Salelá Yehova, Nzambe oyo apesaka bonsomi
“Esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali wana.”—2 BAKORINTI 3:17.
1, 2. (a) Mpo na nini bato mingi bazalaki kolobela likambo ya boombo mpe bonsomi na mikolo ya ntoma Paulo? (b) Paulo alobaki ete bonsomi ya solosolo eutaka epai ya nani?
BAKRISTO ya liboso bazalaki kofanda na Ampire ya Roma, epai bato bazalaki kotuta ntolo mpo na mibeko, makambo ya bosembo, mpe bonsomi oyo bazalaki na yango. Nzokande, nguya ya ampire yango eutaki na mosala makasi oyo baombo basalaki. Na eleko moko, moto moko kati na bato misato na Ampire ya Roma azalaki moombo. Na yango, bato mingi mpenza bazalaki kolobela likambo ya boombo mpe bonsomi, ata mpe bakristo.
2 Na mikanda na ye, ntoma Paulo alobelaki bonsomi mbala mingi. Kasi, azalaki te koluka kobongisa makambo ya mokili, ndenge bato mingi ya ntango wana bazalaki koluka kosala. Paulo ná bakristo mosusu basalaki makasi báteya bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe básalisa bango báyeba motuya monene ya mbeka ya 2 Bakorinti 3:17.
lisiko ya Yesu Kristo. Paulo ayebisaki bakristo esika bonsomi ya solosolo eutaka. Na ndakisa, na mokanda na ye ya mibale epai ya Bakorinti, akomaki ete: “Yehova azali Elimo; mpe esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali wana.”—3, 4. (a) Paulo alobelaki nini liboso aloba maloba ya 2 Bakorinti 3:17? (b) Tosengeli kosala nini mpo tózwa bonsomi oyo eutaka epai ya Yehova?
3 Mwa liboso, kaka na mokanda na ye ya mibale epai ya Bakorinti, Paulo alobelaki likambo oyo ekómelaki Moize ntango akitaki na Ngomba Sinai nsima ya kosolola na anzelu ya Yehova. Elongi ya Moize ezalaki kongɛngangɛnga! Ntango Bayisraele bamonaki Moize, babangaki, mpe Moize atyaki litambala mpo na kozipa elongi na ye. (Kobima 34:29, 30, 33; 2 Bakorinti 3:7, 13) Paulo alobaki: “Kasi ntango moto abongwani epai ya Yehova, litambala elongwaka.” (2 Bakorinti 3:16) Maloba ya Paulo elimboli nini?
4 Na lisolo oyo eleki, tomonaki ete kaka Yehova, Mozalisi ya biloko nyonso, nde azali na bonsomi oyo ezali na ndelo te. Yango wana, esika Yehova azali mpe “esika elimo [na ye] ezali,” bonsomi mpe ezali wana. Kasi, Paulo alobaki ete mpo tózwa bonsomi yango, tosengeli ‘kobongwana epai ya Yehova,’ elingi koloba kozala na boyokani malamu na ye. Bayisraele na esobe bazalaki kotalela makambo na liso ya bomoto. Ezalaki lokola nde batyaki litambala oyo ezipaki makanisi mpe mitema na bango. Bazwaki bonsomi ndenge babimaki na Ezipito, kasi balingaki kosalela yango kaka mpo na kokokisa bamposa na bango ya mosuni.—Baebre 3:8-10.
5. (a) Bonsomi ya ndenge nini elimo ya Yehova epesaka? (b) Ndenge nini toyebi ete ata moto oyo azali moombo to na bolɔkɔ akoki kozala na bonsomi oyo Yehova apesaka? (c) Mituna nini tosengeli kotalela?
5 Bonsomi oyo elimo ya Yehova epesaka eleki mosika bonsomi oyo baombo bazwaka. Elimo yango epesaka bonsomi oyo bato bakoki kopesa ata moke te. Elimo ya Yehova ekoki kolongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa, mpe na boombo ya losambo ya lokuta mpe mimeseno na yango. (Baroma 6:23; 8:2) Ezali bonsomi ya kokamwa mpenza! Ata moto oyo azali moombo to na bolɔkɔ akoki kozala na bonsomi yango. (Ebandeli 39:20-23) Ezalaki bongo mpo na ndeko mwasi Nancy Yuen mpe ndeko Harold King; mokomoko na bango asalaki bambula ebele na bolɔkɔ mpo azalaki na kondima epai ya Yehova. Okoki kotala masolo na bango na TV JW. (Kende na MASOLO YA BOMOI > KOYIKA MPIKO NA BAMPASI.) Kasi, tótalela mituna mibale oyo: Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka bonsomi na biso na motuya? Mpe ndenge nini tokoki kosalela bonsomi na biso na bwanya?
BONSOMI OYO NZAMBE APESAKA EZALI NA MOTUYA MINGI
6. Ndenge nini Bayisraele bamonisaki ete bazalaki na botɔndi te mpo na bonsomi oyo Yehova apesaki bango?
6 Soki moto apesi biso likabo ya motuya, tozalaka na botɔndi mingi epai na ye. Nzokande, Bayisraele bazalaki na botɔndi te mpo na bonsomi oyo Yehova apesaki bango ntango abimisaki bango na Ezipito. Nsima ya mwa basanza kaka, bakómaki na mposa makasi ya biloko ya kolya mpe ya komɛla oyo bazalaki na yango na Ezipito. Bakómaki komilela mpo na mana, bilei oyo Yehova azalaki kopesa bango, mpe balukaki kutu kozonga na Ezipito! Mpo na bango, ‘mbisi, bakɔkɔmbrɛ, bapastɛkɛ, bapwaro, matungulu ná ayi’ ezalaki na ntina koleka bonsomi oyo Yehova apesaki bango mpo básambela ye. Yango wana, Yehova asilikelaki bango makasi. (Mitángo 11:5, 6, 10; 14:3, 4) Yango ezali liteya monene mpo na biso!
7. Ndenge nini ntoma Paulo ye moko asalelaki toli oyo ezali na 2 Bakorinti 6:1, mpe ndenge nini tokoki kosala mpe bongo?
2 Bakorinti 6:1.) Paulo amitungisaki mpenza ndenge azalaki moto ya kozanga kokoka, moombo ya lisumu mpe ya liwa. Atako bongo, alobaki: “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso!” Mpo na nini alobaki bongo? Paulo ayebisaki bandeko na ye bakristo ete: “Mpo mobeko ya elimo wana oyo ezali kopesa bomoi na bomoko na Kristo Yesu elongoli yo na mobeko ya lisumu mpe ya liwa.” (Baroma 7:24, 25; 8:2) Ndenge moko na Paulo, tosengeli kobosana ata mokolo moko te ete Yehova alongoli biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Na nzela ya lisiko, tokoki kosalela Nzambe na biso na lisosoli ya pɛto, mpe yango epesaka esengo ya solosolo.—Nzembo 40:8.
7 Ntoma Paulo akebisaki bakristo nyonso ete bázanga botɔndi te mpo na bonsomi oyo Yehova apesi biso na nzela ya Mwana na ye, Yesu Kristo. (Tángá8, 9. (a) Likebisi nini ntoma Petro apesaki na oyo etali kosalela bonsomi na biso? (b) Ndenge nini moto mosusu akoki kosalela bonsomi na ye na ndenge ya mabe?
8 Longola kozala na botɔndi epai ya Yehova, tosengeli mpe kokeba ete tósalela te bonsomi na biso na ndenge ya mabe. Na ndakisa, ntoma Petro akebisaki biso ete tosengeli te kosalela bonsomi na biso mpo na komipesa na makambo ya mabe. (Tángá 1 Petro 2:16.) Yango ezali kokundwela biso likambo oyo ekómelaki Bayisraele na esobe. Lelo oyo, likebisi yango etali mpe biso, mbala mosusu mingi koleka. Satana ná mokili na ye bazali kolakisa biso biloko kitoko ya kolata, ya kolya, ya komɛla mpe ya kominanola. Mbala mingi, bato oyo bayebi kosala bapiblisite basalelaka mibali ná basi ya kitoko mpo na kotinda biso tómona ete tosengeli kosomba biloko oyo tozali mpenza na bosɛnga na yango te. Ezali mpasi te mokili ekosa biso mpo tósalela bonsomi na biso na ndenge ya mabe.
9 Toli ya ntoma Petro etali mpe makambo mosusu ya minene ya bomoi, na ndakisa kopona kelasi ya kotánga to mosala ya komipesa na yango. Na biteyelo, batyaka bilenge mbamba ete básala makasi mpo bákokisa masɛngami ya kokende kotánga na bainiversite ya minene. Bato mingi bayebisaka bango ete soki batángi na iniversite, bakozwa misala ya malamu, bakokóma na mbongo mingi, mpe bato bakopesa bango lokumu. Ntango mosusu bamonisaka bango ete bato oyo batángá iniversite bazwaka mbongo koleka baoyo batángá iniversite te. Na yango, ntango bilenge balingi kozwa bikateli oyo ekoki kobongola bomoi na bango, bakoki komona malamu bátánga iniversite. Kasi, likambo nini bilenge yango mpe baboti na bango basengeli kobosana te?
10. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kozwa bikateli mpo na makambo oyo etali biso moko?
10 Bato mosusu bakoki komona ete lokola ezali makambo oyo etali bango moko, bazali na bonsomi ya kopona nyonso oyo balingi soki lisosoli na bango etungisi bango te. Bamosusu batángaka maloba oyo Paulo akomelaki bakristo ya Korinti ete: “Ntina nini bonsomi na ngai esambisama na lisosoli ya moto mosusu?” (1 Bakorinti 10:29) Atako tozali na bonsomi ya kopona oyo tolingi na oyo etali kotánga kelasi mpe mosala oyo tokomipesa na yango, tosengeli kobosana te ete bonsomi na biso ezali na ndelo mpe ete bikateli na biso nyonso ezalaka na mbuma na yango. Yango wana ntoma Paulo alobaki ete: “Makambo nyonso epesami nzela; kasi makambo nyonso te nde ezali na litomba. Makambo nyonso epesami nzela; kasi makambo nyonso te nde etongaka.” (1 Bakorinti 10:23) Na yango, ata soki tozali na bonsomi ya kozwa bikateli na makambo oyo etali biso moko, ezali na makambo mosusu oyo eleki ntina, oyo tosengeli kotalela.
TÓSALELA BONSOMI NA BISO NA BWANYA NA MOSALA YA YEHOVA
11. Mpo na ntina nini mpenza Yehova apesi biso bonsomi?
11 Ntango Petro akebisaki biso ete tósalela bonsomi na biso na ndenge ya mabe te, amonisaki mpe ntina ya kosala yango. Alobaki tosengeli kosalela bonsomi na biso “lokola baombo ya Nzambe.” Na yango, ntina mpenza oyo Yehova asaleli Yesu mpo na kolongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa ezali mpo tómipesa mobimba na mosala ya Nzambe.
12. Ndakisa nini Noa ná libota na ye batikelá biso?
12 Lolenge eleki malamu oyo tokoki kosalela bonsomi na biso ezali ya kopesa ntango mpe makasi na biso na mosala ya Yehova. Kosala bongo ekobatela biso mpo mikano ya mokili mpe bamposa na biso moko ekóma te makambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. (Bagalatia 5:16) Tózwa ndakisa ya Noa ná libota na ye. Bazalaki kofanda na mokili moko ya mobulu mpe ya mbindo. Kasi, bamipesaki te na bamposa mpe na makambo oyo bato nyonso bazalaki kosala. Bamonaki malamu bámipesa na mosala oyo Yehova apesaki bango. Batongaki masuwa, basangisaki biloko ya kolya mpo na bango moko ná banyama, mpe bazalaki kokebisa bato ete Mpela ezali koya. “Noa abandaki kosala nyonso oyo Nzambe apesaki ye mitindo. Asalaki kaka bongo.” (Ebandeli 6:22) Na yango, Noa ná libota na ye babikaki ntango mokili wana ebebisamaki.—Baebre 11:7.
13. Etinda nini Yehova apesi biso?
13 Yehova apesi biso etinda nini lelo? Lokola tozali bayekoli ya Yesu, toyebi malamu ete Nzambe apesi biso etinda tósakola. (Tángá Luka 4:18, 19.) Lelo, Satana azipi bato ebele miso mpe bazali komona te ete bazali baombo ya mangomba ya lokuta, ya biloko ya mokili, mpe ya ebongiseli ya politiki. (2 Bakorinti 4:4) Ndenge moko na Yesu, tozali na lokumu ya kosalisa basusu báyeba mpe básambela Yehova, Nzambe oyo apesaka bonsomi. (Matai 28:19, 20) Mosala ya kosakola ezali pɛtɛɛ te. Na bisika mosusu, bato basepelaka na makambo ya Nzambe te, mpe bato mosusu kutu basilikaka soki toyei koteya bango. Kasi, lokola Yehova atindi biso tósakola, tosengeli komituna boye: ‘Nasalela bonsomi na ngai mpo namipesa lisusu mingi na mosala ya Yehova?’
14, 15. Basaleli mingi ya Yehova bazwi ekateli ya kosala nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)
14 Ezali mpenza likambo ya kolendisa komona ete basaleli mingi ya Yehova bakangi ntina ete mokili oyo ekómi mpenza na nsuka, bakómisi bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela. (1 Bakorinti 9:19, 23) Bandeko mosusu bazali babongisi-nzela na bamboka na bango; basusu bakendá kosala esika mposa ezali monene. Na mbula mitano oyo eleki, bandeko 250 000 babandaki mosala ya mobongisi-nzela, mpe lelo motángo ya babongisi-nzela ya sanza na sanza eleki 1 100 000. Ezali esengo mpenza komona ete bato ebele bazali kosalela bomoi na bango mpo na kosalela Yehova na ndenge yango!—Nzembo 110:3.
15 Nini esalisaki bandeko yango básalela bonsomi na bango na bwanya? Tózwa ndakisa ya John ná Judith, oyo balekisi mbula 30 na kosala na bikólo ndenge na ndenge. Balobi ete ntango Eteyelo ya babongisi-nzela ebandaki na 1977, bazalaki kolendisa bana-kelasi bákende kosakola na bisika oyo mposa ezalaki monene. Mpo na kokokisa mokano yango, basengelaki kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ. Na yango, John atikaki misala mbala na mbala. Nsukansuka, bakendaki kosakola na mboka-mopaya. Mpo na kolonga mikakatano lokola koyekola monɔkɔ ya sika mpe komesana na mimeseno ná mopɛpɛ ya sika, babondelaki Yehova mpe batyelaki ye motema mpo asalisa bango. Bayokaka ndenge nini mpo na bambula nyonso oyo balekisi na mosala ya Yehova? John alobi: “Namonaka ete namipesi na mosala oyo eleki malamu koleka misala nyonso. Yehova akómi moto ya solo na miso na ngai, lokola tata moko oyo alingaka bana na ye. Lelo, nakangi malamu mpenza ntina ya Yakobo 4:8 oyo elobi: ‘Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.’ Nayebi ete nazwi eloko oyo nazalaki koluka, bomoi ya ntina mpe ya esengo.”
16. Ndenge nini ebele ya bandeko basaleli bonsomi na bango na bwanya?
16 Lokola John ná Judith, bandeko mosusu bakoki koumela na mosala ya mobongisi-nzela. Mpo na makambo ya bomoi, bandeko mosusu bakoki kosala bongo te. Atako bongo, mingi bapesaka mabɔkɔ na misala ndenge na ndenge ya kotonga na mokili mobimba. Na ndakisa, bandeko soki 27 000 bayaki kosalisa na kotonga biro monene na Warwick, na etúká ya New York. Bamosusu bayaki mpo na pɔsɔ mibale, basusu mpo na mwa basanza, mpe basusu mpo na mbula moko to koleka. Bandeko yango mingi batikaki makambo na bango mpo na kosala na Warwick. Bazali ndakisa ya malamu ya bato oyo basalelaka bonsomi na bango mpo na kokumisa Yehova, Nzambe oyo apesaka bonsomi!
17. Soki tozali kosalela bonsomi na biso na bwanya lelo oyo, tokoki kolikya kozwa nini?
17 Tozali na botɔndi mingi ndenge toyebi Yehova mpe tozali na bonsomi oyo moto azwaka soki azali kosambela ye. Tiká tómonisa na bikateli na biso ete bonsomi yango ezali na motuya mingi mpo na biso. Na esika tósalela yango na ndenge ya mabe, tósalela yango mpo na komipesa lisusu mingi na mosala ya Yehova. Na ndenge yango, tokoki kolikya kozwa mapamboli oyo Yehova alaki, ntango maloba oyo ekokokisama: “Biloko oyo ezalisamá ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”—Baroma 8:21.