Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tiká mibeko mpe mitinda ya Nzambe eteya lisosoli na yo

Tiká mibeko mpe mitinda ya Nzambe eteya lisosoli na yo

“Makundoli na yo ezali lobanzo na ngai.”​—NZEMBO 119:99.

NZEMBO: 127, 88

1. Eloko nini ekesenisaka biso na banyama?

YEHOVA apesá bato eloko moko ya ntina mingi. Eloko yango ezali lisosoli, oyo ekesenisaka biso na banyama. Ata Adama ná Eva mpe bazalaki na lisosoli, mpo nsima ya kobuka mobeko ya Nzambe, bamibombaki. Yango emonisi ete lisosoli na bango ezalaki kotungisa bango.

2. Na ndenge nini lisosoli na biso ezali lokola busole? (Talá elilingi ya ebandeli.)

2 Lisosoli ezali lokola mongongo moko oyo ezalaka kati na biso, eyebisaka biso soki likambo moko ezali malamu to mabe; esalisaka biso tómitambwisa malamu. Moto oyo lisosoli na ye esalaka malamu te azali lokola masuwa oyo busole na yango ebebá. Mopɛpɛ mpe mbonge ya mbu ekoki komema masuwa na nzela ya mabe. Kasi soki busole ezali kosala malamu ekosalisa kapitɛni ya masuwa atambwisa masuwa malamu. Ndenge moko mpe, soki toteyi lisosoli na biso malamu, ekotambwisa biso mpe malamu.

3. Nini ekoki kosalema soki toteyi lisosoli na biso malamu te?

3 Soki lisosoli na biso eteyami malamu te, ekokebisa biso te ntango tolingi kosala likambo moko ya mabe. (1 Timote 4:1, 2) Ekoki ata kondimisa biso ete “mabe ezali malamu.” (Yisaya 5:20) Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Ngonga ezali koya wana moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete asaleli Nzambe mosala mosantu.” (Yoane 16:2) Bato oyo babomaki moyekoli Stefano bazalaki kokanisa bongo. (Misala 6:8, 12; 7:54-60) Na boumeli ya bambula, emonani ete bato oyo balobaka ete basambelaka basalaka makambo mabe, na ndakisa koboma, mpe balobaka ete basali yango mpo na Nzambe. Nzokande, ezali makambo oyo Nzambe apekisi. (Kobima 20:13) Ya solo, lisosoli na bango ekosaka bango!

4. Ndenge nini tokoki komindimisa ete lisosoli na biso esalaka malamu?

4 Ndenge nini tokoki komindimisa ete lisosoli na biso esalaka malamu? Mibeko mpe mitinda oyo ezali na Biblia ezali “na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene.” (2 Timote 3:16) Soki tozali koyekola Biblia mbala na mbala, komanyola mpe kosalela yango na bomoi na biso, yango ekosala ete lisosoli na biso eteyama malamu mpe etambwisa biso na ndenge ebongi. Na ndenge yango tokoyekola kokanisa ndenge Yehova akanisaka. Mpe tokomindimisa ete lisosoli na biso ezali kotambwisa biso malamu. Tótalela ndenge mibeko mpe mitinda ya Yehova ekoki koteya lisosoli na biso.

TIKÁ MIBEKO YA NZAMBE ETEYA YO

5, 6. Ndenge nini mibeko ya Nzambe esalisaka biso?

5 Soki tolingi ete mibeko ya Nzambe esalisa biso, tosengeli kosuka kaka te na kotánga to koyeba yango. Tosengeli kolinga mpe kotosa yango. Biblia eyebisi biso ete: “Bóyina oyo ezali mabe, mpe bólinga oyo ezali malamu.” (Amose 5:15) Kasi tokosala yango ndenge nini? Tosengeli kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali kolala malamu te, mpe monganga asɛngi yo obongola ndenge na yo ya kolya, asɛngi yo osalaka ngalasisi, mpe obongola makambo mosusu na bomoi na yo. Nsima ya kolanda toli yango, omoni ete okómi kolala malamu! Na ntembe te, okosepela lisusu na monganga yango ndenge asalisi yo.

6 Ndenge moko mpe, Mozalisi na biso apesá biso mibeko mpo ebatela biso na mbuma mabe ya lisumu mpe mpo tózala na bomoi ya malamu. Na ndakisa, Biblia epekisi biso kokosa, kobuba, koyiba, kosala pite, kosala mobulu to kozala na boyokani na bademo. (Tángá Masese 6:16-19; Emoniseli 21:8) Ntango tomonaka matomba tozwaka soki totosi Yehova, bolingo na biso mpo na ye ekómaka lisusu makasi.

7. Ndenge nini masolo ya Biblia esalisaka biso?

7 Tosengeli te kozela naino tókutana na makambo ya mpasi oyo eyaka na kobuka mibeko ya Nzambe bongo na nsima tózwa mateya. Tokoki kozwa mateya na mabunga ya bato mosusu oyo Biblia elobeli. Masese 1:5 elobi boye: “Moto ya bwanya akoyoka mpe akozwa lisusu mateya mingi.” Tozwaka mateya oyo eleki malamu epai ya Nzambe. Na ndakisa, tókanisa mpasi oyo Davidi ayokaki ndenge abukaki mibeko ya Yehova nsima ya kosangisa nzoto na Bate-sheba. (2 Samwele 12:7-14) Ntango totángaka masolo yango, tokoki komituna boye: ‘Ndenge nini Davidi akokaki kokima mpasi ya makambo oyo asalaki? Nalingaki kosala nini soki nazalaki na esika na ye? Nalingaki kosala pite lokola Davidi to kokima lokola Yozefe?’ (Ebandeli 39:11-15) Soki tokanisi malamu na makama oyo lisumu ekoki kobimisa, tokozala na ekateli makasi ya ‘koyina oyo ezali mabe.’

8, 9. (a) Lisosoli na biso esalisaka biso na nini? (b) Na ndenge nini lisosoli na biso ezali na boyokani na mitinda ya Yehova?

8 Tokoki kozala mosika na biloko oyo Nzambe ayinaka. Kasi tokosala nini na makambo oyo Biblia etye mobeko ya sikisiki te? Ndenge nini tokoki koyeba makambo oyo ekosepelisa Nzambe? Soki totiki Biblia eteya lisosoli na biso, tokozwa bikateli ya malamu.

9 Lokola Yehova alingaka biso, apesá biso mitinda oyo ekoki kotambwisa lisosoli na biso. Alobi ete: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.” (Yisaya 48:17, 18) Ntango tokanisaka na mozindo na mitinda ya Biblia mpe totikaka ete esimba motema na biso, tosembolaka mpe tobongisaka lisosoli na biso. Yango esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu.

TIKÁ MITINDA YA NZAMBE ETAMBWISA YO

10. Mitinda ezali nini, mpe ndenge nini Yesu asalelaki yango na mateya na ye?

10 Mitinda ezali maloba ya moboko oyo esilaka ngala te, oyo ezali na kati ya Biblia. Etambwisaka makanisi na biso mpe esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. Koyeba mitinda ya Yehova esalisaka biso tóyeba makanisi na ye mpe ntina oyo apesaka biso mibeko mosusu. Yesu asalelaki mitinda mpo na koteya bayekoli na ye ete bizaleli mpe misala mosusu ekoki kobimisa makama. Na ndakisa, ateyaki ete nkanda ekoki komema na mobulu, mpe makanisi ya mbindo ekoki komema na ekobo. (Matai 5:21, 22, 27, 28) Mpo tózala na lisosoli oyo eteyami malamu, tosengeli kotika mitinda ya Yehova etambwisa biso mpe tokozwa bikateli ya malamu oyo ekopesa Nzambe nkembo.​—1 Bakorinti 10:31.

Mokristo oyo akɔmɛli amemyaka lisosoli ya basusu (Talá paragrafe 11, 12)

11. Na ndenge nini lisosoli ya bato ekoki kokesana?

11 Ata bakristo mibale oyo lisosoli na bango eteyami na Biblia, bakoki kozala na makanisi ekeseni na likambo moko. Tótalela likambo etali komɛla masanga. Biblia elobi te ete komɛla masanga ezali mabe, kasi ekebisi biso ete tosengeli te komɛla koleka ndelo to kolangwa. (Masese 20:1; 1 Timote 3:8) Yango elimboli nde ete soki mokristo alekisi ndelo te na komɛla masanga, asengeli te kotalela makambo mosusu mpo na kozwa ekateli? Te. Ata soki lisosoli na ye epesi ye nzela ya komɛla masanga, asengeli mpe kotalela lisosoli ya basusu.

12. Ndenge nini Baroma 14:21 esalisaka biso tómemya lisosoli ya basusu?

12 Ntoma Paulo amonisaki ntina ya komemya lisosoli ya basusu ntango akómaki ete: “Ezali malamu koboya kolya mosuni ya nyama to komɛla vinyo to kosala eloko moko boye oyo ezali kobɛtisa ndeko na yo libaku.” (Baroma 14:21) Na yango, ata soki tozali na lotomo ya komɛla masanga, kasi tosengeli kondima komipimela lotomo yango soki toyebi ete komɛla masanga ekotungisa lisosoli ya ndeko mosusu. Mbala mosusu ndeko moko azalaki moombo ya masanga liboso ya koyekola solo mpe azwi ekateli ya komɛla lisusu te. Tokolinga te kosala eloko moko oyo ekoki kotinda ndeko na biso azongela bizaleli na ye ya kala. (1 Bakorinti 6:9, 10) Soki toyambi ndeko yango na ndako na biso, tokotya ye mbamba amɛla masanga ata soki aboyi? Te.

13. Ndenge nini Timote amemyaki lisosoli ya basusu mpo na kosalisa bango bándima nsango malamu?

13 Ntango Timote azalaki na mbula pene na 20, mpo abɛtisa Bayuda oyo azalaki koteya libaku te, andimaki kokatama ngenga, atako ezalaki pɛtɛɛ te. Alandaki ndakisa ya ntoma Paulo. (Misala 16:3; 1 Bakorinti 9:19-23) Lokola Timote, yo mpe ozali pene ya komipimela makambo mosusu mpo na bolamu ya basusu?

“TÓKÓMA BATO OYO BAKƆMƐLI”

14, 15. (a) Tokoki kosala nini mpo tókɔmɛla na elimo? (b) Mokristo oyo akɔmɛli asalelaka basusu makambo ndenge nini?

14 Bakristo nyonso basengeli ‘kotika mateya ya ebandeli ya Kristo’ mpe ‘kokóma bato oyo bakɔmɛli.’ (Baebre 6:1) Tokómaka bato oyo bakɔmɛli kaka te mpo tosali bambula ebele na solo. Esɛngaka kosala milende. Tosengeli kokóma na boyebi mingi mpe na bososoli. Yango wana, tosengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo. (Nzembo 1:1-3) Ntango tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, tokoyeba mibeko mpe mitinda ya Yehova malamumalamu.

15 Mobeko oyo eleki ntina mpo na bakristo ezali bolingo. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Bolingo ebengami “mobeko ya mokonzi” mpe “kokokisama ya mibeko.” (Yakobo 2:8; Baroma 13:10) Tokamwaka te ndenge bolingo eleki ntina, mpo Biblia elobi ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Bolingo ya Nzambe esukaka kaka na motema to na maloba te, kasi amonisaka yango na misala. Yoane akomaki boye: “Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele mpo na biso, mpamba te Nzambe atindaki na mokili Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye.” (1 Yoane 4:9) Tomonisaka ete tozali bakristo oyo bakɔmɛli ntango tozali kolinga Yehova, Yesu, bandeko na biso, mpe bato mosusu.​—Matai 22:37-39.

Soki tozali kokanisa mingi na mitinda ya Biblia, ekosala ete tózala na lisosoli oyo ebongi kotyelama motema (Talá paragrafe 16)

16. Ntango tokómi bakristo oyo bakɔmɛli, mpo na nini mitinda ekómaka na ntina mingi na miso na biso?

16 Wana tozali kokɔmɛla na elimo, tokokóma lisusu kosepela mingi na mitinda ya Nzambe. Mbala mingi mibeko esalelamaka na makambo ya sikisiki, kasi mitinda na makambo ndenge na ndenge. Na ndakisa, mwana oyo ayebi te makama ya kozala na baninga mabe, baboti na ye bakotyela ye mibeko mpo na kobatela ye. (1 Bakorinti 15:33) Kasi ntango mwana yango akoli, akoyekola kosalela mitinda ya Biblia. Mitinda yango ekosalisa ye apona baninga ya malamu. (Tángá 1 Bakorinti 13:11; 14:20.) Kokanisa mingi na mitinda ya Biblia, ekosala ete tózala na lisosoli oyo ebongi kotyelama motema. Mpe tokoyeba mpenza oyo Nzambe alingi ete tósala na likambo boye to boye.

17. Mpo na nini tolobi ete tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kozwa bikateli ya malamu?

17 Tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kozwa bikateli oyo ekosepelisa Yehova. Soki tozali kosalela malamu mibeko mpe mitinda oyo ezali na Biblia, tokozala “na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Mitinda oyo ezali na Biblia esalisaka biso tóyeba makanisi ya Yehova. Kasi tosengeli kosala milende mpo na koyeba yango. (Baefese 5:17) Mpo na kosalisa biso, tozali na Index, Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova, Watchtower Library, Watchtower​—MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET, mpe JW Library. Soki tosaleli bisaleli yango, tokozwa mpenza matomba na boyekoli na biso moko mpe na boyekoli na kati ya libota.

LISOSOLI OYO ETEYAMI NA BIBLIA EMEMAKA MAPAMBOLI

18. Nini esalemaka soki tozali kosalela mibeko mpe mitinda ya Yehova na bomoi na biso?

18 Tozwaka mapamboli mingi ntango totosaka mibeko mpe mitinda ya Yehova! Nzembo 119:97-100 elobi: “Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza! Ezali lobanzo na ngai mokolo mobimba. Mitindo na yo ekómisaka ngai na bwanya koleka banguna na ngai, mpamba te ezali ya ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te. Nakómi na mayele ya kososola mingi koleka bateyi na ngai nyonso, mpo makundoli na yo ezali lobanzo na ngai. Nazali kosala na mayele mingi koleka mikóló, mpo natosi bitinda na yo.” Wana tozali kozwa ntango ya kokanisa na mozindo mibeko mpe mitinda ya Nzambe, tokosala makambo na bwanya mpe na bososoli. Mpe ntango tozali kosalela mibeko mpe mitinda yango mpo na koteya lisosoli na biso, tokokóma “na motindo ya moto oyo akoli mpenza, na bokoli mobimba ya Kristo.”​—Baefese 4:13.