LISOLO YA BOYEKOLI 25
‘Ngai moko nakoluka bampate na ngai’
“Ngai moko, mpe nakoluka bampate na ngai mpe nakobatela yango.”—EZK. 34:11.
LOYEMBO 105 “Nzambe azali bolingo”
NA MOKUSE *
1. Na ndenge nini Yehova akokani na mama oyo azali komɛlisa mwana na ye mabɛlɛ?
NA MIKOLO ya mosakoli Yisaya, Yehova atunaki motuna oyo: “Mwasi akoki nde kobosana mwana na ye oyo ye azali komɛlisa mabɛlɛ?” Abakisaki boye: “Ata basi wana bakoki kobosana, kasi ngai nakobosana yo te.” (Yis. 49:15) Mbala mingi, Yehova azalaki te komikokanisa na mama. Kasi na libaku oyo, asalaki yango. Yehova azwaki ndakisa ya bolingo makasi oyo ezalaka kati na mama ná mwana na ye mpo na komonisa ndenge oyo alingaka mpenza basaleli na ye. Bamama mingi bayokaka lokola ndeko mwasi moko na nkombo Jasmin oyo alobi boye: “Ntango mama azali komɛlisa mwana mabɛlɛ, yango esalaka ete bakóma kolingana makasi bomoi na bango mobimba.”
2. Yehova ayokaka ndenge nini ntango mosaleli na ye moko atiki kosalela ye?
2 Yehova ayebaka ntango mosaleli na ye moko atiki kosakola mpe koyangana na makita. Sikoyo, kanisá mpasi oyo ayokaka mbula na mbula ntango amonaka ebele ya basaleli na ye batiki kosakola mpe koyangana na makita. *
3. Yehova alingi nini?
3 Tosepelaka mingi ntango bandeko oyo batiká kosakola mpe koyangana na makita, bazongeli makambo ya elimo. Yehova mpe asepelaka mingi soki basali bongo. (1 Pe. 2:25) Ndenge nini tokoki kosalisa bango mpo bazongela makambo ya elimo? Liboso tóyanola na motuna yango, tosengeli naino koyeba ntina oyo bandeko mosusu batikaka kosakola mpe koyangana na makita.
MPO NA NINI BANDEKO MOSUSU BATIKAKA KOSALELA YEHOVA?
4. Mosala ya mosuni ekoki kotinda moto asala nini?
4 Bandeko mosusu bamipesá mingi na mosala ya mosuni. Ndeko mobali moko na nkombo Hung, * oyo afandaka na Asie alobi boye: “Napesaka ntango mingi mpe makasi na ngai nyonso na mosala ya mosuni. Na bozoba nyonso nalobaki ete soki nazwi biloko mingi ya mosuni, nakozala na likoki ya kosalela Yehova malamu. Na yango, nazalaki kolekisa bangonga mingi na mosala. Nakómaki kozangisa makita mbala na mbala mpe nsukansuka, natikaki koyangana. Satana asalelaka mokili mpo na kolongola likebi ya bato, mpo mokemoke bátika kosalela Yehova.”
5. Makambo nini ndeko mwasi moko akutanaki na yango?
5 Bandeko mosusu bazali na makambo mingi oyo ezali kolɛmbisa bango nzoto. Anna, oyo afandaka na Grande-Bretagne mpe azali mama ya bana mitano alobi boye: “Mwana na ngai moko abotamá ebɔsɔnɔ. Na nsima, mwana na ngai mosusu ya mwasi alongolamaki na lisangá, mpe mwana na ngai mosusu ya mobali abɛlaki maladi ya motó. Lokola makambo yango etungisaki ngai mingi, natikaki koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola.” Toyoki mpenza mawa mpo na Anna mpe libota na ye mpe mpo na bandeko mosusu oyo bakutaná na makambo ya ndenge wana!
6. Mpo na nini moto akoki kotika lisangá soki aboyi kotosa toli oyo ezali na Bakolose 3:13?
6 Tángá Bakolose 3:13. Basaleli mosusu ya Yehova bakómá na nkanda mpo na makambo oyo bandeko mosusu ya lisangá basalelaki bango. Ntoma Paulo ayebaki ete na bantango mosusu, tokoki ‘kozala na likambo’ na ndeko moko. Ekoki kozala ete basalelaki biso makambo na kozanga bosembo. Soki tokebi te, tokoki kokangela ndeko na biso nkanda na motema. Nkanda ekoki kotinda ndeko moko aboya kozala elongo na basaleli ya Yehova. Tólobela ndakisa ya ndeko Pablo oyo afandaka na Amerika ya sudi. Bafundaki ye ete azali na etamboli ya mbindo mpe mpo na yango, abungisaki mokumba na ye na lisangá. Asalaki nini? Pablo alobi boye: “Nayokaki nkanda mpe mokemoke natikaki lisangá.”
7. Lisosoli oyo etungisami ekoki kotinda moto amiyoka ndenge nini?
7 Lisumu oyo moto asalá kala, ekoki mpe kotungisa lisosoli na ye mpe kotinda ye amona ete Nzambe alingaka ye te. Ata soki abongolá motema mpe balimbisá ye, akoki komona ete abongi lisusu te kozala mosaleli ya Yehova. Ndeko moko na nkombo Francisco amiyokaki mpe bongo, alobi boye: “Bapesaki ngai mpamela na lisangá mpo nasalaki pite. Atako na ebandeli nazalaki kaka koyangana na makita, nakómaki komitungisa mpe komona ete nabongi lisusu te kozala mosaleli ya Yehova. Lisosoli na ngai etungisaki ngai mpe namindimisaki ete Yehova alimbisaki ngai te. Nsukansuka, natikaki kosakola mpe koyangana na makita.” Oyokaka ndenge nini mpo na bandeko oyo bakutaná na makambo ya bongo? Omityaka na esika na bango? Mpe ndenge nini Yehova ayokaka mpo na bango?
YEHOVA ALINGAKA BAMPATE NA YE
8. Yehova abosanaka baoyo bazalaki kosalela ye? Limbolá.
8 Yehova abosanaka te baoyo bazalaki kosalela ye kasi batiká mpo na mwa ntango. Abosanaka mpe te mosala oyo basalelá ye. (Ebr. 6:10) Mosakoli Yisaya asalelaki ndakisa kitoko oyo emonisi ndenge Yehova atyelaka basaleli na ye likebi. Akomaki boye: “Lokola mobateli ya mpate, akobatela etonga na ye moko. Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate; mpe akomema yango na ntolo na ye. Oyo ezali komɛlisa mabɛlɛ, akotambwisa yango malɛmbɛmalɛmbɛ.” (Yis. 40:11) Sikoyo Yehova, Mobateli ya mpate monene, ayokaka ndenge nini soki ndeko moko ya lisangá atiki kosalela ye? Yesu amonisaki ndenge oyo Yehova ayokaka ntango atunaki bayekoli na ye boye: “Bokanisi nini? Soki moto moko azali na bampate nkama moko (100) mpe moko na yango ebungi, akotika ntuku libwa na libwa (99) na bangomba mpe akokende koluka oyo ebungi, boye te? Mpe soki ekómi ete amoni yango, nazali koyebisa bino ya solo, akosepela na yango mingi koleka ntuku libwa na libwa (99) oyo ebungaki te.”—Mat. 18:12, 13.
9. Na ntango ya kala, ndenge nini babateli ya mpate ya malamu bazalaki kosalela bampate na bango makambo? (Talá elilingi ya ezipeli.)
9 Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova akokani na mobateli ya mpate? Mpo na ntango ya kala, mobateli ya mpate azalaki mpenza kotyela bampate na ye likebi. Na ndakisa, Davidi abundaki na nkosi mpe urse mpo na kobatela etonga na ye. (1 Sam. 17:34, 35) Mobateli ya mpate ya malamu ayebaka soki mpate na ye moko ebungi. (Yoa. 10:3, 14) Mobateli ya mpate ya ndenge wana akondima ata kotika bampate 99 na esika ya libateli to kosɛnga na babateli ya mpate mosusu bátalela ye yango mpo na akende koluka moko oyo ebungi. Yesu asalelaki ndakisa yango mpo na koteya biso likambo moko ya ntina mingi, alobaki boye: “Tata na ngai oyo azali na likoló alingaka te ete moko ya bato mike oyo abeba.”—Mat. 18:14.
YEHOVA ALUKAKA BAMPATE NA YE
10. Na kotalela Ezekiele 34:11-16, Yehova alaki nini mpo na bampate na ye oyo ebungá?
10 Yehova alingaka mokomoko na biso ata mpe “bato mike” oyo bazali na kati ya etonga na ye kasi babungá nzela. Na nzela ya mosakoli Ezekiele, Nzambe alakaki ete akoluka bampate na ye oyo ebungá mpe akosalisa yango ezongisa boyokani ya malamu ná ye. Mpe amonisaki makambo oyo akosala mpo na kobikisa bampate yango. Makambo yango ekokani na oyo mobateli ya mpate azalaki kosala na Yisraele soki mpate moko ebungi. (Tángá Ezekiele 34:11-16.) Ya liboso, mobateli ya mpate azalaki koluka mpate yango, likambo oyo ezalaki kosɛnga ntango mingi mpe molende. Na nsima, ntango amoni yango, azalaki kozongisa mpate yango na etonga. Lisusu soki mpate yango ezokaki to ezalaki na nzala, na bolingo nyonso mobateli ya mpate azalaki kokanga mpota ya mpate yango, kokipe mpe koleisa yango. Bankulutu, babateli ya mpate ya “etonga ya Nzambe” basengeli kolanda matambe yango mpo na kosalisa ndeko oyo atiká lisangá. (1 Pe. 5:2, 3) Bankulutu balukaka bandeko yango, basalisaka bango bázonga na etonga, mpe na bolingo nyonso, basalisaka bango bázongisa boyokani ná Yehova. *
11. Mobateli ya mpate ya malamu azalaki koyeba nini?
11 Mobateli ya mpate ya malamu azalaki koyeba ete bampate ekoki kobunga. Mpe soki mpate moko etiki etonga, mobateli ya mpate azalaki kopesa yango etumbu te. Tótala ndakisa moko oyo emonisi ndenge Nzambe asalisaki basaleli na ye mosusu, oyo na ntango moko boye, batikaki kosalela ye.
12. Ndenge nini Yehova asalelaki Yona makambo?
12 Mosakoli Yona akimaki mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Atako bongo, Yehova asundolaki ye te. Lokola mobateli ya mpate ya malamu, Yehova abikisaki ye mpe apesaki ye makasi oyo esengeli mpo akokisa mokumba na ye. (Yona 2:7; 3:1, 2) Na nsima, Nzambe asalelaki molona ya ekutu mpo na kosalisa Yona ayeba ete bomoi ya moto nyonso ezali na ntina. (Yona 4:10, 11) Yango eteyi biso nini? Bankulutu basengeli nokinoki te kosundola baoyo batiká kosakola mpe koyangana na makita. Kasi, basengeli nde koluka koyeba ntina oyo mpate moko etiki etonga. Mpe ntango mpate yango ezongeli Yehova, bankulutu bakobaka komonisela yango bolingo mpe kotyela yango likebi.
13. Ndenge Yehova asalelaki mokomi ya Nzembo 73 makambo, ekoki koteya biso nini?
13 Mokomi ya Nzembo 73 alɛmbaki nzoto ntango amonaki ete bato mabe bazali kaka kolonga. Amitunaki soki ezalaki kaka na ntina kosalela Nzambe. (Nz. 73:12, 13, 16) Yehova asalaki nini? Apamelaki ye te. Kutu, akomisá maloba ya mokomi ya Nzembo yango na Biblia. Nsukansuka, mokomi ya nzembo akangaki ntina ete ezali na eloko moko te na bomoi oyo eleki kozala na boyokani ya malamu na Yehova. (Nz. 73:23, 24, 26, 28) Yango eteyi biso nini? Bankulutu basengeli te kokanisa mabe mpo na bandeko oyo bakómi komituna soki matomba nini bakozwa ndenge bazali kosalela Yehova. Na esika ya kokanisela bango mabe, bankulutu basengeli nde koluka koyeba mpo na nini ndeko alobi to asali likambo boye to boye. Na nsima, bankulutu bakosalela Biblia mpo na kolendisa bandeko yango.
14. Mpo na nini Eliya azalaki na mposa ya lisalisi, mpe ndenge nini Yehova asalisaki ye?
14 Mosakoli Eliya akimaki Mokonzi-mwasi Yezabele. (1 Bak. 19:1-3) Akanisaki ete ata moto moko te azalaki lisusu mosakoli ya Yehova, mpe ete mosala na ye ezalaki na ntina te. Eliya atungisamaki mingi mpe asɛngaki ete akufa. (1 Bak. 19:4, 10) Na esika apesa Eliya foti, Yehova asalisaki ye ayeba ete azalaki ye moko te, ete akokaki kotya motema na nguya ya Nzambe, mpe ete azalaki na makambo mosusu mingi ya kosala. Na boboto nyonso, Yehova ayokaki mitungisi ya Eliya mpe apesaki ye mikumba ya sika. (1 Bak. 19:11-16, 18) Yango eteyi biso nini? Biso nyonso, mingimingi bankulutu, tosengeli kosalela bampate ya Yehova makambo na boboto. Ata soki moto moko alobi ete azali na nkanda, to alobi ete Yehova akoki kolimbisa ye te, bankulutu basengeli koyoka ye ntango azali koyebisa bango ndenge oyo azali komiyoka. Na nsima, bakoki kosalisa mpate yango oyo ebungá amona ete Yehova alingaka ye mingi.
NDENGE NINI TOSENGELI KOMIYOKA MPO NA BAMPATE YA YEHOVA OYO EBUNGÁ?
15. Na kotalela Yoane 6:39, ndenge nini Yesu azalaki kotalela bampate ya Tata na ye?
15 Yehova alingi ete tómiyoka ndenge nini mpo na mpate na ye oyo ebungá? Tokoki kozwa liteya na ndakisa ya Yesu. Ayebaki ete mpate mokomoko ezali na motuya na miso ya Yehova, na yango asalaki nyonso mpo na kosalisa “bampate ya ndako ya Yisraele oyo babungá” bazongela Yehova. (Mat. 15:24; Luka 19:9, 10) Lokola mobateli ya mpate ya malamu, Yesu asalaki oyo ekoki mpo ata mpate moko ya Yehova ebunga te.—Tángá Yoane 6:39.
16-17. Bankulutu basengeli komiyoka ndenge nini na likambo etali kosalisa baoyo batiká kosalela Yehova? (Talá etanda “ Mpate oyo ebungá ekoki komiyoka ndenge nini?”)
16 Ntoma Paulo alendisaki bankulutu ya lisangá ya Efese bálanda ndakisa na ye. Akomaki boye: “Bosengeli kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu, mpe bosengeli kobosana te maloba ya Nkolo Yesu, ntango ye moko alobaki ete: ‘Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.’” (Mis. 20:17, 35) Bavɛrsɛ yango emonisi ete bankulutu bazali na mokumba monene ya kobatela basaleli ya Yehova. Salvador, nkulutu moko na Espagne alobi boye: “Ntango nakanisaka ndenge oyo Yehova atyelaka bampate na ye oyo ebungá likebi, yango etindaka ngai nasala oyo nakoki mpo na kosalisa bango. Nayebi ete Yehova asɛngi ngai nabatela bango.”
17 Bandeko nyonso oyo tolobeli na lisolo oyo, batikaki kosalela Yehova kasi basalisaki bango bázongela ye. Bandeko mingi oyo batiká kosalela Yehova, balingaka mpe kosala bongo. Lisolo oyo elandi ekolobela na mozindo makambo oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bango bázongela Yehova.
LOYEMBO 139 Omimona na mokili ya sika
^ par. 5 Mpo na nini bato mingi oyo basalelá Yehova bambula mingi na bosembo batiká lisangá? Nzambe ayokaka ndenge nini mpo na bango? Lisolo oyo ekoyanola na mituna yango. Ekolobela mpe mateya oyo tokoki kozwa na ndenge oyo Yehova asalelaki bato mosusu makambo na ntango ya kala oyo batikaki kosalela ye mpo na mwa ntango.
^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Moto akotángama ete azali mosakoli oyo atiká kosakola soki na boumeli ya sanza motoba to koleka, asakoli te mpe ayekoli na moto Biblia te. Atako bongo, baoyo batiká kosakola bazali kaka bandeko na biso mpe tolingaka bango.
^ par. 4 Topesi bango bankombo mosusu
^ par. 10 Lisolo oyo elandi ekolimbola ndenge oyo bankulutu bakoki kosala makambo yango nyonso misato.
^ par. 60 NDIMBOLA YA ELILINGI: Na Yisraele, soki mpate moko ebungi, mobateli ya mpate azalaki komitungisa mingi. Azalaki koluka yango mpe kosalisa yango ezonga na etonga Lelo oyo, bankulutu mpe basalaka bongo
^ par. 64 NDIMBOLA YA ELILINGI: Ntango ndeko mwasi moko oyo atiká kosakola mpe koyangana na makita azali kozela bisi, amoni Batatoli mibale bazali kosakola na shario.