Mokili ya sika ekómi pene!
Nzambe akelaki mabele mpo bato ya sembo báfanda wana libela. (Nzembo 37:29) Atyaki Adama ná Eva, mobali ná mwasi ya liboso na elanga ya Edene oyo ezalaki kitoko mingi. Apesaki bango ná bana na bango mokumba ya kolona yango mpe kobatela yango.—Ebandeli 1:28; 2:15.
Lelo oyo mokili ezali Paradiso te ndenge Nzambe alingaki. Kasi, likanisi ya Nzambe ebongwani te. Ndenge nini Nzambe akokokisa likanisi yango? Ndenge masolo ya liboso emonisaki yango, Nzambe akoboma mabele te. Akotika bato ya sembo báfanda wana. Ntango Nzambe akokokisa bilaka na ye, makambo ekozala ndenge nini awa na mabele?
Guvɛrnema moko ekoyangela mabele mobimba
Mosika te, ntango guvɛrnema ya sika oyo Nzambe atye na likoló ekoyangela bato nyonso, mabele ekokóma esika moko ya malamu mpenza, epai bato bakofanda na boyokani mpe bakosala misala ya malamu, oyo bakosepela na yango. Nzambe aponi Yesu Kristo ayangela mabele. Lelo oyo, bakonzi mingi bakipaka bato te. Kasi, Yesu akeseni na bango, mpo ye akosala ntango nyonso makambo oyo ezali mpo na bolamu ya bato. Akoyangela na bolingo, mpe akozala Mokonzi ya boboto, ya motema mawa, mpe ya malamu.—Yisaya 11:4.
Bato ya mabele mobimba bakozala na bomoko
Bato oyo bakofanda na mabele ya sika bakokabwana te na bamboka to na bikólo. Bato ya mokili mobimba bakozala na bomoko. (Emoniseli 7:9, 10) Bato nyonso oyo bakofanda na mabele bakolinga Nzambe, bakolingana, mpe bakosala makambo nyonso na kimya mpo na kokokisa mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli, ya kobatela mabele.—Nzembo 115:16.
Mai mpe mopɛpɛ ekosala eloko moko ya mabe te
Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele, Nzambe akotambwisa makambo nyonso oyo etali klima mpe makambo nyonso ekozala malamu. (Nzembo 24:1, 2) Ndenge Yesu apekisaki mopɛpɛ ya makasi, amonisaki oyo akoki kosala na nzela ya nguya ya Nzambe. (Marko 4:39, 41) Ntango Yesu akoyangela, moto moko te akobanga makama oyo ebimaka yango moko. Na nse ya Bokonzi ya Nzambe, tokozala na kimya elongo na banyama mpe tokobebisa te mai, mopɛpɛ mpe mabele.—Hosea 2:18.
Bato bakozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na biloko ya kolya ebele
Moto nyonso akozala nzoto kolɔngɔnɔ. Moto moko te akobɛla, akokóma mobange to akokufa. (Yisaya 35:5, 6) Bato bakofanda na mabele ya kitoko mpe ya pɛto mpe mopɛpɛ ekozala malamu mpenza, kaka ndenge ezalaki na elanga ya Edene. Na mokili ya sika, bilanga ekobota mingi mpe bato na mabele mobimba bakozala na biloko ya kolya beboo, kaka ndenge ezalaki na Edene. (Ebandeli 2:9) Ndenge moko na ekólo ya Yisraele na ntango ya kala, moto nyonso ‘akolya limpa [na ye] ndenge alingi na Paradiso.’—Balevi 26:4, 5.
Bato bakozala na kimya mpe na libateli mpenza
Ntango guvɛrnema ya Nzambe ekoyangela mokili mobimba, bato nyonso bakozala na kimya, bakosalelana makambo ya malamu mpe na boboto. Bitumba ekozala te, moto akonyokola moninga te, mpe moto nyonso akozala na biloko oyo asengeli na yango. Biblia elaki ete: “Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.”—Mika 4:3, 4.
Bato nyonso bakozala na bandako mpe na misala ya malamu
Libota na libota ekozala na ndako na yango moko, bakobanga te ete mokolo mosusu bábɔtɔla bango yango, mpe bakozwa mbano ya misala nyonso bakosala. Mpo Biblia elobi, bato oyo bakofanda na mokili ya sika ya Nzambe “bakoboma nzoto mpamba te,” to bakosala mosala ya mpunda te.—Yisaya 65:21-23.
Bakoteyama malamu mpenza
Biblia elaki ete: “Mabele ekotonda na boyebi ya Yehova.” (Yisaya 11:9) Bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bakoyekola makambo oyo euti na bwanya ya Yehova Nzambe, oyo ezangi nsuka, mpe bakoyekola biloko ya kitoko oyo Yehova asalá. Bakosalela boyebi na bango te mpo na kosala bibundeli to konyokola baninga. (Yisaya 2:4) Kasi, bakoyekola nde kofanda na kimya na kati na bango mpe bakobatela mabele.—Nzembo 37:11.
Bakozala na bomoi ya seko
Nzambe asalaki mabele malamu mpenza mpo tófanda wana na esengo mokolo na mokolo. Mokano na ye ezali ete bato báfanda na mabele libela. (Nzembo 37:29; Yisaya 45:18) Mpo mokano yango ekokisama, Nzambe “akolongola mpenza liwa mpo na libela.” (Yisaya 25:8) Biblia elaki ete: “Liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) Nzambe akopesa baoyo akobikisa ntango akoboma mokili mabe oyo mpe ebele ya bato oyo bakosekwa na mokili ya sika oyo ezali koya, libaku ya kozala na bomoi ya seko.—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.
Mpo na koyeba makambo mosusu oyo okoki kosala mpo obika ntango mokili oyo ekosuka mpe ozala na bomoi na mokili ya sika oyo etikali moke eya, ndimá koyekola Biblia ofele na Batatoli ya Yehova, na nzela ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!