LISOLO YA BOYEKOLI 19
Eloko moko te ekoki kobɛtisa moyengebene libaku
“Baoyo bazali kolinga mobeko na yo bazali na kimya mingi, mpe eloko ya kobɛtisa bango libaku ezali te.”—NZ. 119:165.
LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!
NA MOKUSE *
1-2. Mokomi moko alobi nini, mpe tokotalela nini na lisolo oyo?
LELO oyo, bamilio ya bato balobaka ete bandimelaka Yesu nzokande batosaka te makambo oyo ateyaki. (2 Tim. 4:3, 4) Kutu mokomi moko alobaki boye: “Soki lelo oyo ezalaki na moto mosusu lokola Yesu awa na mabele, oyo alobaka makambo ndenge Yesu alobaki . . . , tolingaki koboya moto yango kaka ndenge bato baboyaki Yesu na ntango ya kala? . . . Eyano ezali: Ɛɛ, bato balingaki koboya ye.”
2 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, bato mingi bayokaki ndenge azalaki koteya mpe bamonaki ndenge azalaki kosala makamwisi, kasi baboyaki kondimela ye. Mpo na nini? Na lisolo oyo eleki tomonaki bantina minei oyo esalaki ete bato bábɛta libaku mpo na makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki. Tólobela bantina mosusu minei. Tokomona mpe ntina oyo etindaka bato báboya bayekoli ya Yesu lelo oyo, mpe ntina oyo tosengeli kotika eloko moko te ebɛtisa biso libaku.
(1) YESU AZALAKI KOPONA BILONGI TE
3. Makambo nini Yesu asalaki oyo etindaki bato mosusu báboya ye?
3 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, alekisaki ntango elongo na bato ya lolenge nyonso. Azalaki kolya elongo na bato oyo bazalaki na bozwi mpe bato ya lokumu, kasi azalaki mpe kolekisa ntango na ye mingi elongo na babola mpe bato oyo bazalaki na moto ya kosalisa bango te. Lisusu, azalaki koyokela baoyo bazalaki kobengama basumuki mawa. Bato mosusu ya lolendo baboyaki Yesu mpo na makambo oyo asalaki. Batunaki bayekoli na ye boye: “Mpo na nini bozali kolya mpe komɛla elongo na bakɔngɔli-mpako mpe basumuki?” Yesu ayanolaki bango: “Bato Luka 5:29-32.
ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde baoyo bazali kobɛla. Nayei kobenga bayengebene te, kasi basumuki mpo bábongola motema.”—4. Ndenge mosakoli Yisaya amonisaki yango, Bayuda basengelaki koyeba makambo nini mpo na Masiya?
4 Oyo Makomami elobi. Bambula mingi liboso Masiya aya, mosakoli Yisaya alobaki ete bato mingi bakondimela ye te. Asakolaki boye: “Azalaki kotyolama mpe bato bazalaki kokima ye . . . Ezalaki lokola nde tozali koboya kotala elongi ya moto moko boye. Atyolamaki, mpe tomonaki ye mpamba.” (Yis. 53:3) Esakweli elobaki ete “bato” bakoboya Masiya, yango wana Bayuda ya siɛklɛ ya liboso basengelaki koyeba ete bato bakoboya Yesu.
5. Ndenge nini bato mingi lelo oyo batalelaka bayekoli ya Yesu?
5 Yango mpe esalemaka lelo oyo? Ɛɛ. Bakonzi mingi ya mangomba basepelaka ntango bato ya lokumu, ya bozwi, mpe oyo mokili emonaka ete bazali bato ya bwanya bakɔtaka na mangomba na bango. Bandimaka ete bato yango bákóma bandimi ya mangomba na bango ata soki bizaleli mpe lolenge ya bomoi ya bato yango eyokani te na mibeko ya Nzambe. Bakonzi ya mangomba yango batyolaka basaleli ya Yehova ya molende oyo bazalaka na etamboli ya malamu kaka mpo bato mingi ya mokili bamonaka ete tozali na ntina te. Ndenge kaka Paulo alobaki, Nzambe aponi “biloko oyo etyolami.” (1 Ko. 1:26-29) Kasi na miso ya Yehova, basaleli na ye nyonso ya sembo bazalaka na motuya mingi.
6. Na kotalela Matai 11:25, 26, ndenge nini tokoki komekola Yesu?
6 Oyo tokoki kosala mpo tóbɛta libaku te. (Tángá Matai 11:25, 26.) Kolanda te makanisi oyo mokili ezalaka na yango mpo na basaleli ya Nzambe. Kobosana te ete Yehova asalelaka kaka bato ya komikitisa mpo na kosala mokano na ye. (Nz. 138:6) Mpe kanisá ebele ya makambo oyo Yehova asali na nzela ya bato oyo mokili emonaka ete bazali na bwanya te, to mpe batángá te.
(2) YESU AMONISAKI POLELE MATEYA YA LOKUTA
7. Mpo na nini Yesu abengaki Bafarisai bakosi, mpe basalaki nini?
7 Na mpiko nyonso, Yesu apamelaki bakonzi ya mangomba ya mikolo na ye mpo bazalaki te koteya bato básambela Yehova na ndenge ebongi. Na ndakisa, amonisaki polele bokosi ya Bafarisai oyo bazalaki komitungisa mingi na likambo etali kosukola mabɔkɔ na bango, na esika bámitungisa mpo na baboti na bango. (Mat. 15:1-11) Ekoki kozala ete bayekoli na ye bakamwaki ntango alobaki bongo. Yango wana batunaki ye: “Oyebi ete Bafarisai babɛti libaku ntango bayokaki makambo oyo olobi?” Yesu ayanolaki bango: “Nzete nyonso oyo Tata na ngai ya likoló aloni te ekopikolama. Bótika bango. Bazali batambwisi oyo bakufá miso. Boye, soki moto oyo akufá miso azali kotambwisa moto oyo akufá miso, bango mibale bakokwea na libulu.” (Mat. 15:12-14) Yesu atikaki te ete makanisi mabe oyo bakonzi ya mangomba bazalaki na yango epekisa ye koloba solo.
8. Ndenge nini Yesu amonisaki ete Nzambe andimaka te mateya nyonso ya mangomba?
8 Yesu amonisaki mpe polele ete mateya mosusu ya mangomba ezalaki ya lokuta. Alobaki te ete Nzambe andimaka mateya nyonso ya mangomba. Kasi alobaki nde ete bato mingi bazali na nzela ya monene mpe oyo efungwamá, oyo ememaka na libebi. Nzokande, ezali kaka na bato moke oyo bazali na nzela ya nkaka oyo ememaka na bomoi. (Mat. 7:13, 14) Amonisaki polele ete bato mosusu bakoloba ete basalelaka Nzambe, nzokande basalelaka ye te. Alobaki boye: “Bókeba na basakoli ya lokuta oyo bazali koya epai na bino balati mposo ya mpate, kasi na kati bazali nde bambwa ya zamba ya lokoso. Bokoyeba bango na mbuma na bango.”—Mat. 7:15-20.
9. Wapi mateya mosusu ya lokuta ya mangomba oyo Yesu amonisaki polele?
9 Oyo Makomami elobi. Esakweli ya Biblia elobaki mpo na Masiya ete molende mpo na ndako ya Yehova ekolya ye. (Nz. 69:9; Yoa. 2:14-17) Molende yango etindaki Yesu amonisa polele mateya ya lokuta ya mangomba mpe misala na yango. Na ndakisa, Bafarisai bazalaki kondima ete molimo ekufaka te, kasi Yesu ateyaki ete bakufi balali mpɔngi. (Yoa. 11:11) Basadukai bazalaki kondimela lisekwa te, kasi Yesu asekwisaki moninga na ye Lazare. (Yoa. 11:43, 44; Mis. 23:8) Bafarisai bazalaki kondima ete makambo nyonso etángamá mpe ebongisamá na Nzambe; kasi Yesu ateyaki ete bato bakoki kopona kosalela Nzambe to te.—Mat. 11:28.
10. Mpo na nini mateya na biso etindaka bato mingi báboya biso?
10 Yango mpe esalemaka lelo oyo? Ɛɛ. Bato mingi baboyaka biso mpo tosalelaka Biblia mpo na komonisa bango ete mateya mosusu ya mangomba ezali ya lokuta. Bakonzi ya mangomba bateyaka bandimi na bango ete Nzambe apesaka bato mabe etumbu na lifelo ya mɔtɔ. Basalelaka mateya yango ya lokuta mpo na kokonza bato. Lokola biso basaleli ya Yehova tosambelaka Nzambe ya bolingo, tosalisaka bato báyeba ete mateya yango ezali lokuta. Bakonzi ya mangomba bateyaka mpe ete molimo ekufaka te. Soki liteya yango ezalaka ya solo, mbɛlɛ moto moko te alingaki kozala na mposa ete asekwisama. Tomonisaka bato polele ete liteya yango ezali na Biblia te. Lisusu, atako mangomba mingi eteyaka ete nguya moko boye to mpe Nzambe nde abongisá liboso makambo nyonso oyo tosalaka, toteyaka bato ete moto azali na bonsɔmi ya kopona mpe akoki kopona kosalela Nzambe to te. Bakonzi ya mangomba basalaka nini ntango tomonisaka polele mateya yango ya lokuta? Mbala mingi basilikaka!
11. Na kotalela maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 8:45-47, Nzambe asɛngaka nini epai ya basaleli na ye?
11 Oyo tokoki kosala mpo tóbɛta libaku te. Soki tolingaka solo, tosengeli kondimela maloba ya Nzambe mpe kotosa yango. (Tángá Yoane 8:45-47.) Na kokesana na Satana Zabolo, tokotika solo ata mokolo moko te. Tokoboya kosala likambo nyonso oyo eyokani te na mateya oyo tondimaka. (Yoa. 8:44) Nzambe asɛngi basaleli na ye ‘báyina oyo ezali mabe’ mpe ‘bákangama na oyo ezali malamu,’ kaka ndenge Yesu asalaki.—Rom. 12:9; Ebr. 1:9.
(3) YESU ANYOKWAMAKI
12. Mpo na nini lolenge oyo Yesu akufaki ebɛtisaki Bayuda mingi libaku?
12 Makambo nini mosusu etindaki Bayuda ya mikolo ya Yesu bábɛta libaku? Paulo alobaki: “Biso tozali nde kosakola Kristo abakami na nzete, likambo oyo ezali kobɛtisa Bayuda libaku.” (1 Ko. 1:23) Mpo na nini ndenge oyo Yesu akufaki likoló ya nzete ya mpasi ebɛtisaki Bayuda mingi libaku? Mpo na bango, ndenge oyo Yesu abakamaki likoló ya nzete ya mpasi emonisaki ete azalaki Masiya te, kasi nde mosali-mabe mpe mosumuki.—Mib. 21:22, 23.
13. Makambo nini baoyo babɛtaki libaku mpo na Yesu baboyaki koyeba?
13 Bayuda oyo babɛtaki libaku mpo na Yesu baboyaki koyeba ete azalaki na ngambo te, ete bakoselaki ye makambo, mpe ete basalelaki ye makambo na kozanga bosembo. Baoyo basambisaki Yesu basalaki yango te na kolanda ndenge mibeko esɛngaki. Bazuzi ya tribinale monene ya Bayuda bayanganaki nokinoki mpo na kosambisa Yesu, mpe basambisaki ye te na kolanda mibeko. (Luka 22:54; Yoa. 18:24) Bazuzi yango bazalaki sembo te ntango bayokaki makambo oyo bato bafundaki Yesu mpo na yango, mpe makambo oyo bato balobaki. Lisusu, bango moko mpe balukaki “batatoli ya lokuta bákosela Yesu makambo mpo báboma ye.” Kasi lokola likambo yango esimbaki te, nganga-nzambe monene alukaki kotinda Yesu aloba likambo moko ya mabe oyo ekotinda bango baloba ete azali na ngambo. Likambo yango mpe eyokanaki ata moke te na mibeko. (Mat. 26:59; Mrk. 14:55-64) Mpe nsima ya lisekwa ya Yesu, bazuzi yango oyo bazalaki sembo te bafutaki basoda ya Roma “shekele ya palata oyo ekoki mpenza” mpo bápanza bansango ya lokuta mpe bámonisa ntina oyo lilita ya Yesu etikalaki mpamba.—Mat. 28:11-15.
14. Makomami esakolaki nini mpo na liwa ya Masiya?
14 Oyo Makomami elobi. Atako Bayuda mingi Yis. 53:12) Na yango, Bayuda bazalaki te na ntina ya kobɛta libaku ntango Yesu abomamaki lokola mosumuki.
na mikolo ya Yesu bazalaki komizela te ete Masiya akokufa, talá makambo oyo Makomami esakolaki: “Asopaki molimo na ye kino na liwa, mpe atángamaki nde elongo na bato oyo babukaka mibeko; mpe ye moko amemaki lisumu ya bato ebele, mpe akómaki kokɔtela bato oyo babukaka mibeko.” (15. Makambo nini bafundaka na yango Batatoli ya Yehova oyo etindi bato mosusu báboya bango?
15 Yango mpe esalemaka lelo oyo? Ɛɛ. Bafundaki Yesu, mpe basambisaki ye na ndenge ya kozanga bosembo; yango mpe bato mingi basalaka Batatoli ya Yehova lelo oyo. Tótala mwa bandakisa. Na boumeli ya bambula ya 1930 mpe ya 1940 na États-Unis, tosambaki makambo mingi na batribinale mpo na kolongisa bonsomi na biso ya losambo. Bazuzi mosusu bazalaki komonisa polele ete balingaka biso te. Na engumba Québec, na Canada, bakonzi ya mangomba mpe ya Leta bapesanaki mabɔkɔ mpo na kotɛmɛla mosala na biso. Bakɔtisaki basakoli mingi na bolɔkɔ kaka mpo bazalaki koyebisa baninga na bango ya kartye makambo etali Bokonzi ya Nzambe. Na ntango ya boyangeli ya Banazi na Allemagne, babomaki bilenge mibali mingi ya sembo. Mpe na bambula oyo euti koleka, na ekólo Russie, bakatelaki bandeko na biso mingi etumbu ya bolɔkɔ mpo bazalaki koyebisa basusu makambo etali Biblia; likambo oyo bakonzi ya Leta batalelaka yango lokola mosala oyo etindaka bato bátomboka. Ata mpe Biblia—Libongoli ya mokili ya sika na monɔkɔ ya Russe epekisami, mpe etyami na molɔngɔ ya mikanda oyo etindaka bato bátomboka, mpo esalelaka nkombo Yehova.
16. Ndenge 1 Yoane 4:1 emonisi yango, mpo na nini tosengeli kotika te ete makambo ya lokuta oyo balobaka mpo na basaleli ya Yehova ekosa biso?
16 Oyo tokoki kosala mpo tóbɛta libaku te. Luká koyeba makambo malamumalamu. Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu ayebisaki bayoki na ye ete bato mosusu ‘bakokosela bango makambo ya ndenge nyonso.’ (Mat. 5:11) Makambo yango ya lokuta eutaka epai ya Satana. Atindaka batɛmɛli bápanza makambo ya lokuta mpo na baoyo balingaka solo. (Em. 12:9, 10) Tosengeli koboya makambo ya lokuta oyo banguna na biso balobaka. Tosengeli kotika soki moke te ete makambo yango ya lokuta ebangisa biso to mpe elɛmbisa kondima na biso.—Tángá 1 Yoane 4:1.
(4) BATƐKAKI YESU MPE BASUNDOLAKI YE
17. Ndenge nini makambo oyo esalemaki liboso Yesu akufa ekokaki kotinda bato mosusu bábɛta libaku?
17 Mwa moke liboso Yesu akufa, ntoma na ye moko atɛkaki ye. Ntoma na ye mosusu awanganaki ye mbala misato, mpe bantoma na ye nyonso basundolaki ye na mpokwa oyo asengelaki kokufa. (Mat. 26:14-16, 47, 56, 75) Yango ekamwisaki Yesu te. Kutu asakolaki ete likambo yango ekosalema. (Yoa. 6:64; 13:21, 26, 38; 16:32) Komona makambo yango ekokaki kotinda basusu bábɛta libaku mpe bákanisa boye: ‘Soki bantoma ya Yesu basalaki makambo ya ndenge wana, ntina ya kokóma moyekoli na ye ezali te!’
18. Makambo oyo esalemaki liboso Yesu akufa ekokisaki bisakweli nini?
18 Oyo Makomami elobi. Bambula mingi liboso Yesu aya awa na mabele, Yehova asakolaki na Liloba na ye ete Masiya akotɛkama na shekele ya palata 30. (Zek. 11:12, 13) Asakolaki mpe ete moninga na ye moko ya motema nde akotɛka ye. (Nz. 41:9) Lisusu, mosakoli Zekaria akomaki boye: “Bɛtá mobateli ya mpate, mpe bampate ya etonga epanzana.” (Zek. 13:7) Na esika ete makambo yango ebɛtisa bato ya mitema sembo libaku, komona ndenge bisakweli yango ekokisamaki epai ya Yesu, esengelaki nde kokómisa kondima na bango makasi.
19. Makambo nini bato ya mitema sembo bayebaka?
19 Yango mpe esalemaka lelo oyo? Ɛɛ. Na mikolo na biso, Batatoli ya Yehova mosusu oyo bayebani mingi batiki solo, bakómi bapɛngwi, mpe balukaka kobungisa basusu nzela. Bapanzaka bansango ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova ezala na bazulunalo, na televizyo, na radio, to mpe na Internet. Kasi bato ya mitema sembo batikaka te ete makambo yango ekosa bango. Kutu, bayebaka ete Biblia esakolaki ete makambo ya ndenge wana ekosalema.—20. Tosengeli kosala nini mpo baoyo batiká solo bábɛtisa biso libaku te? (2 Timote 4:4, 5)
20 Oyo tokoki kosala mpo tóbɛta libaku te. Mpo na kobatela kondima na biso makasi, tosengeli koyekolaka mbala na mbala, kobondelaka ntango nyonso, mpe kozala na mingi ya kosala na mosala oyo Yehova apesá biso. (Tángá 2 Timote 4:4, 5.) Soki tozali na kondima, tokobanga te ntango toyoki bansango ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova. (Yis. 28:16) Bolingo na biso mpo na Yehova, mpo na Liloba na ye, mpe mpo na bandeko na biso esalisaka biso tótika te ete baoyo batiká solo bábɛtisa biso libaku.
21. Ata soki ebele ya bato baboyaka mateya na biso, makambo nini tosengeli koyeba?
21 Na siɛklɛ ya liboso, bato mingi babɛtaki libaku mpe baboyaki Yesu. Kasi mingi mpe bandimelaki ye. Na kati na bango tokoki kotánga Moyuda moko oyo azalaki kosala na Sanedrina, ata mpe “ebele ya banganga-nzambe.” (Mis. 6:7; Mat. 27:57-60; Mrk. 15:43) Ndenge moko mpe, bamilio ya bato lelo oyo bazwi ekateli ya kolanda Yesu. Mpo na nini? Mpo bayebi mateya ya solo oyo ezali na Biblia, mpe balingaka yango. Liloba ya Nzambe elobi: “Baoyo bazali kolinga mobeko na yo bazali na kimya mingi, mpe eloko ya kobɛtisa bango libaku ezali te.”—Nz. 119:165.
LOYEMBO 124 Tótikala sembo
^ par. 5 Na lisolo oyo eleki, tolobelaki bantina minei oyo etindaki bato báboya Yesu na ntango ya kala, mpe oyo etindaka bato báboya bayekoli na ye lelo oyo. Na lisolo oyo, tokolobela bantina mosusu minei. Tokomona mpe ntina oyo baoyo balingaka Yehova batikaka te ete eloko moko ebɛtisa bango libaku.
^ par. 60 NDIMBOLA YA ELILINGI: Yesu azali kolya elongo na Matai mpe bakɔngɔli-mpako mosusu.
^ par. 62 NDIMBOLA YA ELILINGI: Yesu azali kobengana bato ya mombongo na tempelo.
^ par. 64 NDIMBOLA YA ELILINGI: Bamemisi Yesu nzete ya mpasi.
^ par. 66 NDIMBOLA YA ELILINGI: Yudasi azali kopesa Yesu lipwepwe mpo na kotɛka ye.