LISOLO YA BOYEKOLI 6
Tata na biso Yehova alingaka biso mingi
“Bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso.’”—MAT. 6:9.
LOYEMBO 135 Yehova alobi: ‘Zalá mayele, mwana na ngai’
NA MOKUSE *
1. Moto asengelaki kosala nini mpo asolola na mokonzi ya Perse?
KANISÁ ete ofandaka na ekólo Perse ya ntango ya kala. Olingi kosolola na mokonzi likambo moko, na yango osali mobembo tii na engumba Shushane, epai mokonzi afandaka. Kasi, okomeka ata moke te kopusana pene na ye kozanga ete apesa yo ndingisa. Soki omeki, bakoki koboma yo!—Est. 4:11.
2. Yehova alingi tómiyoka ndenge nini na oyo etali kosolola na ye?
2 Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova azali te lokola mokonzi wana ya Perse! Yehova atombwani mingi koleka bakonzi nyonso ya bato, kasi tokoki kosolola na ye ntango nyonso oyo tolingi. Alingi tóbangaka te kosolola na ye. Na ndakisa, atako Yehova azali na batitre ya lokumu lokola Mozalisi Monene, Mozwi ya Nguya-Nyonso, mpe Nkolo Mokonzi, tokoki kobenga ye “Tata,” kaka ndenge mwana abengaka moboti na ye. (Mat. 6:9) Ndenge Yehova alingi tómiyoka penepene na ye ezali mpenza kosimba motema na biso!
3. Mpo na nini tokoki kobenga Yehova “Tata,” mpe tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Ebongi mpenza tóbenga Yehova “Tata” mpo azali Liziba ya bomoi. (Nz. 36:9) Lokola azali Tata na biso, tozali na mokumba ya kotosa ye. Soki tosali makambo oyo asɛngi biso, tokozwa mapamboli minene. (Ebr. 12:9) Na kati ya mapamboli yango, tokoki kotánga bomoi ya seko, ezala na likoló to awa na mabele. Tozwaka mpe mapamboli lelo. Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo Yehova amonisaka ete azali Tata ya bolingo lelo oyo, mpe ntina oyo tokoki kondima ete akosundola biso te na mikolo oyo ezali koya. Kasi, tólobela liboso ntina oyo tokoki kondima ete Tata na biso ya likoló alingaka biso mingi mpe asalisaka biso.
YEHOVA AZALI TATA OYO ALINGAKA BISO MPE ASALISAKA BISO
4. Mpo na nini bato mosusu bazalaka na mokakatano ya komona Yehova lokola Tata na bango?
4 Ozalaka na mokakatano ya komona Nzambe lokola Tata na yo? Ntango bato mosusu bakanisaka bonene ya Yehova, bamimonaka moke mpe ntina te. Bandimaka te ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atyelaka mokomoko na bango likebi. Kasi, Tata na biso ya bolingo alingi te ete tómiyokaka bongo. Apesá biso bomoi mpe alingi ete tózala na boyokani ya malamu na ye. Nsima ya kolobela likambo yango, ntoma Paulo ayebisaki bayoki na ye na Atene ete Yehova “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Mis. 17:24-29) Nzambe alingi ete mokomoko na biso asololaka na ye ndenge kaka mwana asololaka na moboti na ye oyo alingaka ye mpe atyelaka ye likebi.
5. Maloba ya ndeko mwasi moko ezali koteya biso nini?
5 Bato mosusu bakokaka te komona Yehova lokola Tata na bango mpo tata oyo abotá bango azalaki komonisela bango bolingo mpe boboto mpenza te to mpe ata moke te. Ndeko mwasi moko alobi boye: “Tata na ngai azalaki maloba mabe mpenza. Na yango, ntango nakómaki koyekola Biblia, ezalaki mpasi mpo namiyoka penepene na Tata moko ya likoló. Kasi nsima ya koyeba Yehova, makambo ebongwanaki.” Yo mpe okanisaka bongo? Soki ɛɛ, kolɛmba nzoto te. Mokolo mosusu, yo mpe okokóma komona ete Yehova azali Tata oyo aleki malamu.
6. Na kotalela Matai 11:27, wapi lolenge moko oyo Yehova asalisi biso tómonaka ye lokola Tata na biso ya bolingo?
6 Lolenge moko oyo Yehova asalisi biso tómonaka ye lokola Tata na biso ya bolingo ezali ndenge akomisá maloba mpe misala ya Yesu na Biblia. (Tángá Matai 11:27.) Yesu amekolaki bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka, yango wana alobaki ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoa. 14:9) Mbala mingi, Yesu azalaki komonisa ete Yehova azali Tata. Kaka na Baevanzile minei, Yesu asalelaki liloba “Tata” mbala koleka 165 mpo na kolobela Yehova. Mpo na nini Yesu alobelaki Yehova mingi bongo? Ntina moko ezali ete alingaki kosalisa bato bándima ete Yehova azali Tata ya bolingo.—Yoa. 17:25, 26.
7. Yehova azalaki kosala nini mpo na Mwana na ye?
7 Tólobela ndenge oyo Yehova azalaki kosalela Mwana na ye Yesu makambo. Yehova azalaki ntango nyonso koyoka mabondeli ya Yesu. Azalaki kosuka kaka na koyoka ye te, azalaki mpe koyanola ye. (Yoa. 11:41, 42) Na yango, na mikakatano nyonso oyo Yesu akutanaki na yango, azalaki komona bolingo mpe lobɔkɔ ya Tata na ye.—Luka 22:42, 43.
8. Bamposa nini ya Yesu Yehova akokisaki?
8 Yesu andimaki ete Tata na ye nde Mopesi mpe Mobateli ya bomoi na ye ntango alobaki ete: “Nazali na bomoi mpo na Tata.” (Yoa. 6:57) Yesu atyelaki Tata na ye motema mobimba, mpe Yehova akokisaki bamposa ya Yesu ya mosuni. Oyo eleki ntina, Yehova akokisaki bamposa ya Yesu ya elimo mpo atikala sembo tii na nsuka.—Mat. 4:4.
9. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azalaki Tata oyo alingaki Yesu mingi?
9 Lokola azali Tata ya bolingo, Yehova alingaki Yesu ayeba ete azalaki elongo na ye. (Mat. 26:53; Yoa. 8:16) Atako Yehova abatelaki Yesu na makambo nyonso te, asalisaki ye ayikela komekama mpiko. Yesu ayebaki ete likambo nyonso oyo ekokaki konyokola ye ekozala ya ntango mokuse. (Ebr. 12:2) Yehova amonisaki ete alingaki Yesu na ndenge azalaki koyoka mabondeli na ye, kokokisa bamposa na ye, koteya ye, mpe kosunga ye. (Yoa. 5:20; 8:28) Tótala sikoyo ndenge oyo Tata na biso ya likoló asalisaka mpe biso ndenge wana.
NDENGE OYO TATA NA BISO YA BOLINGO ASALISAKA BISO
10. Na kotalela Nzembo 66:19, 20, ndenge nini Yehova amonisaka ete alingaka biso?
10 Yehova ayokaka mabondeli na biso. (Tángá Nzembo 66:19, 20.) Alingi te tómityela bandelo na mabondeli na biso; asɛngi nde tóbondelaka mingi. (1 Tes. 5:17) Na limemya nyonso, tokoki kobondela Nzambe na biso ntango nyonso oyo tolingi, ata soki tozali wapi. Azangaka ntango te ya koyoka biso; atyaka ntango nyonso likebi na mabondeli na biso. Ntango tomonaka ndenge Yehova ayokaka mabondeli na biso, tokómaka kolinga ye lisusu mingi. Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Nalingaka mpenza ntango Yehova ayokaka mongongo na ngai.”—Nz. 116:1.
11. Ndenge nini Yehova ayanolaka na mabondeli na biso?
11 Tata na biso asukaka kaka te na koyoka mabondeli na biso, kasi ayanolaka mpe yango. Ntoma Yoane alobaki: “Ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano [ya Nzambe], akoyoka biso.” (1 Yoa. 5:14, 15) Ya solo, ntango mosusu Yehova akoyanola biso na ndenge oyo tozali kokanisa te. Lokola ayebi oyo eleki malamu mpo na biso, na bantango mosusu asalaka te likambo oyo tosɛngi, to mpe alingaka ete tózela.—2 Ko. 12:7-9.
12-13. Bamposa nini Tata na biso ya likoló akokiselaka biso?
12 Yehova akokisaka bamposa na biso. Yehova asalaka makambo oyo asɛngi batata nyonso básalaka. (1 Tim. 5:8) Akokisaka bamposa ya mosuni ya bana na ye. Alingi te tómitungisaka mpo na bilei, bilamba, to mpo na esika ya kolala. (Mat. 6:32, 33; 7:11) Lokola azali Tata ya bolingo, Yehova azwi mpe bibongiseli mpo na kokokisa bamposa na biso nyonso na mikolo ezali koya.
13 Oyo eleki ntina, Yehova akokisaka bamposa na biso ya elimo. Na nzela ya Liloba na ye, ayebisi biso solo na ntina na ye, mokano na ye, ntina oyo akelaki biso, mpe makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Atyelaki mokomoko na biso likebi ntango tobandaki koyekola solo, asalelaki baboti na biso to ndeko mosusu mpo na kosalisa biso tóyekola koyeba ye. Mpe tokobaka kozwa lisalisi ya malamu epai ya bankulutu oyo balingaka biso mpe epai ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bakɔmɛli na elimo. Longola yango, Yehova apesaka biso mateya na nzela ya makita ya lisangá, epai toyekolaka elongo na bandeko na biso ya elimo. Na nzela ya makambo yango mpe makambo mosusu, Yehova amonisaka ete azali Tata oyo atyelaka biso nyonso likebi.—Nz. 32:8.
14. Mpo na nini Yehova ateyaka biso, mpe ndenge nini asalaka yango?
14 Yehova ateyaka biso. Yesu azalaki moto ya kokoka, kasi biso tozali bato ya kozanga kokoka. Na yango, mpo na koteya biso, Tata na biso ya bolingo apesaka biso mpe disiplini soki esengeli. Liloba na ye ekundweli biso ete: “Yehova apesaka disiplini na moto oyo ye alingaka.” (Ebr. 12:6, 7) Yehova apesaka biso disiplini na ndenge mingi. Na ndakisa, likambo moko oyo totángi na Biblia to oyo toyoki na makita ekoki kosembola biso. To disiplini oyo tosengeli na yango ekoki kouta epai ya bankulutu. Ata soki Yehova apesi biso disiplini ya ndenge nini, asalaka yango kaka mpo alingaka biso.—Yir. 30:11.
15. Na ndenge nini Yehova abatelaka biso?
15 Yehova asalisaka biso tóyika mpiko na komekama. Kaka ndenge tata ya bolingo asalisaka bana na ye na ntango ya mpasi, Tata na biso ya likoló mpe asalisaka biso tóyika mpiko na komekama. Asalelaka elimo santu na ye Luka 11:13) Yehova abatelaka mpe biso na makambo oyo ekoki kobebisa makanisi na biso. Na ndakisa, apesi biso elikya moko kitoko. Elikya yango oyo etali bomoi na mikolo ezali koya esalisaka biso tóyika mpiko na mikakatano. Yebá likambo oyo: Ata soki makambo nini ya mabe ekómeli biso, Tata na biso ya bolingo akosilisa mpasi nyonso oyo tozali komona. Mikakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango ezali ya ntango mokuse, kasi mapamboli ya Yehova ekoumela libela na libela.—2 Ko. 4:16-18.
mpo na kobatela biso na makambo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na ye. (TATA NA BISO AKOSUNDOLA BISO ATA MOKOLO MOKO TE
16. Nini esalemaki ntango Adama azangaki botosi epai ya Tata na ye ya bolingo?
16 Tokoki komona ndenge Yehova alingaka biso soki tokanisi oyo asalaki ntango mikakatano ebimaki na libota na ye awa na mabele. Ntango Adama azangaki botosi epai ya Tata na ye ya likoló, abungisaki esika na ye na kati ya libota ya Yehova, kaka mpo na ye moko te kasi mpe mpo na bakitani na ye. (Rom. 5:12; 7:14) Kasi, Yehova asalaki likambo moko mpo na kosalisa bakitani ya Adama.
17. Mbala moko nsima ya botomboki ya Adama, Yehova alakaki nini?
17 Yehova apesaki Adama etumbu, kasi apesaki elikya mpo na bakitani ya Adama oyo bakoya na nsima. Alakaki mbala moko ete bato ya botosi bakozongisama na kati ya libota na ye. (Eba. 3:15; Rom. 8:20, 21) Mpo likambo yango ekokisama, Yehova abongisaki ete mbeka ya lisiko epesama na nzela ya Yesu, Mwana na ye ya bolingo. Ndenge Yehova apesaki Mwana na ye mpo na biso, amonisaki ete alingaka biso mingi.—Yoa. 3:16.
18. Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova alingi ete tózala bana na ye, ata soki totikaki Ye?
18 Atako tozali bato ya kozanga kokoka, Yehova Luka 15:11-32) Na ndakisa yango, tata azalaki kaka na elikya ete mokolo mosusu mwana na ye akozonga. Ntango mwana yango azongaki na ndako, tata ayambaki ye na esengo. Soki totiká Yehova kasi tobongoli motema, tóyeba ete Tata na biso ya bolingo azali pene mpo na koyamba biso.
alingi tózala na kati ya libota na ye, mpe amonaka te ete totyaka ye nkaka. Tokoki kopesa ye mawa to kobunga nzela mpo na mwa ntango, kasi Yehova azalaka kaka na elikya ete tokozongela ye. Yesu amonisaki bolingo makasi oyo Yehova alingaka bana na ye ntango apesaki ndakisa ya mwana oyo abungaki nzela. (19. Ndenge nini Yehova akobongisa mabe oyo ebimá mpo na Adama ?
19 Tata na biso akobongisa mabe nyonso oyo ebimá mpo na Adama. Nsima ya botomboki ya Adama, Yehova azwaki ekateli ya kopona bato 144 000 awa na mabele mpo bázala bakonzi mpe banganga-nzambe na likoló elongo na Mwana na ye, Yesu. Na mokili ya sika, Yesu ná bato oyo bakoyangela elongo na ye bakosalisa bato ya batosi bákóma bato ya kokoka. Bato oyo bakokwea te na komekama ya nsuka, Nzambe akopesa bango bomoi ya seko. Na ntango yango, Tata na biso akosepela komona mabele mobimba etondi na bana na ye ya mibali mpe ya basi oyo bazali bato ya kokoka. Ekozala ntango moko malamu mpenza!
20. Ndenge nini Yehova amonisi ete alingaka biso mingi, mpe tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
20 Yehova amonisi ete alingaka biso mingi. Azali Tata oyo aleki malamu. Ayokaka mabondeli na biso mpe akokisaka bamposa na biso, ezala ya mosuni to ya elimo. Ateyaka biso mpe asungaka biso. Abombeli biso mpe makambo ya malamu na mikolo oyo ezali koya. Koyeba ete Tata na biso alingaka biso mpe asalisaka biso epesaka biso esengo mingi! Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge oyo biso bana na ye tokoki komonisa botɔndi mpo na bolingo oyo alingaka biso.
LOYEMBO 108 Bolingo ya sembo ya Nzambe
^ par. 5 Mbala mingi, tomonaka Yehova ete azali Mozalisi mpe Nkolo Moyangeli na biso. Kasi tozali mpe na bantina ya komona ete azali Tata oyo alingaka biso mingi mpe asalisaka biso. Lisolo oyo elobeli bantina yango. Tokolobela mpe ntina oyo tokoki kondima ete Yehova akosundola biso ata mokolo moko te.
^ par. 59 ELILINGIS: Na bililingi yango minei, mokomoko ezali komonisa tata moko ná mwana na ye: tata moko azali koyoka mwana na ye ya mobali na likebi, tata moko apesi mwana na ye ya mwasi biloko ya kolya, tata moko azali koteya mwana na ye, mpe tata moko azali kobɔndisa mwana na ye. Elilingi ya lobɔkɔ ya Yehova na nsima ya bililingi yango ezali kokundwela biso ete Yehova mpe asalaka bongo mpo na biso.