa yo na elimo. (Mat. 6:14; 24:45; 2 Ko. 1:3) Soki ozali komanyola na makambo oyo Nzambe asalelá yo, okokómisa elikya na yo makasi na makambo oyo akosalela yo na mikolo ezali koya.
SEPELÁ NA ELIKYA
16. Mpo na nini elikya na biso ezali likabo moko ya motuya?
16 Elikya na biso ya bomoi ya seko ezali likabo moko ya motuya oyo euti na Nzambe. Tozali kozela na mposa makasi bomoi malamu na mikolo ezali koya, oyo tozali na elikya ete ekokokisama mpenza. Elikya yango ezali lokola longo, oyo esalisaka biso tótɛlɛma ngwi mpe tóyikela mikakatano, minyoko, ata mpe liwa mpiko. Elikya yango ezali lokola ekɔti, oyo ebatelaka makanisi na biso mpo tókoka koboya makambo ya mabe mpe tókangama na oyo ezali malamu. Elikya na biso oyo euti na Biblia esalisaka biso tópusana penepene na Nzambe mpe emonisi ete Nzambe alingaka biso mingi. Tozwaka mapamboli mingi ntango tobatelaka elikya na biso mpe tokómisaka yango makasi.
17. Mpo na nini elikya na biso epesaka esengo?
17 Na mokanda na ye epai ya Baroma, ntoma Paulo alendisaki bango ‘básepelaka na elikya.’ (Rom. 12:12) Ntoma Paulo akokaki kosepela mpo ayebaki ete soki atikali sembo, akozwa bomoi ya seko kuna na likoló. Biso mpe tokoki kosepela na elikya na biso mpo tozali na kondima ete Yehova akokokisa bilaka na ye. Mokomi moko ya nzembo akomaki boye: “Esengo na ye . . . oyo elikya na ye ezali epai ya Yehova Nzambe na ye, . . . ye oyo azali kobatela bosolo mpo na libela.”—Nz. 146:5, 6.
LOYEMBO 139 Omimona na mokili ya sika
^ Yehova apesá biso elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya. Elikya yango elendisaka biso mpe esalisaka biso tótya kaka te makanisi na biso na mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo. Epesaka biso makasi ya kotikala sembo ata soki tozali kokutana na mikakatano ya ndenge nini. Mpe ekoki kobatela biso tóboya makambo oyo ekoki kobebisa makanisi na biso. Ndenge tokomona yango na lisolo oyo, makambo wana nyonso nde epesi biso ntina ya kobatela elikya na biso ya bokristo.
^ ELILINGI: Kaka ndenge ekɔti ebatelaka motó ya soda mpe longo etɛlɛmisaka masuwa ngwi, elikya na biso ebatelaka makanisi na biso mpe esalisaka biso tóyikela mikakatano mpiko. Ndeko mwasi moko azali kobondela Yehova na motema mobimba. Ndeko mobali moko azali komanyola ndenge Nzambe akokisaki bilaka na ye epai ya Abrahama. Ndeko mobali mosusu azali kokanisa ndenge Nzambe azali kopambola ye.