LISOLO YA BOYEKOLI 35
LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi
Lisalisi mpo na baoyo balongolami na lisangá
“Esengo ekozala mingi na likoló mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema koleka mpo na bato ya sembo 99 oyo esɛngi te bábongola motema.”—LUKA 15:7.
NA MOKUSE
Ntina oyo basusu basengeli kolongolama na lisangá mpe ndenge oyo bankulutu bakoki kosalisa bango bábongola motema mpe bázongela boyokani malamu na Yehova.
1-2. (a) Ndenge nini Yehova atalelaka lisumu oyo moto asali na nko? (b) Yehova azalaka na elikya ete basumuki bakoki kosala nini?
YEHOVA azali te Nzambe oyo akangaka miso na mabe; asepelaka na lisumu te. (Nz. 5:4-6) Asɛngi biso tótosa mibeko na ye ya sembo, oyo atyeli biso na Liloba na ye. Kasi, Yehova asɛngi te ete biso bato ya kozanga kokoka tótosa ye na ndenge ya kokoka. (Nz. 130:3, 4) Nzokande, atikaka mpe nzela te epai ya ‘bato oyo batyolaka Nzambe oyo bakómisi boboto monene na ye eloko oyo ezali kopesa nzela ya kozala na etamboli ya nsɔni na nko.’ (Yuda 4) Kutu, Biblia elobeli ‘kobebisama ya bato oyo batyolaka Nzambe’ na etumba ya Nzambe ya Armagedone.—2 Pe. 3:7; Em. 16:16.
2 Kasi, Yehova alingi moto ata moko te abomama. Ndenge tomonaki yango na masolo ya ebandeli ya nimero oyo, Biblia elobi polele ete “alingi ete bato nyonso bábongola motema.” (2 Pe. 3:9) Bankulutu bamekolaka Yehova na ndenge bamonisaka motema molai ntango bazali komeka kosalisa basumuki bábongola banzela na bango mpe bázongela boyokani na bango na Yehova. Kasi, basumuki nyonso te nde basalaka bongo. (Yis. 6:9) Basusu bakobaka na nzela ya mabe atako bankulutu basali milende mbala na mbala mpo na komema to kosalisa bango bábongola motema. Na ntango wana, bankulutu basengeli kosala nini?
“BÓLONGOLA MOTO MABE”
3. (a) Biblia elobi ete esengeli kosala nini ntango basumuki baboyi kobongola motema? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete mosumuki nde aponaka ye moko kolongolama na lisangá?
3 Ntango mosumuki abongoli motema te, bankulutu basengeli kolanda etinda oyo ezali na 1 Bakorinti 5:13 ete: “Bólongola moto mabe na kati na bino.” Na maloba mosusu, mosumuki aponi kobuka mbuma mabe; abuki oyo ye a alonaki. (Gal. 6:7) Mpo na nini tokoki koloba bongo? Mpo aboyi kondima lisalisi oyo bankulutu bapesi ye mbala na mbala mpo na komema ye abongola motema. (2 Bak. 17:12-15) Misala na ye emonisi ete aponi koboya kotosa mibeko ya Yehova.—Mib. 30:19, 20.
4. Mpo na nini liyebisi epesamaka ntango mosumuki oyo aboyi kobongola motema alongolami na lisangá?
4 Ntango mosumuki oyo aboyi kobongola motema alongolami na lisangá, liyebisi ekopesama na lisangá ete azali lisusu Motatoli ya Yehova te. b Ntina ya liyebisi yango ezali te mpo na koyokisa mosumuki nsɔni. Kasi, ezali nde mpo lisangá elanda etinda ya Biblia ya ‘kotika kosala boninga’ na moto yango, mpe koboya ‘kolya kutu esika moko na ye.’ (1 Ko. 5:9-11) Yehova apesaki etinda yango mpamba te. Ntoma Paulo akomaki: “Mwa levire moke evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini.” (1 Ko. 5:6) Basumuki oyo baboyi kobongola motema bakoki kolɛmbisa ekateli ya baoyo basalaka makasi mpo na kotosa mibeko ya sembo ya Yehova na bomoi na bango.—Mas. 13:20; 1 Ko. 15:33.
5. Ndenge nini tosengeli kotalela moto oyo alongolami na lisangá, mpe mpo na nini?
5 Sikoyo, ndenge nini tosengeli kotalela ndeko oyo alongolami na lisangá? Atako tosengeli kokata boninga na ye, tosengeli komona ye lokola mpate oyo ebungi, kasi te moto oyo akoki kozongela Yehova te. Mpate oyo ebungi ekoki kozonga na kati ya etonga. Tóbosana te ete moto oyo azali mpate oyo abungi amipesaki na Yehova. Kasi likambo ya mawa, sikoyo azali te kokokisa elako oyo asalaki ntango amipesaki na Yehova, mpe yango etye ye na likama. (Ezk. 18:31) Atako bongo, ntango nyonso oyo Yehova azali komonisela ye motema mawa, elikya ezali ete moto yango akozongela ye. Na yango, ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa mosumuki oyo alongolami na lisangá?
NDENGE OYO BANKULUTU BASALISAKA BAOYO BALONGOLAMI NA LISANGÁ
6. Makambo nini bankulutu basengeli kosala mpo na kosalisa moto oyo alongolami na lisangá?
6 Ntango moto alongolami na lisangá, bankulutu basengeli kotika kosalisa ye azongela Yehova? Ezali bongo te! Ntango komite ya bankulutu bazali koyebisa mosumuki oyo aboyi kobongola motema ete akolongolama na lisangá, bayebisaka ye polele makambo oyo asengeli kosala mpo na kozonga na lisangá. Kasi bankulutu bakosuka kaka wana te. Mbala mingi, bakoyebisa mosumuki ete bakosepela kokutana na ye lisusu nsima ya mwa basanza mpo na komona soki abongoli motema. Soki mosumuki yango andimi kokutana na bango lisusu, na libaku yango bankulutu bakosalisa ye na boboto abongola motema mpe azongela Yehova. Ata soki abongoli motema te na libaku yango, ntango bakutani na ye na ntango wana, bankulutu bakosala makasi ya kokutana na ye lisusu.
7. Ndenge nini bankulutu bamekolaka motema mawa ya Yehova ntango bazali kosolola na moto oyo alongolamá na lisangá? (Yirimia 3:12)
7 Bankulutu basalaka makasi bámekola motema mawa ya Yehova ntango bazali kosolola na moto oyo alongolamá na lisangá. Na ndakisa, Yehova azalaki kozela te ete bato ya Yisraele oyo bazalaki kobuka mibeko na ye bábongola motema liboso ete asalisa bango. Kasi, ye nde azalaki kosalisa bango liboso kutu bámonisa ata moke ete babongoli motema. Ndenge tomonaki yango na lisolo ya mibale, Yehova amonisaki ndenge azali na motema mawa mingi ntango ayebisaki mosakoli Hosea azongela mwasi na ye, oyo azalaki naino kosala lisumu. (Hos. 3:1; Mal. 3:7) Mpo na komekola Yehova, bankulutu balingaka ete mosumuki azonga na lisangá, mpe basalaka ete yango ezala pɛtɛɛ mpo na ye kosala yango.—Tángá Yirimia 3:12.
8. Ndenge nini ndakisa oyo Yesu apesaki ya mwana oyo abungaki nzela ezali kosalisa biso tóyeba malamu ndenge Yehova atalelaka baoyo balongolami na lisangá? (Luka 15:7)
8 Kanisá lisusu ndakisa ya Yesu ya mwana oyo abungaki nzela, oyo tolobelaki na lisolo ya mibale. Ntango kaka tata amonaki mwana na ye azali kozonga ndako, “apotaki mbangu, ayambaki ye makasi mpe apesaki ye lipwɛpwɛ na boboto.” (Luka 15:20) Tósimba ete tata yango azelaki te ete mwana na ye aya kosɛnga bolimbisi. Kasi, ye nde akendaki liboso, ndenge tata nyonso ya bolingo akoki kosala. Bankulutu mpe basalaka makasi ya kosala bongo epai ya baoyo batiki Yehova. Balingaka ete bampate yango oyo babungi “bázonga na ndako.” (Luka 15:22-24, 32) Esengo ezalaka na likoló mpe awa na mabele ntango mosumuki moko azongeli Yehova!—Tángá Luka 15:7.
9. Yehova alingi basumuki básala nini?
9 Na kotalela oyo touti komona, emonani polele ete Yehova andimaka te ete basumuki oyo baboyi kobongola motema bátikala na kati ya lisangá. Kasi, apesaka basumuki mokɔngɔ libela te. Alingaka bázongela ye. Ndenge oyo Yehova amiyokaka mpo na basumuki oyo babongoli motema emonani na Hosea 14:4; elobi boye: “Nakobikisa kozanga bosembo na bango. Nakolinga bango ndenge ngai moko nasepeli, mpo nkanda na ngai elongwe epai na bango.” Yango esengeli mpenza kotinda bankulutu báluka ata elembo ya moke oyo emonisi ete moto abandi kobongola motema. Esengeli mpe kotinda baoyo batiká Yehova bázongela ye noki mpenza.
10-11. Ndenge nini bankulutu balukaka kosalisa baoyo balongolamá na lisangá kala?
10 Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa baoyo balongolamá na lisangá kala, mbala mosusu eleki bambula mingi? Ekoki kozala ete bato yango batiká lisumu oyo esalaki ete bálongolama na lisangá. Bamosusu kutu bayebaka lisusu te ntina oyo balongolamaki na lisangá. Ezala bongo to te, bankulutu basengeli koluka esika oyo bafandi mpe kokende kotalaka bango. Ntango bayei kotala bango, bakobondela ata na bango mpe kolendisa bango bázonga na lisangá. Ya solo, soki moto alongolamá na lisangá eleki bambula mingi, na ntembe te akozala mpenza makasi te na elimo. Na yango, soki amonisi mposa ya kozonga na lisangá, bankulutu bakoki kozwa bibongiseli mpo ndeko moko ayekola na ye Biblia, ata liboso kutu azongisama na lisangá. Ya solo, na mabaku nyonso, bankulutu nde basengeli kozwa bibongiseli ya koyekola na bango Biblia.
11 Mpo na komekola motema mawa ya Yehova, bankulutu basengeli koluka mpenza kosalisa baoyo batiká Yehova báyeba ete porte ezali polele mpo bázongela Yehova. Ntango mosumuki amonisi ete abongoli motema mpe atiki etamboli na ye ya mabe, akoki kozongisama na lisangá kozanga koumela.—2 Ko. 2:6-8.
12. (a) Na makambo nini bankulutu basengeli mpenza kozala ekɛngɛ? (b) Mpo na nini tosengeli te koloba ete Yehova akoki ata moke te komonisela basumuki mosusu motema mawa? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
12 Na bantango mosusu, bankulutu basengeli mpenza kozala ekɛngɛ liboso ya kozongisa moto na lisangá. Na ndakisa, soki moto abebisaki mwana, akómaki mopɛngwi, to soki asalaki lisumu na nko mpo na koboma libala, bankulutu basengeli komindimisa mpenza ete abongoli motema. (Mal. 2:14; 2 Tim. 3:6) Basengeli kobatela etonga. Kasi, tosengeli mpe koyeba ete Yehova akondima lisusu ata mosumuki ya ndenge nini oyo amonisi ete abongoli mpenza motema mpe atiki etamboli na ye ya mabe. Na yango, atako bankulutu basengeli kozala ekɛngɛ mpo na baoyo basalelaki basusu makambo na bokosi mpenza, basengeli koloba te ete basumuki ya ndenge wana Yehova akoki ata moke te komonisela bango motema mawa. c—1 Pe. 2:10.
OYO LISANGÁ EKOKI KOSALA
13. Bokeseni nini ezali kati na ndenge ya kotalela moto oyo azwi mpamela na moto oyo alongolami na lisangá?
13 Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, ntango mosusu liyebisi epesamaka ete moto moko azwi mpamela. Na ntango yango, tokoki kokoba kozala elongo na moto yango, mpo toyebi ete abongolaki motema mpe atiki etamboli na ye ya mabe. (1 Tim. 5:20) Azali kaka ndeko na kati ya lisangá mpe azali na mposa bandeko ya lisangá bálendisa ye akoba kokende liboso. (Ebr. 10:24, 25) Kasi, yango ekeseni na moto oyo alongolami na lisangá. ‘Tokokata boninga’ na moto yango, mpe ‘tokolya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te.’—1 Ko. 5:11.
14. Ndenge nini bakristo bakoki kosalela lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia na boyokani na bango na moto oyo alongolamá na lisangá? (Talá mpe elilingi.)
14 Makambo oyo touti kotalela, elimboli nde ete tokoki kokipe ata moke te moto oyo alongolami na lisangá? Ezali mpenza bongo te. Ezali solo ete tosengeli te kosangana to kosala boninga na ye. Kasi mokristo akoki kosalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia mpo na kozwa ekateli soki akoki kobengisa moto oyo alongolami na lisangá na makita, oyo mbala mosusu azali ndeko na ye ya libota to azalaki liboso moninga na ye. Bongo soki ayei na makita? Na kala, tozalaki kopesa moto ya ndenge wana mbote te. Kasi, sikoyo mokristo mokomoko asengeli kosalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia na likambo yango. Bandeko mosusu bakomona malamu kopesa moto yango mbote to kotombela ye boyei malamu na makita. Kasi, basengeli te kobenda masolo milai to kolekisa ntango elongo na moto yango na makambo mosusu.
15. Basumuki ya ndenge nini 2 Yoane 9-11 elobeli? (Talá mpe etanda “ Yoane ná Paulo bazalaki kolobela lisumu ya ndenge moko?”)
15 Basusu bakoki komituna, ‘Biblia elobi te ete mokristo oyo apesi moto ya ndenge wana mbote asangani na misala na ye ya mabe?’ (Tángá 2 Yoane 9-11.) Bavɛrsɛ mosusu ya 2 Yoane emonisi ete malako wana etaleli nde bapɛngwi to baoyo bazali kotinda bato mosusu na etamboli ya mabe. (Em. 2:20) Na yango, soki moto azali kolendisa mateya ya lipɛngwi to kotinda basusu na mabe, bankulutu bakokende te kotala moto ya bongo. Kasi, elikya ezali ete akobongola motema. Kasi liboso ete abongola motema, tokopesa moto ya ndenge wana mbote te, mpe tokobengisa ye na makita te.
TÓMEKOLA MOTEMA MAWA YA YEHOVA
16-17. (a) Yehova alingi ete basumuki básala nini? (Ezekiele 18:32) (b) Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete basalaka elongo na Yehova ntango balukaka kosalisa basumuki?
16 Toyekoli nini na masolo mitano ya nimero oyo? Yehova alingi ata moto moko te abomama! (Tángá Ezekiele 18:32.) Alingi ete basumuki bázongisa boyokani na bango elongo na ye. (2 Ko. 5:20) Yango wana banda kala, Yehova alendisaki mbala na mbala bato ya Yisraele oyo bazalaki kobuka mibeko na ye, ata mpe moto mokomoko oyo asali lisumu, bábongola motema mpe bázongela ye. Bankulutu ya lisangá bazali na libaku malamu ya kosala elongo na Yehova ntango bazali komema to kosalisa basumuki bábongola motema.—Rom. 2:4; 1 Ko. 3:9.
17 Kanisá esengo oyo ezalaka na likoló ntango basumuki babongoli motema! Tata na biso ya likoló, Yehova, ayokaka esengo mingi ntango nyonso oyo mpate na ye moko oyo abungaki azongi na lisangá. Bolingo na biso mpo na Yehova ekómaka lisusu makasi ntango tomanyolaka na motema mawa, na ngɔlu mpe na boboto monene na ye.—Luka 1:78.
LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso
a Na lisolo oyo, tosaleli liloba mosumuki mpo na kolobela ndeko mwasi to mobali oyo asali lisumu ya monene.
b Tokobenga lisusu bato yango te bato oyo babimisami na lisangá. Na boyokani na maloba ya Paulo oyo ezali na 1 Bakorinti 5:13, tokobanda sikoyo koloba baoyo balongolami na lisangá.
c Na kotalela oyo Biblia elobi, lisumu oyo ekoki kolimbisama te ezali te lisumu moko boye, kasi ezali nde lisumu oyo esalemi na nko mpenza, oyo emonisi ete moto atɛmɛli Nzambe libela. Biso tozali na likoki te ya kokata ete moto boye asali lisumu oyo ekoki kolimbisama te.—Mrk. 3:29; Ebr. 10:26, 27.