Mituna ya batángi
Na Yisraele ya kala, molɔngɔ oyo ezalaki komema na Masiya ezalaki koleka kaka epai ya mwana ya liboso?
Na bantango mosusu tolobaki bongo. Emonanaki lokola ete ndimbola yango eyokani na makambo oyo totángaka na Baebre 12:16. Vɛrsɛ yango elobi ete Esau ‘amemyaki makambo mosantu te’ mpe “akabaki lotomo na ye ya mwana ya liboso [epai ya Yakobo] mpo na mwa elubu moko kaka.” Maloba yango emonisaki lokola ete ntango Yakobo azwaki ‘lotomo ya mwana ya liboso,’ akokaki mpe kokɔta na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya.—Matai 1:2, 16; Luka 3:23, 34.
Kasi, kotalela lisusu masolo ya Biblia emonisi ete mobali asengelaki kaka te kozala mwana ya liboso mpo azala na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya. Tótalela mwa bandakisa:
Rubene nde azalaki mwana mobali ya liboso oyo Yakobo (Yisraele) abotaki na Lea. Na nsima, Yakobo ná Rashele, mwasi oyo alingaki mingi, babotaki mwana mobali ya liboso, Yozefe. Lokola Rubene asalaki makambo ya nsɔni, lotomo na ye ya mwana ya liboso ekendaki epai ya Yozefe. (Ebandeli 29:31-35; 30:22-25; 35:22-26; 49:22-26; 1 Ntango 5:1, 2) Nzokande, ezala Rubene, ezala Yozefe, moko te azalaki na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya. Molɔngɔ yango elekaki nde epai ya Yuda, mwana mobali ya minei oyo Yakobo abotaki na Lea.—Ebandeli 49:10.
Luka 3:32 etángi bato mosusu mitano oyo bakɔtaki na molɔngɔ oyo ememaki epai ya Masiya. Emonani ete mokomoko na bango azalaki mwana ya liboso. Na yango, Boaze abotaki Obede, oyo azalaki tata ya Yese.—Ruta 4:17, 20-22; 1 Ntango 2:10-12.
Kasi, Davidi, mwana ya Yese, azalaki mwana ya liboso te. Azalaki mwana ya nsuka, mwana ya mwambe. Atako bongo, molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya elekaki na ye. (1 Samwele 16:10, 11; 17:12; Matai 1:5, 6) Molɔngɔ yango elekaki mpe epai ya Salomo, nzokande epai ya Davidi, azalaki mwana ya liboso te.—2 Samwele 3:2-5.
Yango elimboli te ete kozala mwana ya liboso ezalaki na ntina te. Mwana mobali ya liboso azalaki na esika ya lokumu mpe mbala mingi ye nde azalaki kokóma mokonzi ya libota. Azalaki mpe kozwa biteni mibale ya biloko nyonso.—Ebandeli 43:33; Kolimbola Mibeko 21:17; Yosua 17:1.
Kasi, lotomo ya mwana ya liboso ekokaki kokende epai ya moto mosusu. Abrahama abenganaki Yisamaele, mpe apesaki Yisaka lotomo ya mwana ya liboso. (Ebandeli 21:14-21; 22:2) Mpe ndenge tomonaki yango, lotomo ya Rubene ya mwana ya liboso ekendaki epai ya Yozefe.
Sikoyo, tózonga na Baebre 12:16, oyo elobi: “Moto ya pite azala te to moto oyo amemyaka makambo mosantu te, lokola Esau, oyo akabaki lotomo na ye ya mwana ya liboso mpo na mwa elubu moko kaka.” Likanisi nini ya ntina ezali wana?
Na vɛrsɛ yango, ntoma Paulo azalaki kolobela molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya te. Azalaki kaka kolendisa bakristo ‘básembola banzela ya makolo na bango.’ Na ndenge yango, balingaki te ‘kozanga boboto monene ya Nzambe,’ likambo ya mawa oyo ekokaki kosalema soki bakwei na pite. (Baebre 12:12-16) Soki basalaki bongo, balingaki kokóma lokola Esau. Azalaki te ‘komemya makambo mosantu,’ mpe amipesaki mobimba na makambo ya mosuni.
Lokola Esau azalaki na bomoi na ntango ya kala, mbala mosusu azwaki libaku ya kopesa bambeka mbala na mbala. (Ebandeli 8:20, 21; 12:7, 8; Yobo 1:4, 5) Kasi, lokola azalaki kokanisa kaka makambo ya mosuni, Esau akabaki lokumu yango mpo na saani moko ya supu. Mbala mosusu, aboyaki koyoka mpasi oyo esakolamaki ete ekokómela momboto ya Abrahama. (Ebandeli 15:13) Esau amonisaki mpe ete azalaki kolinga makambo ya mosuni, ete azalaki kosepela na makambo mosantu te, na ndenge abalaki basi mibale ya bapagano, mpe apesaki baboti na ye mpasi mingi. (Ebandeli 26:34, 35) Akesanaki mpenza na Yakobo, oyo alukaki kobala kaka mwasi oyo asambelaka Nzambe ya solo!—Ebandeli 28:6, 7; 29:10-12, 18.
Na yango, tokoki koloba nini mpo na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu Masiya? Na bantango mosusu elekaki epai ya bana mibali ya liboso, kasi ntango nyonso te. Bayuda bayebaki yango mpe bandimaki yango, na ndakisa bandimaki ete Kristo azalaki nkɔkɔ ya Davidi, mwana ya nsuka ya Yese.—Matai 22:42.