Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 9

Saleláká basusu na ndakisa ya Yesu

Saleláká basusu na ndakisa ya Yesu

“Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—MIS. 20:35.

LOYEMBO 17 “Nalingi”

NA MOKUSE *

1. Elimo nini ya malamu emonanaka epai ya basaleli ya Yehova?

 BIBLIA esakolaki ete basaleli ya Nzambe “bakomipesa na bolingo na bango moko” mpo na kosalela Yehova na nse ya litambwisi ya Mwana na ye. (Nz. 110:3) Esakweli yango ezali mpenza kokokisama lelo oyo. Mbula na mbula, basaleli ya Yehova ya molende balekisaka bamilio ya bangonga na mosala ya kosakola. Basalaka yango na bolingo na bango moko, mpe bafutaka bango te mpo na mosala yango. Basalelaka mpe ntango na bango mpo na kosalisa bandeko na bango bakristo bázwa biloko oyo basengeli na yango, kolendisa bango, mpe kosalisa bango bákóma na kondima makasi. Bankulutu mpe basaleli na misala balekisaka bangonga ebele na kobongisa masolo oyo bakosala na makita mpe bakendaka kotala bandeko mpo na kolendisa bango. Nini etindaka bango básalaka mosala nyonso wana? Ezali bolingo; bolingo mpo na Yehova mpe mpo na bato.​—Mat. 22:37-39.

2. Ndenge Baroma 15:1-3 emonisi yango, ndakisa nini Yesu atiká?

2 Yesu atiká ndakisa ya malamu na oyo etali kotya matomba ya basusu liboso ya oyo ya ye moko. Tosalaka makasi tólanda ndakisa na ye. (Tángá Baroma 15:1-3.) Baoyo bamekolaka ye bakozwa matomba. Yesu alobaki: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Mis. 20:35.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Na lisolo oyo, tokolobela makambo mosusu oyo Yesu amipimelaki mpo na kosalela basusu mpe tokotalela ndenge oyo tokoki kolanda ndakisa na ye. Tokolobela mpe ndenge oyo tokoki kokolisa lisusu mposa ya kosalela basusu.

LANDÁ NDAKISA YA YESU

Atako Yesu alɛmbaki, asalaki nini ntango ebele ya bato bayaki epai na ye? (Talá paragrafe 4)

4. Ndenge nini Yesu atyaki matomba ya basusu liboso ya oyo ya ye moko?

4 Yesu asalelaki basusu ata na ntango oyo alɛmbaki. Kanisá ndenge Yesu asalaki ntango ebele ya bato bayaki epai na ye pembeni ya ngomba moko, mbala mosusu pene na Kapernaume. Yesu alekisaki butu mobimba na kobondela. Na ntembe te alɛmbaki mingi, kasi ntango amonaki ebele yango ya bato, ayokelaki babola mpe bato ya maladi oyo bazalaki kati na bango mawa. Asukaki kaka na kobikisa bango te, kasi asalaki mpe moko ya masolo ya kafukafu oyo etiká nsango, elingi koloba Lisolo likoló ya Ngomba.​—Luka 6:12-20.

Ndenge nini tokoki komekola elimo ya komipimela ya Yesu na bomoi na biso? (Talá paragrafe 5)

5. Ndenge nini batata ya mabota balandaka elimo ya Yesu ya komipimela ntango balɛmbi?

5 Ndenge oyo batata ya mabota bamekolaka Yesu. Tótalela ndakisa oyo: Nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala, tata ya libota moko azongi na ndako, alɛmbi mingi. Atako akómi na makanisi ete Losambo na kati ya libota esalema te na mpokwa yango ndenge babongisá, asɛngi Yehova apesa ye makasi atambwisa boyekoli yango. Yehova ayanoli na libondeli na ye, boyekoli na bango esalemi ndenge ezalaka pɔsɔ nyonso. Na mpokwa yango, bana na ye bayekoli liteya moko ya ntina: mpo na baboti na bango, makambo ya elimo ezali na ntina koleka makambo mosusu nyonso.

6. Ndakisa nini emonisi ete Yesu azalaki kopesa ntango na ye mpo na kosalisa basusu?

6 Yesu azalaki kopesa basusu ntango na ye moko. Okoki kokanisa ndenge oyo Yesu amiyokaki ntango ayebaki ete babomi moninga na ye Yoane Mobatisi? Na ntembe te Yesu ayokaki mawa makasi. Biblia elobi: “Ntango Yesu ayokaki [ete Yoane Mobatisi akufi], alongwaki wana na masuwa akei na esika oyo bato bazalaki te mpo azala ye moko.” (Mat. 14:10-13) Tokoki komona ntina oyo alingaki kozala ye moko. Bato mosusu balingaka kozala bango moko ntango bazali na mawa. Kasi, ezalaki mpasi mpo Yesu azala ye moko. Ebele ya bato bakómaki na esika yango liboso na ye. Yesu asalaki nini? Akanisaki bamposa ya ebele yango ya bato, mpe “mawa ekangaki ye” mpo na bango. Amonaki ete bazalaki mpenza na mposa ya kobɔndisama na elimo, mpe abandaki mbala moko kokokisa mposa yango. Kutu, “abandaki koteya bango [kaka makambo moke te, kasi] makambo mingi.”​—Mrk. 6:31-34; Luka 9:10, 11.

7-8. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge bankulutu bamekolaka Yesu ntango bandeko ya lisangá bazali na mposa ya lisalisi.

7 Ndenge oyo bankulutu bamekolaka Yesu. Tozalaka na botɔndi mingi ndenge bankulutu bamipimelaka makambo mosusu mpo na kosalisa biso! Misala mingi oyo basalaka, bandeko ya lisangá bayebaka yango te. Na ndakisa, ntango ndeko moko oyo azali kobɛla azali na mposa ya lisalisi nokinoki, bandeko ya Komite ya boyokani na minganga basalisaka mbala moko. Mbala mingi, mposa ya lisalisi ya ndenge wana ebimaka na butu! Kasi mawa oyo bazalaka na yango mpo na bandeko etindaka bankulutu yango, elongo na bato ya mabota na bango, bátya matomba ya bandeko ya lisangá liboso ya oyo ya bango moko.

8 Bankulutu mosusu bapesaka mabɔkɔ na mosala ya botongi ya Bandako ya Bokonzi mpe bandako mosusu ya losambo, to na bakomite ya kosalisa bandeko na ntango ya likama. Bankulutu balekisaka mpe ntango na bango mingi mpo na koteya mpe kolendisa bandeko ya masangá na bango. Ebongi mpenza tópesa bandeko yango nyonso mpe bato ya mabota na bango longonya oyo euti na motema. Tiká Yehova azala na bango mpo na elimo oyo bamonisaka! Nzokande, kaka ndenge ezalaka mpo na bato nyonso, bankulutu basengeli kozala na bokatikati. Basengeli te kolekisa ntango nyonso na makambo ya lisangá, mpe kobosana bamposa ya mabota na bango.

NDENGE YA KOKÓMA NA ELIMO YA KOMIPIMELA

9. Na kotalela Bafilipi 2:4, 5, elimo nini bakristo nyonso basengeli kokolisa?

9 Tángá Bafilipi 2:4, 5. Ya solo, biso nyonso tozali bankulutu te, kasi biso nyonso tokoki koyekola komekola elimo ya komipimela ya Yesu. Biblia elobi ete “akómaki lokola moombo.” (Flp. 2:7) Kanisá naino ndimbola ya maloba yango. Moombo to mosali ya malamu alukaka mabaku ya kosepelisa nkolo na ye. Lokola ozali moombo ya Yehova mpe olingaka kosalela bandeko, na ntembe te mposa na yo ezali ete okóma lisusu na ntina mingi mpo na Yehova mpe bandeko na yo. Mpo na yango, otya likebi na makanisi oyo elandi.

10. Mituna nini tokoki komituna?

10 Talelá makanisi na yo. Omituna mituna lokola: ‘Nandimaka mpenza kotika makambo na ngai pembeni mpo na kosalisa basusu? Na ndakisa, nasalaka nini soki basɛngi ngai nakende kotala ndeko mobali moko ya mobange oyo afandaka na ndako oyo babatelaka mibange, to nakende kozwa ndeko mwasi moko ya mobange mpo namema ye na makita? Nandimaka mbala moko kopesa mabɔkɔ ntango basɛngi bato bákende kotya bopɛto na esika oyo liyangani ekosalema to mpo na kobongisa Ndako ya Bokonzi?’ Yehova asepelaka ntango tozali komipimela mpe kopesa ntango na biso mpe biloko oyo tozali na yango mpo na kosalisa basusu, mpo yango nde tolakaki ntango tomipesaki na ye. Tokosala nini soki tomoni ete tosengeli kobongisa makambo mosusu?

11. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso tokolisa elimo ya komipimela?

11 Bondelá Yehova na motema mobimba. Soki omoni ete osengeli kobongisa makambo mosusu na oyo etali komonisa elimo ya komipimela, kasi ozali koyeba te obanda wapi, okoki kosala nini? Bondelá Yehova na motema mobimba. Kobombela ye eloko te. Yebisá ye ndenge oyo ozali komiyoka, mpe sengá ye asalisa yo mpo ‘olinga mpe osala.’​—Flp. 2:13.

12. Ndenge nini elenge mobali oyo azwá batisimo akoki kosalisa lisangá na bango?

12 Soki ozali elenge mobali mpe ozwá batisimo, sengá Yehova asalisa yo okolisa mposa ya kosala mingi na lisangá. Na bikólo mosusu, motángo ya bankulutu eleki ya basaleli na misala, mpe basaleli na misala yango mingi bakómi mikóló. Lokola ebongiseli ya Yehova ezali se kokóma monene, tozali na mposa ya bilenge mibali mpo na kosalisa biso na kobatela bato ya Yehova. Soki ondimi kosala nyonso oyo basɛngi yo, okozala na esengo. Mpo na nini? Mpo okosepelisa Yehova, okomisalela nkombo malamu, mpe okoyoka esengo oyo eutaka na kosalisa basusu.

Bakristo ya Yudea bakatisaki Ebale Yordani mpo na kokima na engumba Pela. Baoyo bakómaki na engumba yango liboso bazali kokabolela bakristo oyo bauti kokóma biloko ya kolya (Talá paragrafe 13)

13-14. Makambo nini tokoki kosala mpo na kosalisa bandeko na biso? (Talá elilingi ya ezipeli.)

13 Tyáká likebi na bamposa ya bandeko. Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya Yudea boye: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” (Ebr. 13:16) Ezalaki toli ya malamu mpenza! Mwa moke nsima ya kozwa mokanda yango, bakristo yango basengelaki kotika bandako na bango, mombongo na bango mpe bandeko ya mabota na bango oyo bazali bakristo te, mpe basengelaki ‘kobanda kokima na bangomba.’ (Mat. 24:16) Na ntembe te, wana ezalaki mpenza ntango oyo basengelaki kosalisana. Soki bamesanaki kosalela toli ya ntoma Paulo ya kokabela basusu biloko oyo bazalaki na yango, boye ezalaki mpasi te mpo bámesana na bomoi na bango ya sika.

14 Na bantango mosusu, bandeko bakoyebisa biso te biloko oyo basengeli na yango. Na ndakisa, kanisá ete mwasi ya ndeko mobali moko akufi. Ndeko mobali yango azali nde na mposa ya lisalisi mpo na biloko ya kolya, mpo na motuka, to mpo na misala ya ndako? Mbala mosusu akosɛnga eloko te mpo aboyi kotungisa biso. Kasi akoki kosepela mingi soki biso moko tozwi makanisi mpe tosɛngi tósalisa ye. Tosengeli kokanisa te ete bamposa na ye nyonso ekokokisama kaka na ndenge moko boye, to ete soki azali na mposa ya lisalisi akosɛnga tósalisa ye. Omituna boye: ‘Soki nazalaki na mokakatano ya ndenge wana, lisalisi nini nalingaki kosepela bápesa ngai?’

15. Mpo tómonisa elimo ya komipimela, tosengeli kosala nini?

15 Salá ete basusu bábanga te kosɛnga yo lisalisi. Na ntembe te na lisangá na bino oyebi bandeko oyo bazalaka ntango nyonso pene mpo na kosalisa basusu. Bamonaka te ete tozali kotungisa bango. Toyebi ete tokoki kokende epai na bango ntango tozali na mposa ya lisalisi, mpe tolingaka kozala lokola bango! Alan, nkulutu moko ya mbula mwa moke koleka 40 alingaka kosala ete basusu bábangaka te kosɛnga ye lisalisi. Alan akanisaki ndakisa ya Yesu, mpe alobaki boye: “Yesu azalaki na makambo mingi ya kosala, kasi bato, ata ya mbula nini, bazalaki kosepela koya epai na ye mpe bazalaki kobanga te kosɛnga ye lisalisi. Bayebaki ete azalaki mpenza kotyela bango likebi. Nalingi mpenza kozala lokola Yesu; nayebana lokola moto oyo bato babangaka te kosɛnga lisalisi, oyo alingaka basusu mpe atyelaka bango likebi.”

16. Ndenge nini kosalela maloba ya Nzembo 119:59, 60 ekoki kosalisa biso tólanda ndakisa ya Yesu malamumalamu?

16 Tosengeli kolɛmba nzoto te soki tozali kokoka te komekola Yesu na ndenge ya kokoka. (Yak. 3:2) Moto oyo azali koyekola kosala mayemi akoki te komekola na ndenge ya kokoka liyemi ya molakisi. Kasi soki moyekoli yango azali komona bisika oyo asali mabunga mpe azali kosala makasi alanda mpenza ndakisa ya molakisi, moyekoli yango akokoba kobongisa mosala na ye. Ndenge moko mpe, soki tozali kosalela makambo oyo toyekoli na boyekoli na biso moko ya Biblia, mpe tosali makasi mpo tóbongisa makambo oyo tosengeli kobongisa, tokokoka kolanda ndakisa oyo Yesu atikelá biso.​—Tángá Nzembo 119:59, 60.

MATOMBA YA KOMONISA ELIMO YA KOMIPIMELA

Ntango bankulutu bazali komekola elimo ya komipimela ya Yesu, bazali kopesa bilenge ndakisa oyo bakoki kolanda (Talá paragrafe 17) *

17-18. Matomba nini tokozwa soki tomekoli elimo ya komipimela oyo Yesu amonisaki?

17 Soki tozali na elimo ya komipimela, basusu bakoki komekola biso. Nkulutu moko na nkombo Tim, alobi boye: “Tozali na bandeko mibali oyo bakoli na elimo mpe bakómi basaleli na misala, bamosusu na bolenge mpenza. Eloko mosusu oyo esalisaki bango ezali ete bamekolaki elimo ya kosalisa basusu, oyo bazalaki komona epai ya bandeko mosusu. Bilenge yango basalisaka mingi na lisangá mpe bapesaka mpenza bankulutu mabɔkɔ.”

18 Lelo oyo, bato mingi na mokili bazali na ezaleli ya moyimi. Kasi biso basaleli ya Yehova tokeseni na bango. Elimo ya komipimela oyo Yesu amonisaki esimbaka mpenza mitema na biso, mpe tozali na ekateli ya kolanda ndakisa na ye. Tokoki kolanda matambe na ye na ndenge ya kokoka te, kasi tokoki ‘kolanda yango malamumalamu.’ (1 Pet. 2:21) Soki tozali kosala oyo tokoki mpo na komekola elimo ya komipimela oyo Yesu amonisaki, biso mpe tokozala na esengo mpo Yehova akondima biso.

LOYEMBO 13 Kristo, ndakisa na biso

^ par. 5 Yesu azalaki ntango nyonso koluka libosoliboso bolamu ya basusu. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo tokoki kolanda ndakisa na ye. Tokolobela mpe ndenge oyo komekola elimo ya komipimela oyo Yesu amonisaki ekomemela biso matomba ya libela na libela.

^ par. 57 ELILINGI: Dan, ndeko mobali moko oyo azali elenge, azali kotala ndenge bankulutu mibale bayei kotala tata na ye na lopitalo. Ndakisa malamu ya bankulutu yango esimbi motema ya Dan. Ye mpe akómi kotya likebi na bamposa ya bandeko na lisangá. Ben, ndeko mobali mosusu ya elenge, azali kotala ndenge Dan azali kosalisa basusu. Ndakisa ya Dan elendisi Ben apesa mabɔkɔ na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi.