Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozalaka moninga ya mosala ya malamu?

Ozalaka moninga ya mosala ya malamu?

“NAZALAKI pembeni na ye lokola mosali ya mayele. . . . Nazalaki kosepela liboso na ye ntango nyonso.” (Mas. 8:30) Ndenge wana nde Biblia elobeli Mwana ya Nzambe na boumeli ya bambula ebele oyo alekisaki elongo na Tata na ye liboso aya awa na mabele. Vɛrsɛ yango elobeli mpe ndenge oyo Yesu azalaki komiyoka ntango azalaki kosala elongo na Nzambe; azalaki “kosepela” liboso na ye.

Yesu ayekolaki bizaleli oyo esalisaki ye na nsima mpo azala moninga ya mosala ya malamu epai ya baoyo asalaki elongo na bango awa na mabele. Ndakisa ya Yesu ekoki koteya biso nini? Soki totaleli ndakisa na ye na likebi, tokomona mitinda misato oyo ekoki kosalisa biso mpo tózala baninga ya mosala ya malamu. Mitinda yango ekosalisa biso tósala na bomoko mpenza elongo na baninga na biso bakristo.

Na ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu, yebisáká baninga na yo ya mosala makambo oyo oyebi

ETINDA 1: ‘TÓPESANAKA LOKUMU’

Moninga ya mosala ya malamu azalaka na komikitisa. Ayebaka ete baninga na ye ya mosala bazali na ntina, mpe alukaka te komonisa ete aleki bango. Yesu ayekolaki ezaleli yango ya komikitisa epai ya Tata na ye. Atako Yehova ye moko nde abongi kobengama Mozalisi, alingi mpe ete bato mosusu báyeba mokumba ya ntina mingi oyo Mwana na ye akokisaki. Yango emonisami na maloba oyo Nzambe alobaki ete: “Tósala moto na elilingi na biso.” (Eba. 1:26) Na ntembe te, Yesu azalaki kosepela na komikitisa ya Yehova na likambo yango.​—Nz. 18:35.

Ntango azalaki awa na mabele, Yesu amonisaki mpe komikitisa ya ndenge wana. Ntango bato bazalaki kokumisa ye mpo na makambo oyo azalaki kosala, azalaki kozongisa lokumu nyonso epai ya Nzambe. (Mrk. 10:17, 18; Yoa. 7:15, 16) Yesu abatelaki kimya elongo na bayekoli na ye mpe azalaki kotalela bango lokola baninga, kasi baombo te. (Yoa. 15:15) Asukolaki kutu makolo na bango mpo na koteya bango ezaleli ya komikitisa. (Yoa. 13:5, 12-14) Biso mpe tosengeli kopesaka baninga na biso ya mosala lokumu na esika ya kotyaka matomba na biso na esika ya liboso. Soki tozali “kopesana lokumu” mpe tozali koluka ntango nyonso te ete bákumisaka biso, tokoki kosala makambo mingi.​—Rom. 12:10.

Moto ya komikitisa ayebaka mpe ete “ntango bapesi toli bazali ebele likambo elongaka.” (Mas. 15:22) Ata soki toyebi makambo mingi mpe tozali na makoki nini, tosengeli kobosana te ete ezali ata na moto moko te oyo ayebi makambo nyonso. Ata mpe Yesu ayebaki ete ezali na makambo mosusu oyo ayebi te. (Mat. 24:36) Lisusu, azalaki kotya likebi na makambo oyo bayekoli na ye ya kozanga kokoka bayebaki mpe oyo bazalaki kokanisa. (Mat. 16:13-16) Tokoki kokamwa te ndenge bayekoli na ye bazalaki komiyoka malamu kozala elongo na ye! Ndenge moko mpe, soki na komikitisa nyonso toyebi esika makoki na biso esuki, mpe soki tozali koyoka makanisi ya basusu, tokozala na kimya elongo na bango, mpe tokosala ete “likambo elonga.”

Mingimingi bankulutu basengeli komonisa komikitisa ntango bazali kosala elongo na basusu. Basengeli kobosana te ete elimo santu ekoki kosala ata epai ya nkulutu nini na kati ya lisangani ya bankulutu. Soki na ntango ya likita na bango, bankulutu bazali kosala nyonso mpo nkulutu mokomoko apesa makanisi na ye na esengo, bikateli oyo bakozwa elongo ekomemela lisangá mobimba matomba.

ETINDA 2: ‘BATO NYONSO BÁYEBA EZALELI NA BINO YA MAKAMBO MAKASIMAKASI TE’

Moninga ya mosala ya malamu azalaka makambo makasimakasi te ntango azali kosala elongo na basusu. Andimaka kobongola makanisi na ye. Na ntembe te, Yesu azalaki na mabaku ya komona ezaleli ya Tata na ye ya kozala makambo makasimakasi te. Na ndakisa, Yehova atindaki ye asikola bato na etumbu ya liwa oyo babongaki na yango.​—Yoa. 3:16.

Na ntango oyo ebongi mpe soki esengeli, Yesu azalaki kobongola makanisi na ye. Kanisá lisusu ndenge asalisaki mwasi moko Mofenisia, atako atindamaki libosoliboso mpo na ndako ya Yisraele. (Mat. 15:22-28) Yesu azalaki mpe makambo makasimakasi te na makambo oyo azalaki kosɛnga bayekoli na ye. Ntango Petro, moninga na ye ya motema, awanganaki ye na miso ya bato nyonso, Yesu andimaki kolimbisa ye. Na nsima, apesaki Petro mikumba minene. (Luka 22:32; Yoa. 21:17; Mis. 2:14; 8:14-17; 10:44, 45) Ndakisa ya Yesu emonisi polele ete tosengeli kobongola makanisi na biso soki esengeli mpo “ezaleli na biso ya kozala makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso.”​—Flp. 4:5.

Kozala makambo makasimakasi te ekotinda biso mpe tómesana na bato ya lolenge nyonso mpo tósala elongo na bango na kimya. Yesu azalaki na boyokani malamu na bato oyo bazalaki esika moko ná ye. Yango etindaki banguna na ye, oyo bazalaki koyokela ye zuwa, báfunda ye ete “azali moninga ya bakɔngoli-mpako mpe ya basumuki” oyo bazalaki kondima koyoka nsango na ye. (Mat. 11:19) Ndenge moko na Yesu, biso mpe tosengeli kosalaka na kimya ná basusu. Louis, ndeko mobali moko oyo alekisi bambula mingi na mosala ya zongazonga mpe oyo asalaki na Betele elongo na bandeko oyo bautaki na bisika ndenge na ndenge, alobi boye: “Kosala elongo na bato ya kozanga kokoka ezali lokola kotonga efelo na mabanga oyo ezali na bonene ndenge moko te. Kasi soki osali milende mpe obongisi esika oyo libanga mokomoko ekozala, okoki kotonga efelo oyo ezali semba. Nasalaka mpe bambongwana mpo efelo yango etikala kaka semba, elingi koloba, nasalaka makasi nazala na kimya elongo na basusu mpo mosala esalema malamu.” Yango ezali elimo moko ya malamu mpenza!

Moninga ya mosala ya malamu abombelaka baninga na ye te makambo oyo basengeli koyeba kaka mpo akonza bango

Ntango nini tokoki kosala na bomoko elongo na basusu na lisangá na biso? Tokoki kosala yango ntango tozali kosakola elongo na bandeko ya etuluku na biso ya mosala ya kosakola. Tokoki kosakola na bandeko oyo bazali na mikumba ndenge na ndenge na kati ya mabota na bango to mpe baoyo tokeseni na bango bambula. Tokomonisa ete tozali makambo makasimakasi te soki tozali kosala makambo na kolanda makoki na bango to kosalela lolenge ya kosakola oyo bamonaka ete ebotaka mbuma. Yango ekosala ete bázala na esengo mingi na mosala ya kosakola.

ETINDA 3: ZALÁ MOTO OYO ‘AYEBI KOKABA’

Moninga ya mosala ya malamu “ayebaka kokaba.” (1 Tim. 6:18) Ntango Yesu azalaki kosala elongo na Tata na ye, na ntembe te, amonaki ndenge Yehova abombaka makambo te mpo na ye moko. Ntango Yehova “abongisaki likoló,” Yesu ‘azalaki wana’ mpe ayekolaki makambo epai na ye. (Mas. 8:27) Na nsima, Yesu ye moko mpe ayebisaki bayekoli na ye ‘makambo oyo ayokaki’ epai ya Tata na ye. (Yoa. 15:15) Biso mpe tokoki komekola Yehova soki tozali koyebisa bandeko na biso makambo oyo toyebi. Moninga ya mosala ya malamu abombelaka baninga na ye te makambo oyo basengeli koyeba to oyo ekosalisa bango kaka mpo akonza bango. Asepelaka koyebisa basusu makambo ya malamu oyo ayebi.

Tokoki mpe koyebisa baninga na biso ya mosala makambo oyo ekolendisa bango. Soki moto moko amoni milende oyo tozali kosala mpe amonisi botɔndi mpo na yango, na ntembe te esimbaka mpenza mitema na biso. Yesu azalaki kozwa ntango ya koyebisa baninga na ye ya mosala makambo ya malamu oyo azalaki komona epai na bango. (Talá mpe Matai 25:19-23; Luka 10:17-20.) Kutu ayebisaki bango ete bakosala “misala ya minene koleka” ye. (Yoa. 14:12) Na butu liboso akufa, apesaki bantoma na ye ya sembo longonya na maloba oyo: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na komekama na ngai.” (Luka 22:28) Kanisá ndenge maloba na ye esimbaki mpenza mitema na bango mpe epesaki bango makasi ya kokoba! Soki biso mpe tozali kopesa baninga na biso ya mosala longonya, bakozala na esengo mingi mpe na ntembe te misala na bango ekobota mbuma.

OKOKI KOZALA MONINGA YA MOSALA YA MALAMU

Ndeko mobali moko na nkombo Kayode alobi boye: “Esɛngaka te ete moninga ya mosala ya malamu azala moto ya kokoka, kasi asalaka ete basusu bázala na esengo mpe básala misala na bango malamu.” Ozali moninga ya mosala ya ndenge wana? Mpo na nini te kotuna bandeko mosusu báyebisa yo soki ozalaka moninga ya mosala ya ndenge nini? Soki basepelaka kosala elongo na yo kaka ndenge bayekoli ya Yesu bazalaki kosepela kosala elongo na ye, okoki koloba ndenge moko na ntoma Paulo ete: “Tozali nde baninga ya mosala mpo na esengo na bino.”​—2 Ko. 1:24.