Tyá motema epai ya Mokambi na biso—Kristo
“Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo.”—MATAI 23:10.
1, 2. Mokumba nini ya monene Yosua azwaki nsima ya liwa ya Moize?
YEHOVA ayebisaki Yosua ete: “Moize mosaleli na ngai akufi; sikoyo tɛlɛmá, katisá Yordani, yo ná bato nyonso oyo, mpo na kokɔta na mokili oyo nazali kopesa bango.” (Yosua 1:1, 2) Ezalaki mbongwana monene mpo na Yosua, oyo azalaki mosaleli ya Moize pene na mbula 40!
2 Moize akambaki Bayisraele ntango molai mpenza, sikoyo Yosua nde akozwa esika na ye. Na yango, mbala mosusu amitunaki soki bato bakondima ye azala mokambi na bango. (Kolimbola Mibeko 34:8, 10-12) Na esika oyo buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia etángi Yosua 1:1, 2, elobi ete moko ya bileko ya mpasi mpe ya likama koleka mpo na ekólo, ezala na ntango ya kala to lelo, ezalaka ntango batye mokambi ya sika.
3, 4. Nzambe asalaki nini lokola Yosua atyelaki ye motema, mpe motuna nini tokoki komituna?
3 Yosua azalaki na ntina ya kobanga. Kasi, atyelaki Yehova motema mpe asalelaki mbala moko malako oyo apesaki ye. (Yosua 1:9-11) Asalaki malamu ndenge atyelaki Nzambe motema; Nzambe apambolaki ye mpe asalelaki anzelu mpo na kotambwisa ye ná Bayisraele. Ekoki mpenza kozala ete anzelu yango ezalaki Liloba, Mwana ya liboso ya Nzambe.—Kobima 23:20-23; Yoane 1:1.
4 Yehova asalisaki ekólo Yisraele emesana malamu na mbongwana oyo esalemaki ndenge Yosua akómaki mokambi na bango ya sika. Na mikolo na biso mpe mbongwana minene ezali kosalema. Mbala mosusu tozali komituna: ‘Lokola ebongiseli ya Nzambe ezali se kokende liboso, mpo na nini ebongi kotya motema epai ya Yesu, Mokambi oyo atyami?’ (Tángá Matai 23:10.) Mpo na kozwa eyano, tótalela ndenge oyo Yehova akambaki basaleli na ye ya kala na bantango ya mbongwana.
AKAMBAKI EKÓLO YA NZAMBE TII NA MOKILI YA NDAKA
5. Likambo nini ya kokamwa Yosua akutanaki na yango pene na Yeriko? (Talá elilingi ya ebandeli.)
5 Mwa moke nsima ya kokatisa Yordani elongo na Bayisraele, Yosua akutanaki na likambo moko ya kokamwa. Pene na engumba Yeriko, akutanaki na mobali moko asimbi mopanga. Yosua atunaki ye: “Ozali na ngámbo na biso to na ngámbo ya banguna na biso?” Yosua akamwaki ntango mobali yango alobaki ete azali “mokonzi ya limpinga ya Yehova,” anzelu oyo ayaki kobatela ekólo ya Nzambe. (Tángá Yosua 5:13-15.) Atako na bisika mosusu lisolo yango elobi ete Yehova nde azalaki koloba na Yosua, emonani ete asalaki yango na nzela ya anzelu, ndenge azalaki kosala mbala mingi na ntango wana.—Kobima 3:2-4; Yosua 4:1, 15; 5:2, 9; Misala 7:38; Bagalatia 3:19.
6-8. (a) Mpo na nini malako mosusu ya Yehova ekokaki komonana lokola ebongi te? (b) Nini emonisi ete malako yango ezalaki ya bwanya mpe eyaki na ntango oyo ebongi? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
6 Anzelu wana ayebisaki Yosua polele makambo oyo asengelaki kosala mpo na kolonga Yeriko. Na ebandeli, malako yango mosusu ekokaki komonana lokola bozoba. Na ndakisa, anzelu ayebisaki Yosua akata basoda nyonso ngenga. Yango elimbolaki ete bakozala na makasi ya kobunda te mpo na mwa mikolo. Ezalaki mpenza ntango oyo ebongi mpo na kokata mibali yango ngenga?—Ebandeli 34:24, 25; Yosua 5:2, 8.
7 Mbala mosusu basoda yango bamitunaki, ‘Ndenge nini tokobatela mabota na biso soki banguna bayei kobundisa biso?’ Kasi likambo moko ya kokamwa esalemaki! Na esika mibali ya Yeriko bábundisa Bayisraele, babandaki nde kobanga bango. Biblia elobi: “Yeriko ekangamaki malamumalamu mpo na bana ya Yisraele, moto moko te azalaki kobima mpe moto moko te azalaki kokɔta.” (Yosua 6:1) Na ntembe te, nsango wana etindaki Bayisraele bátyela litambwisi ya Nzambe motema mingi koleka!
8 Lisusu, anzelu ayebisaki Yosua ete Bayisraele bábundisa Yeriko te. Kasi, basengelaki kotambola zingazinga na yango mbala moko na mokolo, mikolo motoba, mpe na mokolo ya nsambo bakotambola mbala nsambo. Mbala mosusu basoda bamilobaki: ‘Oyo ezali mpenza kolekisa ntango mpe kobimisa makasi mpamba!’ Kasi, Yehova, Mokambi oyo Bayisraele bazalaki komona na miso te, ayebaki malamu makambo oyo azalaki kosala! Kolanda malako wana ekómisaki kondima ya Bayisraele makasi, mpe esalaki ete bábunda te na basoda ya Yeriko.—Yosua 6:2-5; Baebre 11:30. *
9. Mpo na nini tosengeli kolanda malako nyonso oyo euti na ebongiseli ya Nzambe? Pesá ndakisa.
9 Lisolo yango ezali koteya biso nini? Na bantango mosusu, ebongiseli ya Yehova esalaka makambo na ndenge ya sika, mpe na bantango mosusu tokangaka ntina na yango te.
Na ndakisa, mbala mosusu liboso tozalaki komona ete ezali malamu te kosalela batelefone to batablɛti mpo na boyekoli ya biso moko, na mosala ya kosakola, to na makita. Kasi na ntembe te, tozali sikoyo komona matomba ya kosalela biloko yango, soki likoki ezali. Ntango tomoni matomba ya bambongwana ya ndenge wana, kondima na biso ekómaka makasi mpe tokómaka na bomoko makasi na bandeko na biso.NDENGE KRISTO AKAMBAKI BAKRISTO YA SIƐKLƐ YA LIBOSO
10. Nani mpenza atambwisaki makambo mpo na kosilisa ntembe na likambo ya kokatama ngenga?
10 Nsima ya mbula soki 13 kobanda ntango Korneyi oyo akatamaki ngenga te akómaki mokristo, bakristo mosusu oyo bazalaki Bayuda bazalaki kaka koloba ete moto nyonso asengeli kokatama ngenga. (Misala 15:1, 2) Na engumba Antiokia, bandeko bazalaki kobendana mpo na likambo yango. Na yango, mikóló bazwaki bibongiseli ete Paulo amema likambo yango na lisangani ya mikóló-bakambi na Yerusaleme. Kasi nani alingaki esalema bongo? Paulo alobaki: “Namataki mpo namonaki emoniseli.” Ezali polele ete Kristo nde atambwisaki makambo mpo lisangani ya mikóló-bakambi esilisa ntembe yango.—Bagalatia 2:1-3.
11. (a) Bakristo mosusu oyo bazalaki Bayuda bazalaki kaka koloba nini mpo na kokatama ngenga? (b) Ndenge nini Paulo andimaki kosala na bomoko na mikóló na Yerusaleme? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
11 Kristo atambwisaki lisangani ya mikóló-bakambi mpo emonisa polele ete bakristo oyo bazalaki Bayuda te basɛngisamaki kokatama ngenga te. (Misala 15:19, 20) Atako bongo, nsima ya bambula mingi, bakristo mingi oyo bazalaki Bayuda bakobaki kokata bana na bango ngenga. Ntango mikóló na Yerusaleme bayokaki nungunungu ete Paulo azalaki kotosa Mibeko ya Moize te, bapesaki ye malako ya kokamwa. * (Misala 21:20-26) Bayebisaki ye akende komipɛtola elongo na mibali minei na tempelo mpo bato bámona ete azalaki kotosa Mibeko. Paulo akokaki koboya, mpe koloba ete: ‘Ezali bozoba! Mpo na nini bosɛngi ngai nasala bongo? Bakristo oyo bazali Bayuda nde bazali kotya mobulu mpo bazali kokanga ntina te ya likambo etali kokatama ngenga.’ Kasi, Paulo amonaki ete mikóló balingi bakristo nyonso bázala na bomoko, na yango amonisaki komikitisa mpe alandaki malako na bango. Nzokande, mbala mosusu tomitunaka: ‘Mpo na nini Yesu atikaki likambo ya kokatama ngenga ekoba kobimisa matata ntango molai, atako liwa na ye esukisaki Mibeko ya Moize?’—Bakolose 2:13, 14.
12. Ekoki kozala mpo na ntina nini Kristo atikaki ntango ebele eleka liboso likambo ya kokatama ngenga esila mpenza?
12 Ekoki kozwa ntango mpo na komesana na makambo ya sika. Esɛngaki ntango eleka mpo bakristo oyo bazalaki Bayuda bándima ete bazalaki lisusu na nse ya Mibeko te. (Yoane 16:12) Banda kala, bazalaki komona ete kokatama ngenga nde emonisaka boyokani malamu na Nzambe. (Ebandeli 17:9-12) Bamosusu bazalaki kobanga ete Bayuda mosusu bányokola bango soki bamonisi ete bakeseni na bango. (Bagalatia 6:12) Kasi na nsima, Kristo apesaki malako mosusu na nzela ya mikanda oyo Paulo akomaki.—Baroma 2:28, 29; Bagalatia 3:23-25.
KRISTO AKAMBAKA LISANGÁ TII LELO
13. Nini ekoki kosalisa biso tóndima litambwisi ya Kristo lelo oyo?
13 Tii lelo, Kristo azali Mokambi ya lisangá. Na yango, soki mbongwana esalemi kasi okangi ntina na yango te, kanisá ndenge oyo Kristo akambaki basaleli ya Nzambe na ntango ya kala. Ezala na mikolo ya Yosua to na ntango ya bantoma, Kristo apesaki malako ya bwanya oyo ebatelaki basaleli ya Nzambe, ekómisaki kondima na bango makasi, mpe esalisaki bango bábatela bomoko.—Baebre 13:8.
14-16. Ndenge nini malako ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” emonisaka ete Kristo alingi kosalisa biso tóbatela kondima makasi?
14 Lelo oyo, “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesaka biso malako oyo tosengeli na yango, na ntango oyo ebongi mpenza. (Matai 24:45) Litambwisi yango emonisaka ete Yesu atyelaka biso likebi. Marc, oyo azali na bana minei, alobi boye: “Satana alukaka kopanza mabota mpo na kolɛmbisa masangá. Ndenge balendisi biso tósalaka losambo na kati ya libota pɔsɔ nyonso, bakonzi ya mabota bazwi malako ya polele: Bóbatela mabota na bino!”
15 Ntango tozali kososola ndenge Kristo azali kokamba biso, tokoyeba ete alingi tóbatela kondima makasi. Na ndakisa, nkulutu moko na nkombo Patrick alobi boye: “Liboso, bato mosusu bazalaki kosepela te kokende likita mpo na mosala ya kosakola na mwa bituluku ya mike mokolo ya pɔsɔ mpe mokolo ya lomingo.” Kasi alobi ete mbongwana yango emonisi ndenge Yesu atyelaka ndeko mokomoko ya lisangá likebi. Na ndakisa, bandeko mosusu oyo bazalaka nsɔninsɔni to oyo bazalaki kobima mingi te na mosala ya kosakola bayoki ete bazali na esika mpe na ntina mingi na lisangá. Yango elendisi kondima na bango.
16 Lisusu, Kristo azali kosalisa biso tótya miso na mosala ya kosakola, mosala eleki ntina oyo ezali kosalema na mabele lelo oyo. (Tángá Marko 13:10.) André, nkulutu moko ya sika, asalaka makasi alanda malako nyonso ya sika oyo ebongiseli ya Yehova epesi. Alobi boye: “Ndenge balongoli bato mosusu na Babetele ekundweli biso ete ntango oyo etikali ezali mokuse mpe ete tosengeli komipesa mingi na mosala ya kosakola.”
NDENGE YA KOMONISA ETE TONDIMAKA LITAMBWISI YA KRISTO
17, 18. Mpo na nini tosengeli kokanisa matomba oyo ezali komonana ntango tomesani na mbongwana oyo esalemi?
17 Litambwisi ya Yesu Kristo, Mokonzi na biso oyo azali koyangela, ekosalisa biso lelo mpe na mikolo ezali koya. Kanisá matomba oyo ozwi na bambongwana oyo esalemi mikolo oyo. Na losambo na kati ya libota, bokoki kolobela ndenge bambongwana oyo esalemi
na makita to na mosala ya kosakola esalisi libota na bino.18 Soki tobosani te ete kolanda malako ya ebongiseli ya Yehova ememaka matomba ebele, ekozala mpasi te tólanda litambwisi yango mpe tokozala na esengo. Na ndakisa, tozali na esengo ndenge tozali kobatela mbongo mpo tozali kotya biloko mingi na Internet mpe tozali kobimisa lisusu mikanda mingi te na papye ndenge ezalaki liboso. Yango ezali kosalisa mpo nsango malamu ekómela bato ebele koleka. Soki tobosani likambo yango te, tokosalela mingi mikanda, bavideo, mpe biloko ya koyoka oyo totyaka na Internet. Na ndenge yango, tokomonisa ete lokola Kristo, tolingi kosalela mbongo ya ebongiseli ya Nzambe na bwanya.
19. Mpo na nini tosengeli kolanda litambwisi ya Kristo?
19 Soki tozali kolanda litambwisi ya Kristo, tokosalisa bandeko bázala na kondima makasi mpe tokolendisa bomoko. Mpo na mbongwana oyo esalemaki mikolo eleki, ya kokitisa motángo ya bato na Babetele ya mokili mobimba, André alobi boye: “Elimo malamu oyo bandeko oyo bazalaká na Betele, oyo bandimaki mbongwana yango epesaka ngai mpiko mpe ebakisi limemya na ngai mpo na bango. Bazali kotambola elongo na likalo ya Yehova na ndenge bazali kosepela na mokumba nyonso bazwi.”
ZALÁ NA KONDIMA MPE TYELÁ MOKAMBI NA BISO MOTEMA
20, 21. (a) Mpo na nini ebongi tótyela Kristo, Mokambi na biso motema? (b) Motuna nini tokotalela na lisolo oyo elandi?
20 Mosika te, Mokambi na biso Yesu Kristo ‘akolonga tii na nsuka’ mpe akosala “makambo ya nsɔmɔ.” (Emoniseli 6:2; Nzembo 45:4) Kasi, ata lelo oyo, azali kobongisa biso mpo na bomoi na mokili ya sika mpe mpo na mosala oyo tokosala kuna, ntango tokoteya bato oyo bakosekwa mpe tokosalisa na kokómisa mabele paradiso.
21 Soki tozali kotyela Mokambi mpe Mokonzi na biso motema na makambo nyonso, akokamba biso tii na mokili ya sika. (Tángá Nzembo 46:1-3.) Lelo oyo, bambongwana ekoki kopesa mpasi, mingimingi soki ekómeli biso na mbalakaka. Soki likambo ya bongo esalemi, ndenge nini tokoki kobatela kimya ya motema mpe kondima na biso epai ya Yehova? Tokotalela motuna yango na lisolo oyo elandi.
^ par. 8 Na bitiká ya Yeriko, bato ya arkeoloji bamonaki maboke ya mbuma ebele oyo bato babuká kasi balyá te. Yango eyokani na lisolo ya Biblia, oyo elobi ete bazingaki Yeriko ntango molai te mpe Bayisraele bazalaki na ndingisa te ya kolya mbuma ya Yeriko. Lokola ezalaki na eleko ya kobuka mbuma, ezalaki ntango ya malamu mpo Bayisraele bázwa mokili yango, mpo ezalaki na bilei ebele na bilanga.—Yosua 5:10-12.
^ par. 11 Talá etanda “Paulo andimi na komikitisa ete bosembo na ye emekama” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2003, lokasa 24.