Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ekaniseli elendisaka bomoko

Ekaniseli elendisaka bomoko

‘Ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo kofanda na bomoko!’​—NZEMBO 133:1.

NZEMBO: 18, 14

1, 2. Na 2018, molulu nini ekosangisa biso na ndenge ya kokamwa, mpe mpo na nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

NA MOKOLO ya 31/03/2018, bamilio ya bato na mokili mobimba bakozala na likita moko oyo esalemaka kaka mbala moko na mbula: Bilei ya mpokwa ya Nkolo. Nsima ya kolala ya moi, basaleli ya Yehova mpe bato mosusu ebele bakoyangana mpo na kokanisa mbeka oyo Yesu apesá mpo na biso. Mbula nyonso, Ekaniseli ya liwa ya Kristo esangisaka bato na ndenge ya kokamwa, koleka milulu mosusu nyonso oyo esalemaka awa na mabele!

2 Na ntembe te, Yehova ná Yesu basepelaka komona ndenge bamilio ya bato na mokili mobimba bakendaka na molulu wana ya ntina mingi, na kolanda ngonga na bango. Biblia elobeli “ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso,” oyo bazali koganga ete: “Lobiko na biso euti na Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana-Mpate.” (Emoniseli 7:9, 10) Ezalaka esengo mpenza ndenge ebele ya bato bakumisaka Yehova ná Yesu ndenge wana na Ekaniseli oyo tosalaka mbula na mbula!

3. Tokozwa biyano na mituna nini na lisolo oyo?

3 Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna minei oyo: (1) Ndenge nini nakoki komibongisa mpo nazwa matomba ya Ekaniseli? (2) Ndenge nini Ekaniseli esalisaka basaleli nyonso ya Nzambe bázala na bomoko? (3) Nakoki kosala nini mpo na kobatela bomoko ya basaleli ya Nzambe? (4) Mokolo mosusu tokosala Ekaniseli ya nsuka? Soki ɛɛ, ntango nini?

NDENGE OYO OKOKI KOMIBONGISA MPO OZWA MATOMBA YA EKANISELI

4. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete tózala na Ekaniseli?

4 Mpo na nini ezali na ntina mingi tózala na Ekaniseli? Ntina moko ezali ete kokende makita ezali moko ya makambo ya losambo oyo topesaka Yehova. Na ntembe te, Yehova ná Yesu bamonaka moto nyonso oyo asalaka milende mpo azangisa te likita yango oyo eleki ntina na mbula. Tolingi Yehova ná Yesu bámona ete tokozangisa Ekaniseli te, lobá mpenza soki ndenge mosusu ya kosala ezali te. Soki tomonisaka ete makita ezali na motuya na miso na biso, topesaka Yehova ntina mosusu ya kobatela nkombo na biso na “buku [na ye] ya kokanisama.” Buku yango ebengami mpe “buku ya bomoi.” Ezali na bankombo ya bato nyonso oyo bakoki kozwa bomoi ya seko.​—Malaki 3:16; Emoniseli 20:15.

5. Liboso ya Ekaniseli, ndenge nini okoki ‘komimeka mpo na komona soki ozali na kati ya kondima’?

5 Mwa mikolo liboso ya Ekaniseli, tokoki kolekisa lisusu ntango mingi na kobondela mpe kokanisa soki boyokani na biso na Yehova ezali mpenza makasi. (Tángá 2 Bakorinti 13:5.) Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ete: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima.” Ndenge nini tokoki kosala yango? Okoki komituna boye: ‘Nandimaka mpenza ete nazali na kati ya ebongiseli kaka moko oyo Yehova aponi mpo na kokokisa mokano na ye? Nasalaka nyonso mpo na kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi? Makambo oyo nasalaka emonisaka mpenza ete nandimaka ete tozali na mikolo ya nsuka, mpe ete nsuka ya boyangeli ya Satana ekómi pene? Natyelaka kaka Yehova ná Yesu motema mingi ndenge nazalaki kosala yango ntango namipesaki na Yehova?’ (Matai 24:14; 2 Timote 3:1; Baebre 3:14) Biyano oyo tokopesa na mituna yango ekosalisa biso ‘tókoba komitala’ soki tozali ndenge nini.

6. (a) Wapi likambo kaka moko oyo ekomema biso na bomoi ya seko? (b) Ndenge nini nkulutu moko amibongisaka mpo na Ekaniseli, mpe ndenge nini okoki komekola ye?

6 Tángá mpe manyolá masolo oyo elobeli ntina ya Ekaniseli. (Tángá Yoane 3:16; 17:3.) Likambo kaka moko oyo ekomema biso na bomoi ya seko ezali koyekola koyeba Yehova mpe kondimela Mwana na ye, Yesu. Mpo omibongisa mpo na Ekaniseli, okoki koyekola makambo oyo ekosalisa yo omiyoka mpenza penepene na bango. Yango nde ndeko moko oyo aumeli na mokumba ya nkulutu asalaka. Na boumeli ya bambula, abombaka masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobeli Ekaniseli mpe bolingo oyo Yehova ná Yesu bamonisaki mpo na biso. Mpe mwa bapɔsɔ liboso ya Ekaniseli, atángaka masolo yango mpe amanyolaka ntina ya molulu yango. Na bantango mosusu, abakisaka lisolo moko to mibale na masolo oyo abombaka. Asalaka mpe botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli mpe amanyolaka na mozindo. Nkulutu yango alobi ete lokola asalaka bongo, ayekolaka makambo ya sika mbula na mbula. Oyo eleki ntina, boyekoli yango esalisaka ye alinga Yehova ná Yesu mingi koleka. Soki ozali koyekola bongo, yo mpe okolinga Yehova ná Yesu mingi koleka. Okozala mpe na botɔndi mingi mpo na oyo basalelá yo, mpe okozwa matomba ya Ekaniseli.

EKANISELI ESALISAKA BISO TÓZALA NA BOMOKO

7. (a) Yesu abondelaki mpo na likambo nini na butu oyo abandisaki Bilei ya mpokwa ya Nkolo? (b) Nini emonisi ete Yehova ayokaki libondeli ya Yesu?

7 Na butu oyo Bilei ya mpokwa ya Nkolo esalemaki mpo na mbala ya liboso, Yesu asalaki libondeli moko ya ntina mingi. Abondelaki ete bayekoli na ye nyonso bázala na bomoko ndenge ye ná Tata na ye bazalaka na bomoko makasi. (Tángá Yoane 17:20, 21.) Yehova ayokaki mpenza libondeli wana ya Mwana na ye oyo alingaka mingi. Koleka makita mosusu nyonso, Ekaniseli emonisaka polele ete Batatoli ya Yehova bazali mpenza na bomoko. Na mokolo yango, bamilio ya bato ya bikólo mpe loposo ndenge na ndenge bayanganaka na mokili mobimba mpe bamonisaka ete bandimaka ete Yehova atindaki Mwana na ye. Na bisika mosusu, esalemaka mpenza te ete bato ya loposo ekeseni báyangana elongo mpo na losambo, to soki esalemi, bato mosusu bamonaka ete ebongi te. Nzokande, bomoko oyo ezalaka na mokolo ya Ekaniseli esepelisaka Yehova ná Yesu!

8. Yehova ayebisaki Ezekiele nini?

8 Tokamwaka te ndenge biso basaleli ya Yehova tozalaka na bomoko ya ndenge wana. Yehova asakolaki bomoko yango na nsango oyo ayebisaki Ezekiele. Ayebisaki Ezekiele azwa mwa biteni mibale ya nzete, moko “mpo na Yuda” mpe mosusu “mpo na Yozefe,” mpe asangisa yango mpo ekóma eteni kaka moko ya nzete. (Tángá Ezekiele 37:15-17.) Mituna ya batángi” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 07/2016 elobaki boye: “Na nzela ya mosakoli na ye Ezekiele, Yehova asakolaki ete basaleli na ye bakozonga na Mokili ya Ndaka mpe bakosangana lisusu lokola ekólo moko. Esakweli yango emonisaki mpe ete baoyo bakosambela Nzambe na mikolo ya nsuka bakosangana lokola ekólo moko.”

9. Mbula nyonso na Ekaniseli, ndenge nini tomonaka bomoko oyo esakweli ya Ezekiele elobelaki?

9 Banda na mobu 1919, Yehova abandaki naino kobongisa mpe kosangisa mokemoke bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Bazalaki lokola mwa eteni ya nzete “mpo na Yuda.” Na nsima, bato mosusu ebele oyo bazali na elikya ya kofanda libela na libela awa na mabele babandaki kosangana elongo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Bango bazali lokola mwa eteni ya nzete “mpo na Yozefe.” Yehova alakaki ete akosangisa mwa biteni yango mibale ya nzete mpe ‘akokómisa yango eteni kaka moko ya nzete’ na lobɔkɔ na ye. (Ezekiele 37:19) Akómisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe “bampate mosusu” “etonga kaka moko.” (Yoane 10:16; Zekaria 8:23) Lelo, bango nyonso bazali kosalela Yehova na bomoko, mpe bazali na Mokonzi moko, Yesu Kristo, oyo esakweli ya Ezekiele ebengaki “Davidi mosaleli” ya Nzambe. (Ezekiele 37:24, 25) Mbula nyonso na Ekaniseli, ntango toyangani elongo mpo na kokanisa liwa ya Yesu, tomonaka bomoko oyo ezali kati na bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu, ndenge esakolamaki na nzela ya Ezekiele. Kasi, mokomoko na biso akoki kosala nini mpo na kobatela mpe kolendisa bomoko ya basaleli ya Nzambe?

NDENGE OYO OKOKI KOBATELA BOMOKO

10. Ndenge nini tokoki kobatela bomoko ya basaleli ya Nzambe?

10 Wapi likambo ya liboso oyo tokoki kosala mpo na kobatela bomoko ya basaleli ya Nzambe? Tosengeli kosala makasi tózala na komikitisa. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, alendisaki bayekoli na ye bázala na komikitisa. (Matai 23:12) Mbala mingi, bato ya mokili bamonaka ete baleki basusu. Kasi, soki tozali na komikitisa, tokotosa bandeko oyo bazali kokamba lisangá mpe tokolanda malako na bango. Botosi nde esalaka ete bomoko ezala na kati ya lisangá. Likambo eleki ntina, soki tozali na komikitisa, tokosepelisa Nzambe mpo “atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”​—1 Petro 5:5.

11. Na ndenge nini kokanisa ndimbola ya limpa mpe vinyo ekoki kosalisa biso tóbatela bomoko?

11 Wapi likambo ya mibale oyo tokoki kosala mpo na kobatela bomoko? Tosengeli kokanisa na mozindo ndimbola ya limpa mpe vinyo oyo tosalelaka na Ekaniseli. Tosengeli kosala yango liboso ya Ekaniseli, mpe mingimingi na butu yango. (1 Bakorinti 11:23-25) Limpa ezangá levire emonisaka nzoto ya kokoka oyo Yesu apesaki mbeka, mpe vinyo emonisaka makila na ye. Tosengeli kosuka kaka te na koyeba bandimbola yango na motó. Tosengeli kobosana te ete mbeka ya lisiko ya Yesu emonisaka bolingo monene oyo Yehova amonisaki na ndenge apesaki Mwana na ye mpo na biso, mpe bolingo monene oyo Yesu amonisaki na ndenge andimaki kokufa mpo na biso. Kokanisa bolingo na bango esengeli kotinda biso mpe tólinga bango. Bolingo oyo biso nyonso tolingaka Yehova esangisaka biso makasi mpe elendisaka bomoko na biso.

Soki tozali kolimbisa basusu, tozali kobatela bomoko (Talá paragrafe 12, 13)

12. Na ndakisa ya mokonzi moko ná baombo na ye, ndenge nini Yesu amonisaki polele ete Yehova alingi tólimbisaka basusu?

12 Wapi likambo ya misato oyo tokoki kosala mpo na kobatela bomoko? Tosengeli kolimbisaka basusu. Soki tozali kolimbisa, tokomonisa ete tozali na botɔndi ndenge Yehova akoki kolimbisa masumu na biso na nzela ya mbeka ya Yesu. Mpo na komonisa ntina ya kolimbisa, Yesu apesaki ndakisa ya mokonzi moko ná baombo na ye. Tángá Matai 18:23-34 mpe omituna boye: ‘Nasalaka likambo oyo Yesu ateyaki? Nazalaka na motema molai mpe namityaka na esika ya bandeko? Nalimbisaka mbala moko baoyo bapesi ngai mpasi?’ Ya solo, masumu mosusu ezalaka mike, mosusu minene. Mpe ezali na masumu mosusu oyo biso bato ya kozanga kokoka tokokoka kolimbisa mbala moko te. Kasi, ndakisa oyo Yesu apesaki ezali koteya biso oyo Yehova alingi tósala. (Tángá Matai 18:35.) Yesu amonisaki polele ete Yehova akolimbisa biso te soki tolimbisaka bandeko te ata soki babongoli mpenza motema. Tosengeli mpenza kokanisa likambo yango. Mpo na kobatela mpe kolendisa bomoko na biso, tosengeli kolimbisaka basusu, ndenge Yesu ateyaki biso.

13. Na ndenge nini kolendisa kimya ebatelaka bomoko?

13 Soki tolimbisaka basusu, tokobatela kimya elongo na bandeko na biso. Ntoma Paulo alobaki ete tosengeli ‘kosala makasi mpo na kobatela bomoko mpe kimya.’ (Baefese 4:3) Yango wana, na eleko oyo ya Ekaniseli, mingimingi na butu yango, kanisá ndenge oyo osalelaka basusu makambo. Omituna boye: ‘Bato oyo bayebi ngai bamonaka polele ete nakangelaka bato nkanda te? Bamonaka ete nasalaka makasi mpo na kobatela kimya mpe bomoko?’ Ezali mituna ya ntina oyo tosengeli kokanisa na eleko oyo.

14. Ndenge nini tokoki komonisa ete ‘tokangaka motema na makambo ya basusu na bolingo’?

14 Wapi likambo ya minei oyo tokoki kosala mpo na kobatela bomoko? Tosengeli komekola Yehova na likambo etali komonisa bolingo. (1 Yoane 4:8) Tóloba ata mokolo moko te ete, “Nakoki kolinga bandeko, kasi nasengeli kosepela na bango te.” Soki tokanisaka bongo, wana tolandaka te toli ya ntoma Paulo ete: “Bókanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo.” (Baefese 4:2) Paulo alobi kaka te ete tosengeli ‘kokanga motema na makambo ya basusu,’ kasi ete tosengeli kosala yango “na bolingo.” Bokeseni ezali. Na lisangá, tozalaka na bato ya ndenge na ndenge, Yehova nde abendá bango epai na ye. (Yoane 6:44) Lokola abendá bango, na ntembe te ezali na makambo oyo etindaki ye alinga bango. Soki Nzambe alingaka bango, ndenge nini biso tokoki koloba ete babongi te tólinga bango? Tosengeli kosala makasi tólinga bango ndenge Yehova asɛngi biso.​—1 Yoane 4:20, 21

NTANGO NINI TOKOSALA EKANISELI YA NSUKA?

15. Ndenge nini toyebi ete ekozala na Ekaniseli ya nsuka?

15 Ezali na mokolo oyo tokosala Ekaniseli ya nsuka. Ndenge nini toyebi yango? Ntoma Paulo akomelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete ntango bazali kokanisa liwa ya Yesu mbula na mbula, ‘bazali kokoba kosakola liwa ya Nkolo, tii ntango akoya.’ (1 Bakorinti 11:26) Koya oyo vɛrsɛ yango elobeli ekokani na “koya” oyo Yesu alobelaki na esakweli mpo na ntango ya nsuka. Mpo na bolɔzi monene oyo ekoya mosika te, alobaki: “Elembo ya Mwana ya moto ekomonana na likoló, mpe mabota nyonso ya mabele bakomibɛtabɛta na kolela, mpe bakomona Mwana ya moto azali koya na mapata ya likoló na nguya mpe na nkembo mingi. Mpe akotinda baanzelu na ye na lokito makasi ya kelelo, mpe bakoyanganisa bato oyo ye aponá esika moko uta na mipɛpɛ minei, uta na nsuka moko ya likoló tii na nsuka na yango mosusu.” (Matai 24:29-31) Yesu ‘akoyanganisa bato oyo ye aponá’ ntango akozwa bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakozala naino na mabele, mpo bákende na likoló. Yango ekosalema nsima ya kobanda ya bolɔzi monene, kasi liboso ya etumba ya Armagedone. Na etumba yango, Yesu ná bato nyonso 144 000 bakobundisa bakonzi ya mabele mpe bakolonga bango. (Emoniseli 17:12-14) Ekaniseli oyo tokosala liboso Yesu ‘aya’ koyanganisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo nde ekozala ya nsuka.

16. Mpo na nini ozali na ekateli ya kozala na Ekaniseli ya mbula oyo?

16 Zalá na ekateli ya kozala na Ekaniseli na mokolo ya 31/03/2018. Mpe sɛngá Yehova asalisa yo okoba kolendisa bomoko ya basaleli na ye. (Tángá Nzembo 133:1.) Mokolo mosusu, tokosala Ekaniseli ya nsuka. Kasi liboso ete ekóma, tómonisa ete tosepelaka mpenza na bomoko oyo ezalaka mbula na mbula na Ekaniseli.