‘Yoká disiplini mpe kómá na bwanya’
“Bana, . . . bóyoka disiplini mpe bókóma na bwanya.”—MASESE 8:32, 33.
1. Ndenge nini tozwaka bwanya, mpe ndenge nini esalisaka biso?
BWANYA eutaka epai ya Yehova, mpe apesaka yango kozanga kokakatana. Yakobo 1:5 elobi: “Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka bato nyonso na motema mobimba mpe apamelaka te.” Kondima disiplini ya Nzambe ezali lolenge moko ya kozwa bwanya. Mpe bwanya yango ebatelaka biso na makambo oyo ekoki kobebisa bizaleli mpe boyokani na biso na Yehova. (Masese 2:10-12) Na yango, tokotikala na kati ya bolingo ya Nzambe mpe tokozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko.—Yuda 21.
2. Nini ekoki kosalisa biso tólinga disiplini ya Nzambe?
2 Kasi, kozanga kokoka na biso, ndenge oyo tobɔkwamá mpe makambo mosusu, ekoki kosala ete ezala mpasi mpo tóndima disiplini to tómona ete ezali likambo ya malamu. Kasi ntango tomoni matomba ya disiplini ya Nzambe na bomoi na biso, tokosepela na yango mpo tokomona ete Nzambe alingaka biso mingi. Masese 3:11, 12 elobi na biso: “Mwana na ngai, koboya disiplini ya Yehova te . . . mpo Yehova apamelaka moto oyo ye alingaka.” Tobosanaka te ete Yehova alukaka kaka bolamu na biso. (Tángá Baebre 12:5-11.) Lokola Nzambe ayebi biso malamu, disiplini na ye ezalaka ntango nyonso oyo ebongi mpe oyo tosengeli na yango. Na lisolo oyo, tokolobela makambo minei oyo etali disiplini: (1) komipesa disiplini, (2) disiplini oyo baboti basengeli kopesa bana na bango, (3) disiplini oyo tozwaka na lisangá, mpe (4) likambo oyo ezali mabe koleka mpasi ya disiplini.
KOMIPESA DISIPLINI EZALI LIKAMBO YA BWANYA
3. Ndenge nini mwana ayekolaka komipesa disiplini? Pesá ndakisa.
3 Komipesa disiplini elimboli koyeba kopekisa makanisi mpe misala na biso. Tobotamaka na likoki ya komipesa disiplini te, kasi tosengeli koyekola yango. Na ndakisa, ntango mwana azali koyekola kopusa velo, mbala mingi tata to mama na ye akosimba velo mpo mwana akwea te. Kasi na nsima, soki mwana abandi kofanda ye moko na velo, tata to mama akoki kobanda kotika velo mokemoke. Soki moboti amoni ete mwana akoki kofanda ye moko na velo, akotika ye apusa ye moko. Ndenge moko mpe, ntango baboti bazali kotika te koteya bana na bango “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova,” bazali kosalisa bana báyekola komipesa disiplini mpe bázala na bwanya.—Baefese 6:4.
4, 5. (a) Mpo na nini komipesa disiplini ezali na ntina mpo na kolata “bomoto ya sika”? (b) Mpo na nini tosengeli kolɛmba nzoto te ata soki ‘tokwei mbala nsambo’?
4 Ezali mpe bongo mpo na bato oyo bayekoli koyeba Yehova ntango bazali mikóló. Ya solo, bakoki koyeba komipesa disiplini mwa moke, kasi bakɔmɛli naino te na elimo. Nzokande, ntango babandi kolata “bomoto ya sika” mpe kosala makasi bámekola Kristo, bakómaka kokɔmɛla na elimo. (Baefese 4:23, 24) Komipesa disiplini esalisaka biso tóyekola ‘koboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe tófanda na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na ntango oyo.’—Tito 2:12.
5 Kasi, biso nyonso tozali bato ya masumu. (Mosakoli 7:20) Soki tosali libunga, yango elingi koloba te ete toyebi komipesa disiplini te to tokokoka ata moke te komipesa disiplini. Masese 24:16 elobi: “Moyengebene akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma mpenza.” Nini ekosalisa ye atɛlɛma? Akotɛlɛma na makasi na ye moko te, kasi elimo santu ya Nzambe nde ekosalisa ye. (Tángá Bafilipi 4:13.) Komipesa disiplini ekokani mingi mpenza na komipekisa, oyo ezali na kati ya mbuma ya elimo ya Nzambe.
6. Ndenge nini tokoki kokóma bayekoli malamu ya Liloba ya Nzambe? (Talá elilingi ya ebandeli.)
6 Kobondela, koyekola Biblia, mpe komanyola ekosalisa biso tóyekola komipesa disiplini. Bongo soki olingaka koyekola Biblia te to omonaka ete ezali likambo ya mpasi? Kolɛmba nzoto te. Kobosana te ete Yehova akosalisa yo soki opesi ye nzela. Akoki kosalisa yo okóma “na mposa makasi” ya Liloba na ye. (1 Petro 2:2) Ya liboso, sɛngá Yehova asalisa yo oyeba komipesa disiplini mpo ozwaka ntango ya koyekola Liloba na ye. Na nsima, okoki kobanda na koyekola kaka mpo na mwa ntango mokuse. Mpe mokemoke, koyekola ekokóma pɛtɛɛ mpe okobanda kosepela na yango mingi! Okobanda kosepela mpenza na ntango ya kimya oyo okobanda kolekisa mpo na komanyola makambo kitoko ya Yehova.—1 Timote 4:15.
7. Ndenge nini komipesa disiplini ekoki kosalisa biso tókokisa mikano na biso ya elimo?
7 Koyeba komipesa disiplini esalisaka biso tókokisa mikano na biso ya elimo. Na ndakisa, tata ya libota moko amonaki ete molende na ye ebandaki kokita. Lokola etungisaki ye, amityelaki mokano ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Ndenge nini komipesa disiplini esalisaki ye? Atángaki masolo oyo elobeli mosala ya mobongisi-nzela mpe abondelaki mpo na yango. Yango ekómisaki boyokani na ye na Yehova makasi. Azalaki mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi basanza mosusu. Atako mikakatano ezalaki, atyaki miso kaka na mokano na ye ya kokóma
mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe nsukansuka akokisaki yango.BOKƆLÁ MWANA NA DISIPLINI YA YEHOVA
8-10. Nini ekoki kosalisa baboti bálonga kobɔkɔla bana mpo bákóma kosalela Yehova? Pesá ndakisa.
8 Yehova apesá baboti mokumba monene ya kobɔkɔla bana na bango “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Kosala yango ezali lisɛki te, mingimingi na mokili ya lelo. (2 Timote 3:1-5) Ntango bana babotamaka, bayebaka te kokesenisa mabe na malamu. Bazalaka na lisosoli, kasi esɛngaka koteya yango, to kopesa yango disiplini. (Baroma 2:14, 15) Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobi ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “disiplini” ekoki mpe kolimbola “kokola ya mwana,” to kobɔkɔla mwana na ndenge oyo ekosalisa ye azwaka bikateli ya malamu ntango akokóma mokóló.
9 Mbala mingi bana bayokaka ete bazali na libateli soki baboti na bango bapesaka bango disiplini na bolingo. Bayebaka ete bonsomi na bango ezali na ndelo mpe ete likambo nyonso oyo bakosala ekobota mbuma, ya mabe to ya malamu. Na yango, ezali na ntina mingi baboti oyo bazali bakristo báluka litambwisi ya Yehova. Kobosana te ete makanisi mpe mayele ya kosalela mpo na kobɔkɔla mwana ekeseni na kolanda esika moto afandi, mpe ebongwanaka na kolanda bileko. Kasi, baboti oyo bayokaka Nzambe bakakatanaka te mpo na koyeba oyo bakosala mpo na kobɔkɔla bana, mpe batyaka motema te mayele to makanisi ya bato.
10 Tótalela ndakisa ya Noa. Ntango Yehova ayebisaki ye atonga masuwa, Noa akokaki kotya motema na mayele na ye moko te mpo ezalaki mbala ya liboso atonga masuwa. Na yango atyelaki Yehova motema, mpe “asalaki kaka bongo,” elingi koloba nyonso oyo Yehova ayebisaki ye. (Ebandeli 6:22) Esukaki ndenge nini? Alongaki kotonga masuwa oyo ebikisaki ye ná libota na ye! Lisusu, Noa azalaki mpe tata ya malamu mpo atyelaki bwanya ya Nzambe motema. Noa ateyaki bana na ye malamu mpe azalaki kopesa bango ndakisa ya malamu, atako ezalaki pɛtɛɛ te na mokili wana ya mabe liboso ya Mpela.—Ebandeli 6:5.
11. Mpo na nini baboti basengeli kosala makasi báteya bana na bango?
11 Soki ozali moboti, ndenge nini okoki kosala lokola Noa? Yoká Yehova, tiká ye alakisa yo ndenge ya kobɔkɔla bana. Landá toli ya Liloba na ye mpe ya ebongiseli na ye. Na ntembe te bana na yo bakopesa yo matɔndi mpo na yango! Ndeko mobali moko akomaki boye: “Nazali na botɔndi mingi mpo na ndenge baboti na ngai babɔkɔlá ngai. Basalaki nyonso mpo básimba motema na ngai. Soki nazali na boyokani ya malamu na Yehova lelo, ezali mingimingi mpo na bango.” Kasi, ata soki baboti basali milende ndenge
nini, bana mosusu batikaka Yehova. Atako bongo, baboti oyo basali nyonso oyo bakoki mpo na koteya mwana na bango bakoki kozala na lisosoli ya kimya. Bakoki mpe kolikya ete ata ndele, mwana na bango akozongela Yehova.12, 13. (a) Soki mwana alongolami na lisangá, ndenge nini baboti na ye bakomonisa ete batosaka Nzambe? (b) Matomba nini libota moko ezwaki mpo baboti batosaki Yehova?
12 Moko ya makambo minene oyo emekaka botosi ya baboti mosusu ezali ntango mwana na bango alongolami na lisangá. Ndeko mwasi moko oyo mwana na ye ya mwasi alongolamaki na lisangá mpe alongwaki ndako alobi boye: “Nazalaki koluka bambeba na mikanda na biso oyo ekoki kopesa ngai nzela ya kolekisa ntango na mwana mpe nkɔkɔ na ngai.” Abakisi ete: “Kasi mobali na ngai asalisaki ngai na boboto nyonso namona ete mwana na biso azalaki lisusu na mabɔkɔ na biso te mpe ete tosengeli kokɔta na makambo na ye te.”
13 Mwa bambula na nsima, mwana yango azongisamaki na lisangá. Mama yango alobi: “Lelo abengaka ngai to akomelaka ngai ntango nyonso! Amemyaka ngai ná mobali na ngai mingi mpo ayebi ete totosaki Nzambe. Boyokani na biso ezali malamu mpenza.” Soki mwana na yo alongolami na lisangá, ‘okotyela Yehova motema na yo mobimba’? Okomonisa ye ete ozali “kondimela mayele na yo moko te”? (Masese 3:5, 6) Kobosana te: disiplini ya Yehova emonisaka ete azali na bwanya mingi mpe alingaka biso mingi. Yebá ete apesaki Mwana na ye mpo na bato nyonso, ata mpe mpo na mwana na yo. Nzambe alingi ata moto moko te abomama. (Tángá 2 Petro 3:9.) Na yango, baboti, bótya motema na disiplini ya Yehova mpe litambwisi na ye, ata na ntango oyo ezali mpasi kotosa makambo Yehova asɛngi biso. Landá disiplini ya Nzambe, kopesa yango mokɔngɔ te.
NA LISANGÁ
14. Ndenge nini mateya ya Yehova oyo “kapita ya sembo” apesaka esalisaka biso?
14 Yehova alakaki ete akokɛngɛla lisangá ya bokristo, akobatela yango mpe akoteya yango. Asalaka yango na ndenge mingi. Na ndakisa, apesi lisangá na mabɔkɔ ya Mwana na ye, mpe Mwana na ye atye “kapita ya sembo” mpo na kopesa biso bilei ya elimo na ntango oyo ebongi. (Luka 12:42) “Kapita” yango apesaka biso mateya to disiplini oyo esalisaka mpenza. Mbala mosusu osilá koyoka diskur moko to kotánga lisolo moko na bazulunalo na biso oyo etindaki yo obongola makanisi to etamboli na yo. Soki ezali bongo, sepelá mpo emonisi ete otikaka Yehova abongisa yo to apesa yo disiplini mpo na bolamu na yo.—Masese 2:1-5.
15, 16. (a) Ndenge nini okoki kozwa matomba na mosala ya bankulutu? (b) Okosala nini mpo osalisa bankulutu básala mosala na bango na esengo?
15 Kristo atyaki mpe bankulutu mpo na kokɛngɛla lisangá. Biblia ebengi bango “makabo oyo ezali bato.” (Baefese 4:8, 11-13) Ndenge nini tokoki kozwa matomba na mosala ya bankulutu? Tokoki komekola kondima mpe ndakisa na bango ya malamu. Tosengeli mpe koyoka toli na bango oyo euti na Biblia. (Tángá Baebre 13:7, 17.) Bankulutu balingaka biso mpe balingi ete tókola na elimo. Soki bamoni ete ozali kozangisa makita mingi to molende na yo ezali kokita, bakosala nokinoki mpo na kosalisa yo. Bakoyoka yo, mpe na nsima bakolendisa yo na boboto mpe bakopesa yo toli ya Biblia oyo ebongi. Soki basalisi yo ndenge wana, omonaka ete ezali elembo ya bolingo ya Yehova?
16 Kobosana te ete ekoki kozala pɛtɛɛ te mpo na bankulutu báya kopesa yo toli. Na ndakisa, kanisá ndenge mosakoli Natane amiyokaki ntango asengelaki kosolola na Mokonzi Davidi, oyo azalaki koluka kobomba lisumu monene oyo asalaki. (2 Samwele 12:1-14) Ndenge moko mpe, na ntembe te ntoma Paulo asengelaki kozala na mpiko mpenza mpo na kosembola Petro, moko ya bantoma 12, mpo azalaki kotya bokabwani kati na bakristo oyo bazalaki Bayuda mpe oyo bazalaki Bayuda te. (Bagalatia 2:11-14) Na yango, ndenge nini okoki kosalisa bankulutu mpo ezala mpasi te kopesa yo toli? Zalá na komikitisa, na botɔndi, mpe yebá kosolola. Moná ete lisalisi na bango ezali komonisa ete Nzambe alingaka yo. Yo moko okozwa litomba, mpe bankulutu bakosepela na mosala na bango.
17. Ndenge nini bankulutu basalisaki ndeko moko?
17 Na kotalela makambo ya bomoi na ye ya kala, ndeko mwasi moko azalaki komona ete ezali mpasi alinga Yehova. Alobaki boye: “Bomoi na ngai ya kala mpe makambo mosusu oyo nakutaná na yango esilisaki ngai makasi. Nayebaki ete nasengelaki kosolola na bankulutu. Bapamelaki ngai te mpe balobaki na ngai mabe te, kasi balendisaki ngai mpe bapesaki ngai makasi. Nsima ya makita nyonso, ezala soki bazali na makambo mingi ya kosala, ata moko na bango azalaki kotuna ngai soki nazali malamu. Na kotalela bomoi na ngai ya kala, nakokoka kondima te ete Nzambe akoki kolinga ngai. Kasi, Yehova asaleli lisangá mpe bankulutu mbala na mbala mpo na komonisa ngai ete alingaka ngai. Nabondelaka mpo natika ye ata mokolo moko te.”
LIKAMBO NINI EZALI MABE KOLEKA MPASI YA DISIPLINI?
18, 19. Likambo nini eleki mpasi ya disiplini? Pesá ndakisa.
18 Disiplini ekoki kosala mpasi, kasi koboya disiplini ya Nzambe ezali likambo oyo eleki mpasi. (Baebre 12:11) Tótalela ndakisa ya Kaina mpe ya Mokonzi Zidikiya. Ntango Kaina akómaki koyina ndeko na ye Abele mpe koluka koboma ye, Nzambe apesaki ye likebisi oyo: “Mpo na nini oyoki nkanda makasi mpe mpo na nini elongi na yo ekangami? Soki obandi kosala makambo ya malamu, okondimama te? Kasi soki osali makambo ya malamu te, lisumu ebatami na monɔkɔ ya ndako na yo, mpe ezali na mposa ya kokanga yo; mpe yo, okokoka kolonga yango?” (Ebandeli 4:6, 7) Kaina ayokaki te mpe abomaki ndeko na ye. Kaina abukaki mbuma mabe ya likambo wana bomoi ye mobimba. (Ebandeli 4:11, 12) Soki andimaki mpasi ya disiplini ya Nzambe, alingaki kobebisa bomoi na ye ndenge wana te.
19 Zidikiya azalaki mokonzi moko mabe, mpe azalaki na mpiko te. Na boyangeli na ye, bato ya Yerusaleme bazalaki konyokwama mingi. Mbala na mbala mosakoli Yirimia akebisaki Zidikiya ete asengeli kobongwana, kasi aboyaki koyoka disiplini ya Yehova. Na yango, asukaki mabe. (Yirimia 52:8-11) Yehova alingaka mpenza kobatela biso na bampasi ezangá ntina!—Tángá Yisaya 48:17, 18.
20. Nini ekokómela baoyo bandimaka disiplini ya Nzambe mpe baoyo bandimaka yango te?
20 Lelo oyo, bato mingi batyolaka disiplini ya Nzambe mpe bamipesaka disiplini te. Kasi mosika te, bato yango bakobuka mbuma mabe ya koboya disiplini. (Masese 1:24-31) Na yango, ‘tóyoka disiplini mpe tókóma na bwanya.’ Ndenge Masese 4:13 elobi, “simbá disiplini; kotika yango te. Batelá yango, mpo yango nde bomoi na yo.”