Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kozala moninga ya solosolo

Ndenge ya kozala moninga ya solosolo

OSILÁ kokutana na mikakatano mpe omonaki ete osengeli kobundana na yango kaka yo moko? Tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano” oyo ekoki kosala ete tólɛmba nzoto mpe tómona ete tozali na moto te. (2 Tim. 3:1) Kasi, tosengeli te kobundana na mikakatano ya bomoi kaka biso moko. Biblia emonisi ntina ya kozala na baninga ya solosolo na “bantango ya mpasi.”—Mas. 17:17.

NDENGE OYO BANINGA YA SOLOSOLO BAKOKI KOSALISA

Atako Paulo azalaki na ndako ya bokangami, akokisaki mosala na ye na lisalisi ya baninga na ye

Ntoma Paulo azwaki lisalisi epai ya baninga na ye oyo azalaki na bango na mibembo na ye. (Kol. 4:​7-11) Ntango Paulo azalaki mokangami na Roma, baninga na ye basalaki misala oyo azalaki na likoki te ya kosala ye moko. Na ndakisa, Epafrodite amemelaki Paulo biloko oyo asengelaki na yango, oyo bandeko ya Filipi batindaki. (Flp. 4:18) Tishike amemaki mikanda ya Paulo na masangá ndenge na ndenge. (Kol. 4:7) Na lisalisi ya baninga na ye, Paulo akobaki na mosala na ye ezala ntango azalaki na ndako ya bokangami to ntango azalaki ye moko na bolɔkɔ. Ndenge nini okoki kozala moninga ya solosolo lelo oyo?

Bandakisa ya mikolo na biso emonisi ntina ya kozala moninga ya solosolo. Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo amonisaki ete azali moninga malamu mpo na Elisabet, mobongisi-nzela moko ya sanza na sanza na Espagne. Ntango bazwaki mama ya Elisabet na maladi ya kansɛr, ndeko mwasi yango atindelaki Elisabet bamesaje mingi oyo ezalaki na bavɛrsɛ ya kolendisa. Elisabet alobi boye: “Bamesaje yango ezalaki kopesa ngai makasi ya koyika mpiko mokolo na mokolo kozanga namiyoka ete nazali ngai moko.”—Mas. 18:24.

Tokokómisa boninga na biso makasi ná bandeko na biso bakristo soki tozali kopesa bango mabɔkɔ na makambo ya elimo. Na ndakisa, okoki kosɛnga ete okende kozwa ndeko moko ya mobange mpe omema ye na makita to na mosala ya kosakola? Soki osali bongo, na ntembe te bokolendisana. (Rom. 1:12) Kasi, bandeko mosusu bakɔtá ndako. Ndenge nini tokoki kozala moninga ya solosolo mpo na bango?

ZALÁ MONINGA YA SOLOSOLO MPO NA BAOYO BAKƆTÁ NDAKO

Bandeko na biso mosusu bazali na mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto to na makambo mosusu oyo epekisaka bango koyangana na makita na miso boye. Tótalela ndakisa ya ndeko David, oyo bazwaki ye na maladi ya kansɛr na makila. Azwaki lisalisi ya chimiothérapie na boumeli ya sanza motoba. Na ntango yango, David ná mwasi na ye, Lidia, bazalaki koyangana na makita na nzela ya video.

Lisalisi nini bazwaki epai ya baninga na bango na lisangá? Nsima ya likita nyonso, bandeko oyo bayanganaki na Ndako ya Bokonzi bazalaki kosala makasi ya kosolola na David ná mwasi na ye Lidia na nzela ya video. Lisusu, soki David ná Lidia bapesi bakomantɛrɛ, na nsima bandeko bazalaki kotindela bango bamesaje ya kolendisa. Yango ebimisaki nini? David ná Lidia bamiyokaki pene ya bandeko na bango.

Sakoláká elongo na baoyo bakɔtá ndako

Tokoki mpe kosakola elongo na baoyo bakɔtá ndako! Soki tobongoli mwa moke programɛ na biso, tokomonisa ete tobosani te baoyo bazali na mokakatano ya bongo. (Mas. 3:27) Mpo na nini te osala programɛ ya kosakola elongo na bango na nzela ya mikanda to ya telefone? Baoyo bakɔtá ndako bakoki koyangana na makita mpo na mosala ya kosakola na nzela ya video. David ná Lidia basepelaki na ebongiseli yango. David alobi: “Kozala kaka mpo na ntango moke elongo na bandeko ya etuluku na biso ya mosala ya kosakola mpe kobondela elongo ezalaki kolendisa biso mingi mpenza.” Lisusu, soki ekozala mabe te, mikolo mosusu okoki kosɛnga ndeko oyo akɔtá ndako omema moyekoli ya Biblia epai na ye mpo bóyekola wana!

Ntango tozali kosala elongo na bandeko na biso oyo bakɔtá ndako mpe tomoni bizaleli na bango ya malamu, ekokómisa boninga na biso ná bango makasi. Na ndakisa, ntango osakoli elongo na bandeko yango mpe omoni ndenge basaleli malamu Liloba ya Nzambe mpo na kosimba motema ya moto, na ntembe te okosepela na bango lisusu mingi. Soki ozali kosalisa bandeko na makambo ya elimo, okoki kokóma na baninga mingi.—2 Ko. 6:13.

Paulo abɔndisamaki ndenge azalaki elongo na moninga na ye Tito. (2 Ko. 7:​5-7) Lisolo yango ekundwelaka biso ete tokoki kobɔndisa basusu kaka te na koloba ete tozali komitya na esika na bango, kasi mpe soki tozali wana elongo na bango mpe tozali kosala oyo tokoki mpo na kosalisa bango.—1 Yoa. 3:18.

ZALÁ MONINGA YA SOLOSOLO NA NTANGO YA MINYOKO

Bandeko na biso na Russie bazali mpenza ndakisa malamu na oyo etali kosalisana. Tótalela ndakisa ya Sergey ná mwasi na ye, Tatyana. Bapolisi balukalukaki na ndako na bango, mpe na nsima bamemaki bango mpo na kotuna bango mituna. Batikaki Tatyana liboso mpe azongaki na ndako. Sergey alobi boye: “Ntango kaka [Tatyana] akómaki na ndako, ndeko mwasi moko ya mpiko ayaki kotala ye. Baninga mosusu mingi bayaki mpe basalisaki biso na kozongisa biloko na bisika na yango.”

Sergey abakisi: “Nalingaka ntango nyonso Masese 17:​17, oyo elobi: ‘Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso mpe azali ndeko oyo abotami mpo na bantango ya mpasi.’ Nakangi lisusu ntina malamu ya maloba yango na ntango oyo ya minyoko, ntango oyo nazali na likoki te ya koyikela mokakatano yango mpiko ngai moko. Yehova apesi ngai baninga ya mpiko oyo bazali elongo na ngai.” a

Wana tozali se kokutana na makambo ya mpasi, tozali na mposa baninga básalisa biso. Tokozala na mposa na bango kutu mingi na ntango ya bolɔzi monene. Yango wana tósala nyonso mpo na kozala moninga ya solosolo banda sikoyo!—1 Pe. 4:​7, 8