BILOKO OYO TOSALELÁ KALA
Ndenge mboto ya liboso ya Bokonzi elonamaki na Portugal
WANA mbonge ya mbu ya Atlantike ezalaki kobɛta masuwa oyo ezalaki kokende na Mpoto, George Young, moko ya bato oyo bazalaki na masuwa, azalaki kokanisa na esengo mosala malamu oyo asalaki mpo na Bokonzi ya Nzambe na Brésil. * Kasi, wana azalaki kokoba mobembo na ye, ndeko Young atyaki makanisi na ye na Espagne mpe Portugal, teritware monene epai solo ekɔtaki naino te. Ntango akokóma kuna, azalaki kokanisa kokabola batrakte 300 000 mpe kobongisa makambo mpo ndeko Rutherford asala badiskur!
Ntango ndeko Young akómaki na Lisbonne na prɛnta ya 1925, akutaki yikiyiki na mboka. Na 1910, bana-mboka balongolaki mokonzi mpo bango moko báponaka bakonzi oyo balingi, mpe yango esalaki ete lokumu ya Lingomba ya Katolike ekita. Bana-mboka bazwaki bonsomi na makambo mingi, kasi yikiyiki ezalaki kaka mingi na ekólo yango.
Kaka ntango ndeko Young azalaki kozwa bibongiseli mpo na diskur ya ndeko Rutherford, guvɛrnema epesaki mboka na mabɔkɔ ya basoda mpo bato balukaki kokweisa bokonzi oyo ezalaki koyangela. Sɛkrɛtɛrɛ ya ebongiseli moko ya Angleterre (British and Foreign Bible Society) ayebisaki ndeko Young ete akozanga te kokutana na botɛmɛli makasi. Kasi ndeko Young asɛngaki nzela mpo básalela eteyelo moko ya ngalasisi babengi Camões, mpe bakambi na yango bandimaki!
Na nsima, mokolo ya 13/05, oyo etyamaki mpo na diskur ya ndeko Rutherford, ekokaki. Bato bakómaki motema likolólikoló! Babambaki bapapye minene na bandako ya milaimilai mpe batyaki mayebisi na bazulunalo ete ekozala na diskur oyo elobi: “Ndenge ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele.” Bakonzi ya mangomba babimisaki nokinoki lisolo moko na zulunalo na bango mpo na kokebisa bato ete “basakoli ya lokuta” bauti kokɔta na mboka. Na porte ya eteyelo yango, banguna bazalaki mpe kopesa bato mwa babuku ebele oyo elobaki mabe mpo na mateya ya ndeko Rutherford.
Atako bongo, bato soki 2 000 bayaki na diskur, mpe bato mosusu soki 2 000 bakɔtaki te mpo esika ezalaki moke. Bato mosusu bamataki na eskalye oyo esalemi na bansinga; bato mosusu bamataki likoló ya bisaleli-ngalasisi.
Makambo nyonso elekaki na kimya te. Banguna bazalaki koganga mpe kobukabuka bakiti. Kasi, ndeko Rutherford azalaki kaka kimya mpe amataki malɛmbɛ na mesa moko mpo mongongo na ye eyokana malamu. Ntango asilisaki, pene na midi ya butu, bato koleka 1 200 oyo basepelaki bapesaki bankombo mpe baadrɛsi na bango mpo bázwa mikanda oyo elimbolaka Biblia. Mokolo oyo elandaki, zulunalo moko (O Século) ebimisaki lisolo moko mpo na kolobela diskur ya ndeko Rutherford.
Na sanza ya 09/1925, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya monɔkɔ ya Portugais ebandaki kobima na Portugal. (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Portugais ebandaki kobima na Brésil liboso ebima na Portugal.) Na eleko yango, Virgílio Ferguson, Moyekoli ya Biblia moko na Brésil, azalaki komibongisa mpo na koya na Portugal kosalisa na mosala ya Bokonzi. Kala, asalaki na ndeko Young na mwa biro ya filiale ya Bayekoli ya Biblia na Brésil. Eumelaki te, Virgílio azwaki masuwa elongo na mwasi na ye Lizzie, mpo bálanda ndeko Young. Ndeko Ferguson ayaki na ntango oyo ebongaki mpo ndeko Young asengelaki kokende kosakola na bateritware mosusu, na ndakisa na bamboka ya Union soviétique.
Ntango basoda babɔtɔlaki bokonzi mpe bakómaki koyangela Portugal, botɛmɛli ekómaki makasi. Ndeko Ferguson amonisaki mpiko ndenge akimaki mboka te, azwaki bibongiseli mpo na kobatela Bayekoli ya Biblia mpe asalisaki bango básala mosala. Asɛngaki ndingisa ya kosalela ndako na ye mpo na makita. Na sanza ya 10/1927, azwaki ndingisa.
Na mbula ya liboso ya boyangeli wana ya basoda, bato soki 450 ya Portugal batindaki bankombo mpo bázwaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Longola yango, na nzela ya batrakte mpe mwa babuku, solo epalanganaki na bisika mingi oyo balobaka Portugais: Açores, Angola, Cap-Vert, Goa, Madère, Mozambique, mpe Timor oriental.
Na nsuka ya bambula ya 1920, Manuel da Silva Jordão, tata moko ya komikitisa oyo azalaki mwana-mboka Portugal mpe mosali-bilanga ayaki na Lisbonne. Ntango azalaki kofanda na Brésil, ayokaki diskur moko ya ndeko Young. Ayebaki mbala moko ete ezali mateya ya solo mpe azalaki na esengo ya kosalisa ndeko Ferguson mpo mosala ya kosakola ekende liboso. Mpo na yango, Manuel akómaki kosala lokola colporteur, ndenge bazalaki kobenga babongisi-nzela na ntango wana. Lokola mosala ya kobimisa mpe ya kokabola mikanda ebongisamaki malamu, lisangá ya sika ya Lisbonne ekolaki noki!
Na 1934, mwasi ya ndeko Ferguson azongaki na Brésil. Kasi, mboto ya solo elonamaki. Atako yikiyiki ezalaki na Mpoto na ntango ya etumba ya bana-mboka Espagne mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mwa bandeko na Portugal batikalaki sembo epai ya Yehova. Na eleko moko, molende na bango ekitaki, kasi na 1947, bazongelaki molende na bango ntango John Cooke, misionɛrɛ ya liboso oyo autaki Gileade ayaki. Na nsima, motángo ya basakoli ekómaki se kobakisama. Ata ntango Leta epekisaki mpenza mosala ya Batatoli ya Yehova na 1962, bokoli ezalaki kaka. Mpe na sanza ya 12/1974, Leta endimaki lisusu mosala ya Batatoli ya Yehova, na ntango yango basakoli bazalaki 13 000.
Lelo, bato koleka 50 000 bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na Portugal mpe na bisanga oyo balobaka Portugais, kati na yango Açores mpe Madère. Basakoli yango mosusu bazali na libota ya bato mosusu oyo bayokaki diskur oyo ndeko Rutherford asalaki na 1925.
Tozali kopesa matɔndi epai ya Yehova mpe epai ya bandeko mibali mpe bandeko basi ya sembo oyo babandaki mosala liboso mpe bamonisaki mpiko na mosala ya kosakola lokola ‘basaleli ya Kristo Yesu epai ya bikoló.’—Baroma 15:15, 16.—Euti na biloko oyo tosalelá kala na Portugal.
^ par. 3 Talá lisolo “Mosala ya kobuka mbuma ezali naino mingi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/2014, nkasa 31-32.