Mituna ya batángi
Mokristo akoki kosalela “stérilet” mpo azwa zemi te?
Na likambo yango, mwasi mokristo mokomoko ná mobali na ye basengeli kozwa ekateli oyo ekotungisa lisosoli na bango te. Mpo na yango, basengeli koyeba malamumalamu ndenge stérilet esalaka mpe mitinda ya Biblia oyo bakoki kolanda.
Yehova asɛngaki Adama ná Eva, mpe na nsima Noa ná libota na ye ete: “Bóbota mpe bókóma mingi.” (Ebandeli 1:28; 9:1) Biblia elobi te ete etinda yango etali mpe bakristo. Yango wana, mwasi mokristo mokomoko ná mobali na ye basengeli kotala soki bakosalela mayele moko boye ya kopekisa zemi mpo bábota na mayele to báyeba ntango nini bábota. Makambo nini basengeli kotalela?
Mpo na kozwa ekateli na oyo etali mayele ya kosalela mpo mwasi azwa zemi te, bakristo basengeli kotalela mitinda ya Biblia. Mpo na yango, bakolinga soki moke te kolongola zemi mpo na koboya kobota. Ezali mabe bakristo bálongola zemi na nko, mpo soki zemi ekei tii na nsuka, mwana mobimba akobotama. Kolongola zemi ezali kozanga limemya mpo na bomoi, nzokande Biblia esɛngi biso tómemya bomoi. (Kobima 20:13; 21:22, 23; Nzembo 139:16; Yirimia 1:5) Tokoki koloba nini mpo na kosalela stérilet?
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/09/1979 (nkasa 30-31, na Lifalanse) elobelaki likambo yango. Na ntango wana, stérilet mingi oyo bazalaki kosalela ezalaki ya kopale mpe bazalaki kotya yango na matrisi mpo mwasi azwa zemi te. Lisolo yango elobaki ete eyebanaki mpenza polele te ndenge stérilet esalaka. Minganga mingi balobaki ete stérilet epekisaka mai ya mobali ekende kosangana na likei ya mwasi (ovule). Soki likei esangani na mai ya mobali te, mwana akobanda kosalema te.
Kasi, na bantango mosusu mai ya mobali ezalaki kosangana na likei. Likei ekokaki kokola na trompe to ekokaki kokende na matrisi. Soki ekómi na matrisi, stérilet ekokaki kopekisa likei yango efanda na kati, mpe okomona zemi yango elongwe. Yango ezalaki lokola kolongola zemi. Lisolo yango esukisaki boye: “Mokristo oyo abangaka Nzambe, oyo azali komituna soki ebongi kosalela stérilet asengeli kotalela likambo yango malamumalamu na kolanda makambo oyo Biblia eteyaka na oyo etali komemya bomoi mpo ezali bosantu.”—Kasi, kobanda 1979, ntango lisolo wana ebimaki, mayele ya monganga mpe siansi ekoli mingi.
Babimisi lolenge mosusu mibale ya stérilet. Moko ezali ya motako (cuivre) mpe epanzanaki mingi na États-Unis na 1988. Mosusu ebimisaka hormone mpe ebandaki kotɛkama na 2001. Ba stérilet yango mibale esalaka ndenge nini?
Motako: Ndenge tolobaki liboso, stérilet epekisaka mai ya mobali ekende mbala moko tii na matrisi mpo na kosangana na likei. Longola yango, na stérilet oyo esalemi na motako, emonani ete motako yango ebomaka mai ya mobali. * Lisusu, stérilet yango ebongolaka kati ya matrisi.
Hormone: Stérilet mosusu ebimisaka hormone lokola oyo ezalaka na nkisi ya komɛla mpo mwasi azwa zemi te. Stérilet yango esalaka lokola ba stérilet ya ntango ya kala, kasi ebimisaka mpe hormone na kati ya matrice. Epai ya basi mosusu, stérilet yango epekisaka maki ebima. Nzokande, soki likei ezali te, mwasi akoki kozwa zemi te. Stérilet yango mpe ekɔndisaka kati ya matrice. * Longola yango, ekangaka mwa mai oyo ezalaka na matrice, mpe yango epekisaka mai ya mobali ekóma tii na matrisi.
Ndenge tolobaki yango, emonani ete ndenge nyonso mibale ya stérilet ebongolaka kati ya matrisi. Yango elingi koloba ete soki mwasi abimisi likei mpe likei yango esangani na mai ya mobali, ekoki kokɔta na matrisi kasi ekokola te mpo kati ya matrisi ekɔndaki. Yango ekoki kolongola zemi oyo euti kobanda. Kasi, minganga balobi ete esalemaka mpenza te, mpe ekoki kosalema ata na nkisi oyo basi bamɛlaka mpo bázwa zemi te.
Na yango, moto moko te akoki mpenza koyeba soki likei esanganaka te na mai ya mobali soki mwasi asalelaka stérilet ya motako to oyo ya hormone. Kasi, ndenge tolimboli yango likoló, minganga bamonisi ete lokola stérilet epekisaka mai ya mobali esangana na likei, ezalaka mpasi mpenza mwasi oyo asalelaka yango azwa zemi.
Bakristo oyo balingi kosalela stérilet bakoki kosolola likambo yango na monganga. Monganga akoki koyebisa bango stérilet oyo ezali na mboka na bango, matomba na yango, mpe makama na yango mpo na mwasi. Bakristo yango basengeli te kosɛnga moto mosusu, ata mpe monganga, to kopesa ye nzela, azwela bango ekateli. (Baroma 14:12; Bagalatia 6:4, 5) Wana ezali ekateli oyo mokristo mokomoko asengeli kozwa elongo na mwasi na ye. Mposa na bango esengeli kozala ya kosepelisa Nzambe mpe kobatela lisosoli ya malamu.—Talá mpe 1 Timote 1:18, 19; 2 Timote 1:3.
^ par. 4 Mokanda moko oyo ebongiseli ya kolɔngɔnɔ ya nzoto na Angleterre ebimisaki elobi boye: “Stérilet oyo esalemi na motako ebele epekisaka zemi malamu mpenza (koleka 99%). Yango elingi koloba ete na mbula mobimba basi moke mpenza oyo basalelaka stérilet nde bakoki kozwa zemi. Boye, stérilet oyo esalemi na motako mingi te epekisaka zemi malamumalamu mpenza te.”
^ par. 5 Lokola stérilet oyo ebimisaka hormone ekɔndisaka matrice, na bantango mosusu minganga bakomelaka yango basi oyo banyokwamaka mingi na ntango ya komona sanza, ezala basi babalá to te.